Likita Linene
Linga, Kabola, Bengisa
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Linga, Kabola, Bengisa

Ntango tolingi, tokaboli, mpe tobengisi, tokoti na mosala monene ya nkembo oyo elengeli mabele mpo na bozongi ya Masiya na yango.

Kanisa elongo na ngai, mpo na ntango moke, kotelemaka likolo ya ngomba ya Galilea, komonaka kitoko mpe nkembo ya Mobikisi asekwa kotalaka bayekoli na Ye. Boniboni ezali kitoko komimona yomoko mpenza koyokaka maloba wana, oyo Ye akabolaki na bango, lilendisi na Ye ya motuya ya “kokende, mpe koteya mabota nyonso, kobatisaka bango na nkombo ya Tata, mpe ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu.”1 Solo mpenza, maloba wana ekopesa nguya, ekofula, mpe ekoningisa moko na moko na biso, lokola esalaki na bapostolo na Ye. Nde bongo, bapesaki babomoi na bango mobimba na kosalaka kaka bongo.

Likambo ya motuya, ezalaki bobele ba Apostolo te oyo batiaki maloba ya Yesu na motema. Bandimi ya Eklezia ya kala mpenza, uta ba oyo ya sika koleka kino ya kokuba makasi, bazwaki eteni na mosala monene ya mobikisi, kokabolaka bansango ya kitoko ya nsango malamu na baye bakutanaki na bango mpe bayebaki. Mokano ya kokabola litatoli na bango ya Yesu Klisto ekelaki bokoli monene ya Eklezia na Ye ya sika ezongisami.2

Biso mpe, lokola bayekoli ya Klisto, tobengisami kopanza nsango na Ye lelo, lokola soki tozalaki kuna likolo ya ngomba ya Galilea ntango asakolaki yango mbala ya yambo. Etinda oyo ebandaki na 1830, ntango Joseph Smith atiaki pembeni ndeko na ye ya mobali Samuel lokola misionele ya kala ya Eklezia ya Yesu Klisto.3 Kobanda ntango wana, mingi koleka milio 1.5 ya bamisionele batambolaki katikati ya mokili koteyaka mabota nyonso mpe kobatisaka baye oyo bayambi nsango kitoko ya nsango malamu ezongisamil.

Oyo ezali malongi na biso. Mposa na biso ya kitoko.

Uta na bana na biso ya bilenge kino ya mokolo kati na biso, tokanisaka mpo na ngonga nini tokoki koyanola na mbela ya Mobikisi mpe kokabola nsango malamu elongo na mabota ya mokili Nandimisami ete bino bilenge mibali mpe bilenge basi boyokaki momekano ya nguya ya ndenge moko uta na profeta na biso lobi eleki ntango abengisaki bino komibongisa mpo na mosala ya misionele ya ntango mobimba kaka lokola Mobikisi asalaki na Bapostolo na Ye.

Lokola bakimi bango na esika ya kobanda, tozali kozela na motema moto libiangami monene, kobakisa na linzaka ya profeta, koyebisaka kobanda ya momekano ya bokimi! Mposa oyo ezali ya lokumu mpe ya bofuli; kasi, tika totala motuna moye: Mpo na nini ekobanda biso banso te sikawa?

Okoki komituna, “Lolenge nini nakoki kozala misionele kozanga macaro na nkombo?” To tomilobela bisomoko, “bamisionele ya ntango mobimba batiami pembeni mpo na kosala mosala yango. Nakolinga kosalisa, kasi ntango mosusu nsima ntango bomoi ekovanda kimya moke.”

Bandeko mibali mpe basi, ezali mpenza pete lokola yango! Na esengo mpenza, etinda monene ya Mobikisi ekoki kokisama na nzela ya mibeko ya pete, ya kososola na pasi te eteyama na moko na moko uta na bomwana: kolinga, kokabola, mpe kobengisa.

Bolingo

Eloko ya yambo tokoki kosala ezali kolinga lokola Klisto alingaki.

Mitema na biso ezali bozito na mpasi ya bato mpe kondongwana tozali komona nzinga nzinga na mokili katikati na bangonga oyo ya bitumba. Nzokande, tokoki lisusu kozwa lifuli ya bolingo ya mawa mpe kibomoto oyo emonisamaki na bato bipayi nyonso na nzela ya babokasi na bango kotanda loboko na baye babwakisami—baye balongolami na bandako na bango, bakabwani na bamabota na bango, to kokutanaka na lolenge mosusu ya mawa mpe bozangi elikya.

Kala mingi te, masanga ya bapanzi-nsango balobaki lolenge nini lisanga moko ya bamama ya Pologne, na mawa ya kokima mabota ezangi elikya, batikaki bapusupusu ya bana etondi na biloko na esika ya bokiti ya engbunduka ya nzela eyebani, ebongisami mpe kozelaka bamama mpe bana bakima bitumba oyo bakozala na yango mposa na kolekaka ndelo ntango bakitaki na engbunduka . Na bosolo mpenza, Tata na biso ya Lola aseki likolo ya misala ezanga lifuti lokola oyo, mpo soki tomemi mikumba ya moko mpe mosusu, biso “tokokisi mobeko ya Klisto.”4

Ntango nyonso tolakisi bolingo lokola ya Klisto epai ya bato na biso ya pembeni, toteyaka nsango malamu—atako tolobi likambo moko te.

