Makomi
Moroni 7


Mokapo 7

Moto nyonso abiangami mpo na kokota kati na bopemi ya Nkolo—Bosambela na mokano ya solo—Molimo ya Klisto apesaka moto makoki mpo na koyeba bolamu uta na mabe—Satana andimisaka bato mpo na kowangana Klisto mpe kosala mabe—Baprofeta bamonisi boyei ya Klisto—Na bondimi, makamwisi masalemi mpe banjelu bazali kosala—Bato basengeli kolikya bomoi ya seko mpe kokangama na bolingani. Penepene na mibu 401–421 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa ngai, Moroni, nazali kokoma mwa maloba moke ya Tata na ngai Mormon, oyo alobaki mpo na oyo etali bondimi, elikya, mpe bolingani; mpo alobelaki bato na lolenge oyo, lokola ateyaki bango kati na sinagoga oyo batongaki mpo na esika ya bokumbameli.

2 Mpe sikawa ngai, Mormon, nazali koloba epayi na bino, bandeko balingami na ngai; mpe ezali na ngolu ya Nzambe Tata, mpe Nkolo na biso Yesu Klisto, mpe bolingi bosantu na ye, na ntina ya likabo ya libiangi na ye epayi na ngai, ete nazwi ndingisa mpo na kolobela bino na ntango oyo.

3 Yango wana, nalingi kolobela bino oyo bozali ya eklezia, oyo bozali balandi ya solo mpe ya kimia ya Klisto, oyo bozwi elikya ekoki na oyo wapi bokoki kokota kati na bopemi ya Nkolo, uta na ntango oyo kokende liboso kino bokopema elongo na ye na lola.

4 Mpe sikawa bandeko na ngai, nasambisi makambo na bino oyo na ntina ya botamboli na bino ya kimia elongo na bana ya bato.

5 Mpo namikundoli liloba ya Nzambe oyo elobi ete na misala na bango bokoyeba bango; mpo soki misala na bango ezali malamu, nde bazali malamu mpe lokola.

6 Mpo tala, Nzambe alobaki ete moto oyo azali moto mabe akoki te kosala oyo wana ezali malamu; mpo soki abonzeli likabo, soki te asambeli Nzambe, longola se soki asali yango na mokano ya solo ekopesa ye litomba te.

7 Mpo tala, etangameli ye lokola bosembo te.

8 Mpo tala, soki moto moko azali moto ya mabe apesi likabo, asalaka yango na mitema mibale; yango wana etangameli ye lokola soki akangaki likabo yango; yango wana etangami mabe liboso ya Nzambe.

9 Mpe na lolenge moko lisusu etangameli moto mabe, soki asambeli kasi na mokano ya solo te ya motema; iyo, ekozala na litomba te mpo na ye, mpo Nzambe ayambaka moko te ya lolenge oyo.

10 Yango wana, moto oyo azali mabe akoki te kosala oyo wana ezali malamu; mpe akopesa te likabo moko ya malamu.

11 Mpo tala, liziba ya bololo ekoki te kobimisa mai malamu; mpe liziba ya malamu ekoki te kobimisa mai ya bololo; yango wana, moto oyo azali mosali ya zabulu akoki te kolanda Klisto; mpe soki alandi Klisto akoki te kozala mosali ya zabulu.

12 Yango wana, biloko nyonso oyo ezali malamu biwuti na Nzambe; mpe oyo wana ezali mabe mawuti na zabulu; mpo zabulu azali monguna epayi na Nzambe, mpe abundaka na ye ntango nyonso, mpe abiangaka mpe atindaka bato na lisumu, mpe mpo na kosala ntango nyonso oyo wana ezali mabe.

13 Kasi tala, oyo wana ezali ya Nzambe ebiangaka mpe etindaka mpo na kosala bolamu ntango nyonso; yango wana, eloko nyonso oyo ebiangaka mpe etindaka mpo na kosala bolamu, mpe mpo na kolinga Nzambe, mpe mpo na kosalela ye, efulami na Nzambe.

14 Yango wana, bosala keba, bandeko balingami na ngai, ete bosambisa te oyo ezali mabe lokola soki ezali ya Nzambe, to oyo ezali malamu lokola soki ezali ya zabulu.

15 Mpo tala, bandeko na ngai, epesami bino mpo na kosambisa, ete bokoka koyeba bolamu uta na mabe; mpe nzela ya kosambisa ezali mpenza polele, ete bokoki koyeba na boyebi moko ya kobonga nie, lokola pole ya moi ezali uta na molili ya butu.

16 Mpo tala, Molimo ya Klisto apesami na moto nyonso, ete akoka koyeba bolamu uta na mabe; yango wana, nalakisi epayi na bino nzela ya kosambisa; mpo eloko nyonso oyo ebiangaka mpo na kosala bolamu, mpe kondimisa mpo na kondima na Klisto, etindami na nguya mpe likabo ya Klisto; yango wana bokoki koyeba na boyebi bobongi nie ete ezali ya Nzambe.

