Makomi
Moroni 1


Buku ya Moroni

Mokapo 1

Moroni akomi mpo na litomba ya Balamani—Banefi oyo bakowangana Klisto te batiami na liwa. Penepene na mibu 401–421 ya Mobu ya Nkolo.

1 Sikawa ngai, Moroni, esilaki ngai kotia nsuka ya kokoma bokuse ya lisolo ya bato na yelede, nabanzaki te ete esengeli nakoma lisusu, kasi nawei naino te; mpe namibimisi te na Balamani mbele baboma ngai.

2 Mpo tala, bitumba na bango ezali makasi mingi koleka na kati na bango moko; mpe na ntina ya boyini na bango bati na liwa Monefi nyonso oyo akowangana Klisto te.

3 Mpe ngai, Moroni, nakowangana Klisto te; yango wana, nazali koyenga-yenga bipayi nyonso wapi nakoki mpo na bokengi ya bomoi na ngai.

4 Yango wana, nakomi lisusu mwa makambo moke, na bokeseni na oyo wana nabanzaki; mpo nabanzaki ete nasengeli kokoma lisusu te; kasi nazali kokoma mwa makambo moke lisusu, ete mbele makoka kozala ya motuya epayi ya bandeko na ngai, Balamani, na mokolo ekoya nsima, engebene na bolingi ya Nkolo.

Bimisa na lokasa