Makomi
Etele 7


Mokapo 7

Oliya akonzi o bosembo—O katikati ya bowembi mpe songisongi, bokonzi bwa bowelani bwa Sule mpe Kowolo botiami—Baprofeta batumboli nkuna mpe bosambeli bikeko bwa bato baye bakoyambola.

1 Mpe esalemaki ete Oliya asalaki bosambisi likolo lya mboka o bosembo mikolo mya ye minso, oyo ya ye mikolo mizalaki mingi mpenza.

2 Mpe abotaki bana babali mpe bana basi; iyo, abotaki tuku misato na moko, o ntei ya bango izalaki bana babali tuku babale na basato.

3 Mpe esalemaki ete abotaki lisusu Kibi o bobange bwa ye. Mpe esalemaki ete Kibi akonzaki o esika ya ye; mpe Kibi abotaki Koliyolo.

4 Mpe ezalaki Koliyolo na mibu tuku misato na mibale atombokaki na tata wa ye, mpe akendeki likolo mpe afandaki o mboka ya Newolo; mpe abotaki bana babali mpe bana basi, mpe bakomaki malonga mpenza, bongo Koliyolo abendaki mosika bato mingi nsima ya ye.

5 Mpe esangisaka ye elongo limpinga lyoko ayaki likolo epai ya mboka ya Molona wapi mokonzi afandaki, mpe akamataki ye mokangemi, eye ememeki esalema liloba lya ndeko mobali wa Yelede ete bakomememe o kati ya bokangemi.

6 Sikawa mboka ya Molona, wapi mokonzi afandaki, ezalaki penepene na mboka eye ebiangemaki Mpamba na Banefi.

7 Mpe esalemaki ete Kibi afandami o bakangemi, mpe bato ba ye o nse ya Koliyolo mwana mobali wa ye, kina akomaki mobange mpenza; nzokande Kibi abotaki Sule o bobange bwa ye, ntango ezalaki ye naino o bokangemi.

8 Mpe esalemaki ete Sule asilikaki na ndeko mobali wa ye; mpe Sule akolaki na bokasi, mpe akomaki mokasi lokola o bokasi bwa moto moko; mpe azalaki lisusu mokasi o bosambisi.

9 Yango wana, akendeki o ngomba ya Efelaima, mpe aniangolaki uta o ngomba, mpe asalaki mipanga na ebende ekasi mpo ya bango baye abendaki mosika elongo na ye, mpe esilisaka ye kopesa bango mandoki ma mipanga azongaki o engumba ya Newolo, mpe apesaki etumba epai ya ndeko mobali wa ye Koliyolo, o eye nzela azwaki bokonzi mpe azongisaki bwango epai ya tata wa ye Kibi.

10 Mpe sikawa na ntina ya likambo liye Sule asalaka, tata wa ye apesaki likolo lya ye bokonzi; yango wana abandaki kokonza o esika ya tata wa ye.

11 Mpe esalemaki ete asalaki bosambisi o bosembo; mpe apanzaki bokonzi bwa ye likolo lya etando mobimba ya mboka, mpo bato bakomaki motango monene mpenza.

12 Mpe esalemaki ete Sule lokola abotaki bana babali mpe bana basi mingi.

13 Mpe Koliyolo ayambolaki mabe mingi maye asalaka; yango wana Sule apesaki ye nguya o bokonzi bwa ye.

14 Mpe esalemaki ete Koliyolo azalaka na bana babali mpe bana basi mingi. Mpe o ntei ya bana babali ba Koliyolo ezalaki moko oyo ya ya nkombo ezalaki Noa.

15 Mpe esalemaki ete Noa atombokaki na Sule, mokonzi, mpe lisusu na tata wa ye Koliyolo, mpe abendaki mosika Kowolo ndeko mobali wa ye, mpe lisusu bandeko ba ye banso mpe mingi ya bato.

16 Mpe apesaki etumba epai ya Sule, mokonzi, o yango azwaki mboka ya lisango lya bango lya yambo; mpe akomaki mokonzi likolo lya eteni ena ya mboka.

17 Mpe esalemaki ete lisusu apesaki etumba epai ya Sule, mokonzi; mpe akamataki Sule, mokonzi, mpe akumbaki ye mosika mokangemi o kati ya Molona;

18 Mpe esalemaki ete lokola azalaki penepene na kotia ye o liwa, bana babali ba Sule bakotaki o kati ya ndako ya Noa na nkuku o butu mpe babomaki ye, mpe babukaki ekuke ya boloko mpe bamemeki libanda tata wa bango, mpe batiaki ye likolo lya ngbende ya ye o bokonzi bwa yemei.

19 Yango wana, mwana mobali wa Noa atongaki bokonzi bwa ye o esika ya ye; nzokande, balongaki nguya lisusu te likolo lya Sule mokonzi, mpe bato baye bazalaki o nse ya bokonzi bwa Sule mokonzi bazwaki bomengo mpenza mpe bakolaki na bonene.

20 Mpe ekolo ekabwanaki; mpe ezalaki bokonzi ibale, bokonzi bwa Sule, mpe bokonzi bwa Kowolo, mwana mobali wa Noa.

21 Mpe Kowolo, mwana mobali wa Noa, asalaki ete bato ba ye bapesa etumba epai ya Sule, o yango Sule abeteki bango mpe abomaki Kowolo.

22 Mpe sikawa Kowolo azalaki na mwana mobali moko oyo abiangemaki Nimilodi; mpe Nimilodi apesaki bokonzi bwa Kowolo epai ya Sule, mpe azwaki lisungi o miso mya Sule; yango wana Sule apesaki masungi manene likolo lya ye, mpe asalaki boye o bokonzi bwa Sule engebene na mposa ya ye.

23 Mpe lisusu o bokonzi bwa Sule eyaki baprofeta o ntei ya bato, baye batindamaki uta na Nkolo kobikulaka ete nkuna mpe bosambeli bikeko bwa bato bomemeki botutu likolo lya mboka, mpe bakobebisama soko bayamboli te.

24 Mpe esalemaki ete bato batiolaki baprofeta, mpe basekeki bango. Mpe esalemaki ete mokonzi Sule asalaki bosambisi na bango banso baye batiolaki baprofeta.

25 Mpe asalelaki mobeko moko o ntaka ya mboka, moye mopesaki nguya epai ya baprofeta ete bakende wapi esika balingi; mpe na ntina eye bato bamememeki epai ya boyamboli.

26 Mpe zambi bato bayambolaki mabe ma bango mpe bosambeli bikeko Nkolo abatelaki bango, mpe babandaki kozwa bomengo lisusu o mboka. Mpe esalemaki ete Sule abotaki bana babali mpe bana basi o bobange bwa ye.

27 Mpe lisusu te izalaki bitumba o mikolo mya Sule; mpe amikundolaki makambo manene maye Nkolo asalaki mpo ya batata ba ye na komemeke bango na kokatisa mozindo monene o kati ya mboka elakelama; yango wana asalaki bosambisi na bosembo mikolo mya ye minso.