2010–2019
Kosalelaka Misuni na Biso ya Molimo
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Kosalelaka Bamisuni na Biso ya Molimo

Bobele lokola etangami mpe eyekolami na ntina ya misuni ezali te ya kokoka mpo na kotonga mosuni, kotangaka mpe koyekolaka na ntina ya bondimi na bozangi bobakisi ya mosala ezali ya kokoka te mpo na kotonga bondimi.

Nazali na botondi mpo na mapamboli ya kozala na nzoto, oyo ezali likabo ya kokamwa kowuta na Tata ya Lola. Nzoto na biso ezali na misuni motango koleka 600.1 Misuni ebele esengaka ngalasisi na ntina ete ezala kolongono mikolo nyonso. Tokoki kosala bokasi na makanisi kotangaka mpe koyekolaka na ntina ya misuni na biso, kasi soki tokanisi yango ekosala yango ezala makasi, tokoyokisama motema mpasi. Misuni na biso ekolaka ntango tosalelaka yango.

Naye komona ete na ndenge ebele, makabo ya molimo esalaka lolenge moko. Yango esengaka mpe ngalasisi mpo na kokola. Likabo ya molimo ya bondimi, mpo na ndakisa ezali kaka liyoki te to ezaleli; ezali libongi ya mosala oyo esalemaka mbala mingi na makomi ekangama na liloba kosala.2 Bobele lokola etangami mpe eyekolami na ntina ya misuni ezali te ya kokoka mpo na kotonga mosuni, kotangaka mpe koyekolaka na ntina ya bondimi na bozangi bobakisi ya mosala ezali ya kokoka te mpo na kotonga bondimi.

Ntango nazalaki na mibu 16, yaya na ngai ya mobali, oyo azalaki na mibu 22 na ntango wana, ayaki na ndako mokolo moko mpe akabolaki nsango elongo na libota. Azwaki mokano ya kozwa libatisi na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka. Baboti na biso batalaki ye na elongi, mpe namikundoli te nini ezalaki mpenza koleka wana. Mobu moko eleki to nsima, apesaki biso basangpo ebele ya kokamwa: azwaki mokano ya kosala lokola misionele na Eklezia, oyo elakisaki ete asengelaki kotika libota na biso mpe tokomona ye lisusu te mpo na mibu mibale. Baboti na ngai bamitungisaki te na ntina ya nsango oyo; na yango namonaki na kati na ye ekateli oyo ematisaki esengo na ngai mpo na ye mpe ekateli oyo azwaki.

Basanza nsima, ntango Ivan azalaki kosunga na misio na ye, nazwaki libaku ya kosala mwango ya konje elongo na baninga ya kelasi. Tolingaki kosepela mpo na nsuka mibu ya kelasi na biso ya sekondere mpe mwa mikolo na libongo.

Nakomelaki ndeko na ngai ya mobali misionele mokanda, kolobaka mwango ya konje na ngai ya eleko ya moi. Nakomelaki ete etuka oyo azalaki kosala misio ezalaki na nzela ya esika nazalaki kokende. Nazwaki mokano ete ezalaki likanisi malamu kopema mpe kotala ye. Ezalaki nde sima nayebaki ete bamisionele basengelaki te kotalama epai ya bandeko ya libota.

Namilengelaki na nyonso. Namikundoli nafandaki na bisi kokanisaka na ntina ya maseki nyonso Ivan mpe ngai tokosala elongo na mokolo wana ya moi. Tosengelaki kolia, kosolola, kosakana na zelo, bosokoli na moi—ntango malamu nini tokozwa elongo!

Ntango bisi ekomaki na arret, namonaki Ivan atelemi pembeni ya elenge mobali mosusu, bango mibale balataki basimizi ya pembe mpe bakalavati. Nakotaki na bisi, toyambanaki, mpe alakisaki ngai epai ya moninga na ye. Na bozangi kolekisa miniti mosusu, nayebisaki ndeko na ngai ya mobali moango na ngai ya mokolo, kasi nayebaki te oyo Ivan alengelaki. Atalaki ngai, asekaki, mpe alobaki, “Solo! Na yango, tosengeli kotambola naino. Okoki koya elongo na biso?” Nandimaki, kokanisaka ete tokozwa ntango ebele ya bosepeli na libongo.

Na mokolo wana, koleka bantango 10, natambolaki na banzela ya engumba wana elongo na ndeko na ngai mpe moninga na ye. Nasekaki bato mokolo mobimba. Napesaki bato mbote oyo naino namona te na bomoi na ngai. Tosololaki na moto nyonso, kobetaka na bikuke ya bapaya, mpe kotalaka bato ndeko na ngai ya mobali mpe moninga na ye bazalaki koteya.

Na ntango ya botali wana, ndeko na ngai ya mobali mpe moninga na ye bazalaki koteya na ntina ya Yesu Klisto mpe moango ya lobiko. Na mbalakaka, Ivan apemi mpe atali ngai. Na bokamwi na ngai, atunaki ngai na botosi nyonso nakabola likanisi na ntina ya oyo ezalaki koteyama. Ndako etikalaki kimia, mpe miso nyonso ezalaki kotala ngai. Na mwa nkpokoso, na nsuka nazwaki maloba mpe nakabolaki mayoki na ntina ya Mobikisi. Nayebi te soki oyo nalobaki ezalaki malamu to mabe. Ndeko na ngai ya mobali atikalaki kobongisa maloba nalobaki te; kasi, atondaki ngai botondi mpo na makanisi na ngai mpe mayoki.

