Makomi
Yakobo 2


Mokapo 2

Yakobo abimisi polele bolingo ya bozwi, lolendo, mpe bozangi bongondo—Bato bakoki koluka bozwi mpo na kosalisa baninga na bango—Nkolo apesaki motindo ete mobali moko te na kati ya Banefi asengeli kozala na basi koleka moko—Nkolo asepelaka na bongondo ya basi. Penepene na mibu 544–421 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Maloba oyo Yakobo, ndeko ya Nefi ya mobali, alobelaki bato ya Nefi, nsima ya liwa ya Nefi:

2 Sikawa, bandeko balingami na ngai, ngai, Yakobo, engebene na mokumba oyo nazwi epayi ya Nzambe, mpo na kokumisa mosala na ngai na lokengo, mpe ete nakoka kobikisa bilamba na ngai na masumu na bino, nayei na tempelo na mokolo oyo ete nakoka koyebisa bino maloba ya Nzambe.

3 Mpe bino moko boyebi ete kino sikawa nazalaki na molende na mosala ya bobiangi na ngai; kasi na mokolo oyo nalembisami nzoto na mposa mingi mpe motema likolo mingi mpo na bolamu ya milimo na bino koleka nazalaki kino sikawa.

4 Mpo tala, kino sikawa, bozali na botosi na liloba ya Nkolo, oyo napesaki epayi na bino.

5 Kasi tala, boyokela ngai, mpe boyeba ete na lisalisi ya Mokeli ya Bokasi-Nyonso ya lola mpe mabele, nakoki kolobela bino makambo etali makanisi na bino, lolenge boni ete bobandi kosala masumu, oyo masumu mamononi ya nsomo mpenza epayi na ngai, iyo, mpe ya nsomo epayi ya Nzambe.

6 Iyo, esali molimo na ngai mpasi mpe ezongisaki ngai nsima na nsoni liboso ya miso ya Mozalisi na ngai, ete nasengeli kotatola epayi na bino mpo na oyo etali nkuna ya mitema na bino.

7 Mpe lisusu esali ngai mpasi ete nasengeli kosalela maloba makasi mpo na oyo etali bino, liboso ya basi na bino mpe bana na bino, mingi ya mayoki ya baoyo kani ezali ya bolamu mpe ya bongondo mpe ya limemia liboso ya Nzambe, likambo oyo ezali ya kosepela epayi ya Nzambe;

8 Mpe emonani epayi na ngai ete bayaki likolo awa mpo na koyoka liloba ya elengi ya Nzambe, iyo, liloba oyo ebikisaka molimo oyo mozoki.

9 Yango wana, ezali bozito na molimo na ngai ete nakosengisama, na ntina ya motindo ya ntina oyo nazwaki uta na Nzambe, mpo na kopalela bino engebene na mabe na bino, mpo na koyeisa monene mpota ya baye basili kala kozokisama, na esika ya kobondisa mpe kobikisa mpota na bango; mpe baoyo bazokisami te, na esika ya kosalaka lipati na liloba ya elengi ya Nzambe bazali na mbeli etiami mpo na kotobola milimo na bango mpe kozokisa mayele na bango ya pete.

10 Kasi, ata bonene ya mosala, nasengeli kosala engebene na mitindo ya ntina ya Nzambe, mpe koyebisa bino mpo na oyo etali nkuna mpe bonsomo na bino, na miso ya bato ya peto na mitema, mpe bato oyo motema ebukana, mpe na nse ya liso oyo etalaka nyonso ya Nzambe ya Bokasi Nyonso.

11 Yango wana, nasengeli kolobela bino bosolo engebene na polele ya liloba ya Nzambe. Mpo tala, lokola nasengaki na Nkolo, boye liloba eyaki epayi na ngai, kolobaka: Yakobo, mata na tempelo na mokolo ya nsima, mpe yebisa liloba oyo nakopesa yo epayi ya bato oyo.

12 Mpe sikawa tala, bandeko na ngai, yango nde liloba oyo nazali koyebisa epayi na bino, ete mingi kati na bino babandi koluka wolo, mpe mpauni, mpe ndenge nyonso ya mabanga ya motuya, oyo kani mboka oyo, oyo ezali mboka ya elaka mpo na bino mpo na nkona na bino, etondi mingi koleka nyonso.

13 Mpe loboko ya ngolu esekaki likolo na bino na elengi mingi koleka, ete bozwaki bozwi mingi; mpe mpo basusu na kati na bino bazwaki mingi koleka oyo ya bandeko na bino botombwani likolo na lolendo ya mitema na bino, mpe bolati matoyi mangongi mpemitu likolo na ntina ya motuya ya monzele na bino, mpe bonyokoli bandeko na bino mpo bobanzi ete bozali bato malamu koleka bango.

14 Mpe sikawa, bandeko na ngai, bokanisi ete Nzambe akolongisa bino na likambo oyo? Tala, nayebisa bino, Te. Kasi akokitisa bino, mpe soki bozali kokoba na makambo oyo masambisi na ye ekoya na lombangu likolo na bino.

15 O soki alingaki kolakisa bino ete akoki kotobola bino, mpe na botali moko ya liso na ye akoki kotuta bino kino na mputulu!

