Likita Linene
Motema na Biso Nyonso
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Motema na Biso Nyonso

Soki tolingi Mobikisi atombola biso likolo, bongo komipesa na biso epai na Ye mpe nsango malamu na Ye ekoki kozala te ya pete to ya libaku.

Likabo epai na Ye

Bobele mwa mikolo liboso Apesa bomoi na Ye mpo na biso, Yesu Klisto azalaki na tempelo na Yelusaleme, kotalaka bato kopesa makabo na ebombelo misolo ya tempelo. “Bajui mingi babwaki mosolo mingi kati na yango,” kasi nsima, nzela moko eyaki mwasi mobola akufela mobali, “mpe abwaki ndisi mibale.” Ezalaki mosolo se moke, ezalaki kutu na ntina te ya kokoma yango.

Elilingi
Mwasi mokufeli mobali apesaki lkabo ya mpata mibale.

Kasi likabo oyo emonanaki moke ebendaki likebi ya Mobikisi. Na yango, ekamwimisaki ye makasi ete abiangi bayekoli na ye epai na ye, mpe alobi na bango, Najali koloba na bino solo, Ete likabo na mwasi oyo, mobola, eleki na monene makabo yonso mabwaki bato kati na ebombelo misolo:

“Zambi bango bakabi ndambo moke na bofuluki na bango, kasi ye asili kobwaka nyonso na ye, kutu libiki na ye yonso.”1

Na botali oyo ya mpamba, Mobikisi ateyaki biso boniboni makabo emekelami na bokonzi na Ye—mpe ezali na bokeseni mingi na lolenge tomesani komekela biloko. Mpo na Nkolo, motuya ya likabo emekelamaki na mosala na yango kati na ebombelo misolo te kasi na mosala ezalaki na yango kati na motema ya mopesi.

Na kokumisaka mwasi oyo ya sembo akufela mobali, Mobikisi apesaki biso ndakisa ya komekela boyekoli na biso na balolenge na yango nyonso. Yesu ateyaki ete likabo na biso ekoki kozala monene to ekoki kozala moke, kasi lolenge nini ekoki, esengeli ezala likabo ya motema na biso mobimba.

Mobeko oyo ezongelami na losambo ya Amaleki profeta ya Buku ya Mormon: “Boya epayi ya Klisto, oyo azali Moko Mosantu ya Yisalaele, mpe bokabola na ye libiki, mpe na ye nguya ya bosikoli. Iyo, boya epai na Ye, mpe bobonzela milimo na bino mibimba lokola libonza epai na Ye.”2

Kasi boniboni ekoki kosalama? Mpo na mingi kati na biso, komipesa mitema na biso mobimba na Mobikisi ekoki kosalema te. Tosili kozala na biloko ebele oyo esengi likebi mpe makasi na biso. Lolenge nini tokoki kokokisa ebele ya babosenga ya bomoi na biso na bamposa ya kobonzela milema na biso mibimba na Nkolo?

Ntango mosusu mokakatano na biso ezali ete tokanisi bokatikati elimboli kokabola ntango mpe matomba na biso ndenge moko. Kotala yango na lolenge wana, komipesa na biso na Yesu Klisto ekozala moko ya biloko ebele tosengeli tokotya na bangonga na biso ya mosala. Kasi ntango mosusu ezali na lolenge ekeseni ya kotala yango.

Bokatikati: Lokola Kokumba Kinga

Mwasi na ngai, Harriet, mpe ngai tolingi kotambola na kinga elongo. Ezali lolenge kitoko ya kosala mwa konyolisa nzoto mpe lisusu kolekisa ntango elongo. Ntango tozali kotambola, mpe nazali kopema makasi te, tosepeleka na mokili kitoko zingazinga na biso mpe kutu tokotaka na lisolo ya esengo. Mingimingi totyaka likebi te na kobatela bokatikati na biso na bakinga na biso. Totambola mikolo ebele oyo tokanisaka kutu te na ntina na yango—ekoma momesano mpo na biso.

Kasi ntango nyonso namoni moto songolo koyekola kokumba kinga mpo na mbala ya yambo, namikundoli ete ezali pete te na kozala na bokatikati na makolo mibale wana ya mike. Esengaka ntango. Esengaka komekameka. Esengaka motema molai. Esengaka ntango mosusu kokweya mbala moko to mibale.

