Likita Linene
Nzela ya Liyokani: Nzela ya Bomoi ya Seko
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Nzela ya Liyokani: Nzela ya Bomoi ya Seko

Nzela ya bobongi nie ezali nzela ya liyokani, mpe Yesu Klisto azali moboko ya makuli mpe mayokani nyonso.

Mokonzi moko ya nguya alingaki ete mwana na ye ya mobali akonza likolo ya moko ya babokonzi. Nkumu asengelaki koyekola mpe kokola na bwanya mpo na kofanda na ngwende. Mokolo moko, mokonzi akutanaki na nkumu mpe akabolaki mwango na ye. Bayokanaki ete nkumu asengelaki kokende na engumba mosusu mpe kozwa mayebi. Asengelaki kokutana na mikakatano ebele mpe kokutana lisusu na makambo ya kitoko kuna. Nsima mokonzi atindaki ye na engumba, esika eye nkumu asengelaki kolakisa bosembo na ye epai ya mokonzi mpe kolakisa ete alongobanaki mpo na kozwa mabaku malamu mpe mikumba oyo mokonzi abombelaki ye. Nkumu apesamaki nguya ya kopona mpo na kozwa mabaku oyo mpe mikumba to te, etalaki bobele bamposa na ya motema na ye mpe bosembo na ye. Nandimi ete bolingi boyeba nini ekomelaki nkumu. Azongaki mpo na kosangola bokonzi?

Bandeko mibali mpe basi, moko na moko na biso azali nkumu ya mobali to ya mwasi. Totindamaki awa na bokufi na Tata ya Lola ya bolingo mpo na kosepela na lipamboli ya nzoto oyo ekokoma na bozangi kufa na nzela ya Bosikoli mpe Lisekwa ya Yesu Klisto. Tosengeli komilengela mpo na kozonga liboso ya Nzambe na kolakisaka ete tokosala “makambo manso oyo Nkolo Nzambe na [biso] akotinda [biso]” (Abraham 3:25).

Mpo na kosunga biso, Mobikisi ayaki mpo na kosikola biso mpe kolakisa biso nzela ya bozongi epai ya Nzambe. Bana ya Nzambe babengami koya epai ya Mobikisi mpe babonga nie kati na Ye. Na kati ya makomi, tomoni libiangi na biso ya koya epai ya Nkolo ebandelami mbala 90, mpe mingi koleka katikati na yango ezali maye ya mabengisi ya moto ye moko uta na Nkolo Ye moko. Kondima libiangi ya Mobikisi elakisi kosalela makuli na Ye mpe kobatela mayokani na biso elongo na Ye. Yesu KListo azali nzela, bosolo, mpe bomoi” (Yoane 14:6), mpe Ye abengisaka biso “banso toya epai na Ye mpe tosalela bolamu na Ye; mpe aboyaka te moto nyonso oyo ayaka epai na Ye” (2 Nefi 26:33).

Boyekoli na biso ya nsango malamu mpe botei elendisaka bobongwani na biso epai ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto mpe esungaka biso tokoma mingimingi lokola Bango. Atako makambo manso ebimisama te na ntina ya “ntango mpe lolenge mapamboli ya bonetolami [makozala] epesami, ,” biso tondimisami na elikya na ntina na bango (M. Russell Ballard, “Hope in Christ,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 55).

Alma nganganzambe monene, koteyaka na mboka ya Zalayemila; azwaki libengisi ya mozindo na Yesu Klisto:

“Tala, atindi bobiangemi epai ya bato banso; mpo maboko ma ngolu maninolami ona bango, mpe alobi: Yambolani, mpe nakoyamba bino.

“Iyo, alobi: Boya epai na ngai mpe bokolia mbuma ya nzete ya bomoi” (Alma 5:33–34).

