2010–2019
Botonga Esika elenda ya Kimolimo mpe Bobateli
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Botonga Esika elenda ya Kimolimo mpe Bobateli

Ntango tosaleli nsango malamu ya Yesu Klisto, ntango toyekami likolo ya Bomikabi ya Mobikisi mpe towelisi liboso na bondimi, tolendisami na mitambo mya ya zabulu.

Bandeko ba bolingo mibali mpe basi, wana ezali likita oyo kokoma na nsuka, nazongisi matondi epai ya Tata na Lola mpo na toli, bosolo, mpe bobimisi, ekabolami na elobelo oyo na mikolo mibale eleki. Toteyami na basali ya Nzambe oyo babiangamaki mpo na koloba maloba na ye masantu. Nkolo akundolisi biso na bobimisi ya mikolo ya nsuka, “Ezala na nzela ya mongongo na ngaimei to na mongongo ya basali na ngai, ezali ndenge moko.”1

Kotalaka lingomba monene ya Basantu oyo mpe kokanisaka bandimi oyo bazali kotala likita linene na mokili mobimba, nakanisi na bosangani na Buku ya Mormon ntango Yesu Klisto abimelaki Banefi nsima ya bobakami na Ye na ekulusu. Ateyaki bango nsango malamu mpe nsima alendisaki , “kendeni epai ya bino, mpe maniolani likolo lya makambo maye nalobi, mpe sengeni na Tata, o nkombo ya ngai, ete bokoka kososola.”2

“Kendeni epai ya bino, mpe maniolani” ezali litambe oyo elandi na kokamataka na motema maloba ya baprofeta mpe bakambi ya Eklezia oyo elobami na esika ya bule oyo. Bandako etie Klisto na katikati ezali bisika elenda mpo na bokonzi ya Nzambe na mabele na mokolo moko ntango, lokola esakolamaki, zabulu, “ekongala [ye] o mitema mya bana ba bato, mpe ekolamusa [ye] bango na nkanda likolo lya eye ezali elamu.”3

Bato batongi bisika elenda uta kala mpo na kopekisa banguna bakota. Mbala mingi bisika elenda wana ezalaki na mobateli ya linongi wapi bakengeli—lokola baprofeta—bakebisaki na ntina ya mampinga oyo ezalaki kokanela mpe bobundisi oyo ezalaki koya .

Elilingi
Thomas Rasband

Na ntango ya bapionie ya Utah ya ebandeli, nkokololo na ngai ya mobali ya nkuluntu Thomas Rasband mpe libota na ye bazalaki boko bafandi ya yambo bakota na Lubwaku ya Heber na Bangomba ya Wasatch kitoko ya Utath.

Na 1859, Thomas asalisaki mpo na kotonga Heber Fort; etongama mpo na bobateli. Ezalaki ndako na etongeli ya pete ya mabaya ya koto oyo etiamaki moko pembeni na mosusu, kosalaka nzinganzinga ya libanda ya esika elenda yango. Bandako ya nzete etongamaki na kati ya esika elenda kosaleka efelo wana ya momesano . Ndako yango epesaki kimia mpe bobateli mpo na mabota ya bapionie wana ezalaki bango kotonga bandako mpe kokumbamela Nkolo.

Elilingi
Esika ya kobatele ya Bapionie

Ezali lolenge moko mpo na biso. bandako na biso ezali bisika elenda ya kotelemela mabe ya mokili. Na bandako na biso toyaka epai ya Klisto na koyekolaka kolanda mitindo na Ye, na koyekolaka makomi mpe kosambelaka elongo, mpe na kosalisaka moko na moko kotikala na nzela ya mayokani. Nsete ya sika ebetami likolo ya boyekoli ya moto ye moko mpe ya libota na ndako na nzela ya pologalame Come, Follow Me esalami mpo na “kolendisa mbongwana na biso mpe kosalisa biso tokoma mingi koleka lokola Yesu Klisto.”4 Na kosalaka boye tokokoma oyo Paulo abiangaki “[bi]kelamu ya sika”5 na mitema mpe milimo na biso ya koyokana na Nzambe. Tosengeli na bokasi wana mpo na kotelemela mpe kokimisa bitumba ya monguna.

