Makomi
Moloni 3


Mokapo 3

Bankulutu bokulisi banganga mpe balakisi na kotiaka likolo lya bango maboko. Penepene na 401–421 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Lolenge loye bayekoli, baye babiangemaki bankulutu ba eklezia, bakulisamaki banganga mpe balakisi—

2 Esilisaki bango kosambela epai ya Tata, o nkombo ya Klisto, batiaki maboko ma bango likolo lya bango mpe balobaki:

3 O nkombo ya Yesu Klisto nakulisi yo mpo ya kozala nganga moko (to soko azali molakisi moko, nakulisi yo molakisi) mpo ya koteya boyamboli, mpe bolimbisi bwa masumu o nzela ya Yesu Klisto, na molende mwa bondimi likolo lya nkombo ya ye kina o nsuka. Amene.

4 Nsima ya lolenge loye bakulisaki banganga mpe balakisi, engebene na makabo mpe mabiangi ma Nzambe epai ya bato; mpe bakulisaki bango na nguya ya Molimo Mosantu, oyo azalaki na bango.