Likita Linene
Elombe Moyekoli na Mikolo mya Nsuka
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Elombe Moyekoli na Mikolo mya Nsuka

Tika ete tozala na elikya, tolembisama te, bilombe, tozala zololo te, tobanga te ntango tosimbi mwinda ya Nkolo na mikolo miye ya nsuka.

Bonsomi ya kopona ezali likabo ya motuya.ya Nzambe na mwana moko moko ya bana na Ye.1 Tozali “nsomi mpo ya kopono lipanda mpe bomoi bwa seko, na nzela ya Moyokanisi monene ya bato banso, to kopono bokangemi mpe liwa, engebene na bokangemi mpe nguya ya zabulu.”2 Nzambe akolinga te kotindika biso na makasi tosala malamu, mpe satana akoki te kotindika biso na makasi tosala mabe.3 Atako boko bato bakoki kokanisa ete bomoi ya kufa ezali momekano katikati na Nzambe mpe monguna, liloba moko uta na Mobikisi “mpe Satana afandi kimia mpe akimi mosika. … Ezali [ya biso] bokasi nde emekami—ya Nzambe te.”4

Na nsuka tokobuka maye maponi na biso ya bomoi mobimba elonaki.5 Boye, nini motango ya makanisi na biso, bamposa na biso, maloba mpe misala etali bolingo na biso mpo na Mobikisi, basali na Ye baponama, mpe Eklezia na Ye ezongisama? Mayokani na biso ya libatisi, ya bongangazambe, mpe ya tempelo ezali na ntina mingi epai na biso koleka lokumu ya mokili to mitango ya “nalingi” na media sociaux? Bolingo na biso mpo na Nkolo mpe mitindo na Ye ezali makasi koleka bolingo na biso mpo na makambo kani to moto kani na bomoi oyo?

Monguna mpe balandi na ye balukaka ntango nyonso kobebisa misala ya Klisto mpe baprofeta na Ye. Mitindo ya Mobikisi, soki batali yango mpamba te nyonso, ekomi likambo ya moto kotala nini ebongeli ye na bato ebele na mokili lelo. Batindami ya Nzambe oyo bateyaka bosolo ya “elongobani te” babenganaka bango mbala mingi. Ata Mobikisi Ye moko abengamaki “moto alinga kodunda, mpe momeli vinyo,”6 afundamaki kotungisaka kimia ya bato mpe kotiaka mobulu ya bokaboli bato. Milimo ya botau mpe ya makuku “bazwaki toli na lolenge ya kobebisa maloba ye,”7 mpe “lingomba” na Ye ya ebandeli ya Baklisto ezalaki mpenza “esika … elobelamaki na mabe.”8

Mobikisi mpe bayekoli na Ye ya ebandeli bakutanaki na botelemeli ya kati mpe ya libanda, mpe tozali koyoka yango lelo. Lelo ezali mpenza mpasi mpo na kosalela bondimi na biso na mpiko na kozangaka koyoka litio ya bato ya mokili. Kolanda Mobikisi na mpiko ezali na litomba, kasi ntango mosusu tokoki kokutana na maloba ya baoyo balobaka “tolia, tomela, mpe tosepela”9 filozofi, oyo wapi bondimi na Klisto, botosi, mpe boyamboli ekitanisami na libanzo ya lokuta ete Nzambe akotala mwa lisumu moke mpo ete Ye alingaka biso mingi.

Kolobaka “na mongongo na [Ye] moko to na mongongo ya basali na [Ye],”10 Mobikisi alobaki te na ntina ya mikolo na biso ete “ngonga ekokoka ntango bakoyika mpiko te na malongi ya peto; kasi bakotambola engebene na bolingi na bango mpe bakokoma bango moko bateyi” mpe ete ebele bakoboya “koyoka bosolo, mpe bakoyokela masolo ya mokili”?11 Ye alobaki yango te “masanzoli na bango epai na ngai ezali mpamba, koteyaka mpo na malongi mitindo ya bato”?12 Ye akebisaki te ete “kati na biso moko bato bakotelema, kolobaka makambo ezanga ntina, mpo na kobungisa bayekoli nzela”?13 Ye amonaki yango te na ebandeli ete “mabe [ekokoma] malamu, mpe malamu ekokoma mabe,”14 mpe ete “banguna ya moto bakozala ya ndako na ye moko”?15

