Makomi
Elamani 14


Mokapo 14

Samwele alobeli yambo eya mwinda ntango ya butu mpe monzoto moko mwa sika o mbotama ya Klisto—Klisto asikoli bato na liwa lya ntango mpe lya molimo—Bilembo bya liwa lya ye bikwi mikolo misato mya molili, bopasuki bwa mabanga, mpe mobulungano mwa biloko. Penepene na 6 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete Samwele, Molamani, abikulaki makambo moko manene mingi lisusu maye makoki te kokomama.

2 Mpe tala, alobaki epai ya bango: Tala, napesi epai ya bino elembo yoko; mpo mibu mitano lisusu miyei, mpe tala, nde eyei Mwana Mobali wa Nzambe mpo ya kosikola bango banso baye bakondima likolo lya nkombo ya ye.

3 Mpe tala, eye nakopesa epai ya bino mpo ya elembo yoko o ntango ya boyei bwa ye; mpo tala, ekozala minda minene o lola, mpenza ete o butu yambo aya ekozala te molili, mpenza ete ekomonono epai ya moto lokola soko ezalaki moi.

4 Yango wana, ekozala moi moko mpe butu moko mpe moi moko, lokola soko ezalaki mokolo moko mpe ezalaki te butu; mpe eye ekozala epai ya bino mpo ya elembo; mpo bokoyeba bobimi bwa moi mpe lisusu bofandi bwa mwango; yango wana bakoyeba na bosolo ete ekozala moi ibale mpe butu boko; nzokande butu bokoyinda te; mpe ekozala butu yambo ya mbotama ya ye.

5 Mpe tala, ekozala monzoto moko mwa sika, na lolenge la moko lokola emononi mokolo moko te; mpe eye lisusu ekozala elembo yoko epai ya bino.

6 Mpe tala eye ezali enso te, ekozala bilembo mpe makamwa mingi o lola.

7 Mpe ekosalema ete bino banso bokozala na kokamwa, mpe komituna, mpenza ete bokokweya o mabele.

8 Mpe ekosalema ete onso oyo akondima likolo lya Mwana Mobali wa Nzambe, ye kaka akozwa bomoi bwa libela.

9 Mpe tala, boye etindi ngai Nkolo, na anzelu wa ye, ete naya mpe naloba likambo liye epai ya bino; iyo, atindi ngai ete nabikula makambo maye epai ya bino; iyo, alobi epai ya ngai: Belela epai ya bato baye, boyambolani mpe lengeleni nzela ya Nkolo.

10 Mpe sikawa, zambi nazali Molamani moko, mpe nalobi epai ya bino maloba maye Nkolo atindi ngai, mpe zambi ezalaki makasi mpo ya bino, bosiliki na ngai mpe boluki kobebisa ngai, mpe bobwaki ngai libanda uta o ntei ya bino.

11 Mpe bokoyoka maloba ma ngai, mpo, mpo ya likanisi liye namati likolo lya bifelo bya engumba eye, ete bokoka koyoka mpe koyeba masambisi ma Nzambe maye makozela bino na ntina ya mabe ma bino, mpe lisusu ete bokoka koyeba masengeli ma boyamboli;

12 Mpe lisusu ete bokoka boyeba boyei bwa Yesu Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe Tata wa lola mpe wa mabele, Mokeli wa biloko binso uta o ebandeli; mpe ete boyeba bilembo bya boyei bwa ye, na likanisi ete bokoka kondima likolo lya ye.

13 Mpe soko bondimi likolo ya nkombo ya ye bokoyambola na masumu ma bino manso, ete na yango bokoka kozala na bolimbisi bwa mango na nzela ya matomba ma ye.

14 Mpe tala, lisusu, elembo esusu nakopesa epai ya bino, iyo, elembo yoko ya liwa lya ye.

15 Mpo tala, solo esengeli akufa ete lobiko lokoka koya; iyo, esengeli na ye mpe ekomi elongobani ete akufa, mpo ya komeme esalema bosekwi bwa bakufi, ete na bwango bato bakoka komememe o kati ya miso mya Nkolo.

16 Iyo, tala, liwa liye limemi esalema bosekwi, mpe lisikoli bato banso uta o liwa lya yambo—liwa lina lya molimo; mpo bato banso, na bokwei bwa Adama, ekatamaki bango mosika uta o miso mya Nkolo, bamononi lokola bakufa, o makambo ma ntango mpe o makambo ma molimo.