Na ntango ya bangonga wana elongo, ndeko na ngai ya mobali mpe moninga na ye balekisaki miniti te koteya ngai liteya, kasi nazwaki boyebi ebele koleka bosloli nyonso elongo na ye. Natatolaki lolenge nini bondimammi ebongolaki bato ntango pole ya molimo bazwaki na babomoi na bango. Namonaki lolenge nini basusu kasti na bango bazwaki elikia na bansango, mpe nayekolaki lolenge nini kosunga basusu mpe kolimbisa na ntina na ngaimoko mpe bamposa na ngai. Nazalaki kosala oyo Mobikisi ateyaki: “Soki moto ayei nsima na ngai, tika amiboya yemoko.”3

Kotalaka nsima, namonaki ete bondimi amataki na mokolo wana mpamba te ndeko na ngai ya mobali apesaki ngai libaku ya kotia yango na mosala. Nasalelaki yango ntango totangaki uta na makomi, tolukaki bato ya koteya, totatolaki, tosungaki basusu, mpe bongo na bongo. Mokolo wana tokendaki kutu kosokola na moi te, kasi motema na ngai ekokwamaki na pole ya lola. Natikalaki komona ata ngenza ya zelo moko te na libongo, bokasi nayokaki bondimi na ngai ekoli lokola nkona moke ya mutarde.4 Nakendaki na mokolo ya moi te lokola turizme, kasi nalongaki boyebi monene, mpe na bozangi koyeba yango, nazalaki misionele—nazalaki kutu mondimi ya Eklezia te!

Mabaku malamu ya Kokembisa Misuni ya Molimo

Matondi na nsango malamu Ezongisama, tokoki kososola lolenge nini Tata na Lola amatisaka makabo ya molimi. Ezali mingi lokola Akopesa biso mabaku ya komatisa makabo yango koleka kopesa biso yango na bozangi likoki ya molimo mpe ya nzoto. Soki tozali na mokano elongo na Molimo na Ye, tokoyekola koyeba mabaku yango mpe kosala mpô na yango.

Soki toluki motema molai, tokoki komimona na mposa ya kosalela yango ntango ya kozelaka mpo na eyano. Soki tolingi kozwa bolingo ebele mpo na mozalani na biso, kokolisa yango na kofandaka pene pene ya moto ya sika na Eklezia. Elongo na bondimi ezali lolenge moko: ntango batembe eyeli biso na makanisi, kondimelaka bilaka ya Nkolo ekosengama mpo na kokende liboso. Na lolenge oyo, tozali kosalela misuni ya molimo mpe kotombola yango ndenge ya bokasi na babomoi na biso.

Ekozala ntango mosusu pete na ebandeli, mpe esengeli kutu kokoma mokakatano monene. Maloba ya Nkolo, na nzela ya profeta Moroni, elobeli biso lelo: “Mpe soki bato bayei epai na ngai nakolakisa bango botau na bango. Napesaka epai ya bato botau ete bakoka kozala basawa; mpe boboto bwa ngai bokoki mpo ya bato banso baye bakomikitisaka liboso lya ngai; mpo soko bamikitisi liboso lya ngai, mpe bazali na [to basaleli] bondimi na ngai, nde nakosala makambo matau makoma makasi mpo ya bango.”5

Nazali na botondi mpo na ndeko na ngai ya mobali Ivan, oyo akabolaki kaka nsango malamu na ngai te kasi lisusu oyo abengisaki ngai kozala na yango mpe koyeba botau na ngai. Asungaki ngai nandima libiangi ya Molakisi: “Yaka, mpe landa ngai”6—mpo na kotambola lokola Mobikisi atambolaki, koluka lokola Mobikisi alukaki, mpe kolinga lokola Mobikisi alingaka biso. Basanza nsima, nsima boyebi ya misio na ngai, nazwaki mokano ya kozwa libatisi mpe kosala misio na ngaimoko.

Tika tondima libiangi ya Mokambi Russell M. Nelson mpe boya epai ya Mobikisi7 na koyebaka misuni yango esengeli mosala monene ya molimo mpe kobanda kosalela yango. Yango ezali bopoti mbangu ya nzela molai, marathon koleka kosala sprinti, na yango bobosana te misala mike oyo ya bompikiliki mpe molimo oyo ekolendisa misuni oyo ya ntina. Soki tolingi tomatisa bondimi na biso, esengeli tosala makambu oyo esengaka bondimi.

Napesi litatoli ngai ete tozali bana ya Tata ya bolingo ya Lola. Mwana na Ye, Yesu Klisto, alingaka biso. Ayaki na mokili oyo mpo na kolakisa biso nzela mpe nsima apesaki bomoi na Ye mpamba mpo na kopesa biso elikia. Mobikisi abengisi biso tolanda ndakisa na Ye ebonga nie, mpo na kosalela bondimi epai na Ye mpe Bomikabi na Ye, mpe kopalanganisa makabo ya molimo oyo topambolamaki na yango. Azali nzela. Oyo ezali litatoli na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.