Likita Linene
Liloba ya Boyingisi
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Liloba ya Boyingisi

Tokumisi bana basi ya Nzambe na liyangani oyo ya motuya na komikotisaka na makambo na bango mpe ya masanga na bango.

Balingami bandeko basi, lokola tobandi liyangani ya basi na likita linene oyo ya momesano te, nazali na esengo ya kopesa liloba oyo ya boyingisi uta na Bokambi ya Yambo.

Mayangani na biso ya poso ezali na lisolo moko ya bantina ekeseni mpe bayoki bakeseni. Na pokwa oyo tobakisi na lisolo yango ntango tomikotisi na ntina moko ya sika mpe nzela moko ya sika mpo na lobi ekoya. Nsango malamu ya Yesu Klisto ebongwani te. Malongi ya nsango malamu ebongwani te. Mayokani na biso ya moto yemoko ebongwani te. Kasi mibu na mibu, bokutani tosalaka mpo na kopesa maloba na biso ebongwanaka mpe ekokoba bongo kobongwana mibu ekoya.

Mpo na sikawa, bokutani ya poso na mpokwa oyo ezali liyangani moko ya likita linene, ezali ya liyangani ya lisanga songolo te. Lokola mayangani nyonso ya likita linene, kobongisama, balobi, mpe miziki ebongisamaka na Bokambi ya Yambo.

Tosengi Mokambi Jean B. Bingham, Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi, akamba liyangani oyo. Mayangani ya baposo na mpokwa ya mikolo ekoya ekoki kokambama na moko ya Bayangeli Banene ya Eklezia basusu, lokola bandimi ya babokambi ya Mangomba ya Bamama Basungi, Bilenge Basi, mpe Eteyelo ya bana, baponami na Bokambi ya Yambo.

Na butu oyo, liyangani ya poso na pokwa ya likita linene oyo ekolobela mingi makambo ya basi Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Yango ekokotisa malongi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo Mya Nsuka, bpolitiki ya Eklezia oyo etali mingimingi basi, mpe mikumba minene mpe misala ya masanga oyo ezali kosangisa basi mpe bilenge basi ya Eklezia. Atako liyangani oyo epanzami nsango na mokili mobimba na nzela ya internet lokola mayangani nyonso ya likita linene, bato babengami kozala n0a Ndako monene ya Likita mpo na liyangani oyo ezali ya basi mpe bana basi ya mibu 12 mpe likolo. Tokotisaki mpe mwa bakambi ya bonganganzambe oyo bazali kokamba bamangomba ebiangemi kozala.

Oyo tozali kokotisaka awa ezali koyanola na banzela ya bopanzi nsango ekotami sikawa mpo na bakambi mpe bandimi ya Eklezia ya Nkolo na mokili mobimba. Malongi ya nsango malamu ya Yesu Klisto ezali mpo na moto nyonso, yango ezali bongo ntina na biso monene mpe bolayi na biso ya bopanzi nsango. Tokumisi bana ya basi ya Nzambe na liyangani oyo ya motuya na komikotisaka na makambo na bango mpe ya masanga na bango.

Tozali na botondi ete tekinolozi ya bopanzi nsango epesi sikawa bakambi ya Eklezia makoki ya kokamba botangi moko moko na kolobelaka bato na bato na bisika na bango. Toyambi lisusu malamu likambo ete makoki ya kosala mimbembo mikolo yo ezali kobuta. Yango epesi biso nzela ya kotinda bakambi ya Eklezia bakamba boyekoli ya botambwisi esengelami mbala na mbala miso-na-miso kati na elanga.

Oyo ezali mosala ya Nkolo Yesu Klisto. Tozali basali na Ye, bayangelami na Molimo Mosantu. Tobondeli mpo na mapamboli ya Nkolo na biso ezala likolo ya bakambi ya masanga oyo mpe likolo ya basi mpe bana basi ya bosembo oyo bazali kosalela Nkolo kati na masanga oyo mpe bomoi ya bato na bango, na nkombo ya Yesu Klisto. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.