Likita Linene
Klisto Abikisaka Oyo Ezali ya Kobukana
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Klisto Akangolaka Oyo Ezali ya Kobukana

Ye akoki kozongisa mikangano oyo ebukana na Nzambe, boninga ebukana na basusu, mpe biteni ebukana ya bisomei etali nzoto mpe ezalela.

Mwa mibu eleki, na bosangani ya libota, mwana ya ndeko na ngai ya mobali ya mibu mwambe William asengaki mwana na biso ya mokolo, Briton, soki akokaki kobeta ndembo na ye. Briton na esengo ayanolaki, “Iyo! Nasepeli na yango!” Ntango babandaki kobeta mwa ntango moke, ndembo ekendaki mosika ya Briton, mpe ebukaki moko ya nkopo ya ntoki ya kala ya bankoko.

Briton ayokaki somo. Bongo agunzamaki mpe abandaki kolokota malembe malembe bandambo oyo ebukanaki, William akendaki pene ya ndeko na ye mpe abetaki ye na malembe na mokongo. Nsima alendisaki ye, “Komitungisa te, Briton. Nabuka mbala moko eleko ya ndako ya Nkoko ya mwasi mpe Nkoko ya mobali, mpe Nkoko ya mwasi asimbaki ngai mpe alobaki, ‘Eza Malamu, William, ozali bobele na mibu mitano.’” Ozali bobele na mibu mitano.’”

Bongo Briton ayanolaki, “Kasi, William, ngai nazali na mibu 23!”

Tokoki koyekola ebele uta na makomi na lolenge Mobikisi na biso, Yesu Klisto, akosunga biso tosalela makambo na bomoi na biso maye ebukana, kotala te mibu na biso. Ye akoki kozongisa mikangano oyo ebukana na Nzambe, boninga ebukana na basusu, mpe biteni ebukana ya bisomei etali nzoto mpe ezalela.

Boninga Ebukana na Nzambe

Ntango Mobikisi azalaki koteya na tempelo, bamemaki mwasi moko epai na Ye na bakomeli mpe Bafalisai. Toyebi te lisolo na ye mobimba, toyebi kaka “asalaki ekobo.”1 Mbala mingi, makomi epesaka bobele mwa eteni ya bomoi ya moto, mpe na kotalaka mwa eteni wana, tokumisaka to totiolaka moto yango. Bomoi ya moto moko te ekoki kososolama na mwa ntango moke to bomoni kaka mabe na ye. Ntina ya masolo ya makomi oyo ezali ya kosunga biso tomona ete Yesu Klisto azalaki eyano na ntango wana, mpe Ye azali eyano sikawa. Ayebi lisolo na biso mobimba mpe oyo tozali konyokwama, mpe lisusu makoki mpe bosenga na biso.

Eyano epai ya mwana mwasi oyo ya Nzambe “Nakweisi yo te: kende, mpe kosumuka lisusu te.”2 Lolenge mosusu ya koloba “kende, mpe kosumuka lisusu te” ekoki kozala “kende liboso mpe bongwana.” Mobikisi azalaki kobengisa ye ayambola, kobongola bizaleli na ye, bosangani na baninga na ye, lolenge azalaki komiyoka, motema na ye.

Na ntina ya Klisto, mokano na biso ya “kende liboso mpe bongwana” ekoki lisusu kopesa biso ndingisa ya “kokende liboso mpe kokangola,” mpo Ye azali liziba ya bokangoli nyonso oyo ezali ya kobukana na bomoi na biso. Lokola Moyokanisi monene mpe Molobeli epai ya Tata, Klisto abonzaka mpe azongisaka mikangano ebukana—mingi mingi boninga na biso na Nzambe.

