Likita Linene
Mbongwana Ezali Ntina na Biso
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Mbongwana Ezali Ntina na Biso

Eloko moko te ekozwa esika ya ntango bozali kolekisa na kotangaka makomi, koyoka Molimo Mosantu kolobela bino mbala moko.

Mibu misatu ekoki sikawa, tozalaki elongo na mobembo lokola bandimi ya Eklezia ya Nkolo. Ezalaki na sanza ya zomi 2018 ntango Bakambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale babengisaki biso toyekola na ntina ya Yesu Klisto na kotangaka makomi na lolenge efulami mpe ya sika, na mokanda Yaka, Landa Ngai lokola mokanda ya kokamba biso.

Na mibembo nyonso, ebongi malamu kopema ntango moko mpo na kotuya boni tozali kokende libosoo mpe koyeba soki tozali kaka kotambola na nzela ya ntina na biso.

Mbongwana Ezali Ntina na Biso

Talaka esakola oyo ya mozindo uta na boyingisi ya Yaka, Landa Ngai:

“Ntina ya koyekola mpe koteya nyonso ya nsango malamu ezalaka ya kolendisa na bozindo mbongwana na biso epai ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto. …

“… Lolenge ya koyekola nsango malamu oyo ekolendisa bondimi na biso mpe ekomema biso na mbongwana ya kokamwa oyo esalemaka mbala moko mpenza te. Ekendeka mosika koleka kelasi na mitema mpe na mabota na biso. Esengaka kosala makasi ya ntango nyonso, ya mokolo na mokolo mpo na kososola mpe kosalela nsango malamu. Koyekola nsango malamu oyo ekambaka na mbongwana ya solo esengaka nguya ya Molimo Mosantu.”1

Oyo ezali makamwisi tolukaka—ntango moto azali na boyebi na kati ya makomi, 2 mpe boyebi yango epambolami na nguya ya Molimo Mosantu. Mayebi ya boye ezalaka mabanga ya moboko ya motuya mpo na mbongwana na biso epai ya Mobikisi. Mpe lokola Mokambi Russell M. Nelson awuti kokanisa biso kala te, miboko ya molimo esengeli kozala elenda makasi koleka.3 Mbongwana ya makasi ezali likambo ezwaka bomoi mobimba.4 Mbongwana ezali ntina na biso.

Mpo na kozala makasi mpenza, mayebi na bino ya makomi esengeli kozala ya bino moko.5 Kotanga to koyoka makambo ya bato basusu mpe bomoni na bango ekoki kosunga, kasi ekomema nguya ya mbongwana ya lolenge moko te. Eloko moko te ekozwa esika ya ntango bozali kolekisa na kotangaka makomi, koyoka Molimo Mosantu kolobela bino.

Molimo Mosantu Azali Koteya Ngai Nini?

Poso nyonso ntango nafungolaka mokanda na ngai ya Yaka, Landa Ngai nakomaka motuna oyo likolo ya lokasa: “Molimo Mosantu azali koteya ngai nini na poso oyo ntango nazali kotanga mikapo oyo?”

Ntango nazali koyekola makomi, namanyolaka motuna wana mbala na mbala. Na bozangi kokweya, makanisi ya molimo eyaka, mpe nakomaka yango na mokanda na ngai.

Sikawa, lolenge nini nayebi ntango Molimo Mosantu azali koteya ngai? Malamu, esalemaka mbala mingi na ndenge ya pete mpe moke. Mbala mosusu eteni ya makomi emonisamaka lokola kolekisa lokasa na makanisi na ngai. Mbala mosusu, nayokaka lokola makanisi na ngai engengisamaka na bososoli ya mobeko ya nsango malamu. Nayokaka lisusu nguya ya Molimo Mosantu ntango mwasi na ngai, Anne Marie, mpe ngai tosololaka na ntina ya oyo tozali kotanga. Mamoni ya mikolo ya nsima na ye ntango nyonso ebengisaka Molimo.

