Likita Linene
Mayokani na Nzambe Elendisaka, Ebatelaka, mpe Elengelaka Biso mpo na Nkembo ya Seko
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Mayokani na Nzambe Elendisaka, Ebatelaka, mpe Elengelaka Biso mpo na Nkembo ya Seko

Ntango toponi kosala mayokani na Tata na Lola mpe kozwa nguya ya mobikisi mpo na kobatela yango, tokopambolama na esengo koleka kati na bomoi oyo mpe na nkembo ya bomoi ya seko na mokili ekoya.

Bandeko basi, esengo makasi ya kosangana na kibondekobasi ya mokili mobimba! Lokola basi oyo basalaka mpe babatelaka mayokani na Nzambe, tokabolaka bansinga ya molimo oyo esalisaka biso tokutana na mikakatano ya mikolo na biso mpe elengelaka biso mpo na Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto. Mpe kobatelaka mayokani epesaka biso ndingisa ya kozala basi ya nguya oyo bakoki kobenda basusu epai ya Klisto.

Baoyo bazwaki libatisi bayokanaki na mokolo yango ya kobosana te kozwa nkombo ya Yesu Klisto likolo na bango, mpo ete ntango nyonso komikundola Ye, kobatela mitindo na Ye, mpe kosalela ye kino na nsuka. Ntango tosalaka makambo oyo, Tata na Lola alakaka kolimbisa masumu na biso mpe apesaka biso nzela ya kozala moninga ya Molimo Mosantu. Mapamboli oyo ebandisaka biso kotambola na nzela oyo, soki tokobi kokende liboso mpe toyiki mpiko tii na suka, ekopesa biso nzela ya kofanda elongo na Ye mpe Mwana na Ye, na bokonzi ya likolo. Motonyonso oyo azwaki libatisi azali na elaka ya mapamboli oyo mpe matomba soki abateli liyokani basalaki na mokolo ya kafukafu wana.

Baoyo basalaka mayokani mosusu koleka na tempelo bazwaka bilaka ya nguya engebene na bosembo ya moto ye moko. Tolakaka na lokumu ete totosa mitindo ya Nzambe, kobika nsango malamu ya Yesu Klisto, kozala peto na bomoto, mpe kobulisa ntango na biso mpe batalanta na mosala ya Nkolo. Lokola mbano, Nzambe alakaka mapamboli ya kafukafu na bomoi oyo mpe libaku ya kozonga kofanda elongo na Ye.1 Na nzela wana, topesami, tozwi dotatio na, nguya ya kososola kati na bosolo mpe libungi, kati na malamu mpe mabe, kososola na mingongo ya mobulungano mpe ya mabe beboo oyo ekweyelaka biso lokola bombi uta ngambo nyonso. Oyo ezali likabo ya nguya mpeza!

Na bomilengeli mpo na likambo wana, mama na ngai mpe bandeko ya Lingomba ya Bamama Basungi ya boyebi basalisaki ngai na pona biloko nasengelaki na yango, kobakisaka bilamba ya milulu ya kitoko. Kasi bolengeli ya ntina eyaki kutu yambo nayeba nini ya kolata. Nsima ya kotuna ngai mituna mpo na koloba soki nazalaki ya kolongobana, episikopo na ngai alimbolaki mayokani oyo nakokaki kosala. Ndimbola na yee ya bokebi epesaki ngai litomba ya kokanisa na ntina na yango mpe nalengelama mpo na kosala mayokani wana.

Ntango mokolo yango ekomaki, nayanganaki na liyoki ya botondi mpe kimia. Atako soki nasosolaki ndimbola mobimba te ya mayokani nasalaki, nayebaki mpenza ete nakangisamaki na Nzambe na nzela ya mayokani wana mpe nalakelamaki mapamboli oyo nakokaki kososola moke soki nabatelaki yango. Uta boyebi ya yambo wana, nazali koyeba ntango nyonso ete kobatela mayokani tosalaka na Nzambe epesaka biso tokoka na nguya ya Mobikisi, oyo elendisaka biso na mimekano na biso oyo tokoki kokima te, epesaka bobateli uta na nguya ya satana, mpe elengelaka biso mpo na lobi ekoya ya nkembo ya seko.

