Makomi
Molomoni 2


Mokapo 2

Molomoni akambi mampinga ma Banefi—Makila mpe mobomano mokombi mboka—Banefi bamileli mpe baleli na mawa ma motumbolami—Mokolo mwa bango mwa boboto moleki—Molomoni azwi palaki ya Nefi—Etumba ekobi. Penepene na 327–350 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe esalemaki ete o mobu mona kaka ebandaki kozala etumba lisusu o kati ya Banefi mpe Balamani. Ata ngai kozalaka elenge, nazalaki molai na nzoto; yango wana bato ba Nefi baponoki ngai ete nazala mokambi wa bango, to mokambi wa mampinga ma bango.

2 Bongo esalemaki o mibu zomi na motoba mya ngai nakendeki o moto mwa limpinga lya Banefi, kobunda na Balamani; bongo mibu nkama misato na tuku mibale na motoba milekaki.

3 Mpe esalemaki ete o mobu mwa nkama misato na tuku mibale na sambo, Balamani bayaki likolo lya biso na nguya enene mpenza, mpenza ete babangisaki mampinga ma ngai; yango wana balingaki te kobunda, mpe babandaki kozonga nsima ona bikolo bya nordi.

4 Mpe esalemaki ete tokomaki o engumba ya Angola, mpe tokamataki engumba, mpe tosalaki bolengeli mpo ya komibatela na Balamani. Mpe esalemaki ete tolendisaki engumba na makasi manso ma biso; kasi ata bisika bikasi bya biso Balamani bayaki likolo lya biso mpe babenganaki biso libanda lya engumba.

5 Mpe babenganaki biso lisusu libanda lya mboka Dawidi.

6 Mpe totambolaki mpe toyaki o mboka ya Yosua, eye ezalaki o ndelo ya westi mpembeni ya libongo lya mbu.

7 Mpe esalemaki ete tosangisaki o kati bato ba biso mbangu lokola ekokaki, ete tokoka kozwa bango elongo o nzoto yoko.

8 Kasi tala, mboka etondaki na bayongoli mpe Balamani; mpe ata bobebisami bonene boye bodiembelaki likolo lya bato ba ngai, bayamboli te na misala mibe mya bango; yango wana epanzanaki makila mpe mobomano o ntaka ya etando mobimba ya mboka, o ngambo ya Banefi mpe o ngambo ya Balamani lokola; mpe ezalaki bobongwani mpenza o ntaka ya etando mobimba ya mboka.

9 Mpe sikawa, Balamani bazalaki na mokonzi moko, nkombo ya ye ezalaki Aloni; mpe ayaki kobunda na biso elongo na limpinga lyoko lya nkoto tuku minei na minei. Kasi tala natelemelaki ye na nkoto tuku minei na ibale. Mpe esalemaki ete nabeteki ye elongo na limpinga lya ngai ete akimaki liboso lya ngai. Mpe tala, enso eye esalemaki, mpe mibu nkama misato na tuku misato milekaki.

10 Mpe esalemaki ete Banefi babandaki koyambola bobe bwa bango, mpe babandaki komilela kutu lokola ebikulamaki na Samwele profeta; mpo tala, moto te akokaki kobomba eye ezalaki ya yemei, mpo ya bayongoli, mpe bawembi, mpe babomi, mpe ntoki ya moyeke, mpe nkisi iye izalaki o mboka.

11 Boye ebandelaki kozala matanga moko mpe boleli boko o mboka mobimba na ntina ya makambo maye, mpe mingi koleka o ntei ya bato ba Nefi.

12 Mpe esalemaki ete ngai, Molomoni, emonoki ngai boleli mpe matanga ma bango, mpe mawa ma bango liboso lya Nkolo, motema mwa ngai mobandaki kosepela o kati ya ngai, eyebaki ngai boboto mpe motema molai mwa Nkolo, bongo kokanisaka ete akoyoka mawa epai ya bango ete bakokoma lisusu bato boko sembo.

13 Kasi tala, eye bosepeli bwa ngai bozalaki mpamba, mpo mawa ma bango mazalaki te mpo ya boyamboli, na ntina ya bolamu bwa Nzambe; kasi ezalaki kutu mawa ma motumbolami, zambi Nkolo akondima te ete ntango inso bazwa bosepeli o masumu.

14 Mpe bayaki te epai ya Yesu na mitema mibukana mpe milimo mya mawa, kasi balakelaki Nzambe botutu, mpe batombelaki kokufa. Nzokande balingaki kobunda na mopanga mpo ya bomoi bwa bango.