Profeta mpe Pasika

Mobu oyo tozali koyekola Boyokani na Kala—makomi ya bule oyo etondisaka milimo na biso na mwanda. Ntango nazalaki kotanga Boyokani na Kala, nayokaka lokola nazali kolekisa ntango na bakambi bandimama: Adama, Ewa, Enoka, Nowa, Abalayama mpe ebele ya basusu.

Poso oyo, ntango toyekoli Mikapo ya Esode 7–13, toyekoli lolenge nini Nkolo akangolaki bana ya Yisalaele uta na boombu ya bikeke na Ejipito. Toyekoli na ntina ya baboko bobe—makamwisi libwa ya kokamwisa ya nguya ya Nzambe—oyo Falo amonaki ye moko na misu kasi alembisaki motema te.

Nsima Nkolo ayebisaki profeta na Ye, Mose na ntina ya bokono bobeya mbala ya zomi—mpe lolenge nini libota moko na moko na Yisalaele esengelaki komilengela mpo na yango. Lokola eteni ya mwango oyo babengaki Pasika, Bayisalaele basengelaki kobonza mwana mpate ya mobali, azanga mbeba. Nsima basengelaki kotia elembo na bikuke ya bandako na bango na makila ya mwana mpate. Nkolo alakaki ete bandako nyonso oyo etiamaki bilembo ya makila esengelamaki kobatelama na libebi wana ya makasi oyo ekomaki pene ya kosalema.

Makomi elobi, “Mpe bana ya Yisalaele … basalaki ndenge Nkolo … atindaki Mose” (Esode 12:28). Ezali na eloko moko ya nguya makasi na kati ya esakola oyo ya botosi.

Mpo ete bana ya Yisalaele balandaki toli ya Mose mpe basalaki na bondimi, babikisamaki na bokono ya mabe mpe, na ntango, bakangolamaki uta na boombu.

Na yango, nini Molimo Mosantu eteyi ngai na kati ya mikapo oyo?

Oyo ezali mwa makanisi maye etikalaki na moto na ngai.

  • Nkolo asalaka na nzela ya profeta mpo na kobatela mpe kobikisa bato na Ye.

  • Bondimi mpe komikitisa mpo na nkolanda profeta ememaka makamwisi ya bobatelami mpe bokangolami.

  • Makila na ekuke ezalaki elembo ya libanda ya bondimi ya kati na Yesu Klisto, Mwana mpate ya Nzambe.

Profeta mpe Bilaka ya Nkolo

Nakamwaka na lolenge Nkolo apambolaki bato na Ye na kati ya lisolo oyo ya Boyokani ya Kala mpe na lolenge apambolaka lisusu bato na Ye na mikolo oyo.

Ntango profeta ya bomoi ya Nkolo, Mokambi Nelson, alimbolelaki biso na boyingisi na Yaka, Landa Ngai lokola ntina ya boyekoli makomi, abengisaki biso tobongola mabota na biso ekoma bisika ya bondimi mpe bisika boyekoli nsango malamu.

Nsima alakaki mapamboli minei elongobani:

  1. Ya bino mikolo ya Saba ekozala ya esengo makasi,

  2. Ya bino bana bakosepela koyekola mpe kobika mateya ya Mobikisi,

  3. Nguya ya monguna kati na ya binovbomoi mpe kati na ya bino bandako ekokita, mpe

  4. Mbongwana oyo kati na ya bino libota ekozala makasi mpe elenda.6

Sikawa, tozali na bato oyo bamonaki Pasika na Mose te na Ejipito. Kasi, tozali na matatoli ebele uta na Basantu oyo, bazali na bondimi moko, baye bazali kolanda toli ya Mokambi Nelson lelo mpe bazali kozwa mapamboli elakama.

