Likita Linene
Bokota kati na Etonga ya Nzambe
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Bokota kati na Etonga ya Nzambe

Kati na etonga ya Nzambe, tomonaka bobateli ya Mobateli Mpate Malamu, kopesaka lisungi mpe topambolami mpo koyoka bolingo na Ye ya bosikoli.

Lokola bilenge baboti, Ndeko mobali mpe ndeko mwasi Samad bayekolaki nsango malamu ya Yesu Klisto kati na ndako na bango ya moke ya bisuku mibale na Semarang, Indonésie.1 Bafandaki nzinga nzinga ya mesa ya moke, na mwinda moko ya pitolo oyo emonanaki kotondisa ndako na bangungi koleka pole, bilenge bamisionele mibale bateyaki bango bosolo ya seko. Na losambo ya solo mpe litambwisi ya Molimo Mosantu bayaki kondima oyo bateyamaki mpe baponaki kobatisama mpe kokoma bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Mokano wana, mpe lolenge na bango ya kobika uta wana, epambolaki Ndeko mobali mpe ndeko mwasi Samad mpe libota na bango na lolenge nyonso ya bomoi na bango.2

Bazali kati ya Basantu bapionie ya yambo na Indonésie. Na nsima bazwaki makuli ya tempelo, mpe Ndeko mobali Samad asalaki lokola mokambi ya etape mpe nsima ya disitiliki, kotambolaka bamboka ya Central Java mpo na kokokisa mikumba na ye. Mpo na mbula zomi oyo euti koleka, asalaki lokola nkoko ya yambo ya Etuka ya Surakarta Indonésie.

Elilingi
Mpaka Funk elongo na ndeko mbobali mpe ndeko mwasi Samad

Lokola moko ya bamisionele kati na ndako wana ya komikitisa , oyo etondisama na bondimi eleki bambula 49, natatoli kati na bango oyo Mokonzi Benyamina ateyaki kati na Buku ya Mormon: “Nazali na mposa ete bomaniola likolo lya bozali bopambolama mpe bwa bosepeli na bango baye babateli mitindo ya Nzambe. Mpo tala, bapambolami na makambo manso, ya ntango mpe ya molimo lokola.”3 Mapamboli oyo eyaka kati na bomoi ya baoyo balandi ndakisa mpe mateya ya Yesu Klisto, baoyo baponi kotangama kati na bayekoli na Ye, ezali ebele, ya esengo mpe ya seko.4

Etonga ya Nzambe

Libiangisi ya elaka ya libatisi ya Alma na baoyo basanganaki na Mai ya Mormon ebandi na liloba oyo: “Mpe sikawa, lokola bozali na mposa ya kokota kati na etonga ya Nzambe.”5

Elilingi
Flock of sheep in the country side standing next to a rock fence.

Etonga to lopangu ya bampate ezali lopangu monene, mingi mingi etongami na bifelo ya mabanga, epai wapi bampate babatelami na butu. Ezali bobele na lidusu moko. Na nsuka ya mokolo, mobateli ya mpate abengi bampate na ye. Bayebi mongongo na ye, mpe na nzela ya ekuke bayingeli na etonga ya kimia.

Bato ya Alma bakoki koyeba ete babateli ya mpate batelemaka na lidusu ya moke ya etonga mpo ete ntango bampate bakokota, batangama6 mpe bampota mpe bampasi na bango ekomama mpe esalisama moko na moko. Kimia mpe bolamu ya bampate etali bolingi na bango ya kokota na etonga mpe kovanda kati na etonga.

Kati na biso ekoki kozala na boko baoyo bakanisi ete bazali pene ya libulu, ntango mosusu bakanisi bazali na mposa na bango moke to bazali na motuya te to ete bazali bato ya etonga te. Mpe, lokola kati na lopangu ya bampate, kati na etonga ya Nzambe tosalaka baninga mosusu mabe mpe ntango mosusu tozalaka na mposa ya koyambola to kolimbisa.

