Likita Linene
Lolenge na Yo ya Bonzambe mpe Nsuka na Yo ya Seko
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Lolenge na Yo ya Bonzambe mpe Nsuka na Yo ya Seko

Nabengisi bino botia Yesu Klisto na katikati ya bomoi na bino mpe bomikundola babosolo ya ntina oyo ya Maloba ya Bilenge Basi.

Bandeko basi, matondi mpo na kozala na bino awa. Nazali na lokumu ya kozala na liyangani ya basi ya likita linene. Na libaku, nazalaki lisusu na lokumu ya kozala na bakelasi ya Bilenge Basi. Kasi botika naloba ete—nazali elenge te, mpe nazali mwasi te! Nayekolaki, nzokande, ete namimonaka moke soki nakoki koloba Maloba ya Bilenge Basi elongo na bilenge basi. Malongi ya bozindo oyo eteyami na kati ya Maloba ya Bilenge Basi1 ezali ntina mpo na bilenge basi, kasi esalemaka na bato nyonso, lisusu na baoyo ya biso oyo bazali bilenge basi te.

Mpo ya Bilenge Basi ebandaka, “nazali mwana mwasi molingami ya baboti ya lola, elongo na lolenge ya bonzambe mpe nsuka ya seko.”2 Esakola oyo ezali na babosolo minei ya motuya. Ya yambo, ozali mwana mwasi molingami. Eloko moko te oyo osalaka—to oyo osalaka te—ekoki kobongola yango. Nzambe alingaka bino mpo ete bozali bana na Ye ya basi ya molimo. Ntango mosusu tokoki koyoka bolingo na Ye te, kasi ezalaka ntango nyonso wana. Bolingo ya Nzambe ebonga nie.3 Makoki na biso ya koyoka bolingo wana ezali moke.

Molimo ezali na moboku ya motuya ya boyokisi bolingo ya Nzambe epai na biso.4 Nzokande, nguya ya Molimo Mosantu ekoki “kobombama na mayoki ya makasi, lokola nkanda, koyina, … [to] bobangi … lokola komekaka kolia mpimbo ya mbuma kitoko na ntango ozali kolia pilipili ya jalapeño. … [Mpimbo moko] ebebisaka mbala moko mpimbo mosusu.”5 Mpe lisusu, bizaleli oyo etiaka biso mosika ya Molimo Mosantu, mpe lisumu,6 esalaka ete yango ekoma mpasi mpo na koyoka bolingo ya Nzambe mpo na biso.

Lolenge moko, liyoki na biso ya koyoka bolingo ya Nzambe ekoki kolembisama na mabaku ya mitungisi mpe babokono ya nzoto to ya moto, mpe makambu mosusu. Na makambo nyonso oyo, liteya ya bakambi ya malamu to batei ekoki ntango mosusu kosunga biso. Tokoki mpe lisusu kobongisa lolenge na biso ya koyoka bolingo ya Nzambe na komitunaka biso moko, “Bolingo na ngai mpo na Nzambe ezali mpenza elenda to ngai mpenza nalingaka Ye ntango nazalaka malamu mikolo mosusu, kasi mingi te ntango nazalaka na mikolo ya mpasi?”

Bosolo ya mibale ezali ete tozali na baboti ya lola.7 Malongi ya Mama ya Lola eyaki na emoniseli mpe ezali bondimi bobele ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Mokambi Dallin H. Oaks alimbolaki ntina ya bosolo oyo: “Teoloji na biso ebandaka na baboti ya lola. Mposa na biso makasi ezalaka ya kozala lokola bango.”8

Makambo moke ebimisama na ntina ya Mama ya Lola, kasi oyo toyebi elimbolami na kati ya Gospel Topic Essays oyo ezwami na kati ya aplikasio ya Gospel Library.9 Ntango okotanga oyo ezali na kati kuna, okoyeba makambo nyonso oyo ngai nayebi na ntina ya likambo oyo. Natombeli nayeba mingi koleka. Bino mpe bokoki kozala na mituna mpe bolingi bozwa biyano mingi koloka. Kolukaka bososoli ya mingi ezali eteni ya motuya ya bokoli na biso na molimo, kasi tosengi bosala keba. Mayele ya kokanisa ekoki te kozwa esika ya emoniseli.