Botala mwa ndambo ya matatoli yango:

Mama moko ya libota ya sika alobaki: Tosololaka na ntina ya Klisto mpe tosepelaka kati na Klisto na libota na biso. Mpo na ngai wana lipamboli monene koleka—ete bana na ngai bakoki kokola na masolo ya nsango malamu oyo na libota oyo ekomema bango pene ya Mobikisi.”7

Kulutu ndeko mobali moko abengaki boyekoli na ye ya makoki na nzela ya Yaka, Landa Ngai na nkombo ya “nzela ya nkaka etondisama na pole ya bonzambe oyo esungaka biso tozwa malongi ya nsango malamu oyo ezali ntina mingi mpo na bozali na biso malamu ya molimo.”8

Elenge mwasi atalisaki mapamboli na libala na ye: “nazali na makoki ya koyeba motema ya mobali na ngai mingi koleka, mpe nazali na makoki ya kofungola motema na ngai epai na ye ntango toyekolaka elongo.”9

Mama moko ya libota monene amonaki lolenge nini makasi na ye ya koteya libota na ye ebongwanaki. Asakolaki: “Kotalaka nsima, ezalaki lokola nazalaki kobeta lindanda nalati basoseti ya mvula ya pembe na maboko. Nazalaki kosepela nango, kasi miziki ezalaki koyokana kitoko te. Sikawa basoseti elongwe na maboko, mpe miziki na ngai ezali kaka kitoko te, nayoki bokeseni. Yaka, Landa Ngai epesi ngai limoni, likoki, mpiko, mpe ntina.”10

Elenge mobali moko alobaki: “Bamposa na ngai ya makasi na libota ekomi pole koleka uta natiaki Yaka, Landa Ngai eteni ya mbala na mbala na batongo na ngai. Boyekoli ekambaka ngai nakanisa mingi na ntina ya makambo oyo ezalaka motuya mingi mpo na ngai, lokola tempelo, bozalani na ngai na mwasi na ngai, mpe libiangi na ngai. Nazali na esengo ete libota ezali esika esantu wapi Nzambe ayaka yambo.”11

Ndeko mwasi moko akabolaki: “Makambu na ngai ya moko na moko na Yaka, Landa Ngai emonisamaka mingi mingi te, kasi mbala na mbala namonaka lolenge nazali kobongwama na nzela boyekoli makomi ntango nyonsso mpe ya motema moko. Lolenge ya boyekoli oyo ekitisaka ngai motema, eteyaka ngai, mpe ebongolaka ngai malembe malembe.”12

Misionele moko azonga alobaki: “pologalami ya Yaka, Landa Ngai ememi ngai pene ya ndelo ya boyekoli makomi oyo nasalaki na misio na ngai, mpe nazalaki na makoki ya kolongwa na makanisi ya boyekoli makomi mpo na kokoma na mokanda mpenza mpo na koyekola koyeba Nzambe.”13

Ndeko mobali moko alobaki: “Nayokaka Molimo Mosantu koyambama mingi na bomoi na ngai mpe koyokaka lisakoli ya bokambi ya Nzambe na bozwi mikano. Nazalaka na bosololi ya bozindo na ntina ya bonzenga kati ya malongi ya pete ya Klisto mpe Bosikoli na Ye.”14

Mwana mobali moko ya mibu nsambo akabolaki: “nakobatisama kala te, mpe Yaka, Landa Ngai ezali kolengela ngai. Libota na ngai mpe ngai tosololaka na ntina na ya libatisi, mpe nayokaka nkanda te na ntina ya kobatisama sikawa. Yaka, Landa Ngai esungaka Molimo Mosantu aya na motema na ngai, mpe nayokaka esengo ntango natangaka makomi.”15

Mpe na nsuka nsuka, uta na mama moko ya bana ebele: “Ntango toyekolaka liloba ya Nzambe, Asungaki libota na biso etombwama uta na mikakatano kino na nguya; uta na mimekano mpe mikakatano kino na bokangoli; uta na boswani mpe botongi kino bolingo mpe na kimia; uta na nguya ya bonguna kino na nguya ya Nzambe.”16

Oyo, mpe balandi mingi basusu, bayekoli ya bondimi ya Klisto batiaka na lolenge ya elembo makila ya Mwana na mpate ya Nzambe na boyingeli ya mabota na bango. Bazali kolakisa bomipesi na bango ya kati ya kolanda Mobikisi. Bondimi na bango ebotaka makamwisi. Ezali makamwisi ya moto oyo azali na boyebi na makomi mpe oyo ayebi ete azali kopambolama na nguya ya Molimo Mosantu.

