Likita Linene
Nguya ya Koyika Mpiko
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Nguya ya koyika Mpiko

Kaka bondimi mpe liloba ya Nzambe oyo etondisama molimo na biso ya kati ekoki mpo na kosunga biso—mpe kopesa biso nzela ya kozwa nguya na Ye.

Na koyekolaka lisusu mateya ya profeta na biso, Mokambi Russell M. Nelson, nakuti liloba moko oyo asalelaka mbala mingi na masikulu na ye. Liloba yango ezali nguya.

Na likita linene ya yambo nsima ya kosungama lokola Apostolo, Mokambi Nelson alobelaki etali nguya.1 Ye akobaki koteya nguya mibu na mibu. Uta tosungaki Mokambi Nelson lokola profeta, ateyaka etali libongi ya nguya—mingimingi nguya ya Nzambe—mpe boniboni tokoki kozwa yango. Ateyaka boniboni tokoki kobenda nguya ya Nzambe ntango tozali kosalisa basusu,2 boniboni boyamboli ebengisaka nguya ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye na bomoi na biso,3 mpe boniboni bonganganzambe—nguya mpe likoki ya Nzambe—epambolaka banso oyo basali mayokani elongo na Ye.4 Mokambi Nelson atatolaka ete nguya ya Nzambe esopanaka na banso oyo bazwi dotatio na tempelo ntango bazali kobatela mayokani na bango.5

Naningisamaki mpenza na momekano Mokambi Nelson apesaki na likita Linene ya Sanza ya Minei 2020. Ye atindaki biso “boyekola mpe bosambela mingi koleka etali nguya mpe boyebi oyo bozwaki na dotasio—to oyo bokozwa lisusu na dotasio.6

Na eyano na momekano oyo, nayekoli mpe nasambeli mpe nayekoli boko makambo ya litomba etali nguya mpe boyebi oyo nazwaki na dotasio—to oyo nakozwa na dotasio.

Nasosoli nini tosengeli kosala mpo na kozwa nguya ya Nzambe na bomoi na biso ezali pete te, kasi na yango ekoki kosalama na koyekolaka yango mpenza na milimo na biso mpe na kosambelaki mpo ete Molimo Mosantu apelisela biso mwinda.7 Mpaka Richard G. Scott apesaki ndimbola moko ya polele ya nini nguya ya Nzambe ezali: ezali “nguya ya kosala mingi koleka tokoki kosala na bisomei.”8

Kotondisaka motema na biso mpe kutu molimo na biso na liboba ya nzambe mpe moboko ya bondimi na Yesu Klisto ezali na motuya mpo na kobenda nguya ya Nzambe mpo na kosalisa biso na ngonga ya mimekano. Na kozanga kozwa liloba ya Nzambe mpe bondimi na Yesu Klisto mozindo na kati ya mitema na biso, matatoli na bso mpe bondimi ekoki kokweya, mpe tokoki kobungisa kozwa nguya Nzambe alingi kopesa biso. Bondimi ya likololikolo ekoki te. Kaka bondimi mpe liloba ya nzambe oyo etondisama molimo na biso ya kati ekoki mpo na kosunga biso—mpe kopesa biso nzela ya kozwa nguya na Ye.

Ntango Ndeko Mwasi Johnson mpe ngai tozalaki kobokola bana na biso, tolendisaki moko na moko na bango koyekola tobeta lindanda ya miziki. Kasi topesaki bana na biso nzela ya kozwa mateya ya miziki kaka soki basali eteni na bango mpe babeti lindanda na bango mokolo na mokolo. Mokolo ya poso moko, mwana na biso ya mwasi ya misato Jalynn asepelaki kokende kosakana elongo na baninga, kasi asilisaka naino te kobeta piano. Koyebaka ete alakaki kobeta miniti 30, azalaki na mposa ya kotia ntango, mpamba te alingaki mpenza kobeta ata miniti moko molai koleka oyo esengemaki.

Ntango azalaki kotambola mpembeni ya mbabula na nzela na ye ti na piano, apemaki mpe apusaki boko babuto. Kasi esika ya kotia ntango, asalaki mbabula elamba miniti 30 mpe apusaki ebanda. Nsima ya penepene na 20 miniti ya kobeta, atambolaki kozonga na kikuku mpo na kososola ngonga boniboni etikalaki mpe akutaki mbabula kozika.

Nde ye akimaki na nsima esika nazalaki kosala mosala ya bilanga, kogangaka ete ndako ezalaki kozika. Nokinoki nakimaki nakati na ndako, mpe solo, nakutaki mbabula na moto kopela.

Na makasi ya kobikisa ndako na biso na kozika, nakomaki nsima ya rechaud, nalongolaki nsinga ya lotiliti, mpe nasalelaki nsinga ya lotiliki mpo na kotombola rechaud mosika ya ndako ya lotiliki. Kolikiaka kozala elombe mpe kobikisa mokolo mpe ndako na biso, nabimisaki mbabula na moto kopela na nzinganzinga na nsinga ya lotiliki mpo na kobatela yango mosika ya nzoto na ngai, nakomaki na nsima, mpe na koningana mosusu ya kobima nabwakaki mbabula libanda na matiti. Kuna, tokokaki koboma moto kopela ya nsomo na tiyo ya mai.

Nini ezalaka mabe? Etumbelo ya mbabula ya lotiliki ntango mosusu mpo na makasi na yango, mpe ntango eloko te ezali na kati mpo na kosilisa makasi, mbabula yangomei ekosilisa makasi, ekokoma moto, mpe ekoki kozwa moto, kobomaka yangomei na eboke ya moto kopela mpe mputulu ya moto.9 Mbabula ya lotiliki na biso mobimba epelaki moto mpe ezikaki mpamba te ezalaki na eloko te na kati.

