Likita Linene
Bandeko basi na Siona
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Bandeko basi na Siona

Bokozala limpinga ya ntina na bosangani ya Yisalaele mpe na bokeli ya bato ya Siona.

Bandeko na ngai ba bolingo basi, napambolami mpo na koloba na eleko oyo ya ngonga ya kafukafu na lisitwale ya mokili. Mikolo nyonso, tozali kopusana penepene epayi ya ngonga ya nkembo ntango Mobikisi Yesu Klisto akoya lisusu na mabele. Toyebi mwa moke kasi nyonso te oyo etali makambo mabe oyo ekoya liboso ya Boyei na Ye, ata bongo mitema na biso etondisami na esengo mpe bondimi lisusu koyebaka oyo etali bilaka ya nkembo oyo ekokokisama liboso Aya.

Lokola bana basi ba bolingo ya Tata na Lola, mpe lokola bana basi ya Nkolo Yesu Klisto kati na bokonzi na Ye, 1 bokosala mosala ya motuya na bantango minene oyo ezali koya liboso. Toyebi ete Mobikisi akoya epayi ya bato moko oyo basangisami mpe balengelami mpo na kozala na bomoi lokola bato basalaki na engumba ya Enoka. Bato ya kuna bazalaki bomoko na bondimi kati na Klisto mpe bakomaka peto mombimba mpenza ete banetolamaki na likolo.

Tala bolimboli oyo Nkolo amonisaki na ntina ya maye malingaki koyela bato ya Enoka mpe maye makoya na oyo eleko ya nsuka ya litondi ya ntango:

“Mpe mokolo ekoya whapi mabele ekopema, kasi liboso ya mokolo wana likolo ekoyinda, mpe elamba ya molili ekozipa mabele; mpe likolo ekoningana, lokola mpe mabele; mpe mikakatano ekozala kati na bana ya bato, kasi nakobatela bato na ngai;

“Mpe nakotinda bayengebene na nse uta na likolo; mpe na kotinda bosolo na mabele mpo na kotatola na ntina ya Mwana na ngai ya Likinda; lisekwa na ye uta na bawa; iyo, mpe lisusu lisekwa ya bato banso; mpe boyengebene mpe bosolo ekosala ete mabele ekombolama lokola na mpela, mpo na kosangisa baponami na ngai uta na bansuka nyonso minei ya mabele, epai ya esika oyo nakolengela, Engumba moko Esantu, ete bato na ngai bakoka kobelema mpo na bitumba, mpe kosala keba mpo na ntango ya boyei na ngai; mpo ete kuna nde ekozala tabelenakele na ngai, mpe ekobengama Siona, Yelusaleme ya Sika.

“Mpe Nkolo alobaki epayi ya Enoka: Ntango okokutana na bango kuna, yo mpe engumba mobimba; mpe tokoyamba bango na libumu na biso, mpe bakomona biso; mpe tokokweya likolo ya kingo na bango, mpe bakokweya likolo ya kingo na biso, mpe tokopesana bipwepwe na moko na mosusu;

“Mpe kuna nde ekozala ndako na ngai, mpe ekozala Siona, oyo ekobima na bikelamo nyonso oyo nasala. Mpee mabele ekopema mibu nkoto.” 2

Bino bandeko basi, bana na bino ya basi, bankoko na bino, mpe basi oyo bobokoli bokozala eteni ya motuya ya kokelaka lingomba ya bato oyo ekosangana na lisanga ya nkembo elongo na Mobikisi. Bokozala limpinga ya ntina na bosangani ya Yisalaela mpe na bokeli ya bato moko ya Siona oyo bakofanda na kimia na Yelusaleme ya Sika.

Nkolo asali, na nzela ya baprofeta na Ye, elaka moko epayi na bino. Na mikolo ya ebandeli ya Lingomba ya Bamama Basungi, Profeta Joseph Smith alobelaki bandeko basi ete, “Soki bobiki engenbene na lokumu na bino, banzelu bakoki kowumela te nakozala ya bino baninga. 3

Likoki ya kafukafu wana efandi kati na bino, mpe bozali kolengelama mpo na yango.

Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki:

“Bino bandeko basi … bozali na esika ya mibale te na mwango ya Tata wa Biso ya Lola mpo na esengo ya seko mpe bomoi malamu ya bana ba Ye. Bozali solo eteni moko ya ntina ya mwango wana.

