Likita Linene
Video: “Bozali Basi Ye Amonaki na Mosika”
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Video: “Bozali Basi Ye Amonaki na Mosika”

Na 1979, Mokambi Spencer W. Kimball azalaki kati na lopitalo mpe asengaki mwasi na ye, Camilla, kotanga lisukulu na ye na likita linene ya basi.

Ndeko Mwasi Camilla Kimball: “Mingi ya bokoli minene oyo ezali koya na Eklezia na mikolo mya nsuka ekoya mingi na nzela ya basi ya malamu ya mokili (baoyo kati na bango ezali mingi mingi na bomoto ya kati ya molimo) bakobendana na Eklezia na mitango monene. Yango ekokoma na lolenge ete basi ya Eklezia balakisi bosembo mpe bompenza na bomoi na bango mpe na lolenge ete basi ya Eklezia bamonani ya ndenge mususu mpe ya kokesena—na bandenge ya esengo—na basi ya mokili.”1

Mokambi Russell M. Nelson: “Bandeko na ngai ya basi, bino baoyo bozali basali elongo na biso ya ntina na makambo oyo ya nsuka, mokolo oyo Mokambi Kimball amonaki liboso ezali lelo. Bozali basi amonaki! Bomoi na bino ya bolamu, pole bolingo, boyebi, bompikiliki, lolenge, bondimi, mpe bomoi ya bosembo ekobenda basi malamu ya mokili, elongo na mabota na bango, na Eklezia na motango emonana naino te!

Tozali …na mposa ya bokasi na bino, mbongwana na bino, bondimami na bino, makoki na bino mpo na kokamba, bwanya na bino, mpe mingongo na bino. Bokonzi ya Nzambe ezali te mpe ekoki kozala ya mobimba te soki ezangi basi oyo basala mayokani ya bule, mpe babateli yango, basi oyo bakoki koloba na nguya mpe bokonzi ya Nzambe! …

“… kotala te libiangi na bino, kotala te mikakatano na bino, tozali na mposa ya mayoki na bino, makanisi na bino, mpe bofuli na bino. Tozali na mposa ete bozwa liloba mpe boloba na masanga na palwasi mpe etuka. Tozali na mposa ete ndeko mwasi oyo nyonso abala aloba lokola ‘moninga moko ya kosala na ye elongo mpe ya mobimba ntango ozali kosangana elongo na mobali na yo mpo na koyangela libota na yo. Obali to te, bino bandeko basi bozali na makoki ekeseni mpe mayele ya kafukafu oyo bozwi lokola makabo ya Nzambe. Biso bandeko mibali tokoki te kobandela nguya se moko ya bino.

“Toyebi ete mosala ya nsuka ya bokeli mobimba ezalaki bokeli ya mwasi! Tozali na mposa ya bokasi na bino!” …

“… Natondi bino botondi, bandeko na ngai ya basi ya bolingo, mpe napamboli bino mpo na kolamuka na lolenge na bino mobimba, mpo na kokokisa ndelo ya bokeli na bino, ntango tokotambola loboko na loboko na mosala oyo ya bule. Elongo tokosalisa mokili komilengela mpo na Boyei ya Mibale ya Nkolo.”2

Matangi

  1. Teachings of Presidents of the Church: Spencer W. Kimball (2006), 222–23.

  2. Russell M. Nelson, “A Plea to My Sisters,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2015, 96, 97.