Lolenge moko mpe, baoyo bazali na bondimi mpe liloba ya Nzambe mozindo na mitema na bango bakokoka kosilisa mpe kolonga banzube ya nsomo, oyo monguna na ntembe te akotinda mpo na kobebisa biso.10 Soki te, bondimbi, elikia, boyambi na biso ekoki koyika mpiko te, mpe lokola etumbelo ya mbabula ya lotiliki, tokokoka kokoma likama.

Nayekoli ete kozala na liloba ya Nzambe mozindo na molimo na ngai, elongo na bondimi na Nkolo Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye, ekopesa biso nzela ya kobenda nguya ya Nzambe mpo na kolonga monguna mpe nyonso akoki kobwakela biso. Ntango tokutani na mimekano, tokoki koyekama likolo ya elaka ya Nkolo eteyamaki na Paulo: “Mpo Nzambe apesi biso molimo ya kobanga te, kasi ya nguya, mpe bolingo, mpe ya molimo ya pole.”11

Toyebi ete lokola mwana Mobikisi “akolaki, mpe akomaki makasi na molimo, kotondisamaka na bwania: mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na Ye.”12 Toyebi ete lokola azalaki kokola, “akolaki na bwania mpe nzoto, mpe na kondimama na Nzambe mpe moto.”13 Mpe toyebi ete na ngonga oyo mosala na Ye ebandaki, baoyo bayokaki Ye “bakamwaki na malongi na ye: mpo liloba na ye ezalaki na nguya.”14

Na nzela ya komilengela, Mobikisi akolaki na nguya mpe akokaki kotelemela masenginia ya Satana.15 Soki tolandi ndakisa ya Mobikisi mpe tomilengeli na nzela ya koyekolaki liloba ya Nzambe mpe kokomisa mozindo bondimi na biso, biso mpe lokola tokoki kobenda nguya ya Nzambe mpo na kotelemela masenginia.

Na ngonga oyo ya bosangani epekisami oyo ekomisi kokende na tempelo mabe, nakani kokoba koyekola mpe koteya mingi oyo etali nguya ya Nzambe oyo eyelaka biso soki tosali mpe tobateli mayokani ya tempelo. Lokola elakelamaki na losambo ya kobulisa Tempelo ya Kirtland, totiki tempelo etondii na Nguya ya Nzambe.16 Ezali na mokolo oyo elaka ekomi na nsuka te elongo na nguya Nzambe asopi likolo ya baoyo basali mpe babateli mayokani to ekila mpo na kozwa nguya wana ntango ya bokono bonene; nguya na Ye ekokita na bomoi na biso kaka soki tozangi kobatela mayokani na biso mpe towumeli te na lolenge moko oyo ekopesa biso nzela ya kokoba kokoka kozwa nguya na Ye. Nguya na Ye ekokita na bomoi na biso kaka soki tozangi kobatela mayokani na biso mpe towumeli te na lolenge moko oyo ekopesa biso nzela ya kokoba kokoka kozwa nguya na Ye.

While my dear wife and I were serving as mission leaders in Thailand, Laos, and Myanmar, we witnessed firsthand the power of God that comes to those who make and keep sacred covenants in the temple. Mosolo ya Kosunga Kokende na Tempelo ekokisi Basantu mingi na bikolo misato mpo na kokende na tempelo nsima ya kosala nyonso bakokaki na nzela ya libonza mpe komilengela ya moto ye moko. Namikundoli kokutanaka na liboke ya Basantu 20 ya bondimi ya Laos na libanda ya mpepo ya Bangkok, Thailande, mpo na kosunga bango koleka na libanda ya mpepo mosusu na Bangkok mpo na kozwa mpepo na bango mpona Hong Kong. Bandimi wana batondaki na esengo mpo na nsuka kokende mobembo na Ndako ya Nkolo.

Elilingi
Bandimi na Loas

Ntango tokutanaki na Basantu wana na kozonga na bango, kokomela na nsango malamu babakisaki mpe elongo na nsuya ewutaki na kozwaka dotasio na bango ya tempelo mpe kokotaka na mayokani elongo na Nzambe ezalaki polele. Basantu bana na polele babimaki na tempelo “na kotondisama na nguya na [Ye].”17 Nguya oyo mpo na kosala mingi koleka oyo bakokaki kosala bango moko epesaki bango bokasi mpo na koyika mpiko na mimekano ya bandimi ya Eklezia na ekolo na bango mpe mpo na kokende komema “nsango malamu ya monene mpe nkembo mpenza, ya bosolo,”18 ntango bakobi kotonga bokonzi ya Nzambe na Laos.

Na ngonga oyo tokoki kokende na tempelo te, eyekami biso likolo ya mayokani tosalaki na tempelo mpo na kotia nzela moko ya pole, ya kobongwana te ya bokambi ya bomoi na biso? Mayokani maye, soki ebatelami, ekopesa biso bomoni mpe bozili etali mikolo mikoya, mokano moko ya polele mpo na kokoka kozwa nyonso oyo Nkolo alaki na nzela ya bondimi na biso.

Nabengisi bino boluka nguya Nzambe alingi kopesa bino Nataloli ete soki toluki nguya, tokopambolama na bososoli moko ya monene ya bolingi na Tata na biso na Lola azali na yango mpo na biso.

Natatoli ete mpo ete Tata na Lola alingaka yo mpe ngai, Ye atindaki Mwana na Ye ya Mobali, Yesu Klisto, kozala Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Nataloli Yesu Klisto, Ye oyo azali na nguya nyonso,19 mpe nasali yango na nkombo ya Yesu Klisto, amene.