Makomi
Moloni 8


Mokapo 8

Libatisi lya bana bake lizali bonsomo boko bobe—Bana bake bazali na bomoi na Klisto na ntina ya Botumbolami—Bondimi, boyamboli, bosokemi mpe bokitisi bwa motema, koyambaka Molimo Mosantu, mpe kotiaka molende kina o nsuka ekambi o lobiko. Penepene na 401–421 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mokanda moko mwa tata wa ngai Molomoni, mokomami na ngai, Moloni; mpe mokamamaki epai ya ngai noki nsima ya bobiangemi bwa ngai o mosala. Mpe o motindo moye akomi epai ya ngai, kolobaka:

2 Mwana mobali molingami wa ngai, Moloni, nasepeli mpenza ete Nkolo wa yo Yesu Klisto azali na likanisi lya yo mpe abiangi yo o lotomo la ye mpe o mosala mosantu mwa ye.

3 Nazali na likanisi lya yo ntango inso o losambo la ngai, kosambelaka ntango inso epai ya Nzambe Tata o nkombo ya Mwana Mosantu wa ye, Yesu, ete ye, o nzela ya bolamu bozanga ndelo mpe boboto bwa ye, akobatela yo o nzela ya molende mwa bondimi likolo lya nkombo ya ye kina o nsuka.

4 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, nalobi epai ya yo etali ena eye esali ngai mpasi mpenza; mpo esali ngai mpasi ete ezala boswani o ntei ya bino.

5 Mpo, soko nayoki bosolo, ezali boswani o ntei ya bino botali libatisi lya bana bake ba bino.

6 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, nazali na mposa ete osala na etingia, ete libosani linene liye lilongwa uta o ntei ya bino; mpo, mpo ya mokano moye nakomi monkanda moye.

7 Mpo esilaka ngai koyoka makambo maye na yo, natunaki na Nkolo etali likambo lyango. Mpe liloba lya Nkolo liyaki na ngai na nguya ya Molimo Mosantu, kolobaka:

8 Yoka maloba ma Klisto, Mosikoli wa yo, Nkolo wa yo mpe Nzambe wa yo. Tala, nayei o kati ya mokili mpo ya kobianga basembo te kasi basumuki o boyamboli; bakolongono bazali na mposa ya monganga te kasi bango baye bazali bakoni; yango wana bana bake bazali bakolongono, mpo bakoki te kosala lisumu; yango wana botutu bwa Adama bolongwi uta na bango na ngai, ete bozali na nguya te likolo lya bango, mpe mobeko mwa ganza mosili na ngai.

9 Mpe nsima ya lolenge loye Molimo Mosantu alakisi maloba ma Nzambe epai ya ngai; yango wana, mwana mobali molingami wa ngai, nayebi ete ezali liseki linene liboso lya Nzambe, ete bobatisa bana bake.

10 Tala nalobi epai ya yo ete likambo liye olakisa—boyamboli mpe libatisi ezali epai ya bango baye bazali bayanoli mpe bakoki kosala lisumu; iyo, lakisa baboti ete basengeli koyambola mpe kobatisama, mpe komikitisa lokola bana bake ba bango, mpe bakobikisama banso elongo na bana bake ba bango.

11 Mpe bana bake ba bango bazali na mposa te ya boyamboli, mpe libatisi te. Tala, libatisi lizali mpo ya boyamboli mpo ya kokokisa mitindo, mpo ya bolimbisi bwa masumu.

12 Kasi bana bake bazali na bomoi na Klisto, kutu uta o bokelami bwa mokili; soko boye te, Nzambe azali Nzambe moko mokesenisi, mpe lisusu Nzambe moko mobongwani, mpe mokaboli wa bato; mpo bana bake boniboni mingi bakufi na bozangi bwa libatisi!

13 Yango wana, soko bana bake bakoki te kobikisama na bozangi bwa libatisi, esengeli ete bango bakende o limfelo lizanga nsuka.

14 Tala nalobi epai ya yo, ete ye oyo abanzi ete bana bake bazali na mposa ya libatisi, azali o lititi lya bololo mpe o bowumbu bwa bobe; mpo azali na bondimi te, elikia te, to lolango te; yango wana, ekokatama ye mosika o makanisi, asengeli kokita o limfelo.

