Likita Linene
Bosala Oyo Ezali Motuya Koleka
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Bosala Oyo Ezali Motuya Koleka

Ntango totie Jesu Klisto na katikati ya bomoi na biso, tokopambolama na makasi ya molimo, bosepeli, mpe esengo.

Mikolo mingi te eleki, moninga moko ya bolingo azwaki likanisi ya kotala mwasi moko na palwase na ye. Abwakaki pembeni mposa wana mpo ete ayebaki ye kala te—yango ezalaki mpenza kaka na nzela te. Kasi lokola likanisi etikaki te koyela ye, azwaki mokano ya kosala kolandisa mpo na yango. Mpo ete asilaki kobanda koyoka yambo mabe na botali ya mbalakaka, andimisamaki ete komemela ndeko mwasi wana eloko ekokaki kosunga na kokitisaka komitungisa na ye. Na bosolo, akokaki te kokende maboko pamba! Na boye asombaki sani ya miliki ya malili mpe akendaki kobanda oyo amitungisaki ekokaki kozala kokende kotala bato oyo ezali ya mabe.

Abetaki na ekuke ya ndeko mwasi, mpe ndeko mwasi ayanolaki na bokuse. Moninga na ngai apesaki ye miliki ya malili na saki ya muke ya lokasa ya langi ya shokola, mpe lisolo ebandaki. Yango ezwaki ntango molayi te mpo na moninga na ngai asosola mpo na nini esengelamaki naya kotala ye. Lokola efandaki bango elongo na liboso ya porch, mwasi abimisaki ebele ya mikakatano azalaki na yango. Nsima ya ngonga moko ya kosololaka na ntango ya moyi ya eleko ya moyi, moninga na ngai amonaki miliki ya malili koyanduka katikati ya saki ya lokasa ya langi ya shokola.

Ye alobaki, “Nayoki mawa mpenza ete miliki na yo ya malili eyanduki!”

Mwasi ayanolaki na bolingo nyonso, “Likambo te! Nakokaka miliki te!”

Na kati ya ndoto, Nkolo alobaki na profeta Lehi, “Opambolami Lehi, mpo na na ntina ya biloko osalaki.”1

Kozala moyekoli ya Yesu Klisto esengaka mingi koleka kolikyaka mpe kondimaka. Yango esengi bokasi, koningana, mpe bomikabi. Yango esengi ete tosala eloko moko, kozalaka “basali ya maloba, mpe bobele bayoki te.”2

Na oyo etali boyanduki ya miliki ya malili, nini ezali motuya koleka? Miliki ya malili? To moninga na ngai asalaki kaka eloko moko?

Nazwaki mayele moko ya kitoko na elenge mwasi moko ya bolingo oyo atunaki motuna moko ya solo mpenza: “Ndeko Mwasi Craven, lolenge nini oyebi ete eloko nyonso etaki Eklezia ezali ya solo? Mpo ete ngai nazali koyoka eloko moko te.”

Liboso ya kopesa eyano, Yambo natunaki ye mwa mituna. “Yebisa ngai na ntina ya boyekoli ya makomi yo moko.”

Ayanolaki, “natangaka makomi te.”

Natunaki, “Boni boni na libota na yo? Boyekolaka Yaka, Landa Ngai esika moko?”

Ye alobaki, “Te.”

Natunaki oyo etali nsambo na ye, “Nini oyokaka ntango ozali kosambela?”

Eyano na ye, “Ngai nasambelaka te.”

Eyano na ngai epai na ye ezalaki pete: “soki olingi koyeba nyonso, okosengela kosala eloko moko.”

Ezali bongo te mpo na nyonso tolingi koyekola to koyeba? Nabengaki moninga na ngai ya sika abanda kosala nsango malamu ya Yesu Klisto: kosambela, kotangaka, kosalisaka basusu, mpe kolikyaka na Nkolo. Mbongwana ekoki koya te ntango tosali eloko te. Yango eyaka na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu ntango tosali bokasi ya solo ya koyeba na kotunaka, kolukaka, mpe kobetaka ekuke. Yango eyaka na kosalaka.3

Na Doctrine et Alliances, Nkolo na mabaku alobi, “Yango ezali na motuya te.”4 Etindi ngai na maniola ete soki biloko mosusu ezali motuya te, to motuya moke, esengeli mpe kozala na biloko ya motuya mpenza. Na makasi na biso ya kosala eloko moko to kosala eloko te,, tosengeli komituna bisomoko, “Nini ezali motuya koleka nyonso?”

