Likita Linene
Komekama, Kolakisama solo, mpe Kopetolama
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Komekama, Kolakisama solo, mpe Kopetolama

Lipamboli monene koleka oyo ekoya ntango tolakisi bosembo na mayokani na biso na ntango ya mimekano ekozala mbongwana na ndenge na biso.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, nazali na botondi mpo na koloba na bino lelo. Elikia na ngai ezali kopesa bolendisi ntango bomoi emonani mpenza mpasi mpe kobungisa elikia. Mpo na boko na bino, ntango wana ezali sikoyo. Soki te, ntango ya boye ekoya.

Yango ezali kolakisa mawa te. Ezali ya solo—kasi ya elikia—mpo na ntina na Nzambe na Bokeli ya mokili. Ntina wana ezalaki kopesa bana na Ye libaku ya komilakisa bazali na makoki mpe na bolingi ya kopona bolamu ntango ezali mpasi. Na kosalaka bongo, bomoto na bango ekobongwana mpe bakokoka kokoma mingi lokola Ye. Ye ayebaki yango ekosenga bondimi ya makasi epai na Ye.

Mingi ya oyo nayebi ewuti na libota na ngai. Ntango nazalaki na mibu mwambe, mama na ngai ya bwania asengaki ndeko na ngai ya mobali mpe ngai na kopikola matiti elongo na ye na bilanga ya libota nsima ya ndako na biso. Sikawa yango emonanaki lokola mosala ya pete, kasi tozalaki kofanda na New Jersey. Enokaka mbala mingi. Mabele ezalaki potopoto ya kilo. Matiti ezalaki kokola mbangu mbangu koleka ndunda.

Namikundoli mawa na ngai ntango matiti ekatanaki na maboko na ngai, misisa na yango ekangamaki makasi na potopoto ya kilo. Mama na ngai mpe ndeko na ngai ya mobali bazalaki sikawa mosika liboso na mulongo. Nakomekaka makasi mingi, mingi natikalaki nsima.

“Oyo ezali mpasi mingi!” Nalelaki.

Na esika ya koyokela ngai mawa, mama na ngai asekaki mpe alobaki, “O, Hal, ya solo, ezali mpasi. Esengelaki kozala bongo. Bomoi ezali momekano.”

Na ngonga wana,nayebaki maloba na ye ezalaki ya solo mpe ekokoba kozala ya solo na mikolo na ngai mikoya.

Ntina mpo na koseka ya Mama ya bolingi ekomaki polele bambula nsima ntango natangaki Tata ya Lola mpe Mwana na Ye ya Bolingo kolobelaka na ntina na Bango na kokelaka mokili oyo mpe kopesaka bana ya molimo libaku ya bomoi ya kufa:

“Mpe tokomeka bango awa na yango, mpo na kotala soki bakosala makambo manso oyo Nkolo Nzambe na bango akotinda bango;

“Mpe baoyo bakobomba lolenge na bango ya yambo bakobakisama likolo, mpe baoyo bakobomba lolenge na bango ya yambo te bakozwa nkembo na bokonzi na baoyo babombi lolenge na bango ya yambo te; mpe baoyo bakobomba lolenge na bango ya mibale bakobakisa nkembo likolo ya mito na bango seko na seko.”1

Yo mpe ngai tondimaki libengisi wana mpo na komekama mpe kolakisa solo ete tokopona kobomba mitindo ya Nzambe ntango tokozala lisusu te na miso ya Tata na biso ya Lola.

Ata na libengisi moko ya bolingo boye ya Tata na biso ya Lola, Lusifelo andimisaki moko ya misato ya bana ya molimo na kolanda ye mpe koboya mwango ya Tata mpo na bokoli na biso mpe esengo na biso ya seko. Mpo ya botomboki ya Satana, abwakisamaki libanda elongo na balandi na ye. Sikoyo, azali komeka kobenda ebele lokola akoki kobenda mosika na Nzambe eleko ya bomoi oyo ya kufa.

Baye ya biso oyo bandimaki mwango wana basalaki bongo na ntina ya bondimi na biso na Yesu Klisto, oyo amipesaki mpo kozala Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Tosengeli kondima na ntango wana ete botau nyonso ya kufa tokozala na yango, mpe nyonso oyo nguya ya mabe ekaniseli biso mabe, nguya ya bolamu ekotondisama koleka mpenza.

