Likita Linene
Kimia, Zala Nie
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Kimia, Zala Nie

Mobikisi ateya biso lolenge nini koyoka kimia mpe bopemi atako ntango mipepe ezali kopepa makasi nzinganzinga na biso mpe mbonge makasi eluki kozindisa elikya na biso.

Ntango bana na biso bazalaki bilenge, libota na biso elekisaki mikolo mike na liziba moko ya kitoko. Na sima ya nzanga moko bamoko ya bana balataki elamba ya kobatelama yambo bapimbua likolo ya etando moko sima badinda na mayi. Muana na biso ya muasi ya moke koleka atalaki bandeko na ye na kobanga, na bokebi makasi. Na makasi nionso ye akokaki kosangisa, ye akokangaki zolo na ye na lobongo moko mpe apimbuaki. Ye na mbala moko abimaki likolo na bobangi moke na mongo na ye agangaki, “Salisa ngai! Salisa ngai!”

sikawa, azalaki na likama moko te ya bokufi; elamba na ye ya kobatelama ezalaki kosala mosala na yango mpe azalaki likolo ya mayi na bozangi likama. Tokokaki kotanda loboko mpe kobimisa ye likolo ya etando na bokasi moke. Nzokande uta na bomoni na ye, esengelaki azwa lisalisi. Ntango mosusu ezalaki malili ya mayi to mayele ya sika. Na ndenge nionso, ye amataki likolo ya etando, esika wapi tozingaki ye na elamba ya kokauka mpe tokumisaki ye mpo na bokasi na ye.

Atako tozali mokolo to elenge, mingi kati na biso tozalaka, na bantango ya mikakatano, tolobaka na lombango maloba lokola “Salisa ngai!” “Bikisa ngai!” to “Nasengi, yanola libondeli na ngai!”

Eloko moko ya lolenge oyo ekomelaki na bayekoli ya Yesu katikati na mosala na Ye ya bokufi. Na Malako totangaki ete Yesu “abandaki koteya lisusu na libongo na mayi: mpe ebele na bato bayanganaki epai na ye.”1 Liboke ya batu eyaki monene koleka ete Yesu “akotaki na bwato”2 mpe alobaki uta libongo yango. Na mokolo mobimba Ye ateyaki bato na masese ntango bango bafandaki na ngambo ya mayi.

“Mpe … ntango [pokwa] ezalaki koya,” Ye alobaki na bayekoli na Ye, “Tika biso tokende na ngambo mosusu. Mpe ntango bango batikaki ebele ya bato,”3 bango bakendaki uta na libongo mpe bazalaki na nzela na kati ya ebale ya Galilea. Amonaki ekomba na nsuka ya bwato, Yesu afandaki na nse mpe na lombangu nionso alalaki mpongi. Na mbala moko “eyaki mbu makasi ya mopepe, mpe bambonge ebetaki bwato, kino ete yango ekomaki [pene] na kotonda”4 na mayi.

Ebele ya bayekoli ya Yesu bazalaki balobi mbisi ya mayele mpe bayebaki lolenge nini kosimba masuