Likita Linene
Sikawa Ezali Ntango
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Sikawa Ezali Ntango

Sikawa ezali ntango tokoki koyekola. Sikawa ezali ntango tokoki koyambola. Sikawa ezali ntango tokoki koyambola.

Bandeko balingami na ngai mibali mpe basi, likita monene oyo ezalaki ya lisituale na banzela mingi. Topambolami na nsambo, masukulu, mpe miziki oyo ebetamaki. Tosili kofulama na molimo na basali ya Nkolo.

Tozwaki bokambi ya ntina mpo na mikolo mikoya. Losambo na ngai ezali ete Molimo alobelaki bino mbala moko na ntina ya makambo Nkolo alingi bino kosala.

Ntango nyonso makambo ya mikolo mikoya eyebani te. Eleko ebongwanaka. Mbongwana ya nkita ya mokili eyebanaka te. Makambo ya mabe, makama, mpe bokono ekoki kobongola bomoi na lombangu. Makambo oyo elekelaka mosika mayele na biso bato. Kasi ezali na boko makambo tokoki ckoyangela, na kati totangi lolenge nini tolekisaka ntango na biso ya mokolo na mokolo.

Nalingaka loyembo oyo ya Henry Van Dyke, etiamaki na kati ya etando ya moi ya Wells College na New York. Etangami ete:

Elilingi ebimisami na mosapi na ngai

Ekaboli lobi ekoya na lobi eleki:

Yambo na yango, elali ngonga ebotami te,

Na molili, mpe mosika koleka nguya na bino.

Nsima ya mondelo na yango oyo ezongaka te,

Ngonga oyo ekeyi, ezali lisusu ya yo te:

Ngonga moko kaka ezali na maboko na yo,—

SIKAWA likolo na yango elili etelemi.1

Iyo, tokoki mpe tosengeli koyekola uta na lobi eleki, mpe iyo, tosengeli komilengele mpo ya lobi ekoya. Kaka bobele sikawa nde tokoki kosala. Sikawa ezali ntango tokoki koyekola. Sikawa ezali ntango tokoki koyambola. Sikawa ezali ntango tokoki kopambola basusu mpe “kotombola maboko oyo elembi.”2 Lokola Mormon apesaki toli na mwana na ye ya mobali Moroni, “Tika biso tosala na bokebi nyonso; … mpo tozali na mosala ya kosala [ntango] na kati ya tabelenakele oyo ya bondongo, ete tokoka kolonga moyini wa bosembo nyonso, mpe kopemisa milimo ya biso na bokonzi ya Nzambe.”3

Monguna alalaka soki moke te. Botemeli ekozala ntango nyonso liboso ya bosolo. Nazongeli lisusu uta ntongo ya lelo lilendisi na ngai ya ntongo oyo ya kosala biloko oyo ekomatisa mposa na yo ya molimo na ndenge malamu, mpo na kopesa bino makoki ya kokende liboso atako mikakatano mpe mabaku ekoya.

Mposa ya molimo ya kokende liboso malamu ekobakisama ntango tosanjoli na kati ya tempelo mpe tokoli na bososoli na biso ya monene mpe bozindo ya mapamboli tozwaka kuna. Nabondeli na bino mpo na kotelemela banzela ya mokili na kotiaka makanisi na mapamboli ya seko ya tempelo. Ntango na yo kuna ememaka mapamboli ya boseko.

Lokola Eklezia ezali kokola, tozali kosala makasi mpo na kolanda lolenge wana mpo na kotongaka batempelo mingi koleka. Batempelo ntuku minei na moko ezali kotongama to kobongisama mikolo oyo. Mingi ezali kozongisama sika sikawa. Nasambeli mpo ete bato oyo bazali banganga mayele na misala oyo bazali kosala na mabongisi yango na mokili mobimba.

Na molimo ya bozongisi matondi na nzela ya losambo, nasepeli koyebisa myango na biso ya kotonga tempelo ya sika na moko moko ya bisika bilandi: Wellington, Nouvelle Zelande; Brazzaville, Republique du Congo, Barcelona, Spagne; Birmingham, Royaume Uni; Cusco, Perou; Maceió, Brezil; Santos, Brazil; San Luis Potosí, Mexico; Mexico City Benemérito, Mexico; Tampa, Florida; Knoxville, Tennessee; Cleveland, Ohio; Wichita, Kansas; Austin, Texas; Missoula, Montana; Montpelier, Idaho; mpeModesto, California.

Batempelo zomi na sambo oyo ekopambola bomoi ya bato mingi na ngambo nyonso mibale ya elamba ya lido. Nalingi bino, bandeko babolingo mibali mpe basi. Mingi mingi koleka, Nkolo alingaka bino.Ya motuya koleka, Nkolo ayebi bino mpe alingi bino. Azali Mobikisi mpe Mosikoli na bino. Akambaka mpe atambwisaka Eklezia na Ye. Tika biso tozala libota elongobani ya Nkolo, oyo alobaki, “Bokozala bato na ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bino.”4

Mpo na yango nasambeli na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.