2010–2019
Mobateli Mpate Malamu, Mpate ya Nzambe
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Mobateli Mpate Malamu, Mpate ya Nzambe

Yesu Klisto abengaka biso na mongongo na Ye mpe na nkombo na ye. Alukaka mpe asangisaka biso. Ateyaka biso lolenge nini ya kosala na bolingo.

Bandeko balingami basi mpe mibali, esi ekomela bino boyoka mobulu ya kokweya na mpongi mpe bomekaki kokanisa kolala mpongi? Ntango meme ya moke azali kobumbwa efelo, bokoki kotanga: 1, 2, 3, … 245, 246, … 657, 658 …1

Na likambo na ngai, kotangaka meme epesaka ngai mpongi te. Namitungisaka na ntina ya kozanga moko, mpe yango esalaka natikala ya kolamuka.

Elongo na mobateli mpate ya mobali oyo akomaki mokonzi, tolobi:

“Nkolo azali mobateli mpate na ngai; nakojanga eloko te.

“Abatelaka ngai na matiti ya langi ya pondu: akambaka ngai pene ya mai ya kimia.

“Azongisaka molimo na ngai.”2

Elilingi
Mobateli Mpate Malamu abebisaki talatala

Na eleko oyo ya Pasika, tozali kosepela na Mobateli mpate Malamu, oyo azali lisusu Mpate ya Nzambe. Ya bankombo na Ye nyonso ya bonzambe, misusu te eleki bolamu to kolobelaka. Toyekolaka ebele na ntina ya bandakisa ya Mobikisi na biso na Yemoko lokola Mobateli Mpate Malamu mpe uta matatoli ya profeta na Ye lokola Mobateli Mpate Malamu. Misala oyo mpe bilembo ezali nguya ebakisama—oyo abikisaka malamu mpate moko na moko koleka Mobateli, mpe oyo azali malamu kozala Mobateli mpate na biso koleka Mpate ya Nzambe?

“Mpo ete Nzambe alingaki mokili yango atindaki Mwana na likinda na ye, mpe Mwana se moko na Ye akitisaki bomoi na Ye na bolingi ya botosi epai ya Tata na Ye.3 Yesu atatoli, “nazali mobateli mpate malamu: mobateli mpate malamu abonzaki bomoi na ye mpo na mpate.”4 Yesu azali na nguya ya kokitisa na nse bomoi na Ye mpe nguya ya kotombola yango lisusu.5 Elongo na Tata na Ye, Mobikisi na biso apambolaka moko na moko kati na biso, nyonso mibale lokola Mobateli mpate Malamu mpe lokola Mpate ya Nzambe.

Lokola Mobateli mpate na biso ya Malamu, Yesu Klisto abengaka biso na mongongo na Ye mpe na nkombo na Ye. Alukaka mpe asangisaka biso. Ateyaka biso lolenge nini ya kosala na bolingo. Tika tosalela makambo misato oyo, kobandaka na Ye kobengaka biso na mongongo na Ye mpe nkombo na Ye.

Yambo, Mobateli mpate na biso ya Malamu “abengaki mpate na yemoko na nkombo. … Bango bayebi mongongo na ye.”6 Mpe “na nkombo na yemoko abengaka bino, oyo ezali nkombo ya Klisto.”7 Ntango toluki na motema moko kolanda Yesu Klisto, lifuli ekoya mpo na kosala malamu, kolinga Nzambe, mpe kosalela Ye.8 Ntango tozali koyekola, komanyola mpe kosambela; lokola tozali kokomisa ntango nyonso sika elambo mpe mayokani ya tempelo; mpe ntango tozali kobengisa banso baya na nsango na Ye malamu mpe makuli, tozali kotosa mongongo na Ye.

Na mikolo na biso, Mokambi Russell M. Nelson atei biso tobianga Eklezia ezongisama na nkombo ya Yesu Klisto asakolaki—Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya mikolo ya Nsuka.9 Nkolo alobaki, “Nyonso oyo bokosala, bokosala yango na nkombo na ngai; na yango bokobianga Eklezia na nkombo na ngai; mpe bokobianga Tata na nkombo na ngai ete akopambola eklezia mpo na litomba na ngai.”10 Na mokili mobimba, na mitema na biso mpe na mabota na biso, tobiangaka Tata na biso na nkombo ya Yesu Klisto. Tozalaka na esengo mpo na mapamboli ya sembo ya kati ya mabota na biso, eklezia esungaka bokumbameli, boyekoli ya nsango malamu, mpe esungaka misala ya mabota.