Na nyonso, baoyo balongaka kozala na bokatikati na kinga bayekoli batoli oyo ya motuya:

Kotala makolo na yo te.

Tala liboso.

Tika kaka miso na yo etala nzela liboso na yo. Tiya mayele na libongo na yo. Mpe koba kopedale Kotikala na katikati ezali nyonso etali kokende liboso.

Bizaleli ya boye esalelami ntango ezali mpo koluka bokatikati na bomoi na biso lokola bayekoli ya Yesu Klisto. Lolenge nini kokabola ntango mpe makasi na yo kati na misala na yo ebele ya ntina ekokesena na moto na moto mpe na bantango ekeseni kati na bomoi na biso. Kasi ntina se moko, na biso nyonso ezali kolanda Nzela ya Molakisi na biso, Yesu Klisto, mpe kozonga liboso ya Molingami Tata na biso ya Lola. Mokano oyo esengeli kotikala ngwi mpe na molongo, atako tozali nani mpe oyo nyonso lisusu ezali koya na bomoi na biso.3

Kotombola: Lokola Kokumba Mpepo

Sikawa, mpo na baoyo bazali bakumbi kinga makasi, kokokisa boyekoli ya kotambola na kinga ekoki kozala ndakisa malamu. Mpo na baoyo bazali yango te, bobanga te. Nazali na ndakisa mosusu nandimi mobali, mwasi, mpe mwana nyonso akokoka kolobela.

Boyekoli, lokola biloko ebele na bomoi, ekoki lisusu kokokisama na kokumba mpepo.

Osila kotika kokanisa lolenge nini ezali kokamwa ete mpepo monene ya basali mobembo ekoka mpenza kolongwa mabele mpe kopumbwa? Nini esalaka ete bamasini oyo epumbwaka etambola kitoko na likolo, kokatisaka bambu mpe bikolo?

Na maloba ya pete, mpepo ekotambola bobele soki mopepe ezali koleka likolo ya mapapu na yango. Mbonge wana ekosala babokeseni na mopepe makasi oyo etombolaka mpepo. Mpe lolenge nini okozwa mopepe ekoka kotambola likolo ya mapapu mpo na kokela nguya ya kotombola? Eyano ezali kokende liboso na lisalisi ya bamotele.

Mpepo emataka te soki efandi na libanda ya mpepo. Atako na mokolo ya mopepe, kotombwama na lolenge ekoki ekosalema te kaka soki mpepo ezali kokende liboso, na botindiki ekoka ya kolongola banguya oyo ezali kozongisa yango nsima.

Kaka lokola kokende liboso ebatelaka kinga bokatikati mpe semba, kokende liboso esungaka mpepo kolonga bobendi na nse.

Elimboli nini mpo na biso lokola bayekoli ya Yesu Klisto? Elimboli ete soki tolingi kozwa bokatikati na bomoi, mpe soki tolingi Mobikisi atombola biso likolo, bongo komipesa na biso epai na Ye mpe nsango malamu na Ye ekoki kozala te ya pete to ya libaku. Lokola mwasi akufela mobali na Yelusaleme, tosengeli kobonzela Ye mitema na biso mibimba. Likabo na biso ekoki kozala moke, kasi esengeli kowuta na motema mpe molimo na biso.

Kozala moyekoli ya Yesu Klisto ezali kaka te se moko ya biloko ebele tosalaka. Mobikisi azali nguya ya bopusi nsima nyonso oyo tosalaka. Esika ya bopemi ezali te na mobembo na biso. Ezali te na nzela ekomonisa na mosika to elembo ya nzela moko ya monene. Azali, “nzela, bosolo, mpe bomoi: moto moko te akoki kokende epai ya Tata kasi na [Yesu Klisto].”4 Wana ezali Nzela mpe nsuka ya mobembo na biso.