17 Kasi eloko nyonso oyo endimisaka bato mpo na kosala mabe, mpe kondima na Klisto te, mpe kowangana ye, mpe kosalela Nzambe te, nde bokoki koyeba na boyebi ya kobonga nie ete ezali ya zabulu; mpo zabulu asalaka na lolenge oyo, mpo andimisaka moto te mpo na kosala bolamu, te, ata moto moko te; banjelu na ye mpe te; bango oyo bamipesi mpo koyangelama na ye mpe te.

18 Mpe sikawa, bandeko na ngai, lokola namoni ete boyebi pole na lisalisi ya oyo wapi bokoki kosambisa, oyo pole ezali pole ya Klisto, keba ete bosambisa na lolenge ya mabe te; mpo na esambiseli se moko oyo bozali kosambisa bokosambisama mpe lokola.

19 Yango wana, nabondeli bino, bandeko na ngai, ete boluka na molende na lisalisi ya pole ya Klisto ete bokoka kososola bolamu uta na mabe; mpe soki okangemi na eloko nyonso ya malamu, mpe okweisi yango te, okozala na ntembe te mwana ya Klisto.

20 Mpe sikawa, bandeko na ngai, lolenge boni ekoki kosalema ete bokangama na eloko nyonso ya malamu?

21 Mpe sikawa nayei na bondimi boma, boye nalingaki kolobela; mpe nakoyebisa bino nzela oyo wapi bokoki kokangama na eloko nyonso ya malamu.

22 Mpo tala, Nzambe ayebaka makambo nyonso, mpo azali uta libela na libela, tala, atindaki banjelu na ye mpo na kosalela bana ya bato, mpo na komonisa makambo mpo na oyo etali boyei ya Klisto; mpe na Klisto nde ekoya eloko nyonso ya malamu.

23 Mpe Nzambe asakolaki lisusu epayi ya baprofeta, na monoko na ye moko, ete Klisto akoya.

24 Mpe tala, ezalaki na banzela ya ndenge na ndenge oyo amonisaki makambo epayi ya bana ya bato, oyo ezalaki malamu; mpe makambo nyonso oyo ezali malamu mawuti na Klisto; soki te bato bakweyaki, mpe eloko malamu ekoki koya te epayi na bango.

25 Yango wana, na lisalisi ya banjelu, mpe na liloba nyonso oyo libimaki na monoko ya Nzambe, bato babandaki kosalela bondimi na Klisto; mpe boye na bondimi, bakangamaki na eloko nyonso ya malamu; mpe ezalaki boye kino na boyei ya Klisto.

26 Mpe ntango ayaki bato babikisamaki na bondimi na nkombo na ye mpe lokola; mpe na bondimi, bakomaki bana ya Nzambe. Mpe solo lokola Yesu Klisto azali na bomoi alobaki maloba oyo epayi na batata na biso, kolobaka: Eloko nyonso kani bokosenga Tata na nkombo na ngai, oyo ezali malamu, wana ezali bino na bondimi ete bokozwa, tala, ekosalema epayi na bino.

27 Yango wana, bandeko balingami na ngai, makamwisi esilaki mpo Klisto amati kati na lola, mpe afandi na loboko ya mobali ya Nzambe, mpo na kosenga uta na Tata makoki na ye ya boboto oyo azali na yango likolo ya bana ya bato?

28 Mpo ayanoli ntina ya mobeko, mpe asengi nyonso oyo bazali na bondimi na ye; mpe bango oyo bazali na bondimi na ye ete bakokangama na eloko nyonso ya malamu; yango wana asambeli mpo na likambo ya bana ya bato; mpe afandi seko kati na lola.

29 Mpe mpo asalaki eye, bandeko balingami na ngai, makamwisi masili? Tala nalobi epayi na bino, Te; mpe banjelu basilisi kosalela bana ya bato te.

30 Mpo tala, bayangelami epayi na ye, mpo na kosala engebene na maloba ya motindo na ye, komilakisaka epayi na bango oyo bazali na bondimi makasi mpe mayele ya ngwi na lolenge nyonso ya bonzambe.

31 Mpe lotomo ya mosala na bango ezali kobianga bato mpo na boyamboli, mpe mpo na kokokisa mpe kosala mosala ya mayokani ya Tata, oyo asalaki na bana ya bato, mpo na kolengela nzela na kati ya bana ya bato, na kosakolaka liloba ya Klisto epayi na sani oyo eponama ya Nkolo, ete bakoka kotatola mpo na ntina na ye.

32 Mpe na kosalaka bongo, Nkolo Nzambe alengeli nzela ete bato basusu oyo batikali bakoka kozala na bondimi na Klisto, ete Molimo Mosantu azala na esika kati na mitema na bango, engebene na nguya na ye; mpe na lolenge oyo Tata akokisi mayokani oyo asalaki na bana ya bato.