Ya mibale, Mobateli mpate Malamu alukaka mpe asangisaka biso kati ya lisanga na Ye. Atunaka, “Moto nini kati na bino, azali na mpate nkama, soki abungisi moko kati na bango, atiki te ntuku libwa na libwa na zamba, mpe akei koluka moko oyo ebungaki, kino akozwa yango?”11

Mobikisi na biso alengelaka moko mpe ntuku libwa na libwa, mbala mingi na ngonga moko. Ntango tosalaka, toyebaka bantuku libwa na libwa oyo bazali na molende mpe bompikiliki, atako tolengelaka moko oyo akei mosika. Nkolo na biso alukaka mpe akangolaka biso na bisika nyonso,”12 “uta na bangambo nyonso minei ya mokili.”13 Asangisaka biso na liyokani ya molimo mpe bomikabi na Ye ya makila.14

Mobikisi na biso ayebisaki bayekoli na Ye Liyokani na Ye ya Sika, “Bampate misusu, oyo bazali ya lisanga oyo te.”15 Na Amerika, Nkolo mosekwi atatolaki na bana ya liyokani ya Lehi, “Bozali mpate na ngai.”16 Mpe Yesu alobaki bino mpate misusu oyo bokoki koyoka mongongo na Ye.17 Oyo Lipomboli moko Buku ya Mormon ezali litatoli mosusu ya boyokani ya mongongo ya Yesu Klisto!

Yesu Klisto azali kobianga Eklezia eyamba banso oyo bazali koyoka mongongo na Ye18 mpe bazali kotosa mitindo na Ye . Malongi ya Klisto ezaki libatisi ya mayi mpe ya moto mpe Molimo Mosantu.19 Nefi atuni, “Soki mpate ya Nzambe, azali bule, asengeli kozwa libatisi na mayi, mpo na kokokisa boyengebene, O sima, boni boni tosengeli, kozala bazangi bule, mpo na kobatisama, iyo, atako na mayi!”20

Elilingi
Yoane kobatisaka Yesu

Lelo, Mobikisi na biso alingi ete tosala mpe oyo tokomi ekobengisa basusu bakoma, balanda Ye. Boya bokozwa bolingo, libiki, mokangano, mpe liyokani ya kozala baoyo ya Ye, na tempelo esantu ya Nzambe, epai oyo, makuli ya lobiko ekoki kopambola mabota nyonso ya bandimi, mpe kosangisa Yisalaele na ngambo mibale ya elamba.21

Ya misato, lokola “Mobateli mpate ya Yisalaele,”22 Yesu Klisto alakisaki lolenge nini babateli, pate na Yisalaele basalaka na bolingo. Ntango Nkolo na biso atuni soki tolingaka Ye, lokola Asalaki na Simoni Peteleo, Mobikisi na biso asengi: “Boleisa bampate na ngai. … Boleisa bampate na ngai. … Boleisa bampate na ngai.”23 Nkolo alaki ete ntango babateli mpate na Ye baleisi bampate na Ye mpe bameme, baoyo na kati ya lisanga na Ye “bakozala na bobangi ata moke te, to bakotatabana te, to kozanga te.”24

Mobateli mpate na biso ya Malamu atei ete babateli mpate na Yisalaele basengeli te konimba,25 to kobengana to kotia mosika,26 to kotala kaka mposa na biso ya litomba.27 Babateli mpate Malamu basengeli kolendisa, kobikisa, kokangisa nsinga oyo ekatani, komema lisusu oyo ekendaki mosika, koluka oyo ebungaki.28

Nkolo lisusu akebisi bato, oyo “balengelaka te bampate,”29 mpe “baprofeta ya lokuta, oyo bayaka epai na bino na elamba ya meme, kasi nse nkuku bazali bambua ya zamba.”30