Ntango tozali na bomoi ya losambo ewuti na bondimi na Yesu Klisto, tokoyoka bozali ya kimia ya Molimo Mosantu, oyo akambi biso epai ya bosolo, afuli biso tozala ya kolongobana mpo na mapamboli ya Nkolo, mpe totatola ete Nzambe azali na bomoi mpe alingi biso. Nyonso oyo esalami na kati ya esika elenda ya bandako na bisomei. Kasi bomikundola, bandako na biso ezali na nguya lokola bokasi ya molimo ya moko na moko na biso na kati ya baefelo.

Mokambi Russell M. Nelson ateyi, “Na mikolo ekoya, ekokoka kosalama te kotikala na bomoi na molimo kozangaka nguya ekambaka, eyangelaka, elendisaka, mpe nguya ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu.”6 Lokola profeta, momoni, mpe mobimisi ya Nkolo ya bomoina na mikolo oyo, mokengeli likolo ya linongi ya esika na biso elenda, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, amonaka bobelemi ya monguna.

Bandeko mibali mpe basi, tozali na etumba na Satana mpo na milimo ya bato. Molongo ya etumba etiamaki na bomoi na biso ya yambo ya bomoi na mabele. Satana mpe moko likolo ya misato ya bana ya Tata na biso na Lola babalukaki mosika na bilaka na Ye ya bonetoli. Uta ntango wana, basali ya monguna bazali kobundisa bandimi oyo baponi mwango ya Tata.

Satana ayebi mikolo na ye ezali ya kotanga mpe ete ngonga ezali kokoma mokuse mingi. Lokola azali mayele mabe mpe mokosi, akolonga te. Nzokande, etumba na ye mpo na moko na moko ya milimo na biso ezali kongala.

Mpo na kimia na biso, tosengeli kotonga esika elenda ya kimolimo mpe bobateli mpo na milimo na biso mpenza, esika moko elenda oyo ekokotama te na moto ya mabe.

Satana azali nioka y1n!ca mayele mabe, kokotaka na makanisi na biso mpe mitema na biso ntango tolembisi bobateli na biso, tokutani na mawankele, to tobungisi elikia. Amekaka biso nakoflate, elaka ya bomengo, libondi, to komtisa likolo ya ngonga moke ntango tozali na nse. Ye alongisaka lofundo, bozangi boboto, bozangi bosembo, bozangi esengo, mpe bosoni mpe nsima tokoki kozala “kobungisa liyoki.”7 Molimo akoki kotika biso. “Mpe boye zabulu akokosa milimo mya bato, mpe akokamba bango na bokebi mosika o nse o limfelo.”8

Na bokeseni, toyokaka mbala mingi Molimo na nguya mpenza ntango tozali koyemba masanzoli epai ya Nzambe na maloba lokola oyo:

Nzambe wa biso azali esika elenda ya nguya,

Linongi ya bokasi oyo ekokweya mokolo moko te.

Mosungi ya nguya azali Nzambe na biso

Asalisaka biso tolonga mimekano.9

Ntango totongi esika elenda ya molimo, tokoki kokima misala ya monguna, kopesa ye mokongo, mpe koyoka kimia ya Molimo. Tokoki kolanda ndakisa ya Nkolo na biso mpe Mobikisi, oyo, ntango amekamaki na esobe, alobaki, “Zonga nsima na ngai Satana.”10 Tosengeli moko na moko koyekola na nzela ya makambo ya bomoi lolenge nini kosala yango.

