Likita Linene
Mokangano na Biso na Nzambe
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Mokangano na Biso na Nzambe

Ezala nini tokokutana na yango na bomoi oyo ya kufa ekoki komema, tokoki kotiela Nzambe motema mpe kozwa esengo kati na Ye.

Lokola Yobo na Kondimana na Kala, na ntango ya mpasi basusu bakoki kokanisa ete Nzambe asundoli bango. Mpo toyebi ete Nzambe azali na nguya ya kopekisa to kolongola mpasi nyonso, tokoki komekama na kolelalela soki Asali yango te, ntango mosusu komituna, “Soki Nzambe apesi te lisungi mpo na oyo nazali kosambelela, ndenge nini nakoki kozala na bondimi kati na Ye?” Na ntango moko ya mikakatano na ye ya makasi, Yobo moto ya sembo alobaki:

“Bongo nayebi ete Nzambe asali ngai mabe mpe ajingeli ngai na monyama na ye.

“Atako nagangi, ‘Basalaki ngai mabe!’ Nazwi eyano te; atako nasengi lisungi, boyengebene ezali te.”1

Na eyano na Ye na Yobo, Nzambe atuni, “Yo okosambisa ngai mpo ete okoki kozala sembo?”2 To na maloba mosusu, “Kutu okoloba ete nasali mabe? Yo okotiola kosambisa na ngai, okokitisa ngai ete yo moko olongi?”3 Yehowa na makasi mpenza akundolisi Yobo nguya mpe boyebi na Ye, mpe Yobo na bomikitisi mpenza andimi azali na eloko te kutu pene ya boyebi, nguya, mpe boyengebene ya Nzambe mpe akoki te kosambisama na Nzambe ya Nguya Nyonso:

“Nayebi ete yo okoki kosala nionso,” elobaki ye, “ mpe ete mokano moko na yo ekopekisama te.

“… Nabimisi makambo mayebi ngai na ntina te, makambo maleki ngai na kokamwa, nayebaki yango te. …

“Yango wana, namitioli, mpe nabongoli motema na mputulu mpe na mputulu na moto.”4

Na nsuka, Yobo azalaki na libaku malamu ya komona Nkolo, mpe “Nkolo apambolaki mikolo na nsuka na Yobo koleka yango na ebandeli na ye.”5

Solo, ezali liboma mpo na biso na bososoli na biso ya mukuse nakokanisa kosambisa Nzambe, kokanisa, na ndakisa, “Nazali na esengo te, bongo Nzambe azali kosala eloko moko ya mabe.” Na biso, bana na Ye ya kufa na mokili ya mpasi, biso baoyo toyebi moke etali lobi eleka, lelo, mpe lobi ekoya, Asakoli, “Biloko nyonso sikawa ezali na ngai, mpo Nayebi yango nyonso.”6 Yakobo na bwanya mpenza akebisi:“Lukani te kopesa toli na Nkolo, kasi kozwa toli uta o loboko la ye. Mpo tala, binomei boyebi ete akopesa toli na bwanya, mpe na boyengebene, mpe na ngolu enene, likolo lya misala mya ye minso”7

Bato mosusu basosolaka mabe bilaka ya Nzambe mpo na kolimbola ete botosi epai na Ye ebotaka matomba ya ndenge na ntango ya ndenge. Bakoki kokanisa, “Soki nasali misio ya ntango mobimba na etingya, Nzambe akopambola ngai na libala ya esengo mpe bana” to “Soki naboyi kosala masengami ya kelasi na Saba, Nzambe akopambola ngai na bilembo ya malamu,” to “Soki nafuti moko na zomi, Nzambe akopambola ngai na mosala wana nazalaki kolinga.” Soki bomoi etamboli te na bosikisiki lolenge oyo to engebene na manaka tokanaki, bakoki kokanisa bakosami na Nzambe. Kasi makambo ekosalema te na lolenge moko ya mbalakaka na libongisi ya Nzambe. Tosengeli te kokanisa mwango ya Nzambe lokola masini ya koteka ya sabuni epai wapi biso (1) toponaka lipamboli tozali na yango mposa, (2) tokotisaka mosolo esengeli ya misala malamu, mpe (3) eloko tosengaka epesamaka na mbala moko.8

