Likita Linene
Bolingo ya Bonzambe kati ya Mwango ya Tata.
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Bolingo ya Bonzambe kati ya Mwango ya Tata.

Ntina ya malongi mpe mibeko toteyaka kati na Eklezia oyo ezali ya kolengela bana ya Nzambe mpo na lobiko mpe bonetoli na ndelo na yango ya likolo koleka nyonso.

Mwango ya nsango malamu elakisi bolingo ya Tata na Lola mpo na bana na Ye nyonso. Mpo na kososola yango, tosengeli koluka kososola mwango na Ye mpe mitindo na Ye. Alingi bana na Ye mingi mpenza ete apesaki Mwana na Ye Mobotami se Moko, Yesu Klisto, mpo na kozala Mobikisi mpe Mosikoli na biso, mpo na konyokwama mpe kokufa mpo na biso. Na Eklezia ezongisama ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tozali na bososoli se moko ya mwango ya Tata na biso ya Lola. Oyo epesaka biso nzela ekesena ya komonela ntina ya bomoi ya kufa, bosambisi ya bonzambe oyo elandaka yango, mpe lobi ya nkembo ya nsuka ya bana ya Nzambe nyonso.

Nalingi bino, bandeko na ngai. Nalingaka bana ya Nzambe nyonso. Ntango batunaki Yesu, “Mobeko nini ejali eleki monene kati na Mibeko yonso?” Ateyaki ete kolinga Nzambe mpe baninga na biso ezali Mibeko minene ya Nzambe ya yambo.1 Mibeko wana ezali ya yambo mpo ete ebengisaka biso tokola na molimo na kolukaka komekola bolingo ya Nzambe mpo na biso. Nalingi biso banso tozala na bososoli malamu ya malongi mpe politiki ya kolinga oyo Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, atiaki na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Maye nazali koloba awa ezali koluka kolakisa polele lolenge nini bolingo ya Nzambe elimbolaka malongi mpe mibeko ya kosala miye efulama na molimo ya malongi mpe Eklezia wana.

I.

Bozangi bososoli lokola momesano ya bosambisi oyo elandaka bomoi ya kufa nsuka nsuka ezali ete bato ya malamu bakendaka na esika babengi lola mpe bato ya mabe bakendaka na esika ya seko babengi lifelo. Likanisi ya lokuta oyo ya bobele bisika tokendaka ya nsuka mibale elingi koloba ete baoyo bakoki kobomba mitindo nyonso te esengeli mpo na lola basengeli libela kokende na lifelo.

Tata ya bolingo na Lola azali na mwango mpo na bana na Ye. Malongi emonisami ya Eklezia ya Yesu Klisto ezongisama eteyi ete bana ya Nzambe banso—longola se bato moke mpenza ya kotala awa—bakomimona nsuka nsuka na bonkonzi ya nkembo.2 “Na ndako ya Tata na ngai bifandelo ezali mingi,”3 Yesu ateyaki. Uta na emoniseli ya sika toyebi ete bifandelo wana ezali kati na bikonzi ya nkembo bikeseni misato. Na Bosambisi ya Nsuka moko na moko na biso akosambisama engebene na misala mpe bamposa ya mitema na biso.”4 Liboso na wana, tokosengela koyoka mpasi mpo na masumu na biso maye eyambolami te. Makomi ezali polele na likambo wana.5 Nsima, Mosambisi na biso ya sembo akopesa biso efandelo na moko ya babokonzi wana ya nkembo. Bongo, lokola toyebi uta na emoniseli ya sika, banso “ bakosambisama … , mpe moto nyonso akozwa engebene na misala na ye moko, mpifo na ye moko, kati na bifandelo oyo elengelami.”6

Nkolo aponi komonisa na kokokanisa moke mpo na oyo etali mibale ya babokonzi ya nkembo oyo. Na bokeseni, Nkolo amonisi mingi oyo etali bokonzi ya nkembo ya likolo mpenza, oyo biblia elimboli lokola “nkembo ya moi.”7

Na nkembo ya “selesitiale”8 ezali na balola misato to bandelo.9 Na likolo mpenza ya nyonso ezali bonetwami kati na bokonzi ya selesitiale, epayi wapi tokoki kokoma lokola Tata na biso mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto. Mpo na kosalisa biso tokolisa bizalela ya bozambe mpe mbongwana na lolenge oyo elengelami mpo na kokokisa nsuka na biso ya bonzambe, Nkolo amonisi malongi mpe atie mitindo engebene na mobeko ya seko. Oyo ezali maye toteyaka kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpo ete ntina ya malongi mpe politiki ya Eklezia ezongisama oyo ezali kolengela bana ya Nzambe mpo na lobiko kati na nkembo ya selesitiale mpe, mingi mingi koleka, mpo na bonetolami na lola ya likolo mpenza.

