Likita Linene
Ezalela ya Sika
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Ezalela ya Sika

Nabengisi bino kobalusa mitema, makanisi, mpe molimo na bino epai ya Tata na biso ya Likolo mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto.

Bandeko na ngai balingami mibali mpe basi, mikolo mibale oyo ya likita linene ezalaki ya nkembo! Nandimi na Mpaka Jeffrey R. Holland. Lokola atangaki yango, bitinda, nsambo, mpe miziki nyonso efulamaki na Nkolo. Nazali na botondi mpo na baoyo banso bapesaki lisungi na lolenge nyonso.

Na milulu yango mobimba, nakanisaki bino kati na molimo ntango ezalaki ngai kolanda likita. Nasengaki Nkolo asalisa ngai nasosola nini bozali koyoka, komitungisa na ntina na yango, to komeka kobongisa. Namitunaki nini nakoki koloba mpo na kosukisa likita oyo oyo ekotinda bino liboso na elikya na ntina na lobi oyo nayebi Nkolo alingi bino koyoka.

Tozali kobika na mobu moko ya nkembo, emonisamaki na baprofeta ebele bikeke na bikeke. Oyo ezali eleko ntango oyo lipamboli ya molimo ekopekisama te na basembo.1 Atako boningani ya mokili,2 Nkolo akolinga “totala liboso na oyo ekoya na emonaneli ya elikya.”3 Tobaluka na esika moko te na kati na makambo ya lobi eleki. Bosangisi ya Yisalaele ezali kokende liboso. Nkolo Yesu Klisto azali kokamba makambo ya Eklezia na Ye, mpe eko kokisa bantina na yango ya bonzambe.

Mokakatano mpo na bino mpe ngai ezali kondimisa ete moko moko na biso akokokisa ya ye makoki ya bonzambe. Lelo tozali koyoka mingi mingi na ntina ya “Ezalela ya sika.” Soki bolingi ya solo kobanda “ezalela ya sika,” nabengisi bino kobalola mingi mingi motema, makanisi, mpe molimo na bino epai ya Tata na biso ya Likolo mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto. Botika oyo ezala ya bino ezalela ya sika.”

Bobanda ezalela ya sika na koyambolaka mokolo na mokolo. Boluka kozala mingi mingi peto na likanisi, liloba, mpe mosala. Bosalisa basusu. Bobomba elikya ya seko. Boyeisa minene mabiangi na bino. Mpe atako mikakatano na bino, bandeko na ngai balingami ya mibali mpe basi, bobika mokolo na mokolo mpo ete bo zala komilengele koleka mpo bokutana na Mokeli na bino.4

Wana ezali mpo ya nini tozali na batempelo. Mayokani mpe makuli ya Nkolo elengeli biso mpo na bomoi ya seko, lipamboli ya monene koleka nyonso ya mapamboli ya Nzambe.5 Lokola boyebi, bokono ya COVID esengaki bokangi mpo na mwa ntango batempelo na biso. Bongo tobandi bofungoli elandelami na bokebi, ya eteni nsima na eteni. Eteni ya 2 sikawa etiami kati na batempelo, bankoto ya babalani bakangisami, mpe bankoto bazwi badotatio na bango kaka na mwa basanza eleki. Tozali kozela mokolo bandimi banso ya sembo ya Eklezia bakoki lisusu kosalela bankoko na bango mpe kosambela kati na tempelo esantu.

Sikawa nazali na esengo ya koyebisa miango ya kotonga batempelo ya sika motoba na bisika bilandai: Tarawa, Kiribati; Port Vila, Vanuatu; Lindon, Utah; Greater Guatemala City, Guatemala; São Paulo East, Brazil; mpe Santa Cruz, Bolivia.

Lokola tozali kotonga mpe kobatela batempelo oyo, tosambeli ete moko moko na bino bokotonga mpe bokomibatela mpo ete bokoka kolongobana mpo na kokota na tempelo esantu.

Sikawa, bandeko na ngai balingami mibali mpe basi, napamboli bino botondisama na kimia ya Nkolo Yesu Klisto. Kimia na Ye ezali likolo ya bososoli nyonso ya kufa.6 Napamboli bino na mposa mpe makoki monene mpenza ya kotosa mibeko na Nzambe. Nalaki ete lokola bosali bongo, bokosopanelama na mapamboli, mpe lisusu mpiko ya makasi, emoniseli ebakisami ya moto na moto ye moko monene, boyokani ya malamu kati ya bandako na bino, mpe esengo, kutu ata na kati ya bozangi elikya.

Elongo tokoki kokokisa etinda na biso ya bonzambe—oyo ya kolengele bisomei mpe mokili mpo na Boyei ya Mibale ya Nkolo. Nasambeli bongo, na elobeli ya bolingo mpo na bino, na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.