Likita Linene
Mateya uta na Liziba ya Mai
Likita linene ya sanza ya minei 2022


Mateya uta na Libulu ya Mai

Tokoki kopona kobaluka epai ya Mobikisi lelo mpo na bolendisi mpe lobiko oyo ekopesa biso ndingisa ya kokokisa mansomaye oyo totindamaki kosala awa.

Esengo nini wana ezali ya kosangana na moko na moko kati na bino na liyangani oyo ya basi ya likita linene!

Nakolaki na western New York mpe nazalaki kokende na etape moko ya moke ya Eklezia pene ya bakilometele 32 uta na ndako na biso. Lokola nafandaki na kelasi ya Eteyelo ya Eyenga na etonga na biso ya nse ya mabele, ya ndakonzambe ya kala ya kofutela elongo na moninga na ngai Patti Jo, nandimaki te ete nakokaki kozala moko ya kibondeko mwasi ya mokili mobimba ya bamilio ya basi.

Mibu mitano eleki mobali na ngai, Bruce, abelaki makasi ntango tozalaki kosala na Basantu oyo bakulisamaki na Etuka ya Eropa ya Este. Tozongaki na ndako, mpe akufaki bobele mwa baposo moke nsima. Bomoi na ngai ebongwanaki na butu. Nayokaki mpasi mpe namiyokaki ya kolemba mpe ya kozanga makoki. Nasambelaki Nkolo mpo ete akamba nzela na ngai: “Olingi ngai nasala nini?”

Mwa baposo moke nsima, natalaki bansango na ngai ya email ntango mwa foto ya moke na kati ebetaki na misu na ngai. Ntango natalaki na pembeni, namonaki ezalaki elilingi ya mosali ntoki moko ya mwasi Mosamalia elongo na Mobikisi na libulu ya mai. Na ntango wana Molimo alobelaki ngai polele: “Wana ezali yango osengeli kosala.” Tata ya bolingo na Lola azalaki kobengisa ngai naya epai ya Mobikisi mpe nayekolai.

Nalingi kokabola elongo na bino mateya misato oyo nazali koyekola ntango nazali kokoba komela na libulu na Ye ya “mai ya bomoi.”1

Ya yambo: Mabaku na biso ya Lobi eleki mpe ya Lelo Elakisi Te Lobi na Biso Ekoya

Bandeko basi, nayebi ete bozali koyoka lolenge nayokaki, kozanga elikya ya lolenge nini ya kotelemela mimekano ya mpasi mpe kobungisa—kobungisa mpo ete bomoi na bino ezali te kotambola lolenge okanisaki, ndenge osambelaki, mpe ndenge olengelaki yango.

Kotala te mabaku na biso, bomoi na biso ebulisami mpe ezali na ndimbola mpe ntina. Moko na moko na biso azali mwana mwasi molingami ya Nzambe, tobotami na bonzambe kati na milimo na biso.

Mobikisi na biso, Yesu Klisto, na nzela ya libonza ya bomikabi na Ye, asalaki ete biso topetolama mpe tokangolama, apesi biso ndingisa ya kokokisa ntina na biso na mabele kotala te mikano ya bandeko na biso ya libota, bolongobani na biso na libala, nzoto na biso to bokolongono ya mayele na biso, to likambo mosusu.

Banza mwasi na libulu ya mai. Lolenge nini bomoi na ye ezalaki? Yesu ayebaki ete azalaka na mibali mitano mpe sikawa abalanaki na mobali te oyo azalaki kobika na ye. Mpe nsima, atako bampasi ya bomoi na ye, moko ya esakola ya Mobikisi ya yambo liboso ya bato elobi ete Azalaki Masiya elobamaki epai na ye. Alobaki, “Nalobi na yo ete nazali ye.”2

Akomaki nzeneneke ya makasi, kosakolaka epai ya baoyo ya engumba na ye ete Yesu azalaki Klisto. “Mpe ebele ya Basamalia ya engumba wana bandimelaki ye mpo ya maloba ya mwasi oyo.”3

Mabaku na ye eleka mpe ya lelo elakisaki te lobi na ye ekoya. Lokola ye, tokoki kopona kobaluka epai ya Mobikisi lelo mpo na bolendisi mpe lobiko oyo ekopesa biso ndingisa ya kokokisa manso maye oyo totindamaki kosala awa.

Ya mibale: Nguya Ezali Kati na Biso

Na molongo oyo eyebani lokola momesano na Malongi mpe Mayokani, Nkolo alendisi basi mpe mibali bazala na “komipesa mobimba na ntina ya malamu, mpe kosalaka makambo ebele bonsomi ya bolingi na bango moko, mpe kokokisa bosembo boike; mpo nguya ezali kati na bango4

Bandeko basi, nguya ezali kati na biso mpo na kokokisa bosembo mingi!