Makambo tokutanaka na yango na bomoi ekoki kotiama na molongo uta ya kosekisa tii na ya kozokisa motema, uta na ya molili tii na ya nkembo. Makambo tokutanaka na yango moko na moko, esalisaka biso tososola mingi oyo etali bolingo ezanga motuya ya kofuta ya Tata mpe makoki na biso ya kobongwana na nzela ya likabo ya ngolu ya mobikisi. Kobatela mayokani na biso epesaka nzela na nguya ya Mobikisi epetola biso ntango tozali koyekola na nzela ya makambo— atako ezali mbeba mike ya bazangi bososoli to bokweyi ya monene. Mosikoli na biso azali kuna mpo na koyamba biso ntango tokweyaka soki tokotalela Ye.

Elilingi
Komikundola kokita ngomba monene

Esi otelema mokolo moko likolo ya ngomba molai na nsonge ya misapi na yo na pembeni na yango mpe mokongo na yo ebaluka na lubwaku na nse? Na lisano ya bokiti na nsinga, atako oyebi ete okangisami na likama te na bansinga mpe ekipema moko ya makasi oyo ekoki kotika yo na kimia na nse ya ngomba, kotelamaka kuna na nsonge ya mopanzi ezali likambo moko ebetisaka motema mbangumbangu. Mpo na kozonga nsima ya mopanzi ya ngomba mpe kodiembela na likolo, esengeli kopesa elikya na longo, oyo ekangisami na eloko eninganaka te . Esengaka kondimela moto oyo akopesa nguya na nsinga ntango ozali kokita. Mpe atako ekipema ezali kopesa yo mwa makasi mpo na kotala ntango ya bokiti, osengeli kondima ete moninga na yo akotika yo te okweya.

Elilingi
Kokita na bansinga
Elilingi
Bilenge basi kokitaka ngomba molai na bansinga

Namikundoli malamu kosalaka lisano ya bomikiti elongo na liboke moko ya bilenge basi. Nazalaki moto ya yambo na liboke ya kobanda. Ntango nazongaki nsima ya mopanzi ya ngomba, nabandaki kokweya kozangaka koyeba. Matondi, nsinga ebandaki koningana mpe bokiti na ngai ya mbangumbagu esilaki. Ntango nazalaki kodiembela na katikati ya nzela na etando ya libanga epasukapasuka ya mopanzi ya ngomba ya molayi, nazalaki kosambela makasi mpo na moto nyonso to eloko nyonso ezalaki kobatela ngai nabwakama te na mabanga na nse.

Nsima, nayekolaki ete ekangeli ya longo yango ekangamaki makasi te, mpe ntango kaka nalongwaki penepene ya nsonge, moto oyo azalaki kobatela ngai ayokaki mokongo mpasi mpe abendamaki na penepene ya mopanzi ya ngomba. Na lolenge moko to mosusu, akangaki makolo na ye na mwa mabanga. Kotikalaka ngwi na lolenge wana, azalaki na makoki ya kokitisa ngai na bokebi, loboko likolo ya loboko, na nsinga. Atako nakokaki komona ye te, nayebaki ete azalaki kosala na makasi na ye nyonso mpo na kobikisa ngai na likama. Moninga mosusu azalaki na nse ya mopanzi ya ngomba, ya kolengelama mpo na koyamba ngai soki nsinga ekatanaki. Ntango nakomaki penepene ya kosimba ye, akangaki na mokaba mpe akitisaki ngai tii na mabele.