“Soki bozali te mwango yango ekoki kosala te. Soki bozali te pologalami mobimba ekosimba te. …

“Moko na moko na bino azali mwana mwasi ya Nzambe, alatisami na bongengi ya bonzambe.” 4

Profeta na biso ya mikolo oyo, Mokambi Russell M. Nelson, apesi ndimbola ya eteni bozali kosala na bolengeli mpo na boyei ya Mobikisi:

“Moto te akoki komeka nguya oyo … basi bazali na yango, kaka na mabota te kasi na Eklezia ya Nkolo, lokola basi, bamama, mpe bankoko ya basi; lokola bandeko basi mpe bandeko ya baboti na biso ya basi; lokola bateyi mpe bakambi; mpe mingimingi lokola bandakisa mpe babateli bamipesa ya bondimi.

“Oyo ezali ya solo na eleko nyonso ya nsango malamu uta mikolo ya Adama mpe Ewa. Kasi basi ya oyo eleko bakeseni na basi ya nyonso mosusu, mpamba te eleko oyo ekeseni na nyonso. Bokeseni oyo ememi matomba mpe mikumba lokola.” 5

Eleko oyo ekeseni mpo ete Nkolo akokamba biso kolengelama mpo na kozala lokola engumba ya Enoka. Alimboli na nzela ya bapostolo mpe baprofeta na Ye maye mbongwana wana na bato ya Siona ekosenga.

Mpaka Bruce R. McConkie ateyaki:

“[Ya Enoka] ezalaki mikolo ya nkuna mpe mabe, mikolo ya molili mpe ya botomboki, mikolo ya bitumba mpe mawa, mikolo oyo ememaki na bopetoli mabele na mai.

“Nzokande, Enoka azalaki na bondimi. Ye ‘amonaki Nkolo,’ mpe asololaki na Ye ‘miso na miso’ lokola moto alobaka na moto mosusu. (Mose 7:4.) Nkolo atindaki ye abelela boyamboli epai ya mokili, mpe apesaki ye likoki ya ‘batisa na nkombo ya Tata mpe ya Mwana, oyo atondisama na ngolu mpe bosolo, mpe ya Molimo Mosantu, oyo apesaka litatoli na ntina ya Tata mpe ya Mwana.’ (Mose 7:11.) Enoka asalaki boyokani mpe asangisaki lingomba ya bandimi ya solo, banso baye bakomaki na bondimi mpenza ete ‘nkolo ayaki mpe afandaki elongo na bato na ye, mpe bafandaki na boyengebene,’ mpe bapambolamaki uta na likolo. ‘Mpe Nkolo abengaki batu na ye Siona, mpo ete bazalaki motema moko mpe likanisi moko, mpe bafandaki na boyengebene; mpe mobola azalaki ontei na bango te.’ (Mose 7:18.) …

“Nsima Nkolo abiangaki bato na ye Siona, makomi elobi ete Enoka ‘atongaki engumba moko oyo ebiangamaki Engumba Esantu, kutu Siona;’ Siona wana ‘enetolamaki na likolo’ esika wapi ‘Nzambe ayambaki yango ontei ya Yemei; mpe ete “uta ntango wana lisese ebimaki, Siona enetolami.’ (Mose 7:19, 21, 69.) …

“Siona kaka moko oyo enetolamaki na likolo ekozonga … ntango Nkolo akozongisa lisusu Siona, mpe bafandi na yango bakosangana na Yelusaleme ya sika, oyo ekotiama na ntango wana.” 6

Soki kala ezali motuya, na ntango ya boyei ya Mobikisi, bana basi oyo bamipesi na mozindo na mayokani na bango na Nzambe bakozala miingi koleka ndambo ya baoyo bamilengeli mpo na koyamba Ye ntango Akoya. Kasi atako motango boni, mosala na yo na kokelaka bomoko kati na bato oyo bamilengeli mpo na Siona wana ekozala monene mosika mpenza koleka ndambo.

Nakolobela bino mpo na nini nakanisi wana ekosazala bongo. Buku ya Mormon elobeli lisolo ya bato ya Siona. Bomikundola ete ezalaki nsima na bango koteyama, kolingama, mpe kopambolama na Mobikisi mosekwi: “Ezalaki na boswani te na mboka, na ntina ya bolingo ya Nzambe oyo efandaki na mitema ya bato.” 7

Boyebi na ngai eteyi ngai ete bana basi ya Tata ya Lola bazali na likabo ya kolimwisa boswani mpe kotombol boyengebeni na bolingo na bango ya Nzambe mpe na bolingo ya Nzambe bazali kobotisa na baye bazali kosalisa.