Balobeli basaleka mbala mingi maloba lokola “Ntina” to “Esengeli kozala” na elikya ya komema biso tondima ete biloko bazali koteka ezali ntina mpo na esengo to bolamu na biso. Kasi oyo bazali koteka ezali solo ntina? Biso tosengeli solo kozala na yango? Yango ezali solo motuya?

Oyo ezali mwa makanisi ya koyeba: Nini ezali motuya mpenza?

  • Motango boni ya ba “likes” tozwaka na babomisi na biso na reseaux sociaux? To boniboni tolingami mpe topesami motuya na Tata na biso ya Lola?

  • Kolataka bilamba ya sika oyo bato nyonso bazali kolataka? To kolakisaka botosi mpo na nzoto na biso na kolataka na bomikitisi?

  • Kozwaka biyano na nzela ya boluki na internet? To kozwaka biyano uta na Nzambe na nzela ya Molimo Mosantu?

  • Kolingaka mingi? To kozalaka na esengo na oyo epesamelaki biso?

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki:

“Elongo na Molimo Mosantu lokola moninga na bino, bokoki komona solo na nzela ya ezaleli ya koyebana oyo ekoti na mabota na biso. Bokoki kozala mayele mpenza kolela bankola ya liboso bazalaka ata mokolo moko te. …

Botia mobeko mpo na ndambo ya mokili!”5

Esengaka bokasi kotia makanisi na oyo ezali solo malonga mpo na esengo ekowumela. Ezali na eloko Satana akolinga mingi te koleka komona biso kobungisa bantina na biso ya seko, komemaka biso kobebisa ntango na biso ya motuya, makoki, to bokasi ya molimo na biso na biloko oyo ya motuya te. Nabengi moko na moko na biso na kosambela kotala makambo oyo kobulunganisa biso na kosalaka oyo ya motuya koleka.

Molakisi ya kelasi ya misato ya mwana na biso ya mobali ya mokolo ateyaki kelasi na ye ya “kokolisa mbongo na bino.” Yango ezalaki likondolisi na bayekoli na ye ya bilenge ete bango bazali batambwisi ya makanisi na bango mpe bakoki na bongo kotambwisa nyonso bazali kosala. Na mikundoli ngai moko “kokolisa ya ngai bongo” ntango namimoni ngai moko kokweyaka na makambo ezali na motuya muke.

Moyekoli moko ya kelasi ya likolo ayebisaki ngai kala te ete ekomi mingi mingi katikati ya babilenge mosusu ya Eklezia kobuka mitindo na mwango moko ebongisami ya koyambola nsima. “Yango ezali lokola mpete moko ya lokumu,” bayebisaki ngai. Na tembe te, Nkolo akokoba kolimbisa baye oyo bayamboli ya komikitisa “na makanisi ya solo.”6 Kasi Bomikabi ya ngolu ya Mobikisi esengelaki ata mokolo mokokosalelama na lolenge ya kotiola. Toyebi lisese ya mpate oyo ebungaki. Ya solo, mobateli mpate akotika bampate 99 mosusu mpo na koluka moko oyo abungaki. Kasi okoki kokanisa esengo oyo Mobateli mpate malamu ayokaka na baye oyo baponaka kozala ba 99? Baoyo bakangami elongo mpe kosungana moko mpe mosusu kobika mayokani na bango? Okoki komona nini mokili, to eteyelo na bino, to mosala na bino, to ndako na bino ekokaki kozala soki kozalaka na botosi ezalaki eloko eyebana moto azali kosala? Ezali oyo etali kosala bomoi malamu koleka te—ezali oyo etali kozwa esengo ntango tosalaka malamu koleka mpo na kobika mayokani tosalaki na Nkolo.

Na mokili oyo elakisi ntembe mingi na maye matali Nzambe, mpe mobulungano mpe botindiki kobutaka, oyo ezali ngonga tosengeli kotikala pembeni na profeta. Lokola molobeli ya Nkolo, tokoki kondimisama ete oyo alendisi, apesi toli, mpe asengi biso tosala ezali makambo ezali motuya mpenza.