Bobongoli ya Joseph Smith elimboli yango malamu ete mwasi oyo alandaki toli ya Mobikisi mpe abongolaki bomoi na ye: “Mpe mwasi akumisaki Nzambe uta na ntango wana, mpe andimelaki nkombo na ye.”3 Ezali libaku mabe ete toyebi nkombo na ye te, to mambi mosusu na ntina ya bomoi na ye sikawa mpo ete ekoki kosenga mokano monene, komikitisa, mpe bondimi epai ya Nkolo Yesu Klisto mpo ete ayambola mpe abongwana. Oyo toyebi ezali ete azalaki mwasi oyo “andimelaki nkombo na ye” na bososoli ete azalaki libanda ya libonza na Ye ya ezanga nsuka mpe ya seko.

Mikangano Ebukana na basusu

Na Luka mokapo 15 totangaka lisese ya moto oyo azalaki na bana mibali mibale. Mwana mobali ya leki asengaki tata na ye nkita na ye, akendaki mobembo mosika ya mboka mpe abebisaki bozwi na ye na buzoba.4

“Mpe ntango asilisaki nyonso, nzala makasi eyaki na mabele wana; mpe abandaki koluka lisungi.

“Mpe akendaki epai ya moto moko ya mboka wana; mpe atindaki ye akende koleisa bangulu.

“Mpe abandaki kotondisa libumu na ye na bilei ya bangulu: mpe moto moko te apesaki ye bilei.

“Ntango amitunaki, mpe alobaki, Tata na ngai azali na basali ebele oyo bazali kolia mapa mikolo nyonso mpe bakabolaka, mpe nazali konyokwama na nzala!

“Nakolamuka mpe nakokende epai ya tata na ngai, mpe nakoloba na ye, Tata ngai nasumukaki na lola, mpe epai na yo,

“Mpe nalongobani te kobengama mwana na yo: komisa ngai moko ya basali na yo.

“Mpe alamukaki, mpe akendaki epai ya tata na ye. Kasi ntango azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye, mpe ayokaki mawa, mpe akimaki mpe ayambaki ye, mpe apesaki ye bipwepwe.”5

Likambo oyo tata akimaki epai ya mwana na ye, nandimi, ezali na ntina. Mpota oyo mwana mobali azokisaki tata na ye ezalaki mozindo mpe mozindo mpenza. Ndenge moko mpe, tata amitungisaki na ezalela ya mwana na ye.

Na yango, mpo na nini tata azelaki te ete mwana na ye asenga bolimbisi? Mpo na nini azelaki libonza ya bozongisi mpe ya boyokani te yambo alimbisa mpe alinga? Oyo ezali likambo namitunaka mbala na mbala.

Nkolo ateyaka biso ete kolimbisa basusu ezali motindo ya mokili mobimba: “ngai Nkolo, nakolimbisa moto oyo ngai nalingi, kasi bino bosengeli kolimbisa bato nyonso.”6 Kosenga bolimbisi esengaka ozala na mpiko mpe komikitisa. Ekoki lisusu kozwa ntango. Esengaka biso tozala na bondimi mpe kondimela Nkolo ntango tozali kosalela mikumba na biso ya mitema. Ntina mpe nguya ya boponi na biso efandi wana.

Na ndimbola ya tata oyo na lisese ya mwana mobali abunga, Mobikisi abetaki nsete ete kolimbisa ezali moko ya mabonza ya motuya oyo tokoki kokabola moko mpe mosusu mpe mingimingi mpo na biso moko. Kolimbisa na motema na biso ezalaka ntango nyonso pete te, kasi na nzela ya nguya ya Yesu Klisto, ezali pete.

Biteni bibukana ya biso moko.

Na Misala mokapo 3 toyekolaka na ntina ya moto moko oyo abotamaki ebosono mpe “oyo bazalaki komema mikolo nyonso na ekuke ya tempelo na nkombo ya Bonzenga, mpo na kosenga mosolo na baye bazalaki kokota na tempelo.”7

Ebosono oyo azalaki na mibu koleka 408 mpe alekisaki bomoi na ye mobimba na kozelaka mpe kosengaka, mpo akokaki kobika na nzela ya lisungi mpe boboto ya basusu.