Bokatikati mpe kotombwama eyaka ntango “tokendeke liboso mbangu na molende elongo na Klisto, kozalaka na bongengi moko ya kobonga nie ya elikya, mpe bolingo ya Nzambe mpe ya bato nyonso.”5

Libonza mpe Komikaba

Mpe nini ekomelaka misala mpe mikumba ebele oyo ekomisaka bomoi na biso mosala mingi? Kolekisa ntango na balingami, kokende na eteyelo to kolengele mpo na mosala songolo, kozwa eloko ya kobikela, kolengela libota, kosala kati na lisanga—tokoki kokokisa misala oyo nyonso wapi? Mobikisi akitisaka biso motema:

“Tata wa bino wa lola ayebi ete bozali na mposa ya biloko biye binso.

“Kasi lukani yambo bokonzi bwa Nzambe mpe bosembo bwa ye mpe biloko biye binso bikobakisama epai ya bino.”6

Kasi elimboli te ete ezali pete.7 Esengaka nyonso mibale libonza mpe bobulisi.

Esengaka kotika biloko mosusu ekende mpe kotika biloko mosusu ekola.

Libonza mpe komikaba ezali mibeko mibale ya lola oyo toyokani na kotosa kati na tempelo esantu. Mibeko oyo mibale ezali ndenge moko kasi ekokani te. Ko bonza elimboli kotika eloko mpo na eloko moko koleka motuya. Na kala mpenza, bato ya Nzambe babonzaki bambotama ya yambo ya bibwele na bango mpo na lokumu ya boyei ya Masiya. Banda kala, Basantu ya sembo babonzaki bamposa na bangomei, biloko na bango ya kitoko, mpe lisusu bomoi na bango mpo na Mobikisi.

Tozali biso nyonso na biloko, minene mpe mike, tosengeli kobonza mpo na kolanda Yesu Klisto na mobimba koleka.8 Mabonza na biso elakisi nini topesi mpenza motuya. Mabonza ezali esantu mpe ekumisami na Nkolo.9

Komikaba ekeseni na libonza mwa moke na lolenge moko ya ntina. Ntango tobonzi eloko, totiki yango te mpo etumbama likolo ya etumbelo. Kasi, totie yango mpo esalelama na mosala na Nkolo. Topesi yango na Ye mpe na bantina na Ye esantu.10 Tozwaka batalanta oyo Nkolo apesa biso mpe tosalaka makasi kokolisa yango mingi mpenza, na ndenge ebele, mpo na kokoma mosungi na kotonga bokonzi ya Nkolo.11

Moke mpenza kati na biso tosengama mpo na kobonza bomoi na biso mpo na Mobikisi. Kasi tobengisami banso ko kaba bomoi na biso epai na Ye.

Mosala Moko, Esengo Moko, Ntina Moko

Ntango toluki kopetola bomoi na biso mpe kotalela Klisto na likanisi nyonso,12 eloko nyonso ebandi kotiama na alima. Bomoi emonani lisusu te lokola molongo ya milende ekabwana esimbami na bokatikati ya siikisiki te.

Na nsuka, ekomi nyonso mosala moko.

Esengo moko.

Ntina moko esantu.

Ezali mosala ya kolinga mpe ya kosalela Nzambe Ezali kolinga mpe ya kosalela Nzambe.13

Ntango totali bomoi na biso mpe tomoni monkama ya biloko ya kosala, tomimoni ete elekeli biso. Ntango tomoni eloko moko—kolinga mpe kosalela Nzambe mpe bana na Ye, na balolenge monkama ekeseni—bongo tokoki komipesa na biloko wana na esengo.

Oyo ezali lolenge tobonzeli milema na biso mibimba—na kobonzaka eloko nyonso oyo ezongisi biso nsima mpe kopesaka nyonso etikali epai na Nkolo mpe bantina na Ye.

Liloba ya Bolendisi mpe Litatoli

Bandeko na ngai mibali mpe basi, ekozala na ngonga mosusu tango boko kanisa te kokoba liboso. Tata na yo ya bolingo na Lola ayebi motema na yo. Ayebi ete okoki te kosala eloko nyonso motema na yo elingi kosala. Kasi okoki kolinga mpe kosalela Nzambe. Bokoki kosala manso koleka bokoki mpo na kotosa mitindo na Ye. Okoki kolinga mpe kosalisa bana na Ye. Mpe milende na yo ezali kopetola motema na yo mpe kolengele yo mpo ya lobi ya nkembo.