Mokambi Russell M. Nelson atatolaki, “Mwasi nyonso mpe mobali nyonso oyo asalaka mayokani na Nzambe mpe abatelaka mayokani oyo, mpe oyo akotaka na bobongi nie na makuli ya bonganganzambe, azali na bokoti ya mbala moko na nguya ya Nzambe.”5

Nayei koyeba ete ntango tozali koluka kotosa mayokani ya bule oyo tosalaki na libatisi mpe na batempelo esantu, Nkolo akopambola biso “na ya Ye nguya ya bobikisi mpe bolendisi” mpe na “bomoni ya molimo mpe bolamuki oyo [biso] tozwa naino te liboso.”6

Ya misato: “Kati na Makambo ya Mike Eyaka Yambo ya Makambo ya Minene”7

Na Esakola na Ngomba, Yesu ateyaki bayekoli na Ye, “Bino bozali mungwa ya mabele”8 mpe “Bozali pole ya mokili.”9 Nsima Ye akokanisaki bokoli ya bokonzi ya lola na levire, “oyo mwasi azwaki, mpe abombaki na bimekeli misato ya farine, kino nyonso ekotaki levire.”10

  • Mungwa

  • Levire

  • Pole

Atako na kati ya mwa mitango moke, moko na moko epesaka nguya na nyonso ezingi na yango. Mobiksi abengisi biso tosalela nguya na Ye mpo na kozala lokola mungwa, levire, mpe pole.

Mungwa

Ekamwisaka komona ndenge lutu ya mungwa esalaka bokeseni ya mpimbo na bilei toliaka. Kotala malamu mungwa ezali moko ya biloko ya mpimbo ya ntalo moke mpenza mpe ya pete.

Na kati ya buku ya 2 Mikonzi, totangaka na ntina ya “mosali ya moke,”11 oyo akangamaki na Basulia mpe akomaki mosali ya mwasi ya Naamani, kapiteni ya Babundeli ya Sulia. Azalaki lokola mungwa; azalaki elenge, ya ntina ya makambo ya mokili te, mpe bomoi na ye lokola moombu na mboka ya bapaya ezalaki oyo ye alikyaki te.

Nzokande, alobaki milongo ya maloba mibale na nguya ya Nzambe, kotatolaka epai ya mwasi ya Naamani: “Ete Nzambe Nkolo na ngai oyo azalaki na profeta oyo azali na Samalia! mpo abikisaki ye na bokono ya maba.”12

Maloba na ye ya bondimi ekomelaki Naamani, oyo asalelaki maloba na ye, kopesaka ye ndingisa ya kobikisama na nzoto mpe na molimo.

Tomesani mbala mingi na basali oyo bandimisaki Naamani mpo na kosokola na ebale ya Yodani, lokola profeta Elisa atindaki, kasi Naamani azalaki ata moke te na ekuke ya Elisa longola se “mwana ya mosala.”

Bokoki kozala bilenge to komiyoka ya kozanga ntina, kasi okoki kozala lokola mungwa na kati ya bomoi na yo mpe kati ya lingomba na yo.

Levire

Esi ekomela bino bolia lipa ezanga levire? Lolenge nini okomona yango? Etondi mingi? Ezali bozito? Ezali mpasi? Bobele kaka na mwa ndambo ya levire, lipa evimbi, emati mpo na kokoma pepele mpe kitoko.

Ntango tobengisi nguya ya Nzambe kati na bomoi na biso, tokoki kosala ete “molimo ya lola ezwa esika ya bonzoto”13 na babomoni efulama oyo ekotombola basusu mpe kosala ete mitema ebikisama.

Kala mingi te moninga na ngai moko alalaki na mbetu na ntongo ya Noele, komitungisaka na mawa. Bana na ye babondelaki ye alamuka; na yango, atondisamaki na mpasi ya bokabwani. Alalaki na mbetu na ye komitungisaka, amipesaki na losambo epai ya Tata na ye na Lola, kolobelaka Ye na ntina ya bozangi elikya.

Ntango asilisaki losambo na ye, Molimo elobelaki ye na nse ete Nzambe ayebaki mpasi na ye. Atondisamaki na mawa mpo na ye. Likambo ya bule oyo esilisaki mitungisi na ye mpe epesaki ye elikya ete azalaki kolela ye moko te. Atelemaki, abimaki libanda, mpe akelaki moto na mbula ya pembe elongo na bana na ye, mpe koseka mpe esengo ezwaki esika ya mawa.

Pole

Motango boni ya pole esengeli mpo na kolongola molili kati ya ndako? Kongenga moko kaka ya moke. Mpe kongenga wana ya pole kati ya molili ekoki kouta na nguya ya Nzambe kati na yo.

Atako okoki komiyoka kozala yomoko ntango mbonge ya bomoi ezali makasi, okoki kongenga kati ya molili ya bozangi bososoli, libunga, mpe bozangi bondimi. Pole ya bondimi na yo na Klisto ekoki kowumela mpe kozala solo, kokambaka baoyo bazali nzinganzinga na yo na bobatelami mpe kimya.

Bandeko basi, mitema ekoki kobongwama mpe bomoi kopambwama ntango tozali kopesa mpimbo ya mungwa, lutu ya levire, mpe kongenga ya pole.

Natatoli ete Mobikisi azali mungwa na bomoi na biso, kobengisaka biso tomeka esengo mpe bolingo na Ye.14 Ezali Ye oyo azali levire ntango bomoi na biso ezali mpasi, amemelaka biso elikya15 mpe atombolaka mikumba na biso16 na nzela ya nguya na Ye ezanga bokokani mpe bolingo ya bosikoli.17 Ye azali pole na biso,18 kongengisaka ya biso nzela ya bozongi na ndako.

Nasambeli ete tokoki koya epai ya Mobikisi, lokola mwasi oyo ayaki na libulu ya mai, mpe ameli mai na ye ya bomoi. Na bato ya Samalia, tokoki nsima kosakola, “Sikawa tondimeli, … mpo toyokaki ye biso moko, mpe toyebi ete oyo ezali ya solo Klisto, Mobikisi ya mokili.”19 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.