33 Mpe Klisto alobaki: Soki bokozali na bondimi na ngai bokozala na nguya ya kosala eloko nyonso kani elongobani na ngai.

34 Mpe alobaki: Boyambola bino nyonso nsuka ya mabele, mpe boya epayi na ngai, mpe bobatisama na nkombo na ngai, mpe bozalana bondimi na ngai, ete bokoka kobikisama.

35 Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai, soki ezali bongo ete makambo oyo nalobeli bino ezali solo, mpe Nzambe akolakisa epayi na bino, na nguya mpe na nkembo monene na mokolo ya nsuka, ete ezali ya solo, mpe soki ezali solna mokolo ya makamwisi mosili?

36 Soki te esilisi banjelu komonana epayi na bana ya bato? To elongoli ye nguya ya Molimo Mosantu uta na bango? Soki te ekosala ye yango, lokola ntango ekowumela, to lokola mabele makotelema, to ekozala na moto moko likolo ya etando na yango mpo na kobikisama?

37 Tala nalobi epayi na bino, Te; mpo ezali na bondimi ete makamwisi masalemaka, mpe ezali na bondimi ete banjelu bamonanaka mpe basalelaka bato; yango wana, soki makambo oyo esilaki lisuma ezala epayi na bana ya bato, mpo ezali na ntina ya bozangi boyambi, mpe nyonso ezali mpamba.

38 Mpo moto moko akoki kobikisama te, engebene na maloba ya Klisto, longola se soki bazali na bondimi na nkombo na ye; yango wana soki makambo oyo masili, bongo bondimi mpe lokola esili; mpe ezalela ya bato ezali nsomo, mpo bazali lokola se soki bosikoli esalemaki te.

39 Kasi tala, bandeko balingami na ngai, nazali komona makambo malamu mingi epayi na bino, mpo namoni ete bozali na bondimi na Klisto na ntina ya bosokemi na bino; mpo soki bozali na bondimi na ye te nde bokoki te ete botangama na kati ya bato ya eklezia na ye.

40 Mpe lisusu, bandeko balingami na ngai, nalingi kolobela bino mpo na oyo etali elikya. Lolenge boni ekoki bino kokoma na bondimi, longola se soki bozali na elikya?

41 Mpe na nini ekotia bino elikya? Tala nalobi epayi na bino ete bokozala na elikya na nzela ya bomikabi ya Klisto mpe na nguya ya bosekwi na ye, mpo na kosekwisama na bomoi ya seko, mpe oyo na ntina ya bondimi na bino na ye engebene na elaka oyo apesaki bino.

42 Yango wana, soki moto moko azali na bondimi asengeli mpenza kozala na elikya; mpo na kozangaka bondimi, elikya ekoki kozala te.

43 Mpe lisusu, tala nalobi epayi na bino ete akoki te kozala na bondimi mpe elikya, longola se soki azali mosokemi mpe moto na motema mokita.

44 Soki bongo, bondimi mpe elikya na ye ezali mpamba, mpo moto moko te akoki koyambama liboso ya Nzambe, longola se soki azali mosokemi mpe na motema mokita; mpe soki moto moko azali mosokemi mpe na motema mokita, mpe atatoli na nguya ya Molimo Mosantu ete Yesu azali Klisto, asengeli mpenza kozala na bolingani; mpo soki azali na bolingani te azali eloko te; yango wana asengeli mpenza kozala na bolingani.

45 Mpe bolingani azali motema molai, mpe azali malamu, alulaka te, mpe avimbanaka te na lolendo, alukaka ya ye moko te, asilikaka mpambampamba te, akanisaka mabe te, mpe asepelaka te na mabe kasi asepelaka na bosolo, akangaka motema na makambo nyonso, andimaka makambo nyonso, alikyaka makambo nyonso, atiaka molende na makambo nyonso.

46 Yango wana, bandeko balingami na ngai, soki bozangi bolingani, bozali eloko te, mpo bolingani elekaka soki moke mpamba te. Yango wana, bokangama na bolingani, oyo ezali monene mingi koleka nyonso, mpo biloko nyonso esengeli koleka mpamba—

47 Kasi bolingani ezali bolingo ya peto ya Klisto, mpe etiaka molende libela; mpe moto nyonso oyo azwami na yango na mokolo ya nsuka, ekozala malamu mpo na ye.

48 Yango wana, bandeko balingami na ngai, bosambela Tata na makasi nyonso ya motema na bino, ete bokoka kotondisama na bolingo boye, boye apesi epayi ya baoyo nyonso bazali balandi ya solo ya Mwana na ye, Yesu Klisto; ete bokoka kokoma bana mibali ya Nzambe, ete ntango akomonana tozala lokola ye, mpo tokomona ye lokola azali; ete tokoka kozala na elikya oyo; ete tokoka kozala bato bapetolami, kutu lokola azali peto. Amene.

Bimisa na lokasa