Makuli mpe Bisakola
Esakola ya Libota


Libota

Esakola na Mokili

Bakambi ya Yambo mpe Lisanga ya Bapostolo Zomi na Babale ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka

Biso, Bakambi ya Yambo mpe Lisanga ya Bapostolo Zomi na Babale ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, na mongongo ya lokumu nyonso tosakoli ete libala kati na mobali mpe mwasi etindami na Nzambe mpe ete libota ezali na katikati ya mwango ya Mokeli mpo na bomoi ya seko ya bana na Ye.

Bato nyonso—mibali mpe basi—bakelami na elilingi na Nzambe. Moto na moto azali mwana mobali to mwana mwasi ya bolingo ya molimo ya baboti ya likolo, mpe, lokola ezali bongo, moto nyonso azali na lolenge ya Nzambe mpe nsuka-nsuka akokoma lokola Nzambe. Kozala mwasi to mobali ezali elembo monene ya bokitoli mpe ntina ya moto na bomoi yambo na mbotama, na bomoi awa na mabele, mpe na bomoi ya seko.

Na bokonzi ya yambo na mbotama, bana ya mibali mpe ya basi ya molimo bayebaki mpe basanzolaki Nzambe lokola Tata na bango ya Seko mpe bandimaki mwango na Ye. Na nzela ya mwango oyo, bana na Ye bakoki kozwa nzoto ya mosuni mpe kozwa mayele ya nse mpo kokola kino na peto mpe nsuka-nsuka kososola bomoi na bango ya bonzambe lokola basangoli ya bomoi ya seko. Mwango ya Nzambe ya esengo esalaka ete libota ekoba kokangama nsima ya liwa. Makuli mpe mayokani ya bule na batempelo ya santu esalaka ete bato bakoka kozonga liboso ya Nzambe mpe ete mabota esangisama mpo na seko.

Mobeko ya yambo oyo Nzambe apesaki Adama mpe Eva mpo na oyo etali makoki na bango ya boboti lokola balongani. Tosakoli ete mobeko ya Nzambe mpo ete bana na Ye babota mpe batondisa mabele oyo ezali kaka kosala. Tosakoli lisusu ete Nzambe apesaki mobeko ete mobali mpe mwasi basengeli kosalela banguya esantu ya bokeli kaka lokola balongani oyo babalani engebene na mibeko lokola mobali mpe mwasi.

Tosakoli ete nzela ya kokela bomoi na mabele oyo etindamaki na Nzambe. Tondimi bosantu ya bomoi mpe monene na yango na mwango ya seko ya Nzambe.

Balongani bazali na mokumba ya lokumu ya kolingana mpe kosalisana mpe ya kolinga mpe kosalisa bana na bango. “Bana bazali likabo ya Nkolo” (Banzembo 127:3). Baboti bazali na mosala mosantu ya kobokola bana na bango na bolingo mpe na bosembo, kokokisa bamposa na bango ya mosuni mpe ya molimo, mpe koteya bango kolingana mpe kosalisana, kobatela mibeko ya Nzambe, mpe kozala bana ya mboka oyo batosaka mibeko epai nyonso bazwami. Balongani—bamama mpe batata—bakozala bayanoli liboso na Nzambe mpo na kokokisa ntomo oyo.

Libota etindami na Nzambe. Libala kati na mobali mpe mwasi ezali na ntina kati na mwango na Ye ya seko. Bana basengeli kobotama kati na mikangano ya libota, mpe kobokolama na tata mpe mama oyo azali kotosa bandai ya libala na bosembo nyonso. Esengo kati na bomoi ya libota esengeli malamu kokokisama ntango libota etongami na mateya ya Nkolo Yesu Klisto. Mabala mpe mabota ya elonga matiami mpe mabatelami na mibeko ya bondimi, losambo, bobongoli motema, bolimbisi, limemia, bolingo, mawa, mosala, mpe misala ya bosakani ya malonga. Na motindo ya Nzambe, batata basengeli kokamba mabota na bango na bolingo mpe na bosembo mpe bazali na mokumba ya kokokisa bosenga ya bomoi mpe bobateli ya mabota na bango. Bamama bazali na mokumba ya yambo ya kobokola bana na bango. Na mikumba miye ya bule, batata mpe bamama basengisami kosalisana lokola baninga oyo bakokani. Bolemeni, liwa, to makama mosusu ekoki kosenga bomesani ya bango moko. Bato ya libota monene basengeli kosunga soki esengelami.

Tokebisi ete bato oyo bakobuka boyokani ya bopeto, oyo bakonyokola basi to bana na bango, to oyo bakozanga kokokisa mikumba na bango na libota bakotelama mokolo moko mpo na koyanola liboso na Nzambe. Lisusu, tokebisi ete bokabwani ya mabota ekomemela bato, mangomba ya bato, mpe bikolo bampasi oyo baprofeta ya kala mpe ya mikolo oyo basilaki koloba.

Tobeleli bana mboka mpe basali ya mbula matari bipai nyonso kotombola meko oyo ebongisami mpo na kobatela mpe kolendisa libota lokola eteni ya motuya ya lisanga ya bato.