Atako ekoki kozala pete te, ezali kaka na nzela moko ya kosala eloko moko ya malamu. Ntango bazalaki kosololaka na lisanga moko ya baninga na eteyelo, motema ya elenge mwasi moko ebukanaki ntango lisolo ebalukaki na kotukaka bizalela ya Eklezia. Ayaki komona ete akokaki te kotikala kimia—asengelaki kosala eloko moko. Na botosi nyonso, alobelaki bolingo ya Tata na Lola mpe lolenge nini mitindo Ye atiaki ezali kopambola mpe kobatela bana na Ye. Ekokaki kozala pete mpenza mpo na ye kosala eloko te. Kasi nini ezalaki motuya mpenza? Kokundama na kati ya etuluku? To kotelema likolo lokola nzeneneke ya Nzambe na “ntango nyonso mpe na makambo nyonso, mpe na bisika nyonso”?7

Soki Eklezia ya Yesu Klisto ezongisama ezali kobima na molili, tosengeli kobima na molili . Lokola basi babombi-mayokani, tosengeli kongengisa pole ya nsango malamu na biso likolo ya mokili mobimba na kokomaka makasi mpe komibimisaka. Tosalaka yango elongo lokola bana basi ya Nzambe—makasi moko ya 8.2 milio ya basi ya mibu 11 mpe koleka baoyo mosala ezali ndenge moko mpenza. Tozali kosangisaka Yisalaele ntango tokoti na mosala ya libiki mpe ya bonetoli: kobundaka mpo na kobika nsango malamu ya Yesu Kisto, kobatelaka baye bazangi, kobengaka banso bayamba nsango malamu, mpe kosangisaka mabota mpo na seko.8 Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali nsango malamu ya mosala mpe ya esengo! Tika biso tokitisa te na nse makoki na biso ya kosala makambo oyo ezali motuya koleka. Libula na biso ya kibonzambe epesi biso makasi mpe kondimisama ya kosala mpe kozala nyonso oyo Tata na biso ya Lola ya bolingo ayebi ete tokoki kozala.

Mama ya likambo ya bilenge mpo na mobu oyo ewuti na Masese 3:5–6:

“Likia na Nkolo na motema na yo mobimba; mpe koyekama te na bososoli na yo moko.

“Na banzela na yo nyonso ndima ye, mpe akokamba banzela na yo.”

Eloko moko ya monene na kolikyaka na Nkolo ezali kokende liboso, kondimaka ete Ye akotambwisa biso atako tozali na biyano nyonso te.

Bandeko basi, ezali te na ntina ya miliki ya malili. Mpe ezali te na ntina ya kosalaka mingi koleka. Ezali na ntina ya kosalaka oyo ya motuya. Ezali kosalelaka malongi ya Klisto na bomoi na biso ntango tobundi mpo na kokoma mingi lokola Ye.

Mingi tokosala mpo na kotikala makasi na nzela ya mayokani, mingi mpe bondimi na biso ekokola. Na mingi bondimi na biso ekoli, mingi tokoyoka mposa ya kotubela. Mpe mingi tokoyambola, mingi tokokembisa kiboninga ya mayokani na Nzambe. Mokangano ya mayokani ekomema biso na tempelo, mpo ete kobombaka mayokani ya tempelo ezali lolenge tokokoba kino na nsuka.

Lokola tokotia Yesu na kati kati ya bomoi na biso, tokokambama na makambo oyo mazali motuya koleka manso. Mpe tokopambolama na makasi ya molimo, bosepeli, mpe na esengo! Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. 1 Nefi 2:1; nsete ebetamaki.

  2. Yakobo 1:22.

  3. Tala Alma 5:45–46; Russell M. Nelson, “Drawing the Power of Jesus Christ into Our Lives,” Liahona,, Sanza ya mitano 2017, 39–42.

  4. Tala Doctrine et Alliances 27:2; 80:3.

  5. Russell M. Nelson, “Hope of Israel” (worldwide youth devotional, June 3, 2018), HopeofIsrael.ChurchofJesusChrist.org.

  6. Moroni 6:8.

  7. Moziya 18:9; tala lisusu “Young Women Theme,” ChurchofJesusChrist.org.

  8. Tala General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints (Mokanda Monene: Kosalaka na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, 1.2, ChurchofJesusChrist.org.