Mayokani esalamaki mpe mapamboli elakamaki epayi ya bato ya bosembo kati na batempelo ya Nzambe ezali motuya. Eye elimboli ntina tozali kotonga batempelo na mokili mobimba. Basusu bakamwaka nsete oyo, basosolaka te ete mayokani mpe makuli ya tempelo ekambaka biso na kokokisaka bonetwami Oyo ekoki kaka kososolama engebene na bosolo emonisama ya balola misato ya nkembo. Mpo na ntina ya bolingo monene ya Tata na biso ya Lola mpo na bana na Ye, Apesi babokonzi mosusu ya nkembo; nyonso oyo ezali kafukafu mingi koleka oyo tokoki kososola.10

Bomikabi ya Yesu Klisto esali ete nyonso ekoka kosalema. Amonisi ete Ye “akembelaka Tata, mpe asikolaka misala nyonso ya maboko na ye,”11 Bosikoli wana epesami na bokonzi ya nkembo ekeseni. Toyebi uta na emoniseli ya sika ete “babokonzi nyonso epesama mobeko.”12 Na ndimbola:

“Ye oyo akoki te kondima mobeko ya bokonzi ya selesitiale akoki te kolinga kondima nkembo ya selesitiale.

“Mpe ye oyo akoki te kondima mobeko ya bokonzi ya teresitiale akoki te kolinga kondima nkembo ya teresitiale.

“Mpe oyo akoki kolanda mobeko ya bokonzi ya telesitiale te akoki kolanda nkembo ya telesitiale te.”13

Na maloba mosusu, bokonzi ya nkembo tozwaka na Bosambisi ya Nsuka ewuti na mibeko oyo toponaki kotikala na mwango ya bolingo ya Tata na biso na Lola. Na nse ya mwango wana ezali na babokonzi beboo mpo ete bana na Ye banso bakoka kopesama bokonzi moko epai wapi bakoki “kolinga kondima.”

II.

Mateya mpe politiki ya Eklezia ezongisama ya Nkolo esaleka babosolo ya seko oyo na lolenge moko ekoki kososolama mobimba bobele engebene ya mwango ya bolingo ya Tata na biso na Lola mpo na banso ya bana na Ye.

Bongo, totosaka likoki mpo na kosala ya moto na moto. Mingi bayebi babokasi monene ya Eklezia oyo mpo na kotombola bonsomi ya eyamba. Babokasi oyo esungaka mwango ya Tata na biso na Lola: Tolukaka kosalisa banso ya bana na Ye—kaka bandimi na biso moko te—basepela na bonsomi ya kopona ya motuya.

Mpela moko, ntango mosusu batunaka biso mpo na nini totindaka bamisionele na bikolo mingi mpenza, kutu kati ya bato Baklisto. Batunaka biso lisusu mpo na nini topesaka lisungi mpo na bato monene mpenza na bato oyo bazali bandimi ya Eklezia na biso te kozangaka kokangisa yango na babokasi na biso ya kimisionele. Tosalaka yango mpo ete Nkolo ateyi biso tolinga banso ya bana na Ye lokola bandeko, mpe tolingi kokabola bofuluki na biso ya molimo mpe ya ntango elongo na moto nyonso.

Malongi ya seko epesaka lisusu emoneli ya bokeseni likolo ya bana. Na nzela ya emoneli oyo tomonaka bomemi mpe boleisi ya bana lokola eteni ya mwango ya bonzambe. Ezali mokumba moko ya esengo mpe ya bule ya baye bapesami nguya ya kozala kati na yango. Yango wana, batindaka biso toteya mpe tobatela mibeko mpe misala oyo epesaka bizalela malamu mpenza mpo na bokoli mpe esengo ya bana na nse ya mwango ya Nzambe.

III.

Na nsuka, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka eyebani malamu lokola Eklezia etiaka libota na katikati. Kasi oyo esosolami malamu te ezali solo ete botiei libota na katikati esuki te na mikangano ya kufa. Mikangano ya seko ezali lisusu motuya na bonzambe na biso. Etinda ya Eklezia ezongisama ezali kosalisa bana ya Nzambe balongisama mpo na nini Nzambe alingi lokola nsuka na bango ya seko. Na bosikoli epesami na nzela ya Bomikabi ya Klisto, banso bakoki kozwa bomoi ya seko (bonetoli na bokonzi ya selesitiale), oyo Mama Eva asakolaki“Nzambe apesaka na bato banso ya botosi.”14 Oyo ezali mngi koleka lobiko. Mokambi Russell M. Nelson akundolisi biso ete, “Na mwango ya seko ya Nzambe, lobiko ezali likambo ya moto na moto, [kasi] bonetoli ezali likambo ya libota.”15