Mobateli mpate na biso ya Malamu asepelaka ntango tosalelaka nguya na biso moko ya kopona na bosembo mpe bondimi. Baoyo bazali na lisanga bazali koluka Mobikisi na biso na boyengebene mpo na bomikabi ya lisikoli. Toyokanaka kolanda Ye, na bolembu te, na bomoni mpamba te, to na “bozololo te,” kasi na esika na yango na mposa ya motema moko mpe likanisi ya kolinga Nzambe mpe mozalani, komema mikumba ya moko na moko mpe kosepela na esengo ya basusu. Ntango Klisto na pete abonzaki bolingi na Ye na bolingi ya Tata, tozwi na bokebi nkombo na Ye. Na esengo toluki kokangisa mosala na Ye ya bosangisi mpe kosala na bana ya Nzambe nyonso.

Bandeko mibali mpe basi, Yesu Klisto azali Mobateli mpate na biso abonga nie malamu. Mpo Akitisaki na nse bomoi na Ye mpo na biso, Yesu Klisto azali lisusu Mpate abonga nie ya Nzambe.31

Mpate ya libonza ya Nzambe aponamaki uta na ebandeli. Anjelu ayebisaki Adama libonza na ye “ezali ebele ya libonza ya Mwana se moko ya Tata,” oyo abengisi biso “toyambola mpe tosenga epai ya Nzambe na nkombo ya Mwana aponama.”32

Tata Abalayama, oyo asalaki mapamboli ya liyokani mpo na bikolo nyonso ya mabele, akutanaki na oyo elimboli kobonza mwana se moko ya ye.

“Mpe Yisaka alobaki epai ya Abalayama tata na ye, mpe alobaki, tata na ngai: mpe alobaki, ngai oyo, mwana na ngai. Mpe alobaki, Tala moto mpe koni: kasi wapi mpate mpo na kotumba mbeka …?

“Mpe Abalayama alobaki, Mwana ngai, Nzambe akopesa mpate yemoko.”33

Bapostolo bamonaki na ebandeli mpe basepelaki bokuli ya misio ya yambo mpo na Mpate ya Nzambe. Yoane na Mokili ya Kala mpe Nefi na Mokili ya Sika atatolaki na ntina ya “mpate ya Nzambe,”34 “iyo, kutu Mwana ya Tata ya Seko[,] … Mosikoli ya mokili.”35

Abinadi atatolaki na ntina ya bosikoli ya bomikabi ya Klisto: “Banso lokola mpate, tokendaki mosika; tosali ete basusu babunga nzela; mpe Nkolo atie motema epai na ye [lisumu] na biso nyonso.”36 Alma abiangi likabo monene mpe ya nsuka ya Mwana ya Nzambe “eloko moko oyo ezali ntina koleka bango nyonso.” Alma alendisaki, “Bozala na bondimi epai ya mpate ya Nzambe,” “boye mpe bobanga te.”37

Moninga moko akabolaki lolenge nini alongaki litatoli na ye na ntina ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Akolaki kokanisaka lisumu mbala mingi ememaka etumbu monene, mondelo na biso moko. Asengaki epai ya Nzambe mpo na kososola lolenge ya bolimbisi ya bonzambe. Asambelaki mpo na kososola mpe koyeba lolenge nini Yesu Klisto akoki kolimbisa baoyo bayambolaka, lolenge nini ngolu ekoki kotatola boyengebene.

Mokolo moko asambelaki na boyebi moko ya mbongwana. Elenge moko azanga elikia ayaki na mbango libanda ya ndako ya mikanda komemaka basaki mibale ya bilei ya koyiba. Akimaki na nzela ya bato ebele, babenganaki ye epai ya mokolo ndako ya mikanda, oyo akangaki ye mpe abandaki koswana mpe kobunda. Na esika ya koyokaka bosambisi mpo na bobangi ya elenge mobali lokola moyibi, moninga na ngai amiyokaki kotondisama na bolembu, mawa makasi mpo na ye. Na bozangi bobangi to ntina mpo na bobateli na ye moko, atambolaki kino epai ya bato mibale. Amonaki asengelaki koloba, “nakofuta mpo na bilei. Nasengi tika ye akende. Nasengi tika nafuta mpo na bilei.”