Bolingo mpo na basusu ezali elembo kitoko ya motindo monene ya mibale ya kolinga moto na biso ya pembeni;5 ezali kolakisa mosala ya Molimo Mosantu kosalaka na kati ya milimo na bisomoko. Na kolakisaka bolingo ya Klisto na basusu, tokoki kosala ete baoyo bamoni misala na bino ya malamu “bakumisa Tata na [biso] oyo azali na likolo.”6

Tosalaka yango na kozelaka eloko moko te na nsima.

Solo mpenza, elikya na biso, ezali ete bakondima bolingo na biso, atako tokoki kokamba te lolenge bakoyamba yango.

Oyo tozali kosala mpe banani tozali yango mpenza nde etali biso.

Na nzela ya bolingo lokola ya Klisto mpo na basusu, toteyaka kitoko biloko ya nkembo, mbongwana-ya bomoi ya nsango malamu ya Yesu Klisto, mpe tosangani na pembeni mpenza na bokokisami ya etinda na Ye ya monene.

Kabola

Eloko ya mibale tosengeli kosala ezali kokabola.

Na ntango ya ebandeli ya basanza ya bokono COVID-19, Ndeko mobali Wisan ya mboka Thailand ayokaki botindiki ya kokabola mayoki mpe makanisi na ye ya oyo azalaki koyekola na kotangaka Buku ya Mormon na compte na ye na réseau social. Na moko ya makomi ya yemoko mpenza, akabolaki lisolo ya bamisionele mibale ya Buku ya Mormon, Amuleki mpe Alma.

Ndeko na ye ya mobali, Winai, atako akangamaki na babondimi na ye ya mangomba, asimbamaki na likomi mpe ayanolaki, atunaki na bozangi bozeli, “Nakoki kozwa buku oyo na lokota ya Thai?”

Wisan abongisaki na bwanya nyonso copi moko ya Buku Mormon oyo epesamaki na bandeko basi bamisionele mibale, baoyo babandaki koteya ndeko na ye ya mobali.

Wisan asanganaki na mateya na nzela ya internet katikati na yango akabolaki mayoki na ye na ntina ya Buku ya Mormon. Winai ayekolaki kosambela mpe atangaki na molimo ya boluki-bosolo, kondima mpe koyamba bosolo. Na basanza moke Winai azwaki libatisi!

Wisan nsima alobaki, “Tozali na mokumba moko ya kozala esaleli na maboko ya Nzambe, mpe tosengeli kozala ya kobongama ntango nyonso mpo na Ye mpo na kosala mosala na Ye na lolenge na Ye na nzela na biso.” Lipambola na bango ya libota eyaki mpo ete Wisan akabolaki nsango malamu na lolenge ya pete mpe ya bomoto.

Biso nyonso tokabolaka biloko na basusu. Tosala yango mwa mingimingi. Tokabolaka bafilme mpe bilei biso tolingaka, biloko ya kosekisa tozali komona, babisika totalaka, bikeko tosepelaka na yango, maloba tozwelaka mafuli.

Lolenge nini tokoki kobakisa na pete na molongo ya biloko tosi tokaboli nini tolingaka na ntina ya nsango malamu ya Klisto?

Mpaka Dieter F. Uchtdorf alimbolaki: “soki moto moko atuni na ntina ya suka ya mposo na bino, kobanga te koloba na ntina ya mayele ozwaki na eklezia. Loba na ntina ya bana mike oyo batelamaki liboso ya lisanga mpe bayembaki na lombango lolenge nini bazali komekaka kozala lokola Yesu. Loba na ntina ya lingomba ya bilenge oyo balekisi ntango kosungaka bampaka na bandako na bango ya bopemi na kokoma mambi na bango moko ya kala.”7

Kokabola elakisi te “koteka” nsango malamu. Osengeli komona lisakola to kobongisa makasi ebongi te ya moto moko.

Ntango ekomelaka misionele kosala, Nzambe asengi yo te kozala kapita na Ye; Ye azali, nzokande, asengi ete ozala mokaboli na Ye.

Nakokabolaka mayele na biso ya malamu ya nsango malamu elongo na basusu, tomipesaka na bokokisi ya mosala monene ya Mobikisi.

Bengisa

Eloko ya misato bosengeli kosala ezali kobengisa.

Ndeko mwasi Mayra azali mobongwaniya sika uta mboka Equateur. Esengo na ye ya nsango malamu emataki na lombango nsima ya libatisi na ye ntango abengaki baninga mpe balingami nzinga nzinga na ye na nzela ya compte na ye na reseaux sociaux. Bato ya libota mpe baninga mingi baoyo bamonaki bilili na ye bayanolaki na mituna. Mayra asololaki na bango, kutu abengaki bango na ndako na ye mpo na kokutana elongo na bamisionele.

