Makomi
Yakobo 7


Mokapo 7

Selemi awangani Klisto, aweli na Yakobo, asengi elembo, mpe abetemi na Nzambe—Baprofeta banso balobeli Klisto mpe botumbolami bwa ye—Banefi bawumeli mikolo mya bango lokola batelengani, babotama na mokakatano mpe bayinama na Balamani. Penepene na 544–421 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki elekaka mwa mibu, eyaki moto moko o ntei ya bato ba Nefi, oyo ya ye nkombo ezalaki Selemi.

2 Mpe esalemaki ete abandaki koteya o ntei ya bato, mpe kosakola epai ya bango ete ekozala Klisto te. Mpe asakolaki makambo mingi maye mazalaki ma koleteke epai ya bato; eye asalaki ete akoka kobalola malongi ma Klisto.

3 Mpe asalaki na etingia ete akoka kokumba mpembeni mitema mya bato, mpo ete akumbaki mpembeni mitema mya bato; mpe ye koyebaka ete ngai, Yakobo, nazali na bondimi na Klisto oyo akoya, alukaki nzike nzela ete akoka koya epai ya ngai.

4 Mpe azalaki moto ayekola, ete azalaki na boyebi boko bobongo nie bwa lokota la bato; yango wana, akokaki kosalela malete maike, mpe nguya nzike ya bolobi, engebene na nguya ya zabulu.

5 Mpe azalaki na elikia ya koningisa ngai uta o bondimi, ata mabimisi mingi mpe makambo mingi maye namonoki matali makambo maye; mpo solo namonoko banzelu, mpe basalaki epai ya ngai. Mpe lisusu, nayokaki mongongo mwa Nkolo kolobaka epai ya ngai o liloba mpenza, mbala na mbala; yango wana, nakokaki koningisama te.

6 Mpe esalemaki ete ayaki epai ya ngai, mpe na lolenge loye alobaki epai ya ngai, kolobaka: Ndeko mobali Yakobo, naluki nzike nzela ete naloba epai ya yo; mpo nayokaki mpe nayebi lokola ete yo otamboli nzike, koteyaka eye obiangi nsango elamu, to malongi ma Klisto.

7 Mpe okambi mpembeni ebele ya bato baye ete basantola nzela alima ya Nzambe, mpe babatela te mobeko mwa Mose moye mozali nzela semba; mpe babongola mobeko mwa Mose na bokumbami bwa mozali moko oyo olobi akoya nsima ya mibu nkama uta sikawa. Mpe sikawa tala, ngai, Selemi, nasakoli epai ya yo ete eye ezali botuki; mpo moto te ayebi makambo ma lolenge lona; mpo akoki te kolobela makambo makoya. Mpe nsima ya lolenge loye Selemi awelaki na ngai.

8 Kasi tala, Nkolo Nzambe asopaki Molimo mwa ye o kati ya bozo bwa ngai, mpo ete nabulunganisaki ye o maloba ma ye manso.

9 Mpe nalobaki epai ya ye: Owangani Klisto oyo akoya? Mpe alobaki: Soko ezalaka Klisto moko nalingaki kowangana ye te; kasi nayebi ete ezali Klisto te, mpe azalaki te, to akozala mokolo moko te.

10 Mpe nalobaki epai ya ye: Ondimi nkoma? Mpe alobaki, Iyo.

11 Mpe nalobaki epai ya ye: Nde ososoli yango te; mpo itatoli solo Klisto. Tala nalobi epai ya yo ete moko te ya baprofeta akomaki, to abikulaki, longola se soko balobaki etali Klisto.

12 Mpe eye ezali enso te—emonisamaki epai ya ngai, mpo nayokaki mpe namonoki; mpe lisusu emonisamaki epai ya ngai na nguya ya Molimo Mosantu; yango wana, nayebi soko ezalaka botumbolami te bosalema bato banso basengelaki kobunga.

13 Mpe esalemaki ete alobaki epai ya ngai: Lakisa ngai elembo na nguya oyo ya Molimo Mosantu, o yango ozali koyeba boye nzike.

14 Mpe nalobaki epai ya ye: Nini nazali mpo ete nasenginia Nzambe mpo ya kolakisa epai ya yo elembo yoko o makambo maye oyebi mazali ma solo? Kasi olingi kowangana yango, zambi ozali wa zabulu. Nzokande, na bolingi bwa ngai bosalema te; kasi soko Nzambe akobete yo, tika ete ezala elembo epai ya yo mpo ete ye azali na nguya, o lola mpe o mabele lokola; mpe lisusu, ete Klisto akoya. Mpe bolingi bwa yo, O Nkolo, bosalema, mpe bwa ngai te.

15 Mpe esalemaki ete elobaki ngai, Yakobo, maloba maye, nguya ya Nkolo eyaki likolo lya ye, mpo ete akweyaki o mabele. Mpe esalemaki ete aleisamaki mpo ya ntaka ya mikolo mingi.

16 Mpe esalemaki ete alobaki epai ya bato: Sanganani elongo o mokolo mwa nsima, mpo nakokufa; yango wana, nazali na mposa ya koloba epai ya bato yambo nakufa.

17 Mpe esalemaki ete o mokolo mwa nsima ebele basanganaki elongo; mpe alobaki polele epai ya bango mpe awanganaki makambo maye alakisaki bango, mpe alakolaki Klisto, mpe nguya ya Molimo Mosantu, mpe lisalisi lya banzelu.

18 Mpe alobaki polele epai ya bango, ete akosamaki na nguya ya molimo wa zabulu. Mpe alobelaki limfelo, mpe boseko mpe etumbu ya seko.

19 Mpe alobaki: Nakobanga mbele nasalaki lisumu lizangi bolimbisi, mpo ete nakosaki epai ya Nzambe; mpo nawanganaki Klisto, mpe nalobaki ete nandimi nkoma; mpe solo itatola ye. Mpe zambi boye nakosaki epai ya Nzambe nakobanga mpenza mbele likambo lya ngai likozala lya nsomo; kasi natubeli epai ya Nzambe.

20 Mpe esalemaki ete elobaki ye maloba maye akokaki koloba lisusu te, mpe azongisaki molimo.

21 Mpe etatolaka ebele ete alobaki makambo maye ekomaki ye penepene na kozongisa molimo, bakamwaki mpenza; mpo ete nguya ya Nzambe ekitaki likolo lya bango, mpe balongamaki ete bakweyaki o mabele.

22 Sikawa, likambo liye lizalaki elengi epai ya ngai, Yakobo, mpo nasengaka yango na Tata wa ngai oyo azali o lola; mpo ayokaka bogangi bwa ngai mpe ayanolaka na losambo la ngai.

23 Mpe esalemaki ete kimia mpe bolingo bwa Nzambe bozongisamaki lisusu o ntei ya bato; mpe balukaki nkoma, mpe bayokemelaki lisusu te maloba ma moto wa nkuna oyo.

24 Mpe esalemaki ete nzela mingi ekanisamaki mpo ya kobutwisa mpe kozongisa Balamani o boyebi bwa bosolo; kasi enso ezalaki mpamba, mpo basepelaki o bitumba mpe o bosopi makila, mpe bazalaka na boyini bwa seko likolo lya biso, bandeko ba bango. Mpe balukaki na nguya ya mandoki ma bango kobebisa biso ntango inso.

25 Yango wana, bato ba Nefi balendaki likolo lya bango na mandoki ma bango, mpe na bokasi bwa bango bonso, kotiaka elikia na Nzambe mpe libanga lya lobiko la bango; yango wana, bakomaki sikawa, balongi ba bayini ba bango.

26 Mpe esalemaki ete ngai, Yakobo, nabandaki kokoma mpaka; mpe ebombamaki likundoli lya bato baye o palaki isusu ya Nefi, yango wana, nasukisi likundoli liye, kosakolaka ete nakomaki engebene na boyebi bwa ngai bolamu mingi boleki, na kolobaka ete ntango elekaki na biso, mpe lisusu bomoi bwa biso bolekaki bo lokola ezalaki epai ya biso ndoto yoko, ezalaka biso bato boko ba etike mpe ba lipombo, mitelengani, tobwakama libanda lya Yelusaleme, tobotama o mokakatano, o esobe yoko, mpe toyinama na bandeko ba biso, eye esalaki bitumba mpe boweli; yango wana, tolelaki mpenza mikolo mya biso.

27 Mpe ngai, Yakobo, namonoki ete nasengelaki noki kokita o lilita lya ngai; yango wana nalobaki epai ya mwana wa ngai Enosa: Kamata palaki iye. Mpe nalobelaki ye makambo maye ndeko mobali wa ngai Nefi atindaka ngai, mpe alakaki botosi epai ya etinda. Mpe nasali nsuka yoko ya nkoma ya ngai likolo lya palaki iye, eye nkoma ezalaki eke; mpe na motangi natombeli sese, kolikiaka ete mingi ya bandeko ba ngai bakoka kotanga maloba ma ngai. Bandeko ba ngai, eseseli.