17 Kasi tala, bosekwi bwa Klisto bosikoli bato, iyo, kutu bato banso, mpe bomemi bango kozonga o kati ya miso mya Nkolo.

18 Iyo, mpe ememi esalema lisengeli lya boyamboli, ete onso oyo ayamboli ye kaka akatami te o nse mpe abwakami te o kati ya moto; kasi onso oyo ayamboli te akatami o nse mpe abwakami o kati ya moto; mpe eyei likolo lya bango lisusu liwa lyoko lya molimo, iyo, liwa lya ibale, mpo bakatami lisusu mosika mpo ya makambo matali bosembo.

19 Yango wana yambolani, yambolani, mbele na koyebaka makambo maye mpe kosalaka mango te bokoyoka mpasi binomei mpo ya koya o nse ya bokweyisami, mpe bomememi o nse epai ya liwa lya ibale.

20 Kasi tala, lokola nalobaki epai ya bino etali elembo esusu, elembo yoko ya liwa lya ye, tala, o mokolo mona moye akoyoka mpasi ya liwa, moi mokoyindisama mpe mokoboya kopesa mwinda mwa ye epai ya bino; mpe lisusu sanza mpe minzoto; mpe ekozala te mwinda likolo lya etando ya mboka eye, kutu uta ntango eye akoyoka mpasi ya liwa, mpo ya ntaka ya mikolo misato, o ntango eye akosekwa lisusu uta o liwa.

21 Iyo, o ntango eye akozongisa molimo ekozala nkake mpe minkalali mpo ya ntaka ya ngonga mingi, mpe mabele makoningana mpe makolenge; mpe mabanga maye mazali likolo lya etando ya mabele maye, maye mazali na likolo lya mabele mpe o nse lokola, maye boyebi o ntango eye mazali makasi, to eteni eleki mingi ya mango mazali liboke likasi, makobukana.

22 Iyo, makopasuka na biteni bibale, mpe makomonono libela biteni biteni mpe bipasukapasuka, mpe na biteni bibukana likolo lya etando ya mabele mobimba, iyo, likolo lya mabele mpe o nse lokola.

23 Mpe tala, ikozala bikumbaki binene, mpe ikolala ngomba mingi o nse, bo lobwaku loko, mpe ekozali bisika mingi biye bibiangemi sikawa lobwaku biye bikokoma ngomba, eye ya yango bosanda bozali bonene.

24 Mpe nzela inene mingi ikobukanabukana, mpe bingumba mingi bikokoma mpamba.

25 Mpe malita mingi makofungwana, mpe makobimisa mingi ya bakufi ba bango; mpe basantu mingi bakobima epai ya bato mingi.

26 Mpe tala, boye elobaki anzelu epai ya ngai; mpo alobaki epai ya ngai ete ekozala nkake mpe minkalali mpo ya ntaka ya ngonga mingi.

27 Mpe alobaki epai ya ngai ete ntango ekowumela nkake mpe monkalali, mpe ekumbaki, ete makambo maye makozala, mpe ete molili mokozipa etando ya mabele mobimba o ntaka ya mikolo misato.

28 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai ete mingi bakomono makambo manene koleka maye, na ntina ete bakoka kondima ete bilembo biye mpe makamwisi maye makosalema likolo lya etando mobimba ya mboka eye, mpo ete ezala ntina te mpo ya bozangi bondimi o ntei ya bana ba bato—

29 Mpe eye na ntina ete baye banso bakondima bakoka kobikisama, mpe baye banso bakondima te, bosambisi boko sembo bokoka koya likolo lya bango; mpe lisusu soko bakweyisami bameme likolo lya bangomei bokwei bwa bangomei.

30 Mpe sikawa bomikundola, bomikundola, bandeko ba ngai, ete onso oyo awei, awei mpo ya yemei; mpe onso oyo asali bobe, asali bwango mpo ya yemei; mpo tala, bozali nsomi; bopesami ndingisa mpo ya kosala mpo ya binomei; mpo tala, Nzambe apesi epai ya bino boyebi boko mpe asali bino nsomi.

31 Apesi epai ya bino ete bokoka koyeba bolamu mpe bobe, mpe apesi bino ete bokoka kopono bomoi to liwa; mpe bokoki kosala bolamu mpe kozongisama epai ya ena eye ezali elamu, to kozala na ena eye ezali elamu ezongisama epai ya bino; to bokoki kosala bobe, mpe kozala na ena eye ezali ebe ezongisama epai ya bino.