Ntina ya bosembo ya boye elimbolami malamu na Buku ya Mormon ntango Kapitene Moroni alengelaki Banefi babunda etumba uta na Amalikia ya mayele mabe, motangisi makila, mposa makasi ya nguya. Moroni atongaki bisika elenda mpo na kobatela Banefi “ete bakoka kozala na bomoi epai ya Nkolo Nzambe wa bango, mpe ete bakoka kosimba ena eye ebiangemaki na bayini ba bango likambo lya Baklisto.”11 Moloni “azalaki sikisiki na bondimi ya Klisto”12 mpe bazalaki na bomdimi “na kobatelaka mitindo mya Nzambe … mpe na kotelemelaka bobe.”13

Ntango Balamani bayaki kobunda, bakamwisamaki na bolengeli ya Banefi, mpe bakweyisamaki. Bato ba Nefi batondoki “Nkolo Nzambe wa bango, na ntina ya nguya ya ye ezangi emekiseli na kobikisaka bango uta o maboko ma bayini ba bango.”14 Basengelaki kotonga bisika elenda mpo na bobateli na libanda, mpe bafandisaka bondimi na Nkolo Yesu Klisto na kati—kozinda na milimo na bango.

Banzela mosusu oyo tokoki komilendisela na ntango ya mobulu oyo tokoki kozalela “bisalele o maboko ma Nzambe mpo ya komeme mpembeni mosala moye monene” ezali nini?15 Tika totala makomi.

Tozali botosi. Nkolo atindaki Tata Lehi mpo na kotinda bana na ye mibali bazonga na Yelusaleme mpo na “koluka makundoli, mpe kokumba mango awa o kati ya esobe.”16 Lehi atunaki motuna te; akamwaki te mpo na nini to lolenge nini. Nefi mpe asalaki yango te, oyo ayanolaki, “Nakokende, mpe nakosala makambo maye Nkolo atindi.”17

Esalaka biso na botosi ya bolingi ya Nefi? To ezalaka biso na mposa mingi ya kotia ntembe na mitindo ya nzambe lokola esalaki bandeko mibali ya Nefi, oyo ya bango bozangi bondimi na nsuka ememaki bango mosika ya Nkolo? Botosi, esalelami na “bosantu na motema,”18 ezali maye Nkolo asengi biso.

Totie elikia na Nkolo, oyo alobaki epai Yosua, wana ezalaki ye komilengela mpo na kokamba Bato ya Yisalaele na mboka ya elaka, “Zala makasi mpe … mpiko ya malamu; kobanga te, mpe kopalangana te; mpo Nkolo Nzambe na yo azali elongo na yo bipai binso okokende.”19 Yosua atiaki elikia na maloba oyo mpe alobelaki bato: “Mibulisa bino mpenza, mpo ete lobi Yawe akosala misala na kokamwa na kati na bino.”20 Nkolo akabolaki mayi ya Yaladene, mpe koyengayenga ya Bato ya Yisalaele na esobe esukaki.

Totelema mpo na bosolo, lokola esalaki profeta Abinadi na Buku ya Mormon. Akangamaki, amemamaki liboso ya mokonzi Noah mpe banganganzambe na ye ya mabe, Abinadi ateyaki Mitindo Zomi mpe asakolaki na nguya ete Klisto “akokita o ntei ya bana ba bato, mpe … akosikola bato ba ye.”21 Nsima Ye, na bondimi ya makasi kati na ye, alobaki, “O Nzambe, yamba molimo mwa ngai,”22 mpe Abinadi “ayokaki mpasi ya liwa na moto.”23

Elilingi
Tempelo ya Rome Italy

Tosalaka mpe tozongisaka mayokani na biso sika na koliaka elambo mpe na kokumbemelaka kati na tempelo. Elambo ezali eteni ya likonzi ya kokumbamela na biso ya eyenga,wapi tozali koyamba elaka ya “kozala ntango nyonso na Molimo elongo na [biso].”24 Na bokuli ya bule wana tomipesi mpo na kozwa likolo na biso nkombo ya Yesu Klisto, kolanda Ye, mpe kosala mikumba na biso na mosala ya bonzambe oyo lokola Asalaki. Na tempelo, tokoki “kotia pembeni makambo ya mokili oyo”25 mpe koyoka bozali ya Nkolo mpe kimia na Ye eluti monene. Tokoki kokangama na bankoko na biso, mabota na biso, mpe bomoi ya seko na miso ya Tata. Kokamwa te elobaki Mokambi Nelson kala te na Rome: “Bolamu oyo ekowuta uta na tempelo oyo ezali monene mpenza.”26