Kolanda bilobela ya bato ekomema na boyebi monene ya molimo te, kasi ekoki kokamba na lokuta to kolongola biso na nzela ya likanisi malamu oyo ebimisamaki.10. Ndakisa, Mobikisi ateyaki bayekoli na Ye, “Bosambelaka ntango nyonso Tata na nkombo na ngai.”11 Tolandaka ndakisa oyo mpe topesaka masanjoli na biso epai ya Tata na biso ya Lola na nkombo ya Klisto mpe tosambelaka te Mama ya Lola.12

Uta Nzambe aponaki baprofeta, batindamaki koloba na nkombo na Ye. Kasi balobaka nkombo ya moto oyo asala malongi te “ya likanisi na [bango] ”13 to koteya oyo ebimisama te. Kobanzaka maloba ya profeta Balama ya Boyokani na Kala, oyo babonzelaki kisangala ya vino mpo na kolakela Yisalaele mabe na ntina ya Moabe. Balama alobaki, “soki [mokonzi ya Moabe] akopesa ngai ndako na ye etonda na palata mpe wolo, nakoki te kosala eloko koetelemela liloba ya Nkolo Nzambe na ngai, mpo na kosala moke to ebele.”14 Baprofeta ya Mikolo mya nsuka bazali mpe lolenge wana. Kosengaka emoniseli kouta na Nzambe ezali komimona mpe epesaka litomba te. Na esika na yango, tozelaka Nkolo mpe ntango na Ye mpo na kobimisa babosolo na Ye na nzela ya makambo oyo Ye atya.15

Bosolo ya misato na bofungoli ya paragrafe ya Mpo ya Bilenge Basi elobi ete “tozali na lolenge ya bonzambe.” Yango ezali ntina mpo na oyo biso tozali. Ezali na molimo “eloko ya makila,” esangolami uta na baboti ya lola16mpe esengaka makasi uta na biso te. Oyo ezali bomoto na biso ya ntina koleka, kotala te makambu mosusu oyo toponaka mpo na komitalisa biso moko. Kososolaka bosolo oyo ya motuya ezali ntina mpo na moto nyonso kasi mingi mingi mpo na bato oyo bazali ya mangomba baoyo na lisitwale balongolama, batungisamaki to bakonzamaki. Bomikundola ete bokitoli na yo ya motuya etali lolenge ya bonzambe na yo, lokola mwana ya Nzambe.

Bosolo ya minei ezali ete tozali na “nsuka ya seko.” Lobi oyo ekotindikama epai na biso na makasi te. Nsima ya kufa, tokolonga oyo tolukaki mpe “tokosepela [kaka] oyo [tozali na bolingi ya kozwa,”17 Kososolaka nsuka na biso ya seko etali maye toponaka. Esengaka kosala mpe kobatela mayokani ya bule. Nzela oyo ya mayokani ezali nzela toyaka epai ya Klisto mpe esalemi na liyokani oyo eyekami na bosolo ya motuya mpe ya seko, mobeko oyo ebongwanaka te. Tokoki kokela nzela na biso moko mpe kozela matomba elakelama ya Nzambe. Mpo na kozela mapamboli na Ye ntango ozali kolanda mibeko ya seko te likolo ya oyo esakolama18ezali likama, kokanisaka bongo tokoki kosimba lituka ya moto mpe “kozwa mokano” ya kozika te.

Bokoki koyeba ete nazalaki kosalisa babeli ya bokono ya motema. Lisalisisi na bango ya ntina koleka ezalaki na ntango bazalaki kolanda mibeko ya miango ya lisalisi oyo etiamaki. Atako bayebi yango, boko babeli bazalaki komeka kosolola mpo na kosalela mwango ekeseni ya lisalisi. Bazalaki koloba, “Nalingi te komela bakisi ebele” to “nalingi te kosala bateste ebele.” Ya solo, babeli bazalaki na bonsomi ya kozwa mikano na bango moko, kasi soki batosi miango ya lisalisi oyo etiamaki te, mbano ezali mpasi. Babeli ya bokono ya motema bakoki te kopona kozanga kotosa mwango ya lisalisi mpe nsima komona baminganga mabe.

Lolenge moko ezali solo mpo na biso. Nzela oyo elengelami na Tata ya lola ememaka na matomba ya seko. Tozali na bonsomi ya kopona, kasi tokoki te kopona makama ya kolanda te nzela esakolama.19 Nkolo alobaki, “Oyo abukaka mobeko, mpe atosaka mobeko te, kasi alukaka kokoma mobeko yangomei, … akoki te kosantisama na mobeko, na boboto te, na boyengebene mpe te, na bosambisi mpe te.”20 Tokoki te koboya kotosa mibeko ya Tata na Lola mpe nsima komona Ye mabe.

Paragrafe ya mibale na kati ya maloba ya Bilenge Basi ekomami: “Lokola moyekoli ya Yesu Klisto, nabundaka mpo nakoma lokola Ye. Nalukaka mpe nasalaka na emoniseli na ngai moko mpe nasalelaka basusu na nkombo na Ye ya bule.” Tokoki komatisa litatoli ya Yesu Klisto na kosalaka na bondimi.21 Tokoki kosenga likabo ya molimo “mpo na koyeba ete Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe, mpe ete abakamaki mpo na masumu ya mokili.” To tokoki kozwa likabo mpo na kondimela maloba ya baoyo bayebi,212kino tokoyeba biso moko. Tokoki kolanda mateya ya Mobikisi mpe kosunga basusu baya epai na Ye. Na lolenge oyo, tolandi Ye na mosala na Ye.23