Ya Motuya mpo na biso ezali emoniseli ya Nzambe ete bonetwami ekoki bobele kozwama na nzela ya bosembo na mayokani ya libala moko ya seko katikati ya mobali mpe mwasi.16 Malongi ya bonzambe ezali ntina toteyaka ete “kibomwasi to kimobali ezali elembo monene ya ezaleli mpe ntina ya moto yambo ya boyei na nse, na kufa, mpe na seko.”17

Wana ezali lisusu ntina Nkolo asengi Eklezia ezongisama mpo na kotelemela nguya ya bato ya kolongwa uta na malongi na Ye ya libala katikati ya mobali mpe mwasi, mpe kotelemela mbongwana oyo ezali kobuliningisa to kobebisa kibomwasi to kimobali to kozangisa babokeseni katikati ya mibali mpe basi.

Makanisi ya Eklezia ezongisama na mateya ya motuya oyo mbala na mbala ebotaka botelemeli. Tososolaka ete. Tata na biso na Lola, apesi nzela mpo na “botelemeli na makambo manso,”18 mpe botelemeli makasi mpenza ya Satana ezali mpo na nini kani ezali ya motuya mpenza mpo na mwango wana. Nsuka nsuka, alukaka kotelemela bokoli na bonetwami na kobuliningisaka kobebisaka libala, mpe kolembisa mosala ya kobota bana; to kobulunganisa kimwasi to kimobali. Nzokande, toyebi ete nsima ya ngonga molai ntina mpe mwango ya bonzambe ya Tata na biso na Lola ya bolingo ekobongwama te. Makambo matali moto ye moko makoki kobongwna, mpe mwango ya Nzambe epesi elikya ete na mikolo liboso, bayebene oyo bazali kobatela mayokani na bango, bakozwa libaku ya kolongisama mpo na lipamboli nyonos balakelamaki.19

Liteya ya motuya se moko ya kosalisa biso tomilengela mpo na bomoi ya seko, “likabo ya monene koleka makabo nyonso ya Nzambe,”20 ezali esakola ya 1995 na ntina ya libota.18 Masakoli na yango ezali, solo, ya kokesena uta na mibeko ya sikawa, misala, mpe makanisi ya bato mingi mosusu ya mikolo oyo, ndakisa makango mpe libala na moto ya lolenge moko. Baoyo bazali kososola na mobimba te mwango ya bolingo ya Tata mpo na bana na Ye mpe malongi ya bonetwami bakoki kokanisa ete esakola mpo na libota oyo mingi lokola liloba ya mibeko ya mosala oyo esengeli kobongolama. Na bokeseni, tondimi ete esakola na libota, efandisami likolo ya malongi ekoki kobongwana te, elimboli lolenge ya mikangano ya libota epayi wapi eteni ya motuya mpenza ya bokoli na biso ya seko ekoki kosalema.

Wana ezali engebene mpo na malongi mpe bapolitiki se moko ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezongisama.

IV.

Na mikangano mpe mabaku mingi na bomoi ya kufa, moko na moko na biso tosengeli kofanda elongo na bokeseni. Lokola bayekoli ya Klisto oyo tosengeli kolinga baninga na biso bato, tosengeli kozala na kimia elongo na baoyo bazali kondimela lokola biso te. Tozali banso bana ya Tata na Lola ya bolingo. Mpo na banso na biso, Asali bomoyi nsima ya liwa, mpe nsukansuka, bokonzi ya nkembo. Nzambe alingi banso na biso tobunda mpo na mapamboli oyo ekoki kozwama ya likolo mpenza na kobatelaka mitindo, mayokani, mpe makuli na Ye ya likolo mpenza, manso na yango esukaka kati na batempelo na Ye esantu oyo ezali kotongama na mokili mobimba. Tosengeli koluka kokabola babosolo oyo ya boseko elongo na basusu. Kasi na bolingo oyo topesaka na bazalani na biso banso, tondimaka ntango nyonso mikano na bango. Lokola profeta ya Buku ya Mormon ateyaki, tosengeli kokende liboso, kozalaka na “bolingo ya Nzambe mpe ya bato banso”.”22

Lokola Mokambi Russell M. Nelson asakolaki na likita na biso eleki: “Ezali na ngonga moko te na lisitwale ya mokili oyo boyebi ya Mobikisi na biso ezali na motuya mpe ntina mingi na moto mingi epayi ya milimo ya bato nyonso. … Malongi ya petwa ezali na nguya. Ebongoloaka bomoi ya moto nyonso oyo asosolaka yango mpe alukaka kosalela yango na bomoi na ye.23

Tika ete tokoka banso kosalela malongi ya bule kati na bomoi na biso moko.Nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.