Oyo ezali nini mwasi akufela mobali na ebombelo misolo ya tempelo amonanaki kososola. Ayebaki solosolo ete libonza na ye ekobongola bozwi ya Yisalaele te, kasi ekoki kobongola mpe kopambola ye—mpo ete, atako moke, ezalaki nyonso na ye.

Yango wana, baninga na ngai balingami mpe baninga babolingo bayekoli ya Yesu Klisto, “tolemba te na kosalaka malamu, mpo [biso] tozali kotia moboko ya mosala monene.” Mpe na biloko na biso ya mike ekobima “oyo ezali monene.”14

Natatoli ete oyo ezali solo, ntango natatoli lisusu ete Yesu Klisto azali Molakisi na biso, Mosikoli na biso, mpe bobele Nzela moko mpo na biso kozonga epai na Tata na biso molingami ya Lola. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Malako 12:41–44.

  2. Omini 1:26.

  3. Bana mpe bilenge na biso babengami kokola na lolenge ya bokatikati ntango balandi Yesu Klisto, oyo ntango azalaki elenge mobali “akolaki na mayele mpe molai mpe na boboto na miso na Nzambe mpe na bato” (Luka 2:52).

  4. Yoane 14:6.

  5. 2 Nefi 31:20.

  6. 3 Nefi 13:32–33; tala lisusu Matai 6:32–33. Joseph Smith Translation, Matthew 6:38epesi likanisi mosusu: “Bolukaka nde liboso Bokonji na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo yonso ikobakisama na bino” (kati na Matai 6:33nkoma nya nse a).

  7. Ndakisa moko ewuti na profeta na biso, Mokambi Russell M. Nelson. Ntango akomaki na nsonge ya mosala na ye lokola monganga ya mitema, abiangemaki lokola mokambi ya etuka. Bampaka Spencer W. Kimball mpe LeGrand Richards babiangaki ye. Koyebaka masengami ya bomoi ya mosala na ye, balobelaki ye, “Soki okanisi ete ozali na mosala ebele mpenza mpe osengeli te kondima libiangi yango, na yango wana ezali litomba malamu mpo na yo.” Ayanolaki ete mokano na ye etali kosala to te soki abiangemi ezwama kala mpenza, ntango ye mpe mwasi na ye basalaki mayokani ya tempelo elongo na Nkolo. “Tolapaki ndai na nsima,” alobaki, “Ko ‘luka …’ liboso bokonji na Nzambe, mpe boyengebene na ye’ [Matai 6:33], kolikyaka ete eloko mosusu ekobakisama likolo na biso ndenge Nkolo alakaki” (Russell Marion Nelson, From Heart to Heart: An Autobiography [1979], 114).

  8. Kala te Mokambi Nelson alobelaki “mposa ya moko na moko na biso ya kolongola, elongo na lisungi ya Mobikisi, bosoto ya kala na bomoi na biso. … Nabengisi bino na kosambela,” alobaki “koluka koyeba bosoto osengeli kolongola uta na bomoi na yo bongo okoka kokoma olongobani koleka” (“Welcome Message,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 7).

  9. Makomi elobi ete, mpo na Nzambe, mabonza na biso ezali esantu koleka misala na biso.(tala Malongi mpe Mayokani 117:13). Oyo ekoki kozala ntina moko Nkolo apesaki motuya na likuta ya mwasi akufela mobali koleka likabo ya mozwi. Ya liboso ezalaki libonza, oyo ezalaki na nguya ya kopetola mopesi. Ya nsuka, atako ebakisaki misolo, ezalaki libonza te, mpe etikaki mopesi abongwana te.

  10. Moke mpenza kati na biso tokosengama naino tobonza bomoi na biso mpo na Mobikisi. Kasi tobengisami banso tobulisa bomoi na biso epai na Ye.

  11. Tala Matai 25:14–30.

  12. Tala Malongi mpe Mayokani 6:36.

  13. Na lolenge oyo, tomoni kati na bomoi na biso bokokisami ya lisakoli ya Apostolo Paulo:“Na eleko oyo ya bofuluki ya ngonga [Nzambe a] kosangisa biloko yonso kati na Klisto lokola moko, yango na Likolo mpe yango na nse” (Baefese 1:10).

  14. Malongi mpe Mayokani 64:33.