Kasi Mobateli Malamu7—mobateli na biso ya solo—azali malamu ntango nyonso. Kati na etonga ya Nzambe, tomoni bobateli na Ye, kopesaka lisungi mpe topambolami mpo koyoka bolingo na Ye ya bosikoli. Alobaki, “Tala nakomi nkombo na bino na matandu na maboko na ngai, mapango na yo ejali libela liboso na ngai.”8 Mobikisi na biso akomi likolo ya maboko na Ye ya biso masumu, bampasi, mitungisi,9 mpe nyonso oyo ezali sembo te kati na bomoi.10 Banso baye malamu mpo kozwa mapamboli oyo, lokola “balingi koya”11 mpe kopona kozala kati na etonga. Likabo ya bonsomi ya kopona ezali kaka lotomo ya kopona te; ezali libaku ya kopona malamu. Mpe bifelo ya etonga ezali bandelo te kasi liziba ya kimia ya molimo.

Yesu ateyaki ete ezali na “etonga moko, mpe mobateli moko.”12 Alobaki:

“Nde ye oyo akoyingela na njela na ekuke ajali mobateli ya bampate. …

“Mpe bampate bayokaka mongongo na ye … ,

“… bampate bakobilaka ye: mpo ete bayebi mongongo na ye.”13

Nsima Yesu alobaki, “Ngai najali ekuke: soko moto nani akoingela na njela na ngai, akobika,”14 eteyi na polele ete ezali bobele na nzela se moko mpo kokota na etonga ya Nzambe mpe bobele nzela se moko mpo kobikisama. Ezali na mpe na nzela ya Yesu Klisto.15

Mapamboli eyaka na Baoyo kati na Etonga ya Nzambe

Toyekoli lolenge nini koya kati na etonga ya Nzambe na liloba na Njambe, oyo ezali malongi eteyami na Yesu Klisto mpe baprofeta na Ye.16 Ntango tolandi malongi ya Klisto mpe tokoti kati na etonga na Ye na nzela ya bondimi kati na Yesu Klisto, boyamboli, libatisi mpe nkotisa, mpe kokoba kozala sembo,17 Alma alakaki mapamboli ya moto minei, ya ndenge. Bino bokoki (1) “kosikolama na Nzambe,” (2) “kotangama elongo na baoyo ya lisekwa ya yambo,” (3) “kozwa bomoi ya seko,” mpe (4) Nkolo a “kosopa Molimo na ye mingi lisusu koleka likolo na yo.”18

Na nsima Alma ateyaki etali mapamboli oyo, bato babetaki maboko na bango mpo ya esengo. Tala mpo na nani:

Yambo: kosikola elimboli kofuta nyongo to lisengeli to kolongwa na bowumbo ya oyo epesi mpasi to ezokisi.19 Ata motango te ya bobongi ya bisomei na ngambo na biso ekoki konetola biso na masumu tosala to nyonso na bampota tonyokwama longola se Bomikabi ya Yesu Klisto. Azali Mosikoli na biso.20

Ya mibale: Mpo ya Lisekwa ya Yesu Klisto, bato nyonso bakosekwa.21 Nsima milimo na biso etika banzoto na biso ya kufa, tokoki na ntembe te kotala liboso ntango tokoki lisusu na nzoto esekwa koyamba baoyo tolingi. Tokotala liboso na mposa makasi mpo kozala kati na baoyo ya Lisekwa ya Yambo.

Ya misato: Bomoi ya seko elimboli kobika elongo na Nzambe mpe kobika ndenge Azali na bomoi. Ezali “likabo monene koleka mpenza ya makabo nyonso ya Nzambe”22 mpe ekomema litondi ya esengo.23 Ezali mokano mpe ntina monene ya bomoi na biso.