Ebongo mpo na biso? Tosengeli kolengisama to kobanga? Tosengeli kobika boyambi na biso na lolenge ya bobangi? Ata moke te! Na bondimi na Klisto, tosengeli te kobanga botioli ya bato to kobanga bilobela na bango.1 Na Mobikisi na yenda mpe baprofeta ya bomoi mpo na kokamba mpe kotambwisa biso, “nani akoki kotelemela biso?”17 Tika ete tozala na elikya, tolembisama te, bilombe, tozala zololo te, tobanga te ntango tosimbi mwinda ya Nkolo na mikolo mya nsuka oyo.18

Mobikisi alimbolaki malamu ete “oyo nyonso akosakola nkombo na ngai liboso ya bato, ye mpe nakosakola ye liboso ya Tata na ngai. … Kasi oyo nyonso akowangana ngai liboso ya bato, ye mpe nakowangana ye liboso ya Tata na ngai.”19

Lokola mbano, ntango basusu bakolinga Nzambe oyo akoya na mitindo te, tika biso totatola na mpiko na maloba ya Mpaka D. Todd Christofferson ete “Nzambe oyo asengaka te azali eyano ya Nzambe oyo azalaka te.”20

Lokola basusu bakolinga kopona kati ya mitindo oyo balandi, tika tondima na esengo libiangi ya Mobikisi ya “kobika na liloba nyonso oyo ekowuta na monoko ya Nzambe.”21

Ntango bamingi bakanisaka ete Nkolo mpe Eklezia na Ye basengelaki kosala “nyonso oyo [ya biso] motema elingi,”22 tika tosakola na mpiko ete ezali libunga “kolanda bayike mpo na kosalaka mabe,”23 mpo ete “mangomba ya bato ebele ekoki te kobongisa oyo Nzambe asakolaki kozala mabe.”24

“O omikundola, omikundola … lolenge ezali malamu [bonsomi] mitindo ya Nzambe.”25 Koteyaka bango pole na bantango ekoki komonana lokola mosala ya bozangi botosi. Tika ete tolakisa na botosi ete ezali kaka pete te kasi ezali ntina kolinga mwana ya Nzambe oyo ayambi biyamba na lolenge ya kokesena na oyo ya biso.

Tokoki kondima mpe kotosa basusu na bozangi kolanda biyamba na bango to misala na bango oyo ezali lolenge moko na bolingi ya Nkolo te. Ntina ezali te ya kobonza bosolo likolo ya etumbelo ya bondimami mpe mpe bamposa ya lingomba ya bato.

Siona mpe Babilona ezali lolenge moko te. “Moto moko te akoki kosalela balakisi mibale.”26 Tika tomikundola banso motuna monene ya Mobikisi, “Mpo na nini bozali kobenga ngai, Nkolo, Nkolo, mpe bozali kosala te makambo oyo nalobeli bino?”27

Tika tolakisa bolingo na biso mpo na Nkolo na nzela ya sembo, na bonsomi ya botosi.

Soki bomitungisi mpo na oyo etali kimoyekoli na bino mpe mokili, nasengi bomikundola ete Mobikisi na bino ya bolingo “atindi libiangisi … , mpo ete maboko ya ngolu etiama likolo [na bino], mpe alobaki: Boyambola, mpe nakoyamba bino.”28

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki ete “Yesu Klisto akosala misala na Ye ya nguya koleka sikawa mpe ntango Ye akozonga lisusu.”29 Kasi ateyaki lisusu ete baoyo baponaka nzela ya Nkolo bakoyika mpiko na minyoko.”30 “Kotangama lokola ya kolongobana mpo na konyokwama na nsoni na nkombo na Ye”31 ekoki ntango mosusu kozala libula na biso ntango “topesi ndingisa na mongongo na Ye ezala likambo ya yambo ya makambo mosusu.”32

“Apambolami ezali ye,” Mobikisi alobaki, “oyo akokoyoka te mpo na ngai.”33 Epai mosusu toyekoli ete “kimia monene ezali na baoyo balingaka mobeko na yo: mpe eloko moko te ekotuka bango.”34 Eloko moko te! Boye, tika tomituna, “Ezali ngai koyika mpiko mpo na mwa ntango moke, kasi ntango mitungisi to mikakatano ekomi na ntina ya liloba, ezali ngai moto oyo atukami?35 Natelemi ngwi na libanga ya Yesu Klisto mpe basali na Ye?”