Baboti ya Mayra, bandeko na ye, tata mwasi na ye, bana ya banoko na ye mibale, mpe ebele ya baninga na ye bazwaki libatisi mpo ye abengisaki bango na bokasi nyonso “koya mpe komona,” “koya mpe kosala,” mpe “koya mpe kotikala.” Na nzela ya libyangami na ye ya pete mpe ya kibomoto, batu koleka 20 bandimaki libyangami na ye na aandimi babatisama ya Eklezia ya Yesu Klisto. Yango ekomaki bongo mpo ete Ndeko mwasi Mayra na mpete abengisaki basusu komona esengo ye ayokaki lokola mondimi ya Eklezia.

Elilingi
Ndeko mwasi Mayra mpe baoyo abengisaki bayokaki esengo ya nsango malamu

Ezali na bankama ya mabiangami tokoki kotindela basusu. Tokoki kobengisa basusu “koya mpe komona” mosala ya elambo, mosala ya palwasi, video na internet oyo ezali kolimbola nsango malamu ya Yesu Klisto. “Boya mpe bomona” ekoki kozala libyangami ya kotanga Buku ya Mormon to kotala tempelo ya sika na mikolo ya botali ya bobulisi na yango. Ntango mosusu, libyangi ezali eloko moko topesaka na kati—libyangi na bisome, kopesaka biso bososoli mpe mabaku ezingi biso, mpo na kosala.

Na eleko na biso oyo ya internet, bandimi bakabolaka masolo na nzela ya réseau social. Ezali na bankama, soki te bankoto, ya makambo ya bolindisi oyo bokoki komona elongobani mpo na kokabola. Eloko yango epesi mabyangami ya “koya mpe komona,” “koya mpe kosala,” mpe “koya mpe kozala ya.”

Ntango tobengisi basusu koyekola mingi na ntina ya nsango malamu ya Yesu Klisto, tomikotisi na libyangi ya Mobikisi ya komipesa na mosala na Ye.

Bosukisi

Balingami bandeko na ngai mibali mpe basi, tolobelami lelo biloko misato ya pamba—biloko ya pete—oyo moto nyonso akoki kosala. Biloko bino bokoki kosala! Ntango mosusu bosili kosala yango—kutu ata kozanga bososoli na mobimba ete bozali kosala yango!

Nabengisi bino bokanisa lolenge nini bokoki kolinga, kokabola mpe kobengisa. Ntango bosali bongo, bokoyoka motango moko ya esengo koyebaka ete bozali kosala maloba ya Mobikisi na biso ya bolingo.

Oyo nazali kosenga bino kosala ezali pologalame ya sika te. Boyokaki mibeko oyo yambo. Yango ezali te “eloko monene elandi” oyo Eklezia ezali kosengaka bino kosala. Biloko oyo misatu ezali kaka bobendani ya nani tozali mpenza lokola bayekoli ya Yesu Klisto.

Macaro moko na kombo to mokanda esengami te.

Libiangi moko ebongisami esengelami te.

Ntango biloko yango misato ekokoma eteni ya bomoto ya nani biso tozali mpe tozali kobika, yango ekokoma botalisi ya pete ya bolingo ya Nzambe, ya botindiki te.

Lokola bayekoli ya Klisto oyo basanganaki elongo mpo na koyekola uta na Ye na Galilea mibu 2,000 eleki, biso mpe tokoki koyamba mokumba ya Mobikisi mpe kokende na mokili mobimba koteyaka nsango malamu.

Ntango tolingi, tokabola, mpe tobengisi, tokoti na mosala monene ya nkembo oyo elengeli mabele mpo na bozongi ya Masiya na yango.

Ete tokoka koyanola na libiangi ya Mobikisi mpe kosala makasi mpo na komipesa na mosala na Ye monene ezali libondeli na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Matai 28:19.

  2. Nini ezalaki ntina ya bokoli ya Eklezia ya kala? Mokomi lisitwale moko akanisaki: “Eloko ya liboso oyo etindaki boluki makasi na oyo etali lolenge ya bondimi ezalaki bokutani ya moto yemoko na bandimi mosusu. … Kobika mpe kosala penepene na baye oyo bazalaki kolanda Yesus, kozalaka nzeneneke ya bizaleli na bango na pembeni mpe koyoka ntango bazalaki kolobela nsango malamu katikati ya misala ya pamba ya mokolo na mokolo, ezalaki kokutisama na libaku ya mbonguana ya babomoi. Na lolenge oyo, nguya ya bobendani ya bondimi ya Klisto mingi ezalaki moke na lisakola ya bato ya basali na yango bayebani te lokola na litatoli ya kimia ya basanjoli ya pete ya Yesu kotatolaka bosolo ya bomipesi na bango na nzela ya etingia na bango, bomikoki na bango,mpe kofungwama na bango na basusu” (Ivor J. Davidson, The Birth of the Church: From Jesus to Constantine, A.D. 30–312 [2004], 108–9).

  3. Tala Lucy Mack Smith, History, 1845, lokasa 169, josephsmithpapers.org.

  4. Bagalatia 6:2.

  5. Tala Matai 22:39.

  6. Matai 5:16.

  7. Dieter F. Uchtdorf, “Missionary Work: Sharing What Is in Your Heart,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 17.