Makomi
Yakobo 4


Mokapo 4

Baprofeta nyonso bakumbamelaki Tata na nkombo ya Klisto—Libonza ya Abalayama kopesaka Yisaka ezalaki na elilingi ya Nzambe mpe ya Mobotami se Moko ya Ye—Bato basengeli bango moko kozongisa boyokani na Nzambe na nzela ya Bomikabi ya Yesu—Bayuda bakobwaka libanga ya moboko. Penepene na mibu 544–421 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa tala, esalemaki ete ngai, Yakobo, esalelaki ngai mingi epayi ya bato na ngai na nzela ya liloba, (mpe nakoki kokoma bobele moke ya maloba na ngai, na ntina ya kokoso ya kokoma maloba na biso likolo ya bapalaki) mpe toyebaki ete makambo oyo tokomi likolo ya bapalaki esengeli kotikala;

2 Kasi makambo nyonso kani oyo tokokoma likolo ya eloko nyonso longola se soki likolo ya bapalaki ekowa mpe ekolimwa nie; kasi tokoki kokoma ndambo ya maloba likolo ya bapalaki, oyo ekopesa bana na biso, mpe lisusu bandeko balingami na biso, motuya moke ya boyebi mpo na oyo etali biso, soki te mpo na oyo etali batata na bango—

3 Sikawa na likambo oyo tosepelaka; mpe tokosala na molende mpo na kokoma maloba oyo likolo ya bapalaki, kotiaka elikya ete bandeko balingami na biso mpe bana na biso bakozwa yango na mitema ya botondi, mpe bakotalela yango ete bakoka koyekola na bosepeli kasi na mawa te, to na litio te, mpo na oyo etali baboti na bango ya yambo.

4 Mpo, mpo na mokano oyo nde tokomaki makambo oyo, ete bakoka koyeba ete toyebaki Klisto, mpe tozalaki na elikya ya nkembo na ye mibu nkama mingi yambo ya boyei na ye; mpe kaka biso moko te tozalaki na elikya ya nkembo na ye, kasi lisusu baprofeta basantu nyonso oyo bazalaki liboso na biso.

5 Tala, bandimaki Klisto mpe bakumbamelaki Tata na nkombo na ye, mpe lisusu tozali kokumbamela tata na nkombo na ye. Mpe mpo na mokano oyo tokobatela mobeko ya Mose, yango kolakisaka milimo na biso epayi na ye; mpe mpo na ntina oyo esantisami mpo na biso lokola boyengebene, kutu lokola etangelamaki mpo na Abalayama na esobe kozala na botosi epayi ya mitindo ya Nzambe na kobonzaka mwana na ye Yisaka, oyo azali elilingi ya Nzambe mpe Mwana Mobotami se Moko ya ye.

6 Yango wana, toluki baprofeta, mpe tozali na bimoniseli mingi mpe molimo ya masakoli; mpe lokola tozali na matatoli oyo nyonso tozwi elikya, mpe bondimi na biso ekomi ya koningana te, na lolenge ete tokoki solo kopesa motindo na nkombo ya Yesu mpe nzete mpenza ekotosa biso, soki te ngomba, soki te mbonge ya mbu.

7 Nzokande, Nkolo Nzambe alakisi biso bolembu na biso ete tokoka koyeba ete ezali na ngolu na ye, mpe na bonkonde bonene na ye mpo na bana ya bato, ete tozali na nguya ya kosala makambo oyo.

8 Tala, misala ya Nkolo ezali minene mpe ya kokamwa. Lolenge nini bozindo ya mibombamo na ye ekoki te kososolama; mpe ekoki te kosalema ete moto asosola banzela na ye nyonso. Mpe moto moko te ayebi banzela na ye longola se soki ebimisami epayi na ye; yango wana, bandeko, botiola bimoniseli ya Nzambe te.

9 Mpo tala, na nguya ya liloba na ye moto ayaki likolo ya etando ya mabele, oyo mabele makelamaki na nguya ya liloba na ye. Yango wana, soki Nzambe akokaki koloba mpe mokili mosalemaki, mpe koloba mpe moto akelamaki, O bongo, mpo na nini akoki te kotinda mabele, to mosala ya maboko na ye likolo ya etando na yango, engebene na bolingi mpe elengi na ye?

10 Yango wana, bandeko, boluka kopesa toli na Nkolo te, kasi kozwa toli uta na loboko na ye. Mpo tala, bino moko boyebi ete apesaka toli na bwania, mpe na boyengebene, mpe na boboto monene, likolo ya misala na ye nyonso.

11 Yango wana, bandeko balingami, bozongisa boyokani na ye na nzela ya bomikabi ya Klisto, Mwana Mobotami se Moko ya ye, mpe bokoki kozwa bosekwi, engebene na nguya ya bosekwi oyo ezali na Klisto, mpe kolakisama lokola mbuma ya yambo ya Klisto epayi ya Nzambe, kozalaka na bondimi, mpe kozwaka elikya ya malamu ya nkembo na ye liboso ete amimonisa ye moko na mosuni.

12 Mpe sikawa, balingami, bokamwa te ete nalobeli bino makambo oyo; mpo na nini kolobela bomikabi ya Klisto te, mpe kokoma na boyebi moko ya kobonga nie na ye, lokola kokoma na boyebi ya bosekwi mpe ya mokili oyo ekoya?

13 Tala, bandeko na ngai, ye oyo asakolaka, tika ye asakola epayi na bososoli ya bato; mpo Molimo molobaka bosolo mpe mokosaka te. Yango wana, molobelaka makambo lokola ezali mpenza, mpe makambo lokola ekozala mpenza; yango wana, makambo oyo mamonisami epayi na biso na polele, mpo na lobiko ya molimo na biso. Kasi tala, tozali kaka biso moko te banzeneneke ya makambo oyo; mpo Nzambe alobaki yango epayi ya baprofeta ya kala mpe lokola.

14 Kasi tala, Bayuda bazalaki bato na matoyi mangongi; mpe batiolaki maloba ya polele, mpe babomaki baprofeta, mpe balukaki makambo oyo bakokaki te kososola. Yango wana, na ntina ya bokufi miso na bango, boye bokufi miso eyaki likolo ya kotalaka mosika koleka elembo ya ndelo, basengeli mpenza kokweya; mpo Nzambe alongolaki polele na ye uta na bango, mpe apesaki epayi na bango makambo mingi oyo bakoki te kososola, mpo balingaki yango. Mpe mpo balingaki yango Nzambe asalaki yango, ete bakoka kotuta libaku.

15 Mpe sikawa ngai, Yakobo, nakambemi na Molimo mpo na kosakola; mpo namoni na misala ya Molimo oyo azali na ngai, ete na botuti libaku ya Bayuda bango bakobwaka libanga likolo ya oyo wapi bakokaki kotonga mpe kozwa moboko ya bokengi.

16 Kasi tala, engebene na makomi, libanga oyo ekokoma moboko monene, mpe ya nsuka, mpe moboko bobele moko ya solo, likolo ya oyo wapi Bayuda bakoki kotonga.

17 Mpe sikawa, balingami na ngai, lolenge boni ekoki yango kosalema ete baye, nsima ya kobwaka moboko ya solo, bakoka mokolo moko kotonga likolo na yango, ete ekoka kokoma libanga na bango ya suka?

18 Tala, bandeko balingami na ngai, nakobombola mobombamo oyo epayi na bino; soki nakoningana te, na nzela moko to mosusu, uta na botelemi ngwi na ngai na Molimo, mpe nakotuta libaku te mpo nazali motema likolo koleka mpo na bino.

Bimisa na lokasa