15 Mpo nsomo ezali nkuna ya kobanza ete Nzambe abikisi mwana moke na ntina ya libatisi, mpe mosusu asengeli kowa zambi azali na libatisi te.

16 Lisuma lizala epai ya bango baye bakosantola nzela ya Nkolo nsima ya lolenge loye, mpo bakowa longola se soko bayamboli. Tala, nalobaki na mpiko, kozalaka na bokulaka uta na Nzambe; mpe nabangi te nini moto akoki kosala; mpo bolingo bobongo nie bobwaki libanda bobangi bonso.

17 Mpe natondi na lolango, loye lozali bolingo bwa libela; yango wana, bana bake banso bazali lolenge loko epai ya ngai; yango wana, nalingi bana bake na bolingo boko bobongo nie; mpe banso bazali lolenge loko mpe bakaboli lobiko.

18 Mpo nayebi ete Nzambe azali te Nzambe moko mokesenisi, mpe mozali moko abongwani te; mpe azali mobongwani te uta boseko bonso na boseko bonso.

19 Bana bake bakoki koyambola te; yango wana, ezali nkuna ya nsomo koboya ngolu ya peto ya Nzambe epai ya bango, mpo bazali banso na bomoi na ye na ntina ya ngolu ya ye.

20 Mpe ye oyo alobi ete bana bake bazali na mposa ya libatisi awangani boboto bwa Klisto, mpe atii na mpamba botumbolami bwa ye mpe nguya ya bosikoli bwa ye.

21 Lisuma epai ya ba lolenge loye, mpo bazali na likama lya liwa, limfelo, mpe monioko mzanga nsuka. Nalobi yango na mpiko; Nzambe atindi ngai. Yokani mango mpe sala keba, to makotelemela yo o kiti ya bosambisi ya Klisto.

22 Mpo tala bana bake banso bazali na bomoi na Klisto, mpe lisusu bango banso bazangi mobeko. Mpo nguya ya bosikoli eyei likolo lya bango banso baye bazangi mobeko; yango wana, ye oyo atumbolami te, to ye oyo azali te o nse ya etumbu, akoki te koyambola; mpe epai ya ba lolenge loye libatisi lizali eloko te—

23 Kasi ezali liseki liboso lya Nzambe, kowanganaka ngolu ya Klisto, mpe nguya ya Molimo Mosantu mwa ye, mpe kotiaka elikia na misala mikufa.

24 Tala, mwana mobali wa ngai, likambo liye lisengeli te kozala; boyamboli bozali epai ya bango baye bazali o nse ya etumbu mpe o nse ya botutu bwa mobeko mobukami.

25 Mpe mbuma ya yambo ya boyamboli ezali libatisi; mpe libatisi eyei na bondimi epai ya bokokisi bwa mitindo; mpe bokokisi bwa mitindo bomemi bolimbisi bwa masumu.

26 Mpe bolimbisi bwa masumu bomemi bosokemi, mpe bokitisi bwa motema; mpe na ntina ya bosokemi mpe bokitisi bwa motema eyei bobimelami bwa Molimo Mosantu, Mobondisi atonda na elikia mpe bolingo bobongo nie, boye botii molende na etingia mpo ya losambo, kina nsuka ekoya, ntango ekokofanda basantu banso elongo na Nzambe.

27 Tala, mwana mobali wa ngai, nakokoma epai ya yo lisusu soko nabimi te noki kobunda na Balamani. Tala, lolendo la ekolo eye, to bato banso ba Banefi, losali bobebisami bwa bango longola se soko bakoyambola.

28 Sambela mpo ya bango, mwana mobali wa ngai, ete boyamboli boya epai ya bango. Kasi tala, nabangi ete Molimo motika kobunda elongo na bango; mpe eteni eye ya mboka bazali kolukaka lisusu kotia o nse nguya mpe bokulaka bonso boye boyei uta na Nzambe; mpe bazali kowanganaka Molimo Mosantu.

29 Mpe nsima ya kobwakaka boyebi boko bonene boye, mwana mobali wa ngai basengeli kowa noki, mpo ya bokokisi bwa mabikuli maye malobamaki na baprofeta, mpe lisusu maloba ma Mobikisi wa biso yemei.

30 Sese, mwana mobali wa ngai, kina nakokoma epai ya yo lisusu, to nakokutana na yo lisusu. Amene.