Boninga ya moko ya Bonzambe, Molimo Mosantu, apesaka bokambi esengeli mpe libondisi na ntango ya bomoi oyo ya kufa.24

Manyola bamoko ya bantina ya bozangi esengo: mpasi ewuti na lisumu,25 mawa mpe komiyoka yo moko ewuti na kufa ya molingami moko, mpe bobangi ewuti na bozangi elikya ya oyo ekoya ntango tokokufa. Kasi ntango tokoti kati na etonga ya Nzambe mpe tobombi bilaka na biso elongo na Ye, toyoki kimia ya koyeba mpe kolikya ete Klisto akosikola biso na masumu na biso, ete bokabwani ya nzoto na biso mpe molimo ekosuka mbangu koleka, mpe ete tokobika mpo na seko elongo na Nzambe kati na lolenge ya nkembo koleka mpenza.

Likya kati na Klisto mpe Sala na Bondimi

Bandeko mibali mpe basi, makomi etondisami na bandakisa ya nguya monene ya Klisto mpe boninga na Ye ya mawa mpe ya ngolu. Na ntango ya mosala na Ye na mabele, mapamboli na Ye ya kobikisa eyaki epai ya baoyo balikyaki kati na Ye mpe basalaki na bondimi. Mpo na ndakisa, ebosono na lizanga ya Betheseda atambolaki ntango, na kondima, atosaki motindo ya Mobikisi ya “kotelema, kokamata litoko na ye, mpe kotambola.”26 Baoyo bazalaki na maladi to batungisamaki na ndenge nyonso na mabele oyo ya Bountiful babikisamaki ntango “na mbala moko” ba “kendaki liboso.”27

Lolenge moko, mpo kozwa mapamboli ya kitoko elakelama na baoyo baye kati na etonga ya Nzambe esengisi biso kosala se boye—tosengeli kopona koya. Alma ya Elenge ateyaki, “Mpe sikawa nalobi epayi na bino ete mobateli malamu azali kobianga nsima na bino; mpe soki bokoyoka mongongo na ye akomema bino kati na etonga na ye.”28

Mibu mingi eleki, moninga moko molingami akufaki na cancer. Ntango mwasi na ye, Sharon, akomaki yambo mpo na oyo etali bokono na ye, alobaki, “Toponi Bondimi. Bondimi kati na Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Bondimi kati na mwango ya Tata na biso ya Lola, mpe bondimi ete Ayebi bamposa na biso mpe akokisaka bilaka na Ye.”29

Nakutani na Basantu ba Mikolo mya Nsuka ebele lokola Sharon baoyo bayokaka kimia ya kati ya kozala malamu kati na etonga ya Nzambe, mingimingi ntango lisenginia, botemeli, to monyoko eyaka.30 Baponi kozala na bondimi kati na Yesu Klisto mpe kolanda profeta na ye. Molingami profeta na biso, Mokambi Russell M. Nelson, ateyi, “Eloko nyonso ya malamu na bomoi—lipamboli nyonso ya ntina ya seko—ebandi na bondimi.”31

Yaka Mobimba kati na Etonga ya Nzambe

Nkoko ya nkoko ya nkoko na ngai ya mobali James Sawyer Holman akomaki na Utah na mobu 1847, kasi azalaki te kati na baoyo bayaki na Sanza ya nsambo elongo na Brigham Young. Ayaki nsima kati na mbula wana mpe, engebene na makundoli ya libota, azalaki na mokumba ya komema bampate. Akomaki te na Lubwaku ya Etima ya Mungwa kino Sanza ya zomi, kasi ye na bampate basalaki yango.32

Na ndenge ya elilingi, boko na biso bakoti naino te kati na etonga ya Nzambe. Bato nyonso te bayaki na lingomba ya yambo. Bandeko na ngai balingami, bosepela kokoba mobembo—mpe kosunga basusu—kokota mobimba kati na etonga ya Nzambe. Mapamboli ya nsango malamu ya Yesu Klisto ezali ya kotangama te mpo ezali ya seko.

Nazali na botondi mpo na kozala mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Natatoli bolingo ya Tata na biso ya Lola mpe Mosikoli na biso, Yesu Klisto, mpe kimia oyo eyaka bobele se uta epai na Bango—kimia ya kati mpe mapamboli ezwami kati na etonga ya Nzambe. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Lokola ebele ya Bato ya Indonésie ya nkola na ye, Ndeko mobali Samad azali se na nkombo moko. Mwasi na ye, Sri Katoningsih, mpe bana na bango basalelaka Samad lokola nkombo na bango ya lokumu.