Mobikisi Ye moko abengisi biso toya epai na Ye mpe tozwa nkanga na Ye likolo na biso mpo ete tokoka kozwa kimia na mokili oyo ya buluyeke (tala Matai 11:28–29). Toyaka epai ya Klisto na “kosalelaka bondimi na [Ye], koyambolaka mikolo nyonso, kosalaka mayokani elongo na Nzambe ntango tozali kosala makuli ya lobiko mpe bonetolami, mpe koyika mpiko kino na nsuka na kobatelaka mayokani oyo” (General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 1.2.1, ChurchofJesusChrist.org). Nzela ya bobongi nie ezali nzela ya liyokani, mpe Yesu Klisto azali moboko ya makuli mpe mayokani nyonso.

Mokonzi Benyamina ateyaki ete mpo na ntina ya mayokani tosalaka, tokomaka bana mibali mpe bana basi ya Klisto, oyo abotaki biso na molimo, mpe na nse ya moto na Ye nde tokomi bansomi, mpo ete “nkombo mosusu ezali te na nzela ya oyo lobiko ekoya” (Moziya 5:7–8 Tobikisami ntango toyiki mpiko kino na nsuka na “kolandaka ndakisa ya Mwana ya Nzambe na bomoi” (2 Nefi 31:16 Nefi apesaki toli etet nyonso esalemaka te bobele na kokotaka na nzela eke mpe ya nkaka; biso “tosengeli kokende liboso na bompikiliki na Klisto, kozwaka bongengi ya bobongi nie ya elikya, mpe bolingo ya Nzambe mpe bato banso” (2 Nefi 31:19–20).

Malongi ya Klisto esungaka biso tozwa mpe totikala na nzela ya liyokani, mpe nsango malamu elengelami malamu ete mapamboli elakelama ya Nkolo ezwamaka na nzela ya makuli ya bule mpe mayokani. Profeta ya Nzambe, Mokambi Russell M. Nelson akebisaki biso na nsango na ye ya sanza ya yambo 16, 2018, na televizio ete “totikala na nzela ya liyokani. Bomipesi na bino ya kolanda Mobikisi na kosalaka mayokani elongo na Ye mpe nsima kobatela mayokani yango ekofungola ekuke na lipamboli nyonso ya molimo mpe makoki epesama epai ya mibali, basi, mpe bana bisika nyonso. … Nsuka ya boluki mpo na moko moko na biso ezali tozwa dotasio mpe tolatisama nguya na kati ya ndako ya Nkolo, tokangisama lokola mabota, tozala na bondimi mpo na mayokani tosalaki na tempelo oyo ekopesa biso makoki ya likabo monene koleka ya Nzambe, oyo ya bomoi ya seko” (”As We Go Forward Together,” Liahona, Sanza ya minei 2018, 7).

Nzambe akosundola mokangano na Ye te na, to kokanga mapamboli Alaki biso te ya bomoi ya seko; uta na mobateli ya sembo ya mayokani na ye. Mpe lokola tokokumisa mayokani ya bule, tobelemi pene na Mobikisi. Mpaka David A. Bednar ateyaki biso lobi ete mayokani mpe makuli ya nsango malamu esalaka na bomoi na biso lokola compas mpo na kopesa biso nzela ya point cardinal ya koy epai ya Klisto mpe kokoma mingi koleka lokola Ye.

Mayokani elimboli nzela ya bozongi epai ya Nzambe. Mayokani ya libatisi mpe kozwa likabo ya Molimo Mosantu, bokuli ya bonganganzambe, mpe elambo, ekambaka biso na tempelo ya Nkolo mpo na kokabola makuli na Ye ya bonetolami.

Nalingi koloba makambo mibale oyo Mobikisi na biso abetelaki nsete mpo na kosunga biso tobatela na sembo mayokani:

  1. Molimo Mosantu ekoki koteya biso, kokundola biso na ntina ya mateya ya Mobikisi, mpe kotikala na biso mpo na libela (tala Yoane 14:16, 26). Ye akoki kozala moninga na biso ya ntango nyonso mpo na kokamba biso na nzela ya liyokani. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki ete “na mikolo mikoya, ekozala mpasi kobika na molimo soki bokambi ezali te, kokambaka, kolendisaka, mpe nguya makasi ya Molimo Mosantu” (“Revelation for the Church, Revelation for Our Lives,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 96).

