Likita Linene
Koteya Bomikoki to Autonomie epayi ya Bana mpe Bilenge
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Koteya Bomikoki to Autonomie epayi ya Bana mpe Bilenge

Tika tolanda Mobikisi Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye na kokomaka ya komikoka na bomoi na biso mobimba, mpe koteyaka yango epayi ya bana mpe bilenge na biso.

Nakolobela eye etali bomikoki mpe lolenge nini ekoki koteyama epayi na bana mpe bilenge. Bomikoki to autonomie ekoki komonana lokola kozalaka likambo mpo na mikolo. Nayei koyebiaete mikolo bakoki malamu kozala na nzela ya bomikoki to autonomie ntango bateyami nsango malamu ya Yesu Klisto mpe basaleli malongi mpe mibeko na yango uta bomwana mpe lokola bilenge kati na libota.

Ndakisa malamu na yango mpenza ezali ndakisa monene ya bomoi ya solo. Wilfried Vanie, bandeko na ye nsambo, mpe mama na ye bakotaki na Eklezia na Abidjan, Cote d ivoire, ntango azalaki na mibu motoba. Abatisamaki ntango azalaki na mibu mwambe. Tata na ye, moleisi libota ya liboso, akufaki ntango Wilfried azalaki na mibu zomi na moko.

Atako bayokisamaki mawa na ezalela ya libota, Wilfried akanaki kokoba kokende kelasi na bolendisi ya mama na ye mpe lisungi ya Eklezia. Asilisaki kelasi ya likolo mpe asalaki misio ya ntango mobimba na Misio ya Ghana Cape Coast, epayi wapi ayekolaki Angele. Nsima ya misio na ye, akendaki na univesite mpe azwaki dipolome na mambi ya botangi mosolo mpe boyangeli mbongo. Atako ezalaki mpasi mpo na kozwa mosala na mambi oyo, azwaki mosala na kompani ya mibembo mpe ya koyamba bato.

Abandaki lokola mosali na hotele ya minzoto 5, kasi bolingo na ye mpo na kokoma mosali ya malamu koleka etindikaki ye ayekola mingi kino akomaki moyambi bato kolobaka nkota mibale kuna. Ntango bafungolaki hotele ya sika, azwamaki na mosala lokola mososoli mosala ya butu. Nsima, amikomisaki na BYU–Pathway Connect Worldwide mpe azali sikawa koyekola mateya moko mpo na kozwa dipolome ya likolo na Tourisme mpe Baotele. Mposa na ye ezali ya kokoma mokolo moko direkteli ya otele ya monene ya nsuka. Wilfried akoki koleisa moninga na ye ya seko mpe bana na ye mibale, lokola mpe kosalisa mama na ye mpe bandeko na ye. Sikawa azali na libiangi na Eklezia lokola moko ya banganganzambe monene ya etuka.

Bomikoki elimbolami lokola “makoki, mokano, mpe bokasi ya kopesa bolamu ya molimo mpe ya nzoto ya bomoi ya moto ye moko mpe ya libota.”1 Kobunda mpo na kokoma moto oyo amikoki ezali eteni ya mosala na biso na nzela ya mayokani oyo ekokamba biso kozonga na Tata na Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto. Ekolendisa bondimi na biso kati na Yesu Klisto mpe kokangisa biso na Ye na nzela ya mayokani mpe makuli ya libiki mpe bonetoli. Bomikoki to autonomie ezali malongi ya nsango malamu ya Yesu Klisto kasi ezali pologalami te. Ezali mosala oyo ewumelaka bomoi mobimba, kasi likambo ya mokolo moko te.

Tokomaka ya komikoka to autonome na bomoi na biso mobimba na kokolaka na bokasi ya molimo, bokolongonu ya nzoto, , kolandaka boyekoli mpe mosala na biso, mpe kozalaka ya komilengela na ntango.2 Mosala oyo esilaka na ntango ya bomoi na biso? Te, ezali bolengeli ya koyekola ya bomoi mobimba, bokoli, mpe mosala. Yango esukaka mokolo moko te; yango ezali mosala oyo ekobaka, mosala ya mokolo na mokolo.

Lolenge nini ekoki biso koteya malongi mpe mibeko ya bomikoki to autonomie epayi ya bana mpe bilenge? Nzela moko ya motuya ezali kosalelaka mokolo na mokolo kati na mabota na biso Pologalami ya bokoli ya Bana mpe Bilenge. Baboti mpe bandeko bayekolaka nsango malamu ya Yesu Klisto, basalaka elongo na mosala mpe milulu, mpe basalaka elongo na mambi minei ya bokoli ya moto se moko oyo ezali ya moko mpo na mwana moko na moko. Ezali lisusu pologalami moko wana ya eteyelo ya bana te.

Na Buku ya Bokambi ya Bana elobi, “Ntango Yesu azalaki na mibu na bino, Ayekolaki mpe akolaki. Bozali koyekola mpe kokola lokola. Makomi elobi: ‘Yesu akolaki na bwania mpe nzoto, mpe na kondimama na Nzambe mpe moto’ (Luka 2:52).”3 Makomi oyo elobeli bokoli mpe boyekoli na lolenge ya molimo, kondimana na moto; lolenge ya mosuni, nzoto; mpe lolenge ya mayele, bwania. Biteni ya bokoli oyo ezali mpo na biso banso kotalaka mobu na biso te. Ntango nini tokoteya bango? Na Dutelonome 6:6–7 totangi:

“Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo:

“Mpe okolakisa yango na etingia na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango, wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotelema yo.”