  2. Ndeko mobali mpe mwasi Samad balobi ete mwa moke 44 ya bato ya libota na bango monene bazali sikawa bandimi ya Eklezia. Ebele mosusu lisusu basepeli na mapamboli ya nsango malamu mpo ya ndakisa mpe mosala na bango.

  3. Moziya 2:41.

  4. Tala Malongi mpe Mayokani 59:23.

  5. Moziya 18:8.

  6. Tala Moroni 6:4.

  7. Tala Yoane 10:14; tala lisusu Gerrit W. Gong, “Good Shepherd, Lamb of God,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 97–101.

  8. Yisaya 49:16.

  9. Tala Alma 7:11–13.

  10. Tala Dale G. Renlund, “Infuriating Unfairness,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 41–44.

  11. Moziya 18:8.

  12. Yoane 10:16.

  13. Yoane 10:2–4.

  14. Yoane 10:9.

  15. Tala 2 Nefi 31:21; Elamane 5:9.

  16. Tala Henry B. Eyring, “The Power of Teaching Doctrine,” Liahona, Sanza ya nsambo 1999, 85. Ntango toluki koya epai na Klisto, tosengeli koya engebene na maloba ya Klisto; “mpo ezali se Nzambe moko mpe Mobateli moko likolo ya mabele nyonso” (tala 1 Nefi 13:40–41).

  17. Malongi ya Klisto, na mokuse, ezali ete bato banso epai nyonso basengeli kosalela bondimi kati na Yesu Klisto mpe bomikabi na Ye, koyambola, kobatisama, kozwa Molimo Mosantu, mpe kotia molende kino na nsuka, to, lokola Mobikisi ateyaki kati na 3 Nefi 11:38, “bokoki na lolenge moko te kosangola libula ya bokonzi ya Nzambe.”

  18. Moziya 18:9, 10.

  19. Tala Merriam-Webster.com Dictionary, “redeem”; tala lisusu D. Todd Christofferson, “Bosikoli,” Liahona, Sanza ya mitano 2013, 109.

  20. Tala Alma 11:40.

  21. Tala 2 Nefi 2:8; 9:12.

  22. Malongi mpe Mayokani 14:7.

  23. Tala 2 Nefi 9:18.

  24. Tala 1 Nefi 4:6; Moroni 8:26.

  25. Tala Moziya 3:24–25; Alma 41:10.

  26. Yoane 5:8.

  27. 3 Nefi 17:9.

  28. Alma 5:60. Kati na Mose 7:53, Masiya alobaki lisusu, “Oyo nyonso aye na ekuke mpe amati na ngai akokweya te.”

  29. Sharon Jones, “Diagnosis,” wechoosefaith.blogspot.com, Sanza ya misato. 18, 2012.

  30. Preach My Gospel elingi koloba “kotia molende kino na nsuka” lokola boye: “Kotikala solo na mitindo ya Nzambe mpe kozala solo na kolatisama na nguya ya molimo kati na tempelo mpe milulu ya bokangi ya tempelo atako lisenginia, botemeli, mpe monyoko kati na bomoi” ([2019], 73). Yango emonisi ete tokomona lisenginia, botemeli, mpe monyoko kati na bomoi.

  31. Russell M. Nelson, “Klisto Asekwi; Bondimi kati na Ye Ekotombola Bangomba,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 102.

  32. Tala mokuse ya lisolo ya bomoi ya James Sawyer Holman mpe Naomi Roxina LeBaron Holman na mama Nkoko na bango Grace H. Sainsbury na maboko ya molobeli (Charles C. Rich diary, Sept. 28, 1847, Church History Library, Salt Lake City; Journal History of The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, June 21, 1847, 49, Church History Library Holman azalaki kapiteni na Charles C. Rich Company na mbula 1847.