Makomi
Elamani 8


Mokapo 8

Basambisi babeba bapusi bato batomboka na Nefi—Abalayama, Mose, Zenosi, Zenoki, Eziasi, Yisaya, Yilimia, Lehi, mpe Nefi nyonso batatolaki mpo na oyo etali Klisto—Wana efulamaki ye Nefi ayebisi polele nani mobomi ya mosambisi mokonzi. Penepene na mibu 23–21 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Nefi alobaki maloba oyo, tala, ezalaki na bato oyo bazalaki basambisi, oyo bazalaki lisusu ya lingomba ya nkuku ya Gadiatoni, mpe basilikaki, mpe bazomelaki ye, kolobaka epayi ya bato: Mpo na nini bosimbi te moto oyo mpe bomemi ye te, ete akoka kopesama etumbu engebene na mabe asalaki?

2 Mpo na nini ezali bino kotala moto oyo, mpe koyoka ye kofinga bato oyo mpe mibeko na biso?

3 Mpo tala, Nefi alobelaki bango mpo na oyo etali bobe ya mibeko na bango; iyo, makambo mingi Nefi alobaki oyo makoki te kokomama; mpe alobaki eloko moko te oyo ezalaki na bokeseni na mitindo ya Nzambe.

4 Mpe basambisi bana basilikaki na ye mpo alobelaki bango polele mpo na oyo etali misala na bango ya nkuku mpe ya molili; nzokande, bamekaki te kotia loboko na bango likolo na ye, mpo babangaki bato ete mbele bazomela bango.

5 Boye babelelaki epayi ya bato, kolobaka: Mpo na nini epesi bino nzela ete moto oyo afinga biso? Mpo tala akitisi bato oyo nyonso, kutu kino na bobebisami; iyo, mpe lisusu ete bingumba minene oyo ya biso bikokamatama uta na biso, ete tokozala na esika moko te kati na yango.

6 Mpe sikawa toyebi ete oyo ekoki kosalema te, mpo tala, tozali na nguya, mpe bingumba na biso ezali minene, boye banguna na biso bakoki te kozala na nguya likolo na biso.

7 Mpe esalemaki ete boye balamusaki nkanda ya bato na Nefi, mpe babimisaki boweli na kati na bango; mpo ezalaki na boko baoyo bagangaki: Botika moto oyo na kimia, mpo azali moto malamu, mpe makambo oyo wana alobi makosalema solo longola se soki toyamboli;

8 Iyo, tala, masambisi nyonso oyo atatoli epayi na biso ekoya likolo na biso; mpo toyebi ete atatoli na alima epayi na biso mpo na oyo etali mabe na biso. Mpe tala ezali mingi, mpe ayebi lisusu makambo nyonso oyo makokweyela biso lokola mpe ayebi mabe na biso;

9 Iyo, mpe tala, soki azalaka te profeta akokaki te kotatola mpo na oyo etali makambo wana.

10 Mpe esalemaki ete bato wana baoyo balukaki kobebisa Nefi basengisamaki na ntina ya bobangi na bango, ete batiaki te maboko na bango likolo na ye; boye abandaki lisusu kolobela bango, lokola amonaki ete azwaki lisungi na miso ya basusu, na lolenge ete ndambo etikali ya bango babangaki.

11 Na boye asengisamaki kolobela bango mingi na kolobaka: Tala, bandeko na ngai, etangaki bino te ete Nzambe apesaki nguya na moto moko, kutu Mose, mpo na kobeta likolo ya mai ya Mbu Etane, mpe ekabwanaki ngambo na ngambo, na lolenge ete Bayisalaele, oyo bazalaki batata na biso, balekaki na katikati likolo ya mabele ekawuka, mpe mai mazipaki mampinga ya Baejipito mpe mamelamaki nie?

12 Mpe sikawa tala, soki Nzambe apesaki epayi ya moto oyo nguya ya lolenge oyo, bongo mpo na nini bokoswana na kati na bino moko, mpe bokoloba ete apesi ngai te nguya wapi nakoki koyeba mpo na oyo etali masambisi oyo ekoya likolo na bino longola se soki boyamboli?

13 Kasi, tala, bozali kowangana bobele maloba na ngai te, kasi bozali kowangana lisusu maloba nyonso elobamaki na batata na biso, mpe lisusu maloba oyo elobamaki na moto oyo, Mose, oyo azalaki na nguya monene ya lolenge oyo epesami epayi na ye, iyo, maloba oyo alobaki kotalaka boyei ya Masiya.

14 Iyo, epesaki ye te litatoli ete Mwana ya Nzambe akoya? Mpe lokola atombolaki elembo ya nioka ya motako likolo na esobe, kutu bongo nde akotombola ye oyo akoya.

15 Mpe mingi lokola bakotala likolo ya nioka wana bakozala na bomoi, kutu mingi mpenza lokola bakotala likolo ya Mwana ya Nzambe na bondimi, kozalaka na molimo moko ya mawa, bakozala na bomoi, kutu kino na bomoi wana oyo ezali bomoi ya seko.

16 Mpe sikawa tala, bobele Mose te atatolaki makambo oyo, kasi lisusu baprofeta basantu nyonso, uta na mikolo na ye kutu kino na mikolo ya Abalayama.

17 Iyo, mpe tala, Abalayama amonaki boyei na ye, mpe atondisamaki na nsai mpe asepelaki.

18 Iyo, mpe tala nalobi epayi na bino, ete bobele Abalayama te ayebaki makambo oyo, kasi ezalaki na mingi oyo liboso ya mikolo ya Abalayama babiangamaki na molongo ya Nzambe; iyo, kutu nsima ya molongo ya Mwana na ye; mpe oyo mpo ete elakisama epayi ya bato, nkoto moko ya mibu minene mingi liboso ya boyei na ye, ete kutu bosikoli ekoya epayi na bango.

19 Mpe sikawa nalingi ete boyeba, ete kutu uta na mikolo ya Abalayama ezalaki na baprofeta mingi baoyo batatolaki makambo oyo; iyo, tala, profeta Zenosi atatolaki na kozangaka bobangi; mpo na yango babomaki ye.

20 Mpe tala, lisusu Zenoki, mpe lisusu Eziasi, mpe lisusu Yisaya, mpe Yilimia, (Yilimia azalaki profeta se moko wana oyo atatolaki mpo na oyo etali bobebisami ya Yelusaleme) mpe sikawa toyebi ete Yelusaleme ebebisamaki engebene na maloba ya Yilimia. O soki bongo mpo na nini ekoya te Mwana ya Nzambe, engebene na lisakoli na ye?

21 Mpe sikawa ekotia bino ntembe ete Yelusaleme ebebisamaki? Ekoloba bino ete bana mibali ya Sidikiya babomamaki te, nyonso longola se Muleke? Iyo, mpe emoni bino te ete nkona ya Sidikiya ezali elongo na biso, mpe babenganamaki uta na mboka ya Yelusaleme? Kasi tala, oyo ezali nyonso te—

22 Tata na biso Lehi abenganamaki uta na Yelusaleme mpo atatolaki mpo na oyo etali makambo oyo. Nefi lisusu atatolaki mpo na oyo etali makambo oyo, mpe lisusu penepene na batata na biso nyonso, kutu kino na ntango oyo; iyo, batatolaki boyei ya Klisto, mpe batalaki ntango ekoya nsima, mpe basepelaki na mokolo na ye oyo ekoya.

23 Mpe tala, azali Nzambe, mpe azali elongo na bango, mpe amimonisaki epayi na bango, ete basikolamaki na ye; mpe bapesaki ye nkembo, na ntina ya oyo wana ekoya.

24 Mpe sikawa, komonaka ete boyebi makambo oyo mpe bokoki te kowangana yango longola se soki bokosi, boye na oyo bosumukaki, mpo bobwakaki makambo oyo nyonso, ata bilembo mingi bozwaki; iyo, kutu bozwi biloko nyonso, ezala biloko ezwami na lola, mpe lokola biloko nyonso oyo ezwami na mabele, lokola litatoli ete ezali solo.

25 Kasi tala, bobwaki bosolo, mpe botomboki na Nzambe mosantu na bino; mpe kutu na ntango oyo, na esika ya kobombaka biloko ya motuya na lola, wapi eloko moko ebebaka te, mpe wapi eloko moko te oyo ezali ya mbindo ekoki koya, bozali kobakisaka mpo na bino moko nkele mpo na mokolo ya bosambisi.

26 Iyo, kutu na ntango oyo bokomeli, na ntina ya bobomi na bino mpe bondumba na bino mpe nkuna na bino, mpo na bobebisami ya libela; iyo, mpe longola se soki boyamboli bobebisami ekoya epayi na bino kala mingi te.

27 Iyo, tala ezali sikawa kutu na bikuke na bino; iyo, bokota epayi na kiti ya bosambisi, mpe boluka; mpe tala, mosambisi na bino abomami, mpe alali na makila na ye; mpe abomami na ndeko na ye ya mobali, oyo aluki kofanda na kiti ya bosambisi.

28 Mpe tala, bango mibale bazali bato ya lingomba na bino ya nkuku, oyo kani mobandisi azali Gadiatoni mpe moto ya mabe moko oyo alukaka se kobebisa milimo ya bato.

Bimisa na lokasa