Makomi
Yakobo 6


Mokapo 6

Nkolo akobutwisa Yisalaele o mikolo mya nsuka—Mokili mokozikisama na moto—Bato basengeli kolanda Klisto mpo ya kokima liziba lya moto mpe libanga lya fofolo. Penepene na 544–421 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, tala, bandeko ba ngai, lokola nalobaki epai ya bino ete nakobikula, tala, eye ezali bobikuli bwa ngai—ete makambo maye profeta Zenosi alobaki, matali ndako ya Yisalaele, o mango amekisaki bango na nzete ya elaya ya mboka, masengeli solo kosalema.

2 Mpe mokolo moye akotia loboko la ye lisusu mbala ya ibale mpo ya kobutwisa bato ba ye, ezali mokolo, iyo, kutu mbala ya nsuka, ete basali ba Nkolo bakokende o nguya ya ye, koleisa mpe kosukola elanga ya vino ya ye; mpe nsima ya yango nsuka ekoya noki.

3 Mpe boniboni bapambolami baye basalaki na etingia o elanga ya vino ya ye; mpe boniboni balakelami botutu baye bakobwakama libanda o kati ya esika ya bangomei! Mpe mokili mokozikisama na moto.

4 Mpe boniboni wa ngolu azali Nzambe wa biso epai ya biso, mpo amikundoli ndako ya Yisalaele, misisa mpe bitape lokola; mpe atandoli loboko la ye epai ya bango bolai bwa mokolo mobimba; mpe bazali bato ba mito mikasi mpe matoyi mangbongi; kasi mingi lokola bakoyeisa te mitema mya bango mikasi bakobikisama o bokonzi bwa Nzambe.

5 Yango wana, bandeko balingami ba ngai, nabondeli bino na maloba ma limemia ete bolinga koyambola, mpe boya na mokano motonda mwa motema, mpe bokangema epai ya Nzambe lokola akangemi epai ya bino. Mpe ntango loboko la ye la ngolu loninolami ona bino o mwinda mwa moi, yeisani mitema mya bino mikasi te.

6 Iyo, lelo soko bokoyoka mongongo mwa ye, boyeisa mitema mya bino mikasi te; mpo ntina nini elingi bino kokufa?

7 Mpo tala, ekosilisa bino koleisama na liloba lilamu lya Nzambe bolai bwa mokolo mobimba, ekobota bino mbuma ebe, ete bosengeli kokatama o nse mpe kobwakama mosika o kati ya moto?

8 Tala, ekobwaka bino maloba maye? Ekobwaka bino maloba ma baprofeta; mpe ekobwaka bino maloba manso maye malobamaki matali Klisto, esilaki boye mingi kolobama etali ye; mpe kowangana liloba lilamu lya Klisto, mpe nguya ya Nzambe, mpe likabo lya Molimo Mosantu, mpe kozimisa Molimo Mosantu, mpe kokomisa litio lyoko mwango monene mwa bosikoli, moye molengeleme mpo ya bino?

9 Eyebi bino te ete soko bokosala makambo maye, ete nguya ya bosikoli mpe ya bosekwi, eye ezali na Klisto, ekomeme bino mpo ya koteleme na nsoni mpe elindo ya nsomo liboso lya esika ya bosambisi ya Nzambe?

10 Mpe engebene na nguya ya boyengebene, mpo boyengebene bokoki kowanganama te, bosengeli bokende mosika o kati ya liziba lina lya moto mpe lya libanga lya fofolo, ya lyango mololi mokozima te, mpe molinga mya lyango mikomata likolo libela na libela, liye liziba lya moto mpe libanga lya fofolo lizali monioko mozanga nsuka.

11 O nde, bandeko balingami ba ngai, yambolani, mpe kotani o ekuke eke, mpe kobani o nzela ya nkaka, kina bokozwa bomoi bwa seko.

12 O zalani na bwania; nini nakoki koloba lisusu?

13 O bosukisi, nakotombela bino sese, kina nakokutana elongo na bino liboso lya esika ya bosambisi ya elengi ya Nzambe, esika eye ekobete bato ba nkuna na nsomo mpenza mpe bobangi. Amene.