Makomi
Moloni 2


Mokapo 2

Yesu apesi bayokoli ba Banefi zomi na babale nguya mpo ya kopesa likabo lya Molimo Mosantu. Penepene na 401–421 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Maloba ma Klisto, maye alobaki epai ya bayekoli ba ye, bazomi na babale baye aponoko, lokola atiaki maboko ma ye likolo lya bango—

2 Mpe abiangaki bango na nkombo, kolobaka: Bokobianga likolo lya Tata o nkombo ya ngai, o losambo lokasi; mpe esilisi bino kosala eye, bokozala na nguya ete na oyo likolo lya ye bokotia maboko ma bino, bokopesa Molimo Mosantu; mpe o nkombo ya ngai bokopesa yango, mpo boye ekosalaka bapostolo ba ngai.

3 Sikawa Klisto alobaki maloba maye epai ya bango, o ntango ya bobimi bwa ye bwa yambo; mpe ebele bayokaki yango te, kasi bapostolo bayokaki yango; mpe likolo lya mingi lokola batiaki bango maboko, ekweyaki Molimo Mosantu.