Toteyaka bana makambo oyo na nzela ya ndakisa malamu, kosalaka mpe kosalelaka Nzambe elongo na bango, koyekolaka makomi, mpe kolandaka mateya ya Yesu Klisto lokola eteyami na baprofeta.

Natangaki yango ete na pologalami ya Bana mpe Bilenge, bana baponaka bantina ekeseni na moko na moko ya mambi minei ya bokoli. Ezali motuya ete bakela bantina na bango moko na mambi moko na moko. Baboti mpe bakambi bakoki koteya, kopesa toli, mpe lisungi.

Ndakisa, nkoko na biso ya mwasi Miranda azali motomoto mpo na kokola na molimo na nzela ya kosanganaka na bakelasi ya seminele ya ntongo ntongo mpe ya mokolo na mokolo. Akomaki na esengo na koyokaka masolo malamu uta na bayekoli ya seminele mosusu kati na palwasi na ye. Mama na ye asengeli te kolamusa ye mpo na kokende kelasi. Na ye moko, alamukaka mpe akotaka na nzela ya likita ya video na ngonga esengeli ya 6:20 na ntongo mpo ete akolisaki mimesano ya malamu oyo esalisaka ye asala bongo. Baboti na ngai moko bayebisaki ngai kala te ete sikawa Miranda asololaka mingi koleka ntango akendaka kotala bango, lokola akoli na komindima. Oyo ezali mateya mpo na bomoi mpe bokoli elongo na bambano ezali komonana na miso.

Baboti, bankoko, bakambi, mpe baninga basungaka na bokoli mpe bokeyi liboso ya bana. Bandeko mibali mpe basi oyo basalisi bamipesa mobimba, elongo na bakambi ya bonganganzambe mpe bakambi mangomba ya palwasi basungaka. “Libota: Esakola na Mokili” elobi: “Na lolenge ya bozambe, batata basengeli kokamba mabota na bango na bolingo mpe na bosembo mpe bazali bayanoli ya kosunga bosenga ya bomoi mpe bobateli ya mabota na bango. Bamama bazali yambo na mokumba ya kobokola bana na bango. Na mikumba oyo esantu, batata mpe bamama basengeli kosalisana lokola baninga bakokani. … Bai libota basengeli kosunga soki esengelami.”4 Molongo ya nsuka elobeli etali bankoko, kati na basusu.

Lokola tozali kosalela Nzambe na Afrika ya Westi, mwasi na ngai Nuria asalaki mosala moko kitoko ya kosalisa mpe kotikala ya kokangana elongo na libota na biso mpe bankoko na biso ya bana na ngambo ya mbu monene. Azali kosala yango na kosalelaka tekinolozi. Azali kotangela bankokolo ya mike babuku. Azali koteya bankokolo,bana basi ya mikolo koleka mateya matali lisolo ya libota na biso, mambi ya kala ya Puerto Rico, Biteni ya Bondimi, mpe nsango malamu ya Yesu Klisto. Mikolo oyo bantaka ezali kotia ndelo te ya kosangisaka, kozalaka, kosalisaka, mpe koteyaka nkola ya kobuta ya mabota na biso. Nakotaka lisusu na kati elongo na Nuria ntango nakokaka mpo na koteya bankoko na biso ya bana ya motuya, kolinga bango, mpe kosepelisa bango mpe kosekisa bango.

Bosengeli komona bokokani efulami na molimo katikati bokoli ya Bana mpe bilenge mpe kotonga bomikoki. Biteni minei ya bokoli kati na moko na moko ezali ya kokokana mpenza. Bokasi ya Molimo kati na bomikoki ekokani na ezalela ya molimo kati na Bana mpe Bilenge. Bokonongonu ya Nzoto mpe ya mayoki ya motema na bomikabi esanganaka elongo na bizalela ya nzoto mpe bato banso kati na Bana mpe Bilenge. Koyekolai, kosala, mpe komilengela ya ntango kati na bomikoki ekokani na ezalela ya mayele kati na pologalame ya bokoli ya Bana mpe Bilenge.

Mpo na kosukisa, tika tolanda Mobikisi Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye na kokomaka ya komikoka na bomoi na biso mobimba, mpe koteyaka yango epayi ya bana mpe bilenge na biso. Tokoki kosala oyo malamu koleka na:

  1. Kozalaka bandakisa malamu ya kosalisa basusu.

  2. Kosalelaka mpe koteyaka malongi mpe mibeko ya bomikoki, mpe

  3. kotosaka mitindo ya kotonga bomikoki lokola eteni ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Malongi mpe Mayokani 104:15–16 elobi:

“Ezali ntina na ngai ya kopesaka makoki mpo na basantu na ngai, mpo biloko nyonso ezali ya ngai.

“Kasi esengeli esalema na lolenge na ngai moko; mpe tala oyo ezali lolenge oyo ngai Nkolo, nasili kokata mpo na makoki ya basantu na ngai, ete babola batombuama, na ete bato na bozwi bakitisama.”

Oyo ezali Eklezia ya Yesu Klisto. Nsango malamu na ye epambolaka mabota awa na mabele mpe na boseko mobimba. Yango ekambaka biso na bomoi na biso ntango tozali koluka kokoma mabota ya seko. Nayebi oyo ezali ya solo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 22.0, ChurchofJesusChrist.org.

  2. Tala General Handbook, 22.1.

  3. Personal Development: Children’s Guidebook (2019], 4.

  4. The Family: A Proclamation to the WOrldChurchofJesusChrist.org.