Tata ya Lola mpe Yesu Klisto bayebi mpe balingi biso. Balingi yo ozonga epai na bango mpe okoma lokola Bango. Elonga na yo ezali elonga na Bango. Oyokaki bolingo wana endimisamaki na Molimo Mosantu ntango otangaki to oyokaki maloba oyo: “Mpo tala, oyo ezali mosala na ngai mpe nkembo na ngai—kosala bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.”2

Nzambe azali na nguya ya kokomisa nzela na biso pete mingi. Ye aleisaki mana na bana ya Yisalaele na kowayawaya na bango na mabele ya elaka. Nkolo na mosala na Ye ya kufa abikisaki babeli, alamusaki bawa, mpe alembisaki mbu. Nsima ya Lisekwa na Ye, Ye afungolaki “boloko na baye bakangamaki.”3

Kasi Profeta Joseph Smith moko ya baprofeta na Ye ya monene mingi koleka, ayokaki mpasi na boloko mpe ateyamaki liteya tozweli banso litomba mpe tosengeli na mimekanona biso ya bondimi na biso lelo: “Mpe soki osengeli kobwakama kati na libulu molai, to kati na maboko ya babomi, mpe etumbu ya liwa eleki likolo na yo; soki obwakami kati na mozindo; soki mbonge ya mabe ekaniseli yo mabe; soki mipepe makasi ekomi monguna na yo; soki likolo eyindi, mpe biloko nyonso esangani na koyeisa nzela moke; mpe likolo na nyonso, soki mbanga mpenza ya lifelo ekofungola monoko monene sima na yo, yeba yo, mwana na ngai ya mobali, ete biloko nyonso oyo ekopesa yo mayele, mpe ekozala mpo na bolamu na yo.”4

Okoki komituna malamu ntina nini Nzambe ya bolingo mpe ya nguya nyonso alingisa momekano na biso ya kufa ezala mpasi boye. Ezali mpo Ye ayebi ete tosengeli kokola na bopeto mpenza na molimo mpe nzoto mpo kokoka kobika liboso na Ye na mabota ya seko. Mpo na yango esalema, Tata ya Lola apesaki biso Mobikisi mpe nguya ya kopona bisomei na bondimi kobatela mibeko na Ye mpe koyambola mpe boye koya epai na Ye.

Na kati-kati ya Mwango ya esengo ya Tata na biso ezali bokomi na biso ya libela lokola Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto. Na biloko nyonso, ndakisa ya Mobikisi ezali lisungi na biso ya malamu koleka mpenza. Ye azangaki te ntina ya kolakisa solo Yemei. Ye ayikaki mpiko mpo na bana banso ya Tata ya Lola, kofutaka ntalo mpo na masumu na biso. Ye ayokaki mpasi ya baye banso oyo bayei mpe bakoya na bokufi.

Ntango omitunaka mpasi kani okoki komema malamu, mikundola Ye. Ye ayokaki mpasi oyo oyokaka mpo ete Ye akoka koyeba boniboni kotombola yo. Ye akoki kolongola bozito te, kasi Ye akopesa yo bokasi, bolendisi, mpe elikia. Ye ayebi nzela. Ye amelaki nkeni ya bololo. Ye amemaki mpasi ya banso.

Yo aleisami mpe olendisami na Mobikisi moko ya bolingo, oyo ayebi boniboni kobikisa yo na mimekano nyonso ozali na yango. Alama ateyaki:

“Mpe akokende, koyokaka mpasi ya bolozi mpe matungisi mpe masenginia ya lolenge na lolenge; mpe eye ete liloba ekoka kokokisama likolo ya ye bolozi mpe bokono ya bato na ye.

“Mpe akokamata likolo lya ye liwa, ete akoka kokangola nkanga ya liwa liye lizali kokanga bato ba ye; mpe akokamata likolo lya ye bokono bwa bango, ete nsopo ya ye ekoka kotonda na ngolu, engebene na mosuni, ete akoka koyeba engebene na mosuni boniboni kosalisa bato ba ye engebene na bokono bwa bango.”5

Lolenge moko Ye akosalisa yo ekozala kobengisa yo ntango inso na komikundola Ye mpe koya epai na Ye. Ye alendisaka biso:

“Boya liboso na ngai, bino banso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.

“Bozwa nkanga na ngai likolo na bino, mpe boyekola epai na ngai; mpo nazali moto ya boboto mpe motema kokita: mpe bokozwa bopemi mpo na milimo na bino.”6

Lolenge moko ya koya epai na Ye ezali kosala feti na maloba na Ye, kosalela bondimi mpo na boyamboli, kopona kobatisama mpe kokotisama na mosali na Ye azali na likoki, mpe nsima kobatela mayokani na ya na Nzambe. Ye atindi Molimo Mosantu mpo kozala moninga, molendisi, mpe mosungi na yo.

Ntango olongobani na likabo ya Molimo Mosantu, Nkolo akoki kokamba yo na kimia ata ntango okoki komona nzela te. Mpo na ngai, Ye alakisaka mbala mingi mpenza litambe moko to mibale ekolanda mpo kozwa. Mbala mingi te Ye apesaki ngai bomoni ya mikolo mikoya mosika, kasi ata bomoni wana ya mbala mingi te esungaka nini nakopona kosala na bomoi ya mokolo na mokolo.

Nkolo alimbolaki:

“Bosengeli te komona na miso na bino ya bomoto, mpo na ngonga oyo, libongisi ya Nzambe na bino etali bikolo nyonso esengeli koya awa na sima, mpe nkembo esengeli kolanda minioko mingi” (D&A 58:2–3).