15 Mpe esalemaki ete mawa ma ngai mazongaki epai ya ngai lisusu, mpe namonoki ete mikolo mya boboto milekaki na bango, na ntango mpe na molimo lokola; mpo namonoki nkoto na nkoto ya bango bakatamaki o nse na botomboki bwa polele na Nzambe wa bango, mpe batondisamaki meke lokola niei likolo lya etando ya mboka. Boye mibu nkama misato na tuku minei na minei milekaki.

16 Mpe esalemaki ete o mobu mwa nkama misato na tuku minei na mitano Banefi babandaki kokima liboso lya Balamani; mpe balandamaki kina bakomaki kutu o mboka ya Yasoni, yambo bakoka kokanga bango na o bokimi bwa bango.

17 Mpe sikawa, mboka ya Yasoni ezalaki penepene na mboka wapi Amaloni abombisaka makundoli epai ya Nkolo, ete makoka te kobebisama. Mpe tala nakendeke engebene na liloba lya Amaloni mpe nakamataka palaki ya Nefi, mpe nasalaki likundoli engebene na maloba ma Amaloni.

18 Mpe likolo lya palaki ya Nefi nasalaki nsango yoko mobimba ya nkuna mpe bonsomo bonso; kasi likolo lya palaki iye naboyi kosala nsango yoko mobimba ya nkuna mpe bonsomo bwa bango, mpo tala ezaleli yoko ya ntango inso ya nkuna mpe o bonsomo bozalaki liboso lya miso mya ngai uta kutu nazali nakoka mpo ya koyeba nzela ya bato.

19 Mpe lisuma lizali ngai na ntina ya nkuna ya bango; mpo motema mwa ngai motondaki na mawa na ntina ya nkuna ya bango, mikolo mya ngai minso; nzokande, nayebi ete nakotombolama o mokolo mwa nsuka.

20 Mpe esalemaki ete o mobu moye bato ba Nefi lisusu balandamaki mpe babenganamaki. Mpe esalemaki ete tobenganamaki kina tokomaka epai ya nordi o mboka eye ebiangemaki Semi.

21 Mpe esalemaki ete tolendisaki engumba ya Semi, mpe tosangisaki bato ba biso mingi lokola ekokaki kosalema, ete mbele tokoka kobikisa bango uta o bobebisami.

22 Mpe esalemaki ete o mobu mwa nkama misato na tuku minei na motoba babandaki koya likolo lya biso lisusu.

23 Mpe esalemaki ete nalobaki epai ya bato ba ngai, mpe nasengeki bango na makasi manene, ete basengeli koteleme na mpiko liboso lya Balamani, mpe babunda mpo ya basi ba bango, mpe bana ba bango, mpe ndako ya bango, mpe mboka ya bango.

24 Mpe maloba ma ngai malamusaki bango mwa moke na mpiko, mpenza ete bakimaki te uta o liboso lya Balamani, kasi batelemeki na mpiko mpo ya kobunda na bango.

25 Mpe esalemaki ete elongo na limpinga lyoko lya nkoto tuku isato tobundaki na limpinga lyoko lya nkoto tuku itano. Mpe esalemaki ete totelemeki liboso lya bango na sikisiki ya lolenge lokolo ete bakimaki uta o liboso lya biso.

26 Mpe esalemaki ete ekimaka bango tolandaki bango elongo na mampinga ma biso, mpe tokutanaki na bango lisusu, mpe tobeteki bango; nzokande bokasi wa Nkolo bozalaki te elongo na biso; iyo, totikalaki bisomei, ete Molimo mwa Nkolo afandaki na biso te; bongo tokomaki batau bo bandeko ba biso.

27 Mpe motema mwa ngai moyokaki mawa na ntina ya likambo linene lya mawa lya bato ba ngai, na ntina ya nkuna mpe bonsomo bwa bango. Kasi tala, tokendeki kobunda na Balamani mpe bayongoli ba Gadiatoni, kina tokamataki lisusu mboka ya lisango lya biso.

28 Mpe mobu mwa nkama misato na tuku minei na libwa molekaki. Mpe o mobu mwa nkama misato na tuku mitano, tosalaki boyokani boko elongo na Balamani mpe bayongoli ba Gadiatoni, na bwango tosalaki mboka ya lisango lya biso likabolama.

29 Mpe Balamani bapesaki epai ya biso mboka ya epai ya nordi, iyo, kutu o nzela ya nkaka eye ekambi o mboka ya epai ya sudi. Mpe topesaki epai ya Balamani mboka enso ya epai ya sudi.