Na Yesu Klisto lokola longo na biso mpe moninga abonga nie, tozali na kondima na bokasi ya bolingo na Ye na ya momekano mpe ya bokangolami ya suka na nzela na Ye. Lokola Mokambi M. Russell Ballard ateyaki: “Bondimeli Nzambe mpe Mwana na Ye, Nkolo Yesu Klisto, ezali … longo tosengeli kozala na yango na bomoi na biso mpo na kosimba biso makasi na bangonga ya kimpumbulu mpe mabe ya bato . … Bondimi na biso … esengeli kotiama na katikati ya Yesu Klisto, bomoi na ye mpe bomikabi na ye, mpe na bozongisami ya nsango malamu na ye.”2

Ekipema ya molimo oyo ebatelaka biso uta na bobukani likolo ya mabanga ya monguna ezali litatoli na biso ya Yesu Klisto mpe mayokani tosalaki. Tokoki koyekama likolo ya masungi oyo mpo na kokamba mpe komema biso na likama te. Lokola moninga na biso ya bolingo, Mobikisi akotika biso te tokweya mosika na Ye. Ata na bangonga na biso ya mpasi mpe mawa, Ye azali wana mpo na kotombola mpe kolendisa biso. Nguya na Ye lisusu esalisaka biso tobika uta na bilembo ya bomibomi ya mbala mingi ya maponi ya moto mosusu. Nzokande, tosengeli moko na moko kolata mokaba mpe kokanga mazita na bozangi likama. Tosengeli kopona kotelema na longo ya Mobikisi, mpo na kokangisama na Ye na nzela ya mayokani na biso.3

Lolenge nini tolendisaka longo wana? Tosambelaka na motema ya komikitisa, toyekolaka mpe tomaniolaka makomi, toliaka elambo poso moko na moko na molimo ya boyamboli, tobundaka mpo na kobatela mitindo, mpe tolandaka toli ya profeta. Mpe ntango tozali kokokisa mikumba na biso ya mikolo nyonso na ndenge ya “likolo koleka mpe esantu koleka”4 tokomaka mingi ya kokangisama epayi ya Mobikisi mpe, na ngonga moko, tosalisaka basusu baya epayi na Ye.

Lolenge nini nzela wana “ya likolo koleka mpe esantu koleka” ezali? Tomekaka kobika nsango malamu na masolo na biso nyonso na basusu. Tosalaka keba mpo na baye bazanga na kosalisaka solo, kolakisaka bolingo na nzela ya mosala ya moke. Tokabolaka nsango ya nsango malamu na baoyo basengeli na kimia mpe bokasi na bomoi na bango kasi “bayebi te wapi bakozwila yango.”5 Tosalaka mpo na kosangisa mabota mpo na seko na ngambo mibale ya elamba. Mpe mpo na baoyo basalaki mayokani na ndako ya Nkolo, lokola Mokambi Russell M. Nelson alimbolaki, “Mosali makuli ya tempelo ya mokolo moko na moko akolata garma ya bule ya bonganganzambe, [oyo] … ekundolisaka biso … totambola na nzela ya liyokani mokolo na mokolo na lolenge ya likolo koleka mpe esantu koleka.”6 Misala oyo ezali kaka libaku moko te kasi ezali ntina mpo na esengo na biso ya mokolo na mokolo—mpe bosepeli na biso ya seko.

Ezali na likambo moko ya motuya koleka mpo na bokoli na biso ya seko te koleka mayokani na biso na Nzambe. Ntango mayokani na biso ya tempelo ezali makasi, tokoki kotia elikya na bosangani ya esengo elongo na balingami na ngambo mosusu ya elamba. Mwana wana to moboti to molongani oyo asili kotika bomoi ya kufa azali likya na motema na ye mobimba ete okozala sembo na mayokani oyo ekangisaka bino elongo mpo na libela. Soki totali mpamba to tosaleli likolo likolo mayokani na biso na Nzambe, tozali kotia bansinga ya seko oyo na likama. Sikawa ezali ntango ya koyambola, kobongisa, mpe komeka lisusu.