“Mpo nsima ya mitungisi mingi ekoya mapamboli.”7

Lipamboli monene koleka mpenza oyo ekoya ntango tolakisi solo bisomei na bondimi na mayokani na biso na mimekano ekozala mbongwana na bozali na biso. Na kopona na biso kobatela mayokani na biso, nguya ya Yesu Klisto mpe mapamboli ya Bomikabi na Ye ekosala na biso. Mitema na biso mikoki kolembisama mpo na kolinga, kolimbisa, mpe kobengisa basusu baya epai ya Mobikisi. Bondimami na biso na Nkolo ekobakisama. Bobangi na biso ekokita.

Sikoyo, ata na mapamboli ya boye na kati ya mitungisi, tokoluka motungisi te. Na bomoi oyo ya kufa, tokozala na mabaku ya komilakisa biso moko, ya koleka na mimekano ya makasi ekoki mpo na kokoma mingi lokola Mobikisi mpe Tata na biso ya Lola.

Na kobakisa, tosengeli kotala motungisi ya basusu mpe komeka kosunga bango. Yango ekozala mingi mingi mpasi ntango tokomekisami bisomei makasi. Kasi tokososola ntango totomboli bozito ya basusu, ata ya mwa moke, ete mikongo na biso mikolendisama mpe tokomona pole kati na molili.

Na yango, Nkolo azali Ndakisa na biso. Na Gologota, asilaki koyoka mpasi ya makasi mpenza ete Ye alingaki kowa soki Ye azalaki te Mwana Mobotami ya Nzambe, Ye atalaki babomi na Ye mpe alobaki na Tata wa Ye, “Limbisa bango; mpo bayebi te nini bazali kosala.”8 Ntango azalaki koyoka mpasi mpo na banso oyo bakozala lisusu na bomoi, Ye atalaki uta na ekulusu na Yoane mpe na mama na Ye ya mawa mpe asungaki ye na momekano na ye:

“Ntango Yesu nsima amonaki mama na ye, mpe moyekoli atelemaki penepene, oyo ye alingaki, alobaki na mama na ye, Mwasi tala mwana na yo ya mobali!

“Nsima elobaki ye na moyekoli, tala mama na yo! Mpe uta ngonga wana moyekoli wana amemaki ye na ndako na ye.”9

Na bizaleli na Ye na mikolo wana ya bule, Ye na bolingi na ye moko apesaki bomoi na Ye mpo na moko na moko na biso, kokabaka kaka te lisungi na bomoi oyo kasi na bomoi ya seko na ntango ekoya.

Namoni bato batombwamaki likolo na nzela ya bondimi ya kolakisama solo na mimekano ya nsomo. Na Eklezia lelo ezali na bandakisa. Bato bakambami na mabolongo na bango na motungisi. Na molende ya bondimi mpe bokasi na bango, bakomi mingi lokola Mobikisi mpe Tata na biso na Lola.

Nayekolaki liteya mosusu uta na mama na ngai. Lokola mwana mwasi, azalaki na bokono makasi ya mongongo mpe penepene akufaki. Nsima azalaki na bokono ya meningite ya mokongo. Tata na ye akufaki elenge, mpe boye mama na ngai mpe ndeko na ye ya mobali basungaki kosalisa mama na bango.

Bomoi na ye mobimba, ayokaki mpasi ya mimekano ya bokono mpe mitungisi ya maladi. Na bamibu zomi ya nsuka ya bomoi na ye, azwaki bapasi ebele. Kasi na kati na nyonso, alakisaki bosembo na Nkolo, ata ntango akangamaki na mbeto. Foto se moko na efelo likolo ya mbeto na ye ezalaki ya Mobikisi. Maloba na ye ya nsuka epai na ngai na mbeto na ye ya liwa ezalaki maye: “Hal, ezali koyokana lokola ozali koyoka malili Osengeli kozwa makanisi ya komibatela.”

Na matanga na ye, molobi ya nsuka azalaki Mpaka Spencer W. Kimball. Nsima ya kolobela moke mimekano na ye mpe bondimi na ye, ye alobaki na mokuse boye: “Boko na bino bakoki komituna ntina nini Mildred ayokaki mpasi mingi boye mpe ya molai boye. Nakolobela bino ntina nini. Ezalaki mpamba te Nkolo alingaki kopetola ye mwa moke lisusu.”

Napesi botondi na ngai mpo na bandimi mingi ya sembo ya Eklezia ya Yesu Klisto oyo bazali komema bozito na bondimi ya sikisiki mpe oyo basungaka basusu bamema ya bango lokola Nkolo azali koluka kopetola bango mwa moke lisusu. Napesi lisusu bolingo mpe longonia na ngai mpo na basungi mpe bakambi na mokili mobimba oyo bazali kosalisa basusu na ntango oyo bango mpe mabota na bango ezali kozwa bopetolami ya boye.

Natatoli ete tozali bana ya Tata moko ya Lola, oyo alingi biso. Nayokaka bolingo ya Mokambi Russel M. Nelson mpo na biso banso. Azali profeta ya Nkolo na mokili lelo. Natatoli boye na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amene.