Ya solo Nzambe atosaka mayokani mpe bilaka na Ye epai ya moko na moko na biso. Tosengeli komitungisa te na ntina na yango9 Nguya ya bomikabi ya Yesu Klisto—oyo akitaki na nse ya biloko nyonso mpe nsima amataki likolo10 mpe oyo azali na bokonzi nyonso na likolo mpe na nse11—andimisi ete Nzambe akoki mpe akokokisa bilaka na Ye. Ezali likambo ya motuya monene ete tokumisa mpe totosa mibeko na Ye, kasi lipamboli nyonso esakolami na botosi mobeko12 ebongisami na nzoto, eyemami, mpe ebongisami na ntango engebene na elikya na biso. Tosalaka nyonso tokoki mpenza kasi tosengeli kotikela Ye botambwisi ya mapamboli, nyonso mibale ya nzoto mpe ya molimo.

Mokambi Brigham Young alimbolaki ete bondimi na ye etongamaki te likolo ya mbano to lipamboli songolo kasi likolo ya litatoli na ye mpe mokangano na ye na Yesu Klisto. Ye alobaki: “Bondimi na ngai etiami te likolo ya mosala ya Nzambe na binsanga ya mbu, likolo ya ye komema bato awa, … mpe te likolo ya libaku malamu apesi bato oyo to bato baoyo kuna, mpe te likolo ya ezala topambolami to topambolami te, kasi bondimi na ngai etiami likolo ya Nkolo Yesu Klisto, mpe boyebi nazwi uta na ye.”13

Boyamboli mpe botosi na biso, masalisi na biso mpe kobonzama na biso yango nde esalaka eloko. Tolingi kozala kati na baoyo balimbolami na Etele lokola “ntango nyonso kokoba na misala malamu.”14 Kasi kokoba na misala malamu ezali mingi te mpo ete lapolo moko ebombami kati na babuku ya likolo ya masolo. Biloko oyo ezali ntina mpo ete ekotisi biso na mosala na Nzambe mpe ezali bisaleli na nzela na yango toyokani na Ye na mbongwana na bisomei uta na moto ya mokili mpo na mosantu.15 Oyo Tata na biso ya lola apesi biso ezali Yemei mpe Mwana na Ye, mokangano ya penepene mpe ya seko elongo na Bango na nzela ya ngolu mpe boyokanisi ya Yesu Klisto, Mosikoli na biso.

Tozali bana ya Nzambe, totiami pembeni mpo na bozangi kufa mpe bomoi ya seko. Nsuka na biso ezali kozala basangoli na libula na Ye, “basangoli basangana elongo na Klisto.”16 Tata na biso alingi kokamba moko na moko na biso na nzela na Ye ya mayokani elongo na matambe ebongisami na mposa na biso ya moto mpe eyokani na mwango na Ye mpo na esengo na biso ya koleka elongo na Ye. Tokoki kokanisa liboso elikya mpe bondimi ekola kati na Tata mpe Mwana, lolenge ebakisami ya bolingo na Bango, mpe bobondisi mpe bokambami ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu.

Atako bongo, nzela oyo ekoki kozali pete te mpo na moko kati na biso. Esengeli bopetolami ebele mpo na kokomisa yango pete. Yesu alobaki:

“Nga najali mowiti na solo mpe Tata na ngai ajali mobongisi.