Mpo ya Bilenge Basi ekobi, “Nakotelema lokola nzeneneke ya Nzambe na bantango nyonso mpe na makambo nyonso mpe na bisika nyonso.” Bandimi nyonso ya Eklezia basengelami lokola banzeneneke ya Nzambe,24atako Bapostolo mpe Bantuku nsambo bapesami mokumba lokola banzeneneke ya ntina ya nkombo ya Klisto.25 Kanisa na lisano ya hockey epai eye bobele bagardien nde babatelaka monyama. Na bozangi lisungi ya basani basusu ya ekipi, gardien akozala na makoki ya kobatela monyama malamu te mpe ekipi ekobanda kopola ntango nyonso. Lolenge moko, moto nyonso azali ntina na ekipi ya Nkolo.26

Paragrafe ya nsuka ya Maloba ya Bilenge Basi elobi, “Lokola nazali kobunda mpo na kolonga bonetoli, nalengelaka likabo ya boyamboli mpe nalukaka kobonga mikolo nyonso.” Na ntina ya libonza ya bomikabi ya Mobikisi, tokoki koyambola, koyekola uta na mabunga na biso, mpe topesama etumbu yango te. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki: “Bato ebele bazwaka boyamboli lokola etumbu. … Kasi liyoki oyo ya kozwa etumbu ewuti na Satana. Amekaka kokanga biso mpo na kotala Yesu Klisto te, Amekaka kokanga biso mpo na kotala Yesu Klisto te, kolikiaka mpe kolingaka kobikisa, kolimbisa, kosukola , kolendisa, kopetola, mpe kosantisa biso.”27

Ntango toyamboli ya solo mpenza, mpota moko te ya molimo etikalaka, kotala te oyo tosalaki, bozindo nini lisumu ezalaki, to mbala boni tobandelaki yango.28 Ntango toyamboli mbala na mbala mpe toluki bolimbisi na motema mobimba, tokoki kolimbisama.29 Likabo kani ya ntina koleka kouta na Mobikisi na biso, Yesu Klisto!30 Molimo Mosantu akoki kondimisa biso ete tolimbisami. Ntango toyoki esengo mpe kimia,31elindo esokwami,32mpe tokotungisama lisusu te na lisumu na biso.33

Kutu ata na nsima ya boyamboli ya solo, tokoki lisusu kotatabana. “Kobeta libaku” elingi koloba te ete boyamboli ezalaki ntina te kasi ekoki kozala mpo na botau ya bomoto. Boni yango ezali kolendisa na koyebaka ete “Nkolo amonaka botau na lolenge mosusu koleka botomboki.” Tosengeli te kotia ntembe na likoki ya Mobikisi mpo na kosunga biso na botau na biso mpo ete “ntango Nkolo alobaka na ntina ya botau, ezalaka ntango nyonso na mawa.”34

Mpo ya Bilenge Basi esukisi, “Na bondimi, nakolendisa ndako mpe libota na ngai, nakosala mpe nakobatela mayokani ya bule, mpe nakozwa makuli mpe mapamboli ya tempelo esantu.” Kolendisaka ndako mpe libota ekoki kolimbola kosala mokangano ya yambo na singa ya bondimi, kopalanganisa libula ya bondimi, to kozongisaka yango.35 Atako bongo, bokasi eyaka na nzela ya bondimi na Yesu Klisto mpe na kosalaka mayokani ya bule.

Na kati ya tempelo, toyekolaka banani oyo biso tozali mpe esika nini towuti. Filozofe ya Loma na nkombo ya Cicero alobaki, “Bozangi koyeba ya maye esalemaki yambo ya mbotama na bino ezali kotikala ntango nyonso lokola mwana moke.”36 Azalaki, solo mpenza, kolobela lisitwale ya mokili, kasi kotala na ye ya mayele ekoki kolimbolama. Tokobika kaka lokola bana mike ngonga nyonso ntango toyebi te boyebi ya seko oyo tozwaki na batempelo. Kuna tokoli kati na Nkolo, tozwi litondi ya Molimo Mosantu,”37mpe tokomi mingi ya komipesa lokola bayekoli ya Mobikisi.38 Ntango tobateli mayokani na biso, tozwi nguya ya Nzambe na babomoi na biso.39

Nabengisi bino botia Yesu Klisto na katikati ya bomoi na bino mpe bomikundola babosolo ya ntina oyo ya Maloba ya Bilenge Basi. Soki bozali na bolingi, Molimo Mosantu akokamba bino. Tata na biso ya Lola alingi bino bokoma babulami na Ye mpe bozwa nyonso oyo Ye azali na yango.40 Akoki kopesa yo ebele te. Akoki kolaka yo ebele te. Alingi yo mingi koleka oyo oyebi mpe alingi yo ozala na esengo na bomoi oyo mpe na bomoi oyo ezali koya, na nkombo ya Yesu Klisto, amene. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.