Ntango tozali koyekola makomi, nzala ya molimo ezalaka te na mboka. Lokola Nefi alobaki, “Oyo nyonso akoyekemela liloba ya Nzambe, mpe akosimba yango ngui, bango bakokufa ata mokolo moko te; mpe masenginya mpe mbanzi ya kanda ya monguna ekolonga bango te na bolanda, mpo na kokamba bango na libebi” (1 Nefi 15:24).

Na ntango ya kala, ntango bana ya Yisalaele balandaki bokambi ya Nkolo oyo epesamaki na nzela ya profeta Mose, bapambwamaki na bobatelami mpe bonsomi. Lelo, ntango tolandi bokambi ya Nkolo oyo epesami na nzela ya profeta ya bomoi, Nelson, biso mpe topambolami na mbongwana na kati ya mitema mpe bobateli kati ya mabota na biso.

Natatoli ete Yesu Klisto azali na bomoi. Oyo ezali Eklezia na Ye, ezongisama na mabele na nzela ya Profeta Joseph Smith. Mokambi Russell M. Nelson azali profeta ya Nkolo lelo. Nalingaka mpe nasungaka ye. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Kala 2022, vii.

  2. “Tozali banso na mokumba ya kokolisa bomoto na biso moko ya molimo” (Russell M. Nelson, “Opening Remarks,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 8).

  3. Tala Russell M. Nelson, “The Temple and Your Spiritual Foundation,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 93–96.

  4. Oyo ezali ntina monene eye Mokambi Nelson asengi biso “toluka ntango mpo na Nkolo! Tonga moboku na yo moko ya molimo elenda mpe zala na makoki ya kotelemela mimekano ya ntango na kosalaka makambo oyo epesaka ndingisa na Molimo Mosantu azala elongo na yo ntango nyonso” (“Make Time for the Lord,” Liahona, Nov. 2021, 120).

  5. “Na kotala te oyo basusu bakoki koloba to kosala, moto moko te akoki kolongola litatoli oyo elonami na kati ya motema na yo mpe na makanisi na yo na ntina ya oyo ezali solo” (Russell M. Nelson, “Revelation for the Church, Revelation for Our Lives,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 95).

  6. Tala Russell M. Nelson, “Becoming Exemplary Latter-day Saints,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 113–14. Mokambi Nelson abandelaki mbala na mbala libiangi oyo na Sanza ya minei eleki: “Bomipesi na yo ya kosala libota na yo esika ya yambo ya bondimi esengeli moke te kosuka. Ntango bondimi mpe bosantu ekiti na mokili oyo esambwa, bosenga na yo mpo na bisika bisantu ekobakisama. Nasengi bino bokoba kosala libota na bino esika ya solo ya bule ‘mpe elongwa te’ [Doctrine and Covenants 87:8; emphasis added] from that essential goal” (“What We Are Learning and Will Never Forget,” Liahona, Sanza ya mitanoMay 2021, 79).

  7. Mikanda ya ye moko; tala lisusu 2 Nefi 25:26.

  8. Mikanda ya ye moko.

  9. Mikanda ya ye moko.

  10. Mikanda ya ye moko.

  11. Mikanda ya ye moko.

  12. Mikanda ya ye moko.

  13. Mikanda ya ye moko.

  14. Mikanda ya ye moko.

  15. Mikanda ya ye moko.

  16. Mikanda ya ye moko.