  2. Mobikisi atiaki likuli ya elambo, oyo tokoki ntango nyonso kokanisa Ye mpe tozwa Molimo na Ye azala na biso. Libatisi efungolaka ekuke ya bomoi ya seko, mpe elambo esungaka biso totikala ngwi mpe na bompikiliki na nzela ya liyokani. Ntango tozali kolia elambo ekozala litatoli epai ya Tata ete tokokanisa Mwana na Ye ntango nyonso. Mpe ntango tozali kokanisa Ye ntango nyonso mpe kototosa mitindo na Ye, tokozwa Molimo na Ye azala elongo na biso. Bobakisi na elaka oyo, Nkolo akomisaka bolimbisi ya masumu ntango toyamboli na bomikitisi masumu na biso.

Na kotikalaka na bondimi na mayokani na biso, tosengeli kosala makasi ya kozala ntango nyonso na Molimo mpo na kolengela biso tolongobana mpo na kolia elambo, mpe lisusu, toliaka mbala na mbala elambo mpo na kozala ntango nyonso na Molimo elOngo na biso.

Ntango mwana na biso ya mwasi azalaki na mibu mitano, azalaki na motuka ya juwe esalaka na bapile mpe alingaki kokumba yango mingi nzinganzinga ya ndako. Mpokwa moko, ayaki epai na ngai mpe alobaki, “Papa, motuka na ngai ezali kotambola lisusu te. Tokoki kozwa esanse na motuka na yo mpo na kotia na mutuka na ngai etambola lisusu? Ntango mosusu esengeli esanse lokola motuka na yo mpo ete etambola.”

Nsima namonaki ete bapile esilaki motoi, mpe nalobaki tokobongisa yango etambola pene ya ngonga moko moke. Nabosepeli makasi, alobaki, “Iyo! Tokomema yango esika batekaka esanse.” Nakangisaki pile na charjere mpo na kocharje, mpe nsima ya mwa ngonga moko akokaki lisusu kotambwisa motuka, mpo etiamaki charje. Ayekolaki nsima ete ezalaki ntina ntango nyonso kocharjaka bapile na kokangisaka yango na charjere.

Lokola mwana na ngai ya mwasi ayekolaki mokangano ya bapile na chargeur mpo na kopelisa mpe kotambwisa motuka na ye ya masano, lolenge moko mpe toyekolaka na ntina ya Yesu KListo, elambo mpe Molimo. Tosengeli na Molimo mpo na kosunga biso totambola na nzela ya bokufi wana ezali biso kobatela mayokani, mpe tosengeli na elambo mpo na kopesa nguya na bomoto na biso ya molimo. Kokomisa sika liyokani na biso ya libatisi mpe kolia elambo ememaka bosembo na mayokani nyonso. Nsuka ya esengo ezali ntango toyekoli na nzela ya losambo mpe botosi libiangi ya Mobikisi mpe kosepela na mapamboli na Ye elakelama. Ye alobaki, “Mpe ete bokoka komibatela bino moko mobimba a peto uta na mbindo ya mokili, bokokende na ndako ya losambo mpe bokosala milulu na bino ya elambo na mokolo na ngai mosantu” (Doctrine et Alliances 59:9).

INatatoliete babateli ya mayokani balakami “kimia na mokili oyo, mpe bomoi ya seko na mokili mokoya” (Doctrine et Alliances 59:23). Natatoli ete ntango bozali ntango nyonso kozwa bendele ya Mobikisi na nzela ya elambo, bokozala na Molimo na Ye mpo na kokamba bino na nzela ya liyokani mpe bokotikala sembo na mayokani na bino. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.