Makomi
Moroni 8


Mokapo 8

Libatisi ya bana mike ezali bonsomo moko ya mabe—Bana mike bazali na bomoi na Klisto na ntina ya Bomikabi—Bondimi, boyamboli, bosokemi mpe bokitisi ya motema, koyambaka Molimo Mosantu, mpe kotiaka molende kino na nsuka ememaka na lobiko. Penepene na mibu 401–421 ya Mobu ya Nkolo.

1 Oyo ezali mokanda moko ya tata na ngai Mormon, mokomami na ngai, Moroni; mpe mokomamaki epayi na ngai kala mingi nsima ya bobiangami na ngai na mosala. Mpe akomelaki ngai na lolenge oyo, kolobaka:

2 Mwana mobali molingami na ngai, Moroni, nasepeli mingi koleka ete Nkolo na yo Yesu Klisto akaniseli yo mpe abiangi yo na mosala na ye mpe na lotomo mosantu na ye.

3 Nakanisaka yo ntango nyonso na losambo na ngai, kosambelaka ntango nyonso epayi ya Nzambe Tata na nkombo ya Mwana Mosantu na ye, Yesu, ete ye, na nzela ya bolamu mpe ngolu na ye ezanga ndelo, akobatela yo na nzela ya molende ya bondimi na nkombo na ye kino na nsuka.

4 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, nalobeli yo mpo na oyo wana esalaki ngai mpasi mingi koleka; mpo esali ngai mpasi ete boswani ebima na kati na bino.

5 Mpo, soki nayokaki makambo ya bosolo, boswani ezalaki na kati na bino mpo na oyo etali libatisi ya bana mike na bino.

6 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, nazali na mposa osala na molende, ete libunga monene oyo esengeli kolongwa uta na kati na bino; mpo, ezali mpo na ntina oyo nakomaki mokanda oyo.

7 Mpo esilaka ngai sasaipi koyoka makambo oyo uta na yo, natunaki Nkolo mpo na oyo etali likambo yango. Mpe liloba ya Nkolo eyaki na ngai na nguya ya Molimo Mosantu, kolobaka:

8 Yoka maloba ya Klisto, Mosikoli na yo, Nkolo na yo mpe Nzambe na yo. Tala, nayei kati na mokili mpo na kobianga basembo te kasi mpo na kobianga basumuki na boyamboli; bakolongono bazali na mposa ya monganga te, kasi bango oyo bazali bakoni; yango wana, bana mike bazali bakolongono, mpo bakoki te kosala lisumu; yango wana bolakeli mabe ya Adama elongolami uta na bango na ngai, ete ezali na nguya te likolo na bango, mpe mobeko ya ganza mosukisami na ngai.

9 Mpe na lolenge oyo Molimo Mosantu alakisaki maloba ya Nzambe epayi na ngai; yango wana, mwana mobali molingami na ngai, nayebi ete ezali liseki monene liboso ya Nzambe, ete bobatisa bana bake.

10 Tala nalobi epayi na yo ete okoteya likambo oyo—boyamboli mpe libatisi epayi na bango oyo bazali bayanoli mpe bakoki kosala lisumu; iyo, teya baboti ete basengeli koyambola mpe kobatisama, mpe komikitisa lokola bana mike na bango, mpe bakobikisama nyonso elongo na bana mike na bango.

11 Mpe bana mike na bango bazali na mposa te ya boyamboli, ya libatisi mpe te. Tala, libatisi ezali mpo na boyamboli ete mitindo ekokisama mpo na bolimbisi ya masumu.

12 Kasi bana mike bazali na bomoi na Klisto, kutu uta na bokeli ya mokili; soki ezali bongo te, Nzambe azali Nzambe oyo aponaka bilongi, mpe lisusu Nzambe oyo abongwanaka, mpe moponi bilongi ya bato; mpo bana mike boni bakufi na kozangaka libatisi!

13 Yango wana, soki bana mike bakoki te kobikisama na kozangaka libatisi, esengelaki ete bakende na lifelo ezanga nsuka.

14 Tala nalobi epayi na yo, ete ye oyo abanzi ete bana mike bazali na mposa ya libatisi, azali na lititi ya bololo mpe na singa ya boumbu; mpo azali na bondimi te, elikya te, bolingani mpe te; yango wana, soki akokatama wana ezali ye kokanisa, asengeli kokita na lifelo.

