Likita Linene
Tika Bompikiliki esala Mosala na Yango Ya Kitoko koleka, mpe Tala Manso Lokola Esengo!
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Tika Bompikiliki esala Mosala na Yango Ya Kitoko koleka, mpe Tala Manso Lokola Esengo!

Ntango tosaleli bompikiliki, bondimi na biso ekobakisama. Lokola bondimi na biso ekolaka, ndenge moko esengo na biso ebakisamaka mpe.

Mibu mibale eleki, leki na ngai ya mobali ya nsuka, Chad, akatisaki elamba ya ezipelo. Bokoti na ye na ngambo mosusu etikaki lidusu na moteme ya semeki na ngai ya mwasi Stéphanie, bana na bango mibale, Brayden mpe Bella, na bandeko mosusu ya libota. Tozwaki bobondisi na maloba ya Mpaka Neil L. Anderson na likita linene mposo moko yambo ya liwa ya Chad: “Na momekano ya bitumba ya mokili, kende liboso na bompikiliki, mpe nguya ya kobikisa ya Mobikisi ekomemela yo pole, bososoli, kimia mpe elikya” (“Wounded,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 85)

Elilingi
Chad Jaggi mpe libota

Tozali na bondimi na Yesu Klisto, toyebi ete tokokutana na Chad lisusu, kasi kozanga ye ezali kosala mpasi! Bato ebele babungisa balingemi. Ezali matata kozala na bompikiliki mpe kozela tokokutana na bango lisusu.

Mvula moko nsima ya liwa na ye, toyokaki lokola mapata ya mwindi ezipaki biso. Tolukaki ebombelo na kotangaka makomi na biso, na kosambelaka na motema moko, mpe na kokendaka na temple mbala na mbala koleka. Biteni ya nzembo oyo etutaki mayoka na biso na tango wana:“Ntongo ezali kotana, mokili ezali kolamuka, mapata ya molili ya butu ezali kolimwa” (“Ntongo Ezali Kotana,” Nzembo, no.52).

Libota na biso ekanaki ete mubu 2020 ezala ya komisongisa! Tozalaki koyekola liteya na biso na Yaka, Landa Ngai na Boyokani ya Sika, mokanda ya Yakobo na suka ya sanza ya zomi na moko 2019 mama ya likambo moko emimonisaki epai na biso. Yakobo, mokapo ya 1, eteni ya 2 elobi boye: “Bandeko, botala lokola likambo na esengo etonda ntango bozali kokweya na mpasi ebele” (Joseph Smith Bobongoli, Yakobo 1:2 [na Yakobo 1:2, nkoma ya nse ya lokasa a]). Na mposa na biso ya kobanda mobu ya sika, mibu zomi ya sika, na esengo, tokanaki ete na 2020 tokotala manso lokola makambo na esengo.” Tomikotisaki makasi na likambo yango na boye na eleko ya mbotama oyo eleki tokabelaki ba ndeko na biso ba tiliko makoma minene likolo na yango, “Tanga Manso Lokola Makambo na Esengo.” Mobu 2020 esengeli kozala mobu ya esengo mpe kosepela.

Malamu, tala makambo ndenge ezali— nzoka nde 2020 ememelaki biso bokono ya molongo COVID 19, bozangi kimia na mboka, mpe mikakatano na nkita. Ekoki kozala ete Tata na biso ya Likolo azotikela biso ngonga ya kokanisa mpe kotala malamu bososoli ya bompikiliki mpe mokano na biso ya kopona esengo na boyebi nyonso.

Banda wana, mokanda na Yakobo ekomi na ndimbola mosusu mpo na biso. Yakobo, mokapo 1, milono 3 mpe 4 ekobi:

“Nsima ya koyeba boye, ete komekama ya bondimi na bino esengi bompikiliki.

“Kasi tika ete bompikiliki esala mosala malamu koleka mpo ete yo ozala malamu koleka mpenza mpe mobimba, na kozalaka na mposa ya eloko te.”

Na kosala makasi koluka esengo na katikati ya mimekano, tositobosana ete kozala na bompikiliki ezali fongola ya kotika mimekano wana esala mpona bolamu na biso.

Mokonzi Benyamina ateyaki kolongola bomoto ya mokili mpo na kokoma “mosantu na nzela ya bomikabi ya Klisto Nkolo, mpe [kokoma] lokola mwana ya botosi, bosawa, bomikitisi, bompikiliki, atonda na bolingo, na bolingi ya kotosa makambo manso” (Mozia 3:19).

Mokapo ya 6 ya Prechez Mon Evangile eteyi bizalela minene ya Klisto oyo tokoki komekola: “Bompikili ezali makoki ya kokoanga motema na oyo ezali koya na ntango na yango te, mobulu, lilanga, to mpasi na kozangaka kosilika, kokoma na nkanda, to motema moto moto. Ezali makoki ya sala mokano ya Nzambe mpe kondima ntango na Ye. Soki ozali na bompikiliki, okotingama atako motungisi mpe okoki kotelemela bonguna na pete mpe na elikia” (Prechez Mon Evangile: Guide du Service Missionnaire, rev. ed. [2019], 126).

Mosala ya malamu koleka ya bompikiliki ekoki mpe kolakisama na bomoi ya moko ya bayekoli ya yambo ya Klisto, Simoni ya mboka Kanana. Bazeyaloti bazalaki lingomba moko ya Bayuda oyo bazalaki kotelemela bokonzi ya Baloma. Lingomba ya Bazeloti bazalki koluka bitumba na Baloma, baninga na bango ya Bayuda mpe Basadiseo na kokotela koyiba biloko ya kolia mpe kolandela makambo mosusu mpona kosalisa makanisi na bango (tala Encyclopedia Britannica, Zealot,” britannica.com). Simoni, moto na Kanana, azalaki Muzeyaloti (tala Luka 6:15 Kanisa moke Simoni komekaka kotinda Mobikisi na kosimba mandoki, kokamba lingomba ya batomboki mpe kotia mobulu na Yelusaleme. Yesu ateyaki:

“Bapambolami bato ya motema mawa: mpo ete bakokitana mabele. …

Mpe bapambolami bato na ngolu: mpo bakozwa ngolu.

Bapambolami banso basali ba kimia: mpo bakobiangema bana ba Nzambe” (Matthew 5:5, 7, 9).

Simoni akokaki kokamata makanisi na ye na maboko mpe alobelaki yango na mpiko mpe bolingi makasi, kasi makomi etalisi ete na nzela ya mopepempe ndakisa ya Mobikisi, makanisi na ebongwanaki. Kozala moyekoli ya Klisto ezalaki ntina se moko ya nyonso azalaki komeka kosala.

Awa ezali biso kobomba boyakani na Nzambe, Mobikisi akoki kosalisa biso “tobotama lisusu; iyo, kobotama na Nzambe, kobongola bozali bwa bango bwa mosuni mpe bwa bokwei, o bozali bwa bosembo, esikolami bango na Nzambe, kokomaka bana babali ba ye mpe bana basi ba ye” (Mosaya 27:25).;

Na misala nyonso ya komipesa kati na bato, na mangomba mpe na politiki na eleko oyo ya biso, tika ete moyekoli ya Yesu Klisto lisanga na biso ya monene koleka mpe ya motema moko. “Mpo wapi bomengo bwa yo bozali, kuna motema mwa yo mokozala lokola.ezala lisusu.” (Matai 6:21). Tika ete tobosana lisusu te, ezala na nsima ya bayekoli baye bakangama na Nkolo, “basalaki “bolingi ya Nzambe,” ba“[zalaki] na ntina ya bompikiliki” (Baebele 10:36).

Lokola komekama ya bondimi na biso etutaka bompikiliki na kati na biso, ntango tosalelaka bompikiliki na biso, bondimi na biso ekolaka. Lokola bondimi na biso ekolaka, ndenge moko esengo na biso ebakisamaka mpe.

Kaka na sanza ya misato oyo eleki, mwana na biso ya mwasi ya mibale, Emma, lokola ba missionele ebele kati na Eklezia, atindamaki na makasi abima te. Bamisionele ebele, bazongaki na ndako. Ba misionele ebele bazelki bazongisa bango lisusu na mosala. Ebele bawaki mapamboli na bango ya tempelo liboso ya kokende na esika ya mosala. Natondi bino, bamisionele ya basi mpe ya mibali. Tolingi bino!

Emma na molongani na ye na ekolo Holanda bakangamaki o ndako na ebele ya bamposo ya yambo - bakangamaki na kati ya kolela mbala na mbala. Kati na mabaku moke ya kosololo na batu mosusu mpe ya kobima libanda, botii mayele epai ya Nzambe ekomaki makasi epai na Emma. Tosambelaki elongo na ye na nzela ya masini, mpe totunaki ndenge kani ekokaki biso kosalisa. Asengaki ete tokoka kosolola na baninga oyo azalaki kotangisa na nzela ya masini!