Esengo ezalaka makasi soki tobongoli mapamboli ya esengo ya bosepeli ya seko na saisai ya ntango mokuse. Etali te mobu nini ozali na yango,oyo ezali bosolo ya solo: fungola mpo na esengo ewumelaka ezali kosalela nsango malamu ya Yesu Klisto mpe kobatela mayokani tosalaki. Profeta na biso, Mokambi Nelson, alobi ete “ekimelo na biso ya nsuka mpe ya biso esengo oyo bobele ewumelaka efandi na kosimbaka lingenda ya libende ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto, mobimba elongo na mayokani mpe makuli na yango. Ntango tozali kosala bongo, tokoki kotambola na likama te na nzela ya bamai ya mbonge mpamba te tozali na nguya ya Nzambe.”7

Ebele kati na biso bazali kokutana na bamai ya mbonge. Ntango toningisamaka na bambonge ya monguna mpe tozipamaka miso na mai makasi ya mpinzoli oyo eyaka na kpokoso wana, tokoki koyeba te nzela nini tokoluka nkayi ya masuwa ya bomoi na biso. Tokoki te ata kokanisa ete tozali na makasi ya kokoma na libongo. Komikundolaka nani ozali—mwana ya bolingo ya Nzambe—mpo na nini ozali na mabele, mpe ya yo ntina ya kozala elongo na Nzambe mpe ya yo balingami na yo ekoki kokomisa emoneli na yo polele mpe komema yo na nzela ya sembo. Na kati ya ekumbaki yango, ezali na pole ya kongenga mpo na kolakisa biso nzela. “Nazali pole oyo engengaka kati ya molili,” Yesu alobaki.8 Tozali na kondima likama ezali te ntango totaleli pole na Ye mpe tosimbi malamu bosembo ya mayokani na biso.

Ezalaki libaku malamu ya kokutana na basi ya mibu nyonso ya mokili mobimba kofandaka na makambo ya lolenge na lolenge mpenza oyo bazali kobatela mayokani na bango. Mokolo na mokolo, bazali kotalela Nkolo mpe profeta na Ye mpo na bokambami, na esika ya kotalela media eyebana. Atako mikakatano na bango ya moto na moto mpe bafilozofi ya mpasi ya mokili oyo ezali komeka kopekisa bango babatela mayokani na bango, bazali na mokano ya kotikala na nzela ya liyokani. Bazali kotia motema na elaka “nyonso [oyo] Tata azali na yango.”9 Mpe atako ozali na mibu nini, moko na moko na bino basi oyo basali mayokani na Nzambe bazali na makoki ya kotombola likolo pole ya Nkolo mpe kokamba basusu epai na Ye.10 Na nzela ya kobatela mayokani na yo, Akopambola yo na nguya ya bonganzambe na Ye mpe akopesa yo likoki ya kozala na botindiki ya mozindo likolo ya banso oyo osololaka na bango. ALokola Mokambi Nelson alobaki, ozali mwasi oyo akokokisa masakoli oyo mayebisamaki kala liboso!11

Bandeko basi balingami, likolo ya manso , botikala na nzela ya liyokani oyo ememaka epai ya Yesu Klisto! Topambolami mpo na koya na mabele na ngonga oyo batempelo ezali mingi na mokili. Kosalaka mpe kobombaka mayokani ya tempelo ezali mpo na mondimi nyonso ya kolongobana ya Eklezia. Bilenge babala te, bosengeli te kozela kino libala te to kosala misio mpo na kosala mayokani ya bule wana. Bokoki komilengela lokola elenge mwasi mpo ete bokoka kozwa bobateli mpe bokasi oyo mayokani ya tempelo epesaka noki nsima ya mibu 18 ntango obelemi mpe oyoki mposa ya kozwa mpe kotosa mayokani ya tempelo wana.12 Yo oyo osili kozwa mapamboli ya tempelo, kotika bayini to bobungisi makanisi libanda ebenda yo mosika uta na babosolo ya seko oyo. Yekola mpe tuna bato ya elikya ya solompo na bososoli makasi mingi ya ndimbola ya bule mpe mapamboli ya mayokani oyo osalaki. Kende tempelo mbala nyonso ekokoka yo mpe yokela Molimo. Okoyoka bondimisami ete ozali na nzela ya Nkolo. Okozwa mpiko ya kokoba lokola mpe komema basusu elongo na yo.

Natatoli ete ntango toponi kosala mayokani na Tata na Lola mpe kozwa nguya ya Mobikisi mpo na kobatela yango, tokopambolama na esengo kati na bomoi oyo koleka oyo tokoki kokanisa sikawa mpe nkembo ya bomoi ya seko na mokili ekoya.13 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.