15 Mpo ezali nkuna ya nsomo ya kobanzaka ete Nzambe abikisi mwana moke moko na ntina ya libatisi, mpe mosusu asengeli kowa mpo azwaki libatisi te.

16 Lisuma ezala epayi na bango oyo bakobebisa banzela ya Nkolo na lolenge oyo, mpo bakowa longola se soki bayamboli. Tala, nazali koloba na mpiko, kozalaka na likoki uta na Nzambe; mpe nazali kobanga te nini moto akoki kosala; mpo bolingo ya kobonga nie ebenganaka bobangi nyonso.

17 Mpe natondi na bolingani, oyo ezali bolingo ya libela; yango wana, bana mike nyonso bazali lolenge loko epayi na ngai; yango wana, nalingi bana mike na bolingo moko ya kobonga nie; mpe nyonso bazali lolenge moko mpe bazali bakaboli ya lobiko.

18 Mpo nayebi ete Nzambe azali Nzambe oyo aponaka bilongi te, mpe ezali moko oyo abongwanaka te; kasi azali oyo abongwanaka te uta na boseko nyonso na boseko nyonso.

19 Bana mike bakoki koyambola te; yango wana, ezali nkuna ya nsomo ya kowangana boboto ya peto ya Nzambe epayi na bango, mpo bazali nyonso na bomoi na ye na ntina ya boboto na ye.

20 Mpe ye oyo alobi ete bana mike bazali na mposa ya libatisi awangani boboto ya Klisto, mpe atali mpamba bomikabi na ye mpe nguya ya bosikoli na ye.

21 Lisuma epayi ya bato ya lolenge oyo, mpo bazali kati na likama ya liwa, lifelo, mpe monioko mozanga nsuka. Nazali koloba yango na mpiko; Nzambe atindi ngai. Botia litoyi na yango mpe bosala keba, soki te makotelemela bino na kiti ya bosambisi ya Klisto.

22 Mpo tala bana mike myonso bazali na bomoi na Klisto, mpe lisusu bango nyonso oyo bazanga mobeko. Mpo nguya ya bosikoli eyaka likolo na bango nyonso oyo bazali na mobeko te; yango wana, ye oyo akweisami te, to ye oyo azali na nse ya bokweisami te, akoki koyambola te; mpe epayi na ya lolenge oyo libatisi ezali na ntina te—

23 Kasi ezali liseki liboso ya Nzambe, kowanganaka boboto ya Klisto, mpe nguya ya Molimo Mosantu na ye, mpe kotiaka motema na misala mikufa.

24 Tala, mwana mobali na ngai, likambo oyo esengeli kozala te; mpo boyamboli ezali mpo na bango oyo bazali na nse ya bokwei mpe na nse ya bolakeli mabe ya mobeko oyo babukaki.

25 Mpe mbuma ya yambo ya boyamboli ezali libatisi; mpe libatisi eyaka na bondimi ete mitindo ekokisama; mpe bokokisi ya mitindo ememaka bolimbisi ya masumu;

26 Mpe bolimbisi ya masumu ememaka bosokemi, mpe bokitisi ya motema; mpe na ntina ya bosokemi mpe bokitisi ya motema eyaka ntango ya kobimelama na Molimo Mosantu, oyo Molendisi atondisaka na elikya mpe bolingo ya kobonga nie, boye bolingo epesaka molende na kosalelaka etingia mpo na oyo etali losambo, kino ekoya nsuka, ntango basantu nyonso bakofanda elongo na Nzambe.

27 Tala, mwana mobali na ngai, nakokomela yo lisusu soki kala mingi te nabimi kobunda na Balamani. Tala, lolendo ya ekolo oyo, to ya bato nyonso ya Banefi, ebaluki kozala bobebisami na bango longola se soki bayamboli.

28 Sambela mpo na bango, mwana mobali na ngai, ete boyamboli ekoka koya epayi na bango. Kasi tala, nabangi mbele Molimo motika kobunda elongo na bango; mpe na eteni oyo ya mboka bazali lisusu kolukaka kokweisa nguya nyonso mpe likoki uta na Nzambe; mpe bazali kowangana Molimo Mosantu.

29 Mpe nsima ya kobwakaka boyebi monene boye, mwana mobali na ngai basengeli kowa kala mingi te, mpo na bokokisi ya masakoli oyo elobamaki na baprofeta, mpe lisusu maloba ya Mobikisi na biso ye moko.

30 Sese, mwana mobali na ngai, kino nakokomela yo, soki te nakokutana na yo lisusu. Amene.

Bimisa na lokasa