Mokolo moko amonaki “Petelo mpe Yoane kokende na tempelo [mpe] asengaki bango mosolo.

“Petelo na Yoane batalaki ye nie, mpe Petelo alobaki na ye: tala biso

“Bongo moto oyo akufa makolo atalaki bango malamu mpenza; akanisaki ete akozwa eloko epai na bango.

“Kasi Petelo alobaki na ye, Nazali na palata te to mpe wolo te ya kopesa yo; kasi oyo nazali na yango, napesi yo yango: Na kombo ya Yesu Klisto ya Nazareti, telema mpe tambola.

“Mpe asimbaki ye na loboko ya mobali, mpe atelemisaki ye: mpe mbala moko makola na ye mpe mikuwa ya loketo na ye ezwaki makasi.

“Bongo, apumbwaki, atelemaki, mpe abandaki kotambola, bongo akotaki na bango na tempelo, kotambolaka, mpe kopumbwaka, mpe kokumisaka Nzambe.”9

Mbala mingi na bomoi na biso mobimba tokoki komimona, lokola ebosono mosengi na ekuke ya tempelo, na bompikiliki—to kozangaka bompikili—“kozela[ka] Nkolo.”10 Kozelaka mpo na bokangoli ya nzoto mpe molimo. Kozelaka biyano oyo ekokota na eteni ya bozindo ya mitema na biso. Kozelaka likamwisi.

Kozelaka Nkolo ekoki kozala esika ya bule—esika ya kopetolama mpe ya kongengisa wapi tokoki koya koyeba Mobikisi na bozindo na lolenge ya moto ye moko. Kozelaka Nkolo ekoki kozala esika tomimonaka komitunaka, “O Nzambe, Ozali wapi?”11—esika wapi molende ya molimo esengisi biso tosalela bondimi na Klisto na koponaka Ye na mokano na biso moko lisusu mpe lisusu mpe lisusu. Nayebi esika oyo, mpe nasosolaka lolenge oyo ya kozelaka.

Nalekisaki ngonga ekoki kotangama te na lopitalo ya bopesi nkisi ya kansere, esangana na mpasi na basusu baoyo bazalaki na elikya ya kobikisama. Basusu babikaki, mpe basusu babikaki te. Nayekolaki na lolenge ya bozindo ete bokangoli uta na mimekano na biso ezali ya kokesena mpo na moko na moko na biso, mpe esika ya kofandisa makanisi na biso esengeli kozala moke na ntina ya lolenge oyo tobikisami mpe mingi koleka na ntina ya Mokangoli Ye moko. Sete na biso ekobetama ntngo nyonso na Yesu Klisto!

Kosalelaka bondimi na Klisto elingi koloba kotalela bobele bolingi ya Nzambe te kasi mpe lisusu ntango na Ye. Mpo Ayebi mpenza maye tozali na yango bosenga mpe ntango nini tosengeli yango. Ntango tomipesi na bolingi ya Nkolo, okozwa mbano ebele koleka oyo tozalaki na mposa na yango.

Baninga na ngai ya bolingo, biso nyonso tozali na makambu na bomoi na biso oyo ebukana oyo esengaka ebongisama, ezongisama, to ekangolama. Ntango tozongi epai ya Mobikisi, mpe kokokanisi mitema mpe makanisi na biso elongo na ya Ye, mpe toyamboli, Ayaka esika tozali “na bokangoli kati ya maboko na Ye,”12 atie maboko na Ye ya bolingo likolo na biso, mpe akoloba, “Ekoki OK. Bozali bobele na mibu 5—to 16, 23, 48, 64, 91. Tokoki kobongisa yango elongo!”

Natatoli epai na bino ete ezali na eloko moko te na bomoi na bino oyo ebukani eleki nguya ya kobikisa, bosikoli mpe eleki Yesu Klisto. Na nkombo ya bule mpe esantu ya oyo azali na nguya ya kokangola, Yesu Klisto, amene.