Libota na biso ebandaki kozwa masolo, na nzela ya masini, moko moko.ya baninga ya Emma na Holanda. Tosengaki bango bakota lisanga na biso ya libota monene ya mposo nyonso, na nzela ya masini, mpo na koyekola Yaka, Landa Ngai . Floor, Laura, Renske, Freek, Benjamin, Stal mpe Muhammad bakomaki bango nyonso baninga na biso. Ndambo ya baninga na biso mosusu na ekolo Holanda bakotaki mpe lokola “na ekuke ya nkaka” (3 Nephi 14:13) Ezali kolakisama epai ya basusu “boke bwa nzela, mpe nkaka ya ekuke, oyo basengeli koyingela” (2 Nefi 31:9). Bazali bandeko na biso ya mibali mpe ya basi kati na Nkolo. Mposo nyonso “totalaka nyonso lokola esengo” awa ezali biso kosala elong mpona bokeyi liboso na biso na nzela ya boyokani.

Biso “totika bompikiliki esala mosala na yango ya malamu koleka” (Yakobo 1:4) awa tozali na makoki te ya kokutana lokola mabota na palwasi tmpo na ngonga oyo. Kasi tozali kotala lokola esengo bokoli ya bondimi ya mabota na biso na kosanganaka na nzela ya tekinoloji ya sika mpe Come, Follow Me boyekoli ya Buku ya Mormon.

Mokambi Russell M. Nelson alakaki, “Makasi na bino ya ntango nyonso na mosala oyo—ata na bantango oyo ozali koyoka ete ozali mpenza kolonga te—ekobongola bomoi na yo, ya libota na yo, mpe ya mokili” (“Go Forward in Faith,” Liahona, sanza ya mitano 2020, 114).

Esika tosalaka mayokani ya bule na Nzambe—tempelo—ezali ya kokangema mpo na ntango moke. Esika tosalaka mayokani ya bule na Nzambe—ndako—ezali ya kofungwama! Tozali na libaku, na ndako, yo koyekola mpe kokanisa kitoko ya mayokani ya tempelo. Atako na bozangi kokota na esika ena ya bule eyo emonanaka o miso, “mitema na biso … esengeli kosepela makasi na ntina ya mapamboli oyo ezali kosopana likolo na biso” (Malongi mpe Mayokani 110:9).

Ebele babungisa misala, basusu babungisi mabaku. Nzoka nde tosepeli elongo na Mokambi Nelson oyo awutaki koloba boye: “makabu ya bokili bilei oyo epesami ,na makasi te, na bandimi ebakisami solo, lokola mpe makoki sanduku ya misolo na biso mpo ya kosunga baye o molongo bazwi makama. … Elongo nde tokolonga eleko oyo ya mpasi. Nkolo akopambola bino lokola bozali kopambola basusu” (Lokasa ya Facebook ya Russell M. Nelson, ekomamaki na sanza ya moambe. 16, 2020, facebook.com/russell.m.nelson).

“Bozala na bobangi te” ezali mobeko epesamaki na Nkolo, etali bobangi ya malamu te (Matai 14:27).

Ntango mosusu tozangaka bompikiliki soki tokanisi tozali “kosala manso malamu” kasi tozali kozwa te mapamboli oyo tolingi. Enok atambolaki elongo na Nzamba mibu 365 yambo ye elongo na bato na ye babongwana. Mibu nkama misato na tuku motoba na mitano ya kobuna kosala makambu nyonso malamu, mpe esalamaki! (Tala Malongi mpe Mayokani 107:49. )

Liwa ya ndeko na ngai Chad’ esalemaki kaka mwa basanza sima ya bopemisi na biso na bokambi misio ya Utah Ogdon. Ezali likambo na kamwa ntango tozalaki kobika na Karolina yu Ngele , kati na misio 417 epai wapi bakokaki kotinda biso na mobu 2015, totindamaki kaka na Utah ya likolo. Ndako ya misio ezalaki kaka na miniti 30 na motuka mpona kokoma na ndaku ya Chad. Kanseri ya Chad emonanaki nsima na biso kozwa mbenga na biso na misio. Ezala na ntango ya mimekano makasi koleka, toyebaki ete Tata na Biso ya Likolo azalaki kokanisa biso mpe kosunga biso to zwa esengo.

Natatoli nguya ya bosikoli, ya bosantisi, ya bomikitisi, mpe ya esengo ya Mobikisi Yesu Klisto. Natatoli ete soki to sambeli Tata na Biso ya Likolo na nkombo ya Yesu Klisto, akoyanola biso. Natatoli ete ntango ezali biso kolanda, koyoka, mpe komanyola maloba ya Nkolo mpe ya profeta na ye ya bomoi, Mokambi Russell M. Nelson, tokoki “kosala ete bompikiliki esala mosala na yango na lolenge ya malamu koleka” mpe “kotala manso lokola esengo.” Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.