Bato ya mayele balobaka ete bosolo etongami na lingomba ya bato, ete moto aleki moto azali te. Oyo bango bazali mpenza koloba nini, ezali solo ete lisumu ezalaka te,36 ete “nyonso oyo moto asalaka [ezalaka] mabe te,”37 filozofi oyo mpo na oyo monguna azali kolobela na lolendo kozala ya ye! Tika tomikebisa na ntina ya bambwa ya zamba balati bilamba ya bameme, oyo bazali ntango nyonso kozwa basali mpo na kolanda bango mpe “[mbala mingi kosalela] mayele na bango mpo na kobomba botawu ya bizaleli na bango.”38

Soki tolingi mpenza kozala bilombe bayekoli ya Klisto, tokomona nzela. Soki te, monguna akolakisa banzela na ye ya elengi. Kasi lokola bayekoli ya bondimi “tosengeli kosenga bolimbisi te mpo na biyamba na biso to kolendisa na oyo toyebi ezali solo.”39

Mpo na kosukisa, liloba etali basali 15 ya Nzambe oyo bafandi sima na ngai. Na ntango bato ya mokili “balobaka na bamoni, bomona te; mpe na baprofeta, Bosakola te,”40 bayengebene balatisami mitole ya mapamboli ya lola, iyo, mpe iyo, mpe na mibeko ebele, mpe na bimoniseli na ntango na bango.”41

Na kokamwa te, bato oyo bakomaka mbala mingi mwinda mpo na baoyo basepelaka te na liloba ya Nzambe lokola baprofeta basakoli yango. Baoyo baboyaka baprofeta bayebaka te ete “esakola moko te ya makomi esengeli [kozala] ya ndimbola” to mbano ya bolingi ya moto “kasi [ete] bato ya bule ya Nzambe oyo [balobaka sikawa] lokola [batindami] na Molimo Mosantu.”42

Lokola Paulo, bato oyo ya Nzambe bazalaka “te … na soni ya litatoli ya Nkolo na biso” mpe bazali ya Ye bato na boloko”43 na lolenge ete malongi bateyaka ezali ya bango te kasi ezali ya Ye oyo abengaki bango. Lokola Petelo, bakoki “te koloba makambo oyo [bango] bamoni te mpe bayokaki.”44 Natatoli ete Bakambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale bazali bato malamu mpe sembo oyo balingaka Nzambe mpe bana na Ye, mpe oyo balingami epai na Ye. Maloba na bango tosengeli kozwa lokola kaka ewuti na monoko ya Nkolo ye moko “na bompikiliki mpe bondimi bonso. Mpo na kosalaka makambo oyo bikuke ya lifelo bikokofungwamela [biso] te … mpe Nkolo Nzambe akotia mosika na biso banguya ya molili uta liboso na [biso].”45

“Loboko moko te ya mbindo ekoki kopekisa bokobi ya mosala”;46 yango ekokende liboso na elonga elongo to na kozangaka yo to ngai, boye “pona mokolo na mokolo oyo nani okosalela.”47 Balengisa to babangisa bino na makelele makasi ya monguna te oyo ewuti na ndako monene. Mingongo na bango ya mike ekoki kotelemela te mongongo ya moke na mitema ebukana mpe milimo ya mawa.

Natatoli ete Klisto azali na bomoi, ete Ye azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso, mpe ete Ye akambaka Eklezia na Ye na nzela ya Bokambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, kondimisaka ete “totatabana te mpe kotepatepa na mipepe nyonso ya malongi.”48

“Bayekoli ya solo solo ya Yesu Kliso,” Mokambi Nelson ateyaki, “bazalaka na bolingi ya kotelema, kolobela, mpe kozala ya kokesena uta na bato ya mokili oyo. Bazalaka bilombe, bamipesa mpe mpiko.”49

Bandeko mibali mpe basi, ezali mokolo ya malamu ya kozala malamu! Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.