“Etape na etape kati na ngai oyo ekobotaka mbuma te [Tata],akolongolaka yango; mpe etape na etape oyo ekobotaka mbuma, akopetola yango ete ebota mbuma mosusu.”17

Lolenge Nzambe azali kokamba kolongola mbindo mpe kopetola ekozala, soki esengeli, makasi mpe kosenga bambongwana ya mbalakaka. Komikundolaka liloba ya Paulo, tozali “basangoli basangani elongo na Klisto; soko tokoyokaka mpasi na ye elongoete tojua nkembo esika moko na ye.”18

Bongo, na kati ya moto oyo ya mopetoli-na-ebende, na esika ya kosilika na Nzambe, pusana pembeni na Nzambe. Belela Tata na nkombo ya Mwana. Tombola elongo na bango na Molimo, mokolo na mokolo. Pesa bango nzela wana ezali ntango koleka mpo na komonisa bosembo na Bango epai na yo. Yaka solo koyeba Bango mpe solo koyeba yomei.19 Tika Nzambe alonga.20 Mobikisi andimisi biso:

“Boyoka ye oyo azali molobeli epai ya Tata, oyo azali kolobela likambo na bino liboso na Ye—

“Kolobaka: Tata, tala mpasi mpe liwa na ye oyo asalaki lisumu te, na oyo osepelaki mpenza; tala makila ya Mwana na yo oyo esopanaki, makila na ye oyo opesaki ete yomei okoka kokumbamelama;

Yango wana, Tata, limbisa bandeko na ngai ya mibali [mpe ya basi] baoyo bandimi na nkombo na ngai, ete bakoka koya epai na ngai mpe kozwa bomoi ya libela.”21

Tala mwa bandakisa moke ya mibali mpe basi ya sembo oyo batielaki Nzambe motema, kozalaka na elikya ete mapamboli Alakaki ekozala likolo na bango na bomoi to na liwa. Bondimi na bango ezalaki te likolo ya nini Nzambe asalaki to asalaki te na libaku to eleko ya ntango songolo kasi na koyebaka Ye lokola Tata na bango oyo asalaka manso na bolingi mpe Yesu Klisto lokola Mosikoli na bango ya sembo.

Ntango Abalayama azalaki pene ya kopesama mbeka na Nganga-nzambe ya Ejipito ya Elkanah, abelelaki Nzambe ete abikisa ye, mpe Asalaki yango.22 Abalayama abikaki mpo na kokoma tata ya bato na sembo baye kani balonaki nkona ya mokili mobimba esengelaki kopambolama.23 Nzokande liboso, likolo ya etumbelo se moko oyo, nganga-nzambe se moko wana abonzaka baseka basato “baoyo mpo na bolamu na bango … balingaki te kongumba mitu mpo na kokumbamela banzambe ya nzete to ya mabanga.”24 Bakufaki kuna lokola bamartiru.

Yosefe na ntango ya kala, atekamaki lokola elenge na bowumbo na bandeko na ye moko ya mibali, na bolozi na ye abalukaki epai Nzambe. Moke moke, amataki na ebonga ya likolo na na ndako ya bakonzi na ye na Ejipito mpe nsima amonaki kokitisama ya lokumu oyo likolo ya bofundi ya lokuta ya mwasi ya Potifala. Yosefe akokaki kokanisa, “Boye boloko ezali yango nazwi mpo na kobateleka mobeko ya bopeto.” Na esika ya bongo akobaki kobaluka epai ya Nzambe mpe azwaki lokumu ata na boloko. Yosefe amonaki pasi lisusu na bososoi makasi ntangomoto ya boloko oyo akomisaki moninga, atako elaka ya kosalisa Yosefe, abosanaki manso mpo na ye nsima ya kozongisamana ebonga na ye na ndako ya Falo. Na ntango esengeli, lokola boyebi, Nkolo akotaki mpo na kotia Yosefe na ebonga ya likolo koleka nyonso na botieli moto motema mpe nguya penepene na Falo, kopesaka Yosefe nzela ya kobikisa ndako ya Yisallaele. Solo mpenza, Yosefe akokaki kotatola “ete makambo nyonso ekosala elongo mpo na bolamu ya baoyo balingaka Nzambe.”25

