Mokapo 5
Lolenge ya kopambolaka vinyo ya elambo elimbolami. Penepene na mibu 401–421 ya Mobu ya Nkolo.
1 Oyo ezali lolenge ya kopambola vinyo—Tala, bakamataki nkeni, mpe balobaki:
2 O Nzambe, Tata ya Seko, tozali kosenga yo, na nkombo ya Mwana na yo, Yesu Klisto, opambola mpe osantisa vinyo oyo mpo na milimo ya baoyo nyonso bakomela yango, ete bakoka kosala yango na bokundoli ya makila ya Mwana na yo, oyo esopanaki mpo na bango; ete bakoka kotatola yo, O Nzambe, Tata ya Seko, ete bazali komikundola ye ntango nyonso, ete bakoka kozala na Molimo na ye elongo na bango. Amene.