Tosengeli kozala bosembo na manso oyo tosalaka. Tosengeli kokolisa bososoli mpe botosi mpo ete tosengela te ntango nyonso kozwa mokano ya maye mazali semba mpe maye mazali mabe. Tosengeli totia na motema maloba ya Petelo, Apostolo ya Eklezia ya ebandeli oyo akebisaki, “Bomisenzela; bozala mpongi te, motemeli na bino oyo mabe, azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukaka soki akolia nani.”27

Ntango na etingia tolendisi bisika elenda na biso, tokomi lokola Yesu Klisto, lokola bayekoli ya solo, na milimo na biso mpenza kati na bobateli na Ye.

Litatoli na yo ya Yesu Klisto ezali esika elenda na yo moko, kimia mpo na molimo na yo. Ntango nkoko na ngai ya mobali ya nkulutu mpe baninga na ye bapionie batongaki Heber Fort, batelemisaki nzete moko na ngonga moko kino esika elenda yango ekomaki “ya kokangana malamu elongo”28 mpe babatelamaki. Boye nde ezali na litatoli. Moko na moko tozwi litatoli uta na Molimo Mosantu ntango Alobaka na molimo na biso, koteyaka “bosolo na biteni ya kati.”29 Ntango tosaleli nsango malamu ya Yesu Klisto, ntango toyekami likolo ya Bomikabi ya Mobikisi mpe towelisi liboso na bondimi, tobangi te, tolendisami na mitambo mya bikelakela bya zabulu. Matatoli na biso ekangisaka biso na balola, mpe topambolami na “bosolo ya makambo nyonso.”30 Mpe, lokola bapionie babatelama na nzela ya esika elenda moko , tozingami na likama te na maboko ya bolingo ya Mobikisi.

Profeta Etele ateyaki, “Yango wana, oyo andimi na Nzambe akoki solo kolikia mpo ya mokili moko molamu mingi, iyo, kutu esika yoko o loboko la mobali la Nzambe, eye elikia eyei na bondimi, esali longo loko mpo ya bozo bwa bato, loye lokosala bango ba solo mpe ba sikisiki, ntango inso kozalaka na misala milamu beboo, mpe kokambemaka na nkembo ya Nzambe.”31

Bandeko na ngai ba bolingo mibali mpe basi, natiki bino na lipamboli na ngai mpo na kokende liboso na bolikii na Nkolo mpe kati na nsango malamu na Ye. Botia maboko na bino nzinganzinga ya baoyo bazali kobeta mabaku mpe, na bokasi ya Molimo na kati na bino, bokamba bango na bolingo bazonga epai ya esika elenda ya kimolimo mpe bobateli. Boluka “kozala lokola Yesu”32 na nyonso oyo bozali kosala; bobwakisa mabe mpe masenginia; boyambola, lokola toteyamaki lobi na molingami profeta na biso; bozala bosembo na motema; bozala semba mpe petwa; bolakisa mawa mpe bolingani; mpe bolinga Nkolo Nzambe na bino na bomipesi ya moyekoli ya solo.

Matatoli ya nsango malamu ya Yesu Klisto, bandako na biso, mabota na biso, mpe kimondimi na biso na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ekozala bisika elenda na biso ya bobateli kozingaka biso mpe kobatela biso uta na nguya ya moto wa bobe. Na ntina ya oyo napesi litatoli na ngai ya lokumu na nkombo ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, bobele Yesu Kisto, amene.