Abinadi akanaki kokokisa etinda na ye ya bonzambe ata na motuya kani. “Nasilisi maloba ma ngai, elobaki ye, “mpe nde ezali likambo te [ata nini ekomeli ngai], soko ezali ete nazwi lobiko.”26 Akufaki, kasi na ntembe te abikisamaki na bokonzi na Nzambe, mpe bobongwani na ye moko ya motuya, Alma, abongolaki mambi ya kala ya Banefi kino boyei ya Klisto.

Alma mpe Amuleki babikisamaki na boloko na Amoniya na eyano na libondeli na bango, mpe banyokoli na bango bakufaki.27 Na ebandeli, nzokande, banyokoli se moko oyo babwakaki basi mpe bana bandimi na moto epalanganaki epai nyonso. Alma, kozalaka nzeneneke na likambo oyo ya nsomo asengelamaki na Molimo kosalela nguya ya Nzambe te mpo na “kobikisa bango uta na moto”28 ete bakoka koyambama epai na Nzambe na nkembo.29

Profeta Joseph Smith anyokwamaki na boloko ya Liberty, Missouri, kozangaka nguya ya kosunga Basantu ntango babesaki biloko na bango mpe babenganaki bango na bandako na bango na malili makasi na eleko ya malili. “O Nzambe, ozali wapi?” Joseph agangaki. “Ntango boni okokanga loboko na yo?”30 Lokola eyano, Nkolo alakaki: “Mpasi na yo mpe mitungisi na yo ekozala kasi ya ngonga moke; mpe nsima soki oyiki mpiko na yango malamu, Nzambe akonetola yo na likolo. … Ayebisaki Joseph azalaki naino te lokola Yobo.”31

Na nsuka, Joseph akokaki kosakola elongo na Yobo, “Atako, [Nzambe] akoboma ngai, najali kaka na elikya na Ye.”32

Mpaka Brook P. Hales abetaki lisolo ya Ndeko mwasi Patricia Parkinson oyo abotamaki na miso malamu kasi na mibu 11 akufaki miso.

Mpaka Hales abetaki lisolo: “Nayebaki Pat bambula ebele mpe kala mingi te nayebisaki ye ete nasepelaka na lolenge azali ntango nyonso na elikya mpe na esengo. Ayanolaki, ‘Malamu, ozalaka na ndako te na ngai , solo? Nazali na bangonga na ngai. Nazalaki na bantango ya monyokoli makasi ya makanisi, mpe nagangaki makasi.’ Nzokande, abakisaki, ‘Uta na ntango nabandaki kobungisa bomoni na ngai, ezalaki ya kokamwa, kasi nayebaki ete Tata ya Lola mpe Mobikisi bazalaki na libota na ngai mpe ngai. … Na baoyo batunaka ngai soki nazali na nkanda mpo ete nakufa miso, nayanolaka, ‘Nakozala na nkanda na nani? Tata ya Lola azali na ngai kati na likambo oyo; Nazali ngai moko te. Azali elongo na ngai ntango nyonso.’”33

Na nsuka, ezali lipamboli ya boninga ya penepene mpe ewumelaka na Tata mpe Mwana oyo tolukaka. Esali nyonso bokeseni mpe ezali motuya mpo ya libela. Tokotatola elongo na Paulo “ete mpasi ya ntango oyo ya [kufa] ezali na motuya te ya kokokanisa na nkembo elingi komonana kati na biso.”36 Natatoli ete esala eloko te oyo boyebi na biso ya kufa ekoki komema, tokoki kolikya na Nzambe mpe kozwa esengo kati na Ye.

“Likia na Nkolo na motema na yo mobimba; mpe koyekama te na bososoli na yo moko.

“Ndima ye na banzela na yo nyonso, mpe akokamba banzela na yo.”35

Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.