Namonaki na bolenge na ngai ntango etape na biso ya moke ezalaki kokutana na ndako ya bomwana na ngai. Ndeko na ngai ya mobali mpe ngai tozalaki bobele basimbi ya Bonganganzambe ya Alona, tata na ngai bobele mosimbi ya Bonganganzambe ya Melikisedeki moko. Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi ya etape azalaki mobongwani ya sika oyo ya ye mobali azalaki kosepela tena esengo te na mosala na ye ya Eklezia. Bato na yango bazalaki banso bandeko basi ya mikolo bazanga mosimbi bonganganzambe na mabota na bango. Nazalaki kotala mama na ngai mpe bandeko basi wana kolinga, kotombola, mpe kobatela moko na mosusu na bokwei te. Nasosoli sikawa ete napesamaki emoneli ya yambo ya Siona.

Boyekoli na ngai ya ntango nyonso na ntina ya basi ya bosembo ekobaki kati na etape ya moke ya Eklezia na Albuquerque, New Mexico. Nazalaki kotalaka mwasi ya mokambi ya etape yango, mwasi ya mokambi ya distiliki, mpe mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi kosepelisa motema ya moye sika mpe mobongwani nyonso. Mokolo ya Eyenga oyo natikaki Albuquerque, nsima ya mibu mibale kotalaka nguya ya botindiki ya bandeko basi ya kuna, likonzi ya yambo ekelamaki. Sikawa Nkolo atie tempelo kuna.

Nazalaki kofanda penepene ya Boston, esika wapi nazalaki kosala na bokambi ya distiliki oyo ezalaki kokamba mwa bitape oyo epalanganaki nzinganzinga bikolo mibale. Ezalaki na boswani ete mingi koleka mbala moko ezwilamaki eyano na basi ya bolingo mpe ya bolimbisi oyo bazalaki kosunga kobondisa mitema. Mokolo ya eyenga oyo natikaki Boston, moto moko ya Bokambi ya Yambo abongisaki likonzi ya yambo na Massachusetts. Ezali na tempelo kuna sikawa, mpembeni na esika wapi mokambi ya distiliki azalaki kofanda kala. Akomaka mondimi ya komipesa kati na Eklezia mpe nsima abiangamaki mpo na kosalela Nzambe lokola mokambi ya likonzi mpe nsima lokola mokambi ya misio, atindikama na mwasi ya bondimi mpe ya bolingo.

Bandeko basi, bopesami mapamboli ya kozala bana basi ya Nzambe na makabo ya kafukafu. Bomemaki elongo na bino kati na bomoi ya kufa makoki ya molimo mpo na koleisa basusu mpe kotombola bango likolo epayi ya bolingo mpe bopeto oyo ekolonganisa bango mpo na kofanda elongo na lingomba ya Siona. Ezali na kozanga ntina te ete Lingomba ya Bamama Basungi, libongisi ya yambo mingimingi mpo na bana basi ya Tata na Lola, ezali na lokola mokano na yango “Bolingani Ekweyaka Te.”

Bolingani ezali bolingo ya peto ya Yesu Klisto. Mpe ezali bondimi kati na Ye mpe mbano mobimba ya Bomikabi na Ye ezanga ndelo oyo ekolongobanisa bino, mpe baoyo bolingaka mpe basalisaka, mpo na likabo ya likolo ya kozala na bomoi na bato kati na lingomba ya Siona oyo elukama kala mpe elakama. Ekozala na bandeko basi na Siona, balingami moko na moko na Nkolo mpe na baye bopamboli.

Natatoli ete bozali bana ya mboka ya bokonzi ya Nkolo na mabele. Bozali bana basi ya Tata na Lola ya bolingo, oyo atindaki bino na mokili na makabo se moko oyo bolaka kosalela mpo na kopambola basusu. Nalaki bino ete Nkolo akokamba bino na loboko, na nguya ya Molimo Mosantu. Ye akokende liboso ya elongi na bino ntango bozali kosalela Ye kolengela bato na Ye mpo bakoma Siona na Ye elakama. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Doctrine et Alliances 25:1.

  2. Moses 7:61–64; nsete ebetami.

  3. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 454; nsete ebetamaki.

  4. Gordon B. Hinckley, “Women of the Church,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1996, 67.

  5. Russell M. Nelson, “A Plea to My Sisters,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2015, 95–96; biso nde tobeti sete.

  6. Bruce R. McConkie, “Building Zion,” Tambuli, Sanza ya sambo. 1977, 13; biso nde tobeti sete.

  7. 4 Nefi 1;15.