Botindiki na Molimo Mosantu mpe koyoka bolingo oyo naino ayoka te, moninga na ngai alobaki, “Nyonso oyo nasengelaki kosala ezalaki kosunga mpe kobikisa elenge mobali.” Moninga na ngai alobaki abandaki kososola Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye—lolenge nini mpe mpo nini elongo na bolingo ya peto mpe ebonga nie ya Yesu Klisto alingaki komibonza mpo na kozala Mobikisi mpe Mosikoli na ye, mpe mpo na nini alingaki Ye azala.38

Kokamwa te toyembi:

Tala, Mobateli mpate Malamu azali koluka,

Kolukaka bampate oyo babunga,

Kozongisaka bango na esengo,

Kobikisamaka na motuya ya nsuka ya lolenge oyo.39

Lokola Mpate ya Nzambe, Mobikisi na biso ayebi ntango tomiyokaka kozala biso moko, ya kokita, kozanga elikia to kozala na bobangi. Na limoni, Nefi amonaki nguya ya Mpate ya Nzambe “[kokita] likolo ya basantu ya eklezia ya Mpate, likolo ya liyokani ya bato ya Nkolo.” Atako “bapanzani na mokili mobimba … balataki bibundeli ya boyengebene mpe na nguya ya Nzambe ya nguya nyonso.”40

Elaka oyo ya elikia mpe bolendisi ezali na mikolo na biso lelo.

Ozali se mondimi ya Eklezia yomoko na libota na yo, na kelasi, na esika ya mosala, to lingomba. Etape na bino ezali ntango mosusu moke to elongobani te? Oyei na esika ya sika, ntango mosusu oyebi lokota moko te to bizaleli? Ntango mosusu mabaku ya bomoi na yo ebongwani, mpe makambo oyo okanisaki te sikawa ekomeli yo? Mobikisi na biso alaki biso, kotala te nini ezali mabaku na biso, kotala te oyo yo tozali, na maloba ya Yizaya: “akosangisa bampate na maboko na ye, mpe akolengela yango na mawa na ye mpe na bosembo akokamba baoyo bazali na bilenge.”41

Elilingi
Mobateli Mpate Malamu kosangisaka mpate na Ye

Bandeko basi mpe mibali, Mobateli mpate na biso ya Malamu azali kobianga biso na mongongo na Ye mpe na nkombo na Ye. Azali koluka, kosangisa mpe koya epai ya bato na Ye. Na nzela ya profeta na Ye ya bomoi mpe moko na moko kati na biso, azali kobianga banso bazwa kimia, ntina, libiki; mpe esengo na bofuluki ya nsango malamu ezongisama mpe na nzela na Ye ya liyokani. Na ndakisa, atei babateli mpate ya Yisalaele basala na bolingo na Ye.

Lokola Mpate ya Nzambe, etinda ya Yesu ya bonzambe ekulisamaki yambo mpe epesaki esengo na bapostolo mpe baprofeta. Bomokabi na Ye, ya nsuka mpe ya seko, ezali kati kati na moango ya esengo mpe ntina ya bokeli. Apesi biso elikia oyo alengelaka biso pene ya motema na Ye.

Bandeko mibali mpe basi, tika tozala na mposa ya “bayekoli ya komikitisa ya Nzambe mpe Mpate,”42 ntango mosusu mokolo moko nkombo na biso ekokomama na buku ya Mpate ya bomoi,43 mpo na koyemba loyembo ya Mpate,44 mpo na kobiangema na elambo ya Mpate.45

Lokola Mobateli mpate mpe Mpate, Abiangi, Boya lisusu “na boyebi ya solo … ya [ya bino] Mosikoli, … [ya bino ] mobateli mpate monene mpe ya solo.”46 Alaki ete “na ngolu na Ye [biso] tokoki [kokoma] babongi nie na nzela ya Klisto.”47

Na eleko oyo ya Pasika, Tosanzolaka Ye:

“Molongobani azali Mpate!”48

“Hozana epai ya Nzambe mpe Mpate!”49

Natatoli na ntina na Ye, Mobateli Mpate Malamu na biso, Mwana Mpate abonga nie ya Nzambe. Abiangi biso na nkombo na biso, na nkombo na Ye—kutu nkombo ya bule mpe esantu ya Yesu Klisto—amene.