Makomi
Etele 5


Mokapo 5

Banzeneneke basato mpe mosala mwangomei mokoteleme lokola litatoli lya bosolo botonda bwa Buku ya Molomoni.

1 Mpe sikawa ngai, Moloni, nakomi maloba maye matindamaki ngai, engebene na likoki lya bokundoli bwa ngai; mpe nalobeli yo makambo maye nakangi; yango wana kosimba mango te na ntina ete okoka kobongola mango; mpo likambo lina lipekisami yo, longola se soko moke ekozala bwania na Nzambe.

2 Mpe tala, okoki kozala na litomba ete okoka kolakisa palaki epai ya bango baye bakosalisa mpo ya komeme liboso mosala moye;

3 Mpe epai ya basato makolakisama na nguya ya Nzambe; yango wana bakoyeba na ntembe te ete makambo maye mazali ma solo.

4 Mpe o monoko mwa banzeneneke basato, makambo maye makotiama; mpe litatoli lya basato, mpe mosala moye, na mwango ekolakisama nguya ya Nzambe mpe liloba lya ye lokola, ya lyango Tata, mpe Mwana Mobali, mpe Molimo Mosantu bapesi litatoli—mpe enso eye ekoteleme lokola litatoli mpo ya mabe ma mokili o mokolo mwa nsuka.

5 Mpe soko ezali boye ete bayamboli mpe bayei epai ya Tata o nkombo ya Yesu, bakoyambema o kati ya bokonzi bwa Nzambe.

6 Mpe sikawa, soko nazali te na bokulaka mpo ya makambo maye, sambisani; mpo bokoyeba ete ngai nazali na bokulaka ekomono bino ngai, mpe tokoteleme liboso lya Nzambe o mokolo mwa nsuka. Amene.