16 O soki alingaki kobikisa bino uta na mabe mpe bonsomo boye. Mpe, O soki bolingaki koyoka liloba ya mitindo na ye, mpe kotika ete lolendo oyo ya mitema na bino ebebisa milimo na bino te!

17 Bokanisela bandeko na bino lokola bino moko, mpe bomesena kozala baninga na bato nyonso mpe na motema ya kokabaka biloko na bino, ete bakoka kozala bato ya bozwi lokola bino.

18 Kasi liboso ya koluka bozwi, boluka naino kozwa bokonzi ya Nzambe.

19 Mpe esili bino kozwa elikya na Klisto nde bokozwa bozwi, soki boluki yango; mpe bokoluka yango mpo na mokano ya kosala bolamu—kolatisa baoyo bazali motaka, mpe koleisa baoyo bazali na nzala, mpe kokangola bakangemi, mpe kopesa lisalisi na bakoni mpe batungisami.

20 Mpe sikawa, bandeko na ngai, nalobi epayi na bino mpo na oyo etali lolendo; mpe baye na kati na bino baoyo batungisaki moto ya penepene na bino, mpe baniokolaki ye mpo bozalaki na lolendo na mitema na bino, mpo na biloko oyo Nzambe apesaki bino, bolobi nini mpo na yango?

21 Ebanzi bino te ete makambo ya lolenge wana ezali ya nsomo epayi na ye oyo akelaki mosuni nyonso? Mpe moto moko azali na motuya na miso na ye lokola mosusu. Mpe mosuni nyonso ezali mwa mputulu; mpe mpo na ntina se moko wana kaka akelaki bango, ete babatela mitindo na ye mpe bakembela ye libela.

22 Mpe sikawa natie nsuka ya kolobelaka bino mpo na oyo etali lolendo oyo. Mpe soki ezalaka ete nasengelaki kolobela bino mpo na oyo etali mabe maleki monene, motema na ngai molingaki kosepela mpenza na ntina na bino.

23 Kasi liloba ya Nzambe ekomeli ngai bozito na ntina ya mabe na bino oyo maleki monene. Mpo tala, boye elobi Nkolo: Bato oyo babandi kokola na mabe; basosoli makomi te, mpo baluki komilimbisa na kosalaka pite, mpo na makambo ekomamaki na ntina ya Dawidi, mpe Solomo mwana na ye.

24 Tala, Dawidi mpe Solomo ya solo bazalaki na basi mpe bamakango mingi, oyo likambo ezalaki nsomo liboso na ngai, elobi Nkolo.

25 Yango wana, boye elobi Nkolo, nakambaki bato oyo libanda ya mboka ya Yelusaleme, na nguya ya loboko na ngai, ete nakoka kotelemisa mpo na ngai etape ya sembo uta na mbuma ya nketo ya Yosefe.

26 Yango wana, ngai Nkolo Nzambe nakotika te ete bato oyo basala lokola bango ya kala.

27 Yango wana, bandeko na ngai, boyokela ngai, mpe boyoka liloba ya Nkolo: Mpo mobali moko na kati na bino akozala bobele na mwasi moko; mpe akozala na bamakango te;

28 Mpo ngai, Nkolo Nzambe, nasepelaka na bopeto ya basi. Mpe pite ezali bonsomo liboso na ngai; boye elobi Nkolo na Bibele.

29 Yango wana, bato oyo bakobomba mitindo na ngai, elobi Nkolo na Bibele, to elakelami mabe ezali mboka oyo ezali mpo na ntina na bango.

30 Mpo soki nalingi, elobi Nkolo na Bibele, kotelemisa nkona mpo na ngai, nakotinda bato na ngai; soki bongo te bakotia bokebi na makambo oyo.

31 Mpo tala, ngai, Nkolo, namoni mawa, mpe nayoki eleli ya bana basi ya bato na ngai na mboka ya Yelusaleme, iyo, mpe na bamboka nyonso ya bato na ngai, na ntina ya nkuna mpe bonsomo ya mibali na bango.

32 Mpe nakopesa nzela te, elobi Nkolo na Bibele, ete koganga ya bana basi banzenga ya bato oyo, oyo nakambaki uta na mboka ya Yelusaleme, emata epayi na ngai kofundaka mibali na kati ya bato na ngai, elobi Nkolo na Bibele.

33 Mpo bakomema te bana basi ya bato na ngai bakangemi na ntina ya bolamu na bango, longola se soki nakobimela bango elongo na bolakeli mabe ya nsomo, kutu kino na bobebisami; mpo bakosala pite te, lokola bango ya kala basalaki, elobi Nkolo na Bibele.

34 Mpe sikawa tala, bandeko na ngai, boyebi ete mitindo oyo epesamaki na tata na biso, Lehi; yango wana, boyebaki yango liboso; mpe boyaki na bokweisami ya monene; mpo bosalaki makambo oyo bosengelaki te kosala.

35 Tala, bosalaki mabe monene koleka ya Balamani, bandeko na biso. Bozokisaki mitema ya basi na bino ya malamu, mpe bobungisaki botie motema ya bana na bino, na ntina ya ndakisa na bino ya mabe liboso na bango; mpe kolela ya mitema na bango emati na Nzambe na kofundaka bino. Mpe na ntina ya sikisiki ya liloba ya Nzambe, oyo ekiteli bino na nse, mitema mingi mikufaki, mitobolamaki na mpota ya mozindo.

Bimisa na lokasa