2010–2019
Bomikabi ya Yesu Klisto
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Bomikabi ya Yesu Klisto

Bomikabi ya Mobikisi ezali kaka te ezanga nsuka na likoki kasi lisusu ezali ya moto se moko na kozwa.

Na eleko oyo ya mobu tosepelaka mpe tokanisaka mingi mingi Bomikabi ya Mobikisi. Ezali solo malongi ya eluti, ya kotandola molimo, ya bolingo koleka mpenza mokili to molongo oyo eyeba naino te. Ezali nini epesaka elikia mpe ntina na bomoi na biso.

Nde Bomikabi ya Yesu Klisto ezali nini? Na ndimbola moko, ezali molongo ya makambo ya bonzambe oyo ebandaki na elanga ya Getesemane, ekobaki na ekulusu, mpe esukaki na Bosekwi ya Mobikisi na lilita. Etindikamaki na bolingo ekoki kososolama te mpo na moko na moko na biso. Esengaki moto moko oyo azalaki na lisumu te; oyo azali na nguya ezanga nsuka likolo ya biloko—ata liwa; oyo azalaki na likoki ezanga ndelo mpo na koyoka mpasi ya mbano ya masumu mpe bokono na biso nyonso; mpe oyo, solo akitaki na nse na yango nyonso.1 oyo ezalaki misio ya Yesu Klisto—oyo ezalaki Bomikabi na Ye.

Nde ntina na yango ezalaki nini? Ezalaki mpo ekoka kosalama mpo biso tozonga na miso naNzambe, kokoma lokola Ye, mpe kozwa litondi ya esengo. Oyo esalamaki na nzela ya kolongaka mabaku minei:

  1. Liwa ya Nzoto.

  2. Liwa ya molimo esalamaki na nzela ya Adama mpe na nzela ya masumu na biso

  3. Mitungisi mpe babokono na biso

  4. Babotau mpe mabe na biso

Kasi lolenge nini Mobikisi akokisi yango kozangaka kobuka mibeko ya boyengebeni?

Elilingi
Bokwei ya bosomi uta na mpepo

Kanisa ngonga moko moto moko kotalaka bokwei ya bosomi azwi mokano ya bwanya te mpe na mbalakaka apimbwe uta na mpepo ya moke. Nsima ya kosala bongo, asosoli nokinoki liboma ya mosala na ye. Alingi kokita na mabele na likama te, kasi ezali na libaku moko—mobeko oyo epaka kilo. Atambwisi maboko na ye na mbangu mpenza, kolikiaka kopimbwa, kasi esimbi te. Atie nzoto na ye mpo na kotepa to kosielomoka mpo ete alembisa bokiti, kasi mobeko oyo epesakakilo ezangi mawa mpe ezangi ngolu. Ameki komaniola mobeko ya ntina ya mokili: “Ezalaki libunga. Nakosala yango lisusu soki moke te. Kasi libondeli na ye ekweyi na matoi ya kokufa. mobeko oyo epesaka kilo eyebi mawa te; esalaka bokeseni te. Na esengo, nzokande, moto yango na mbalakaka ayoki eloko moko likolo ya mokongo na ye. Moninga na ye oyo azalaki na mpepo yango, koyokaka ngonga ya liboma, atiaki parachute kaka liboso ya kopimbwa. Amoni nsinga ya kofungola mpe abendi yango . Abikisamaki, atepi na kozanga likama tii na mabele. Tokoki kotuna, “ebukamaki mobeko oyo epesaka kilo , to parachute esalaki na ntaka ya mobeko wana mpo na kopesa bokiti ya likama te?”

Elilingi
Kopimbwa mpo na bokiti ya likama te

Ntango tosumuki, tozali lokola moto ya liboma oyo apimbwaki uta na mpepo. Atako nini ekosala biso na bisomei, bobele bokiti ya likama ezali kozela biso. Tosengeli kolanda mobeko ya boyengebene, oyo, lokola mobeko oyo epesaka kilo, ezali na bosenga mpe elimbisaka te . Tokoki kobikisama bobele mpo Mobikisi, na nzela ya Komikaba na Ye, na mawa apesi biso parachuteya ndenge. Soki tozali na kondima na Yesu klisto mpe toyamboli (elingi koloba tosali eteni na biso mpe tobendi nsinga), nde banguya ya kobatela ya Mobikisi etindamilikolo mpo na biso mpe tokoki kokita na mabele na molimo na mpasi te.

Nzokande, oyo ekoki kosalama, bobele mpo ete Mobikisi alongaki mabaku minei oyo ekoki kopekisa bokoli na biso ya molimo.

Liwa. Alongaki liwa na nzela ya Bosekwi na ye ya Nkembo. Apostolo Paulo ateyaki, “Lokola na Adama banso bakwei, kaka bongo na Klisto banso bakozonga na bomoi.”2

2. Lisumu. Mobikisi alongaki lisumu mpe mabe mpo na banso baye bayamboli. Nguya na Ye ya kosukola ezali Mozindo mpe monene mpenza ete Yisaya alakaki, “Atako masumu na bino ezali lokola motane, ekokoma pembe lokola mvula ya pembe.”3

Mbala mosusu, nakutanaki na Basantu ya malamu oyo bayoki mpasi mpo na komilimbisa, oyo batie na kozanga koyeba mpe na libunga bandelo na oyo etali banguya ya kosikola ya Mobikisi. Na kozanga koyeba, babongoli Bomikabi ezangi nsuka na moko oyo ezali na bolembu mpo na lisumu to botau na bango songolo. Kasi ezali Bomikabi ezangi ndelo mpo eyambi mpe ezingi lisumu mpe botau nyonso, lokola mpe mabe mpe mpasi nyonso esalami na basusu.

Truman G. Madsen alobaki likambo ya kolendisa oyo:

“Soki ezali na boko na bino oyo bokosami na kondimaka ete bokei mosika mpenza… ete bozal na ngenge ya lisumu oyo esali bakoka lisusu te kozala oyo bakokakikozala—nde boyoka ngai.

“Natatoli ete okoki te kozinda mosika koleka mayele mpe pole ya kokombola ya Yesu Klisto ekoki kokoma. Natatoli ete ntango nyonso ezali na mwa eteni ya bolingi ya koyambola mpe kokoma, Ye azali wana. Akitaki kaka epai ya ezalela na yo te; akitaki na nse na yango, ‘ete Akoki kozala na nyonso mpe na nzela yanyonso, pole ya bosolo.’ [Doctrine et Alliances 88:6.]”4

Ntina moko oyo ezaleli ntinaya motuya mpenza mpo na kososola Bomikabi ya Mobikisi mpe bambano na yango ezanga nsuka ezali ete na bososoli oyo azali kobakisa eyaka mposa ya kobakisa ya kolilimbisa bisomei mpe basusu.

Kutu atako tokoki kondima banguya ya kopetola ya Klisto, motuna eyaka mbala mingi: “Boniboni eyebi ngai soki nalimbisami masumu na ngai?” Soki toyoki Molimo, nde wana ezali litatoli na biso ete tolimbisami, to ete bolimbisami ezali kosalama. Mokambi Henry B. Eyring ateyazki, “Soki oyoki botindiki ya Molimo Mosantu … , okoki kozwa yango lokola bosol ete Bomikami ezali kosalama na bomoi na yo.”5

Elilingi
Nzela ya nsuka ekufa

Basusu batuni, “Kasi nalimbisami, mpo na nini nazali kaka koyoka ngambo?” Ntango mosusu na ngolu ya Nzambe likanisi ya elindo wana ezali likebisi, “Elembo ya kotelema” ya molimo ya ndenge oyo, ata na ngonga moko, egangaka ntango masenginia ya kobakisa ebundisi biso: “Kokita na nse ya nzela wana te. Oyebi mpasi ekoki komema.” Na ndimbola oyo, ezali kosala lokola bobateli, etumbu te.

Ekoki kosalama, nde, mpo na komikundola masumu na biso mpe kozala kaka nsomi na ngambo?

Alma amikundolaki masumu na ye, kutu mibu nsima ya boyamboli na ye. Kasi ntango abelelaki epai ya Yesu mpo na ngolu, alobaki, “nakokaki komikundola bolozi bwa ngai lisusu te; iyo, napasolamaki o bokundoli bwa masumu ma ngai lisusu te.”6

Boniboni akokaki komikundola masumu na ye kasi kozala na bolozi to ngambo? Mpamba te ntango toyamboli, tazali ya “kobotama na Nzambe.”7 Tokomi, lokola makomi elobi, “bikelamo ya sika”8 na Klisto. Na bosembo ebongi nie tokoki sikawa koloba, “Nazali mobali to mwasi te oyo asalaki masumu wana ya kala. Nazali moto ya sika mpe abongwani.”

3. Mitungisi mpe bokono. Alma asakolaki ete Klisto “akokende, koyokaka mpasi ya bolozi mpe matungisi mpe masenginia ya ndenge nyonso.” Mpo na nini? “Ete nsopo ya ye ekoka kotonda na ngolu, … ete akoka koyeba engebene na mosuni boniboni kosalisa bato ba ye engebene na bokono bwa bango.”9

Boniboni Ye akokisi yango? Ntango mosusu ye alongolaka motungisi, ntango mosusu Ye alendisaka biso mpo na koyika mpiko, mpe ntango mosusu Ye apesi biso emoneli ya seko mpo na kososola malamu koleka ezalela na bango ya ntango. Esilaki Joseph Smith kowumela na Boloko ya Liberty penepene na bazanza mibale, na nsuka agangaki, “O Nzambe, ozali wapi?”10 Na esika ya kopesaka lisalisi ya mokuse, Nzambe ayanolaki, “Mwana na ngai ya mobali, kimia epai ya molimo na yo; mpasi na yo mpe mitungisi na yo ekozala kasi ya ngongo moke; mpe nsima, soki oyiki mpiko na yango malamu, Nzambe akonetola yo na likolo.”11

Joseph sikawa asosolaki ete likambo ya bololo oyo ezalaki mpenza moke na emoneli ya seko. Na emoneli monene oyo, akomelaki Basantu uta na lisuku ya boloko kaka wana, “Balingami bandeko mibali, ttosala makambo nyonso na esengo oyo ezali na nguya na biso; mpe na nsima ekoka biso kotelema sikisiki, na elikia ya solo, mpo na komona lobiko ya Nzambe.”12 Na ntina ya Bomikabi ya Mobikisi, tokoki kozala na emoneli ya seko oyo epesaka ndimbola na mimekano mpe elikia na biso mpo na kosunga biso.

4. Botau mpe Mabe. Na ntina ya Bomikabi na Ye, Mobikisi azali na banguya elendisaka, ntango mosusu babengi ngolu,13 oyo ekoki kosalisa biso tolonga botau mpe bozangi bobongi nie na biso mpe boye kosunga biso na mobembo na biso mpo na kokoma mingi lokola Ye.

Moroni boye ateyaki: “Iyo, yakani epai ya Klisto, mpe zalani bobongo nie na ye, … ete boboka kozala bobongi nie na Klisto.”14 Awa ezali komonana pene na banzela to ndenge mibale ya komipesa banguya ya kolendisa oyo ekoki kopetola—kutu kobongisa biso—mpenza.

Yambo, makuli ya lobiko. Makomi elobeli biso, “Na kati ya makuli wana, nguya ya bonzambe ezali komonisama.”15 Ntango mosusu tokoki kokanisa na ntina ya makuli lokola molongo ya nkombo—esengelami mpo na bonetolami; kasi na bosolo moko na moko ezali kopesa nzela na nguya ya bonzambe oyo esalisaka biso tokoma mingi lokola Klisto. Na ndakisa:

  • Ntango tobatisami mpe tozwi likabo ya Molimo Mosantu, tokomisami peto—kokomaka bongo mosantu mingi lokola Nzambe.

  • Na bobakisi, na nzela ya Molimo Mosantu, milimo na biso ekoki kongengisama mpe mitema na biso kolembisama mpo ete tokoka kokanisa mpe komiyoka mingi lokola Ye.

  • Mpe ntango tokangisami lokola balongani, tosangoli likoki ya kozwa “bangbende, babokonzi, babonkumu, mpe banguya”16 lokola makabo uta na Nzambe.

Nzela ya mibale mpo na banguya elendisaka oyo ezali makabo ya molimo. Na ntina ya Bomikabi ya Klisto, tokoki koponama mpo na kozwa likabo ya Molimo Mosantu mpe makabo ya molimo oyo ekendaka elongo na yango. Makabo oyo ezali mabongi ya bonzambe; yango wana, ngonga nyonso oyo tozwaka likabo ya Molimo, tokomaka mingi lokola Nzambe. Na ntembe te yango wana makomi etindi biso mbalau nzike toluka makabo oyo.17

Mokambi Q. Cannon ateyaki: “moto moko te asengeli koloba, ‘O, nakoki koboya yango te; ezali ezaleli na ngai.’ Alimbisami na yango te, mpo ete Nzambe alaki … kopesa makabo oyo ekosilisa [babotau na biso]. … Soki basusu kati na biso babongi nie te, ezali mokumba na biso ya kosambela mpo na likabo oyo ekosala biso tobonga nie.”18

Na mokuse, Bomikabi ya Mobikisi epesi biso bomoi na esika ya liwa, “kitoko na esika putulu,”19 lobiko na esika ya mpasi, mpe bobongi nie na esika ya botau. Ezali eyano ya lola epai ya mabaku mpe bitumba ya mokili oyo.

Na poso ya nsuka ya Mobikisi na bokufi, Ye alobaki, “Na mokili tokozala na mitungisi: kasi bozala ya kosepela; nalonga mokili..”20 Mpamba te Mobikisi asalaki Bomikabi na Ye, ezali na nguya to likambo moto tomoko te ya libanda—lisumu to liwa to bobomi libalate—oyo ekoki kopekisa biso tokokisa bonetolami, soki tobateli mitindo ya Nzambe. Na boyebi wana, tokoki kokende mbangu liboso na esengo malamu mpe boyebi ya solo ete Nzambe azali elongo na biso na boluki oyo ya lola

Napesi litatoli na ngai ete Bomikabi ya Mobikisi ezali kaka te ezanga nsuka na likoki kasi lisusu ezali ya moto se moko na kozwa—ete ekoki kaka te kozongisa biso na miso ya nzambe kasi lisusu epesi biso likoki ya kokoma lokola Ye—ntina eluti ya Bomikabi ya Klisto. Na ntina ya wana napesi litatoli na ngai ya botondi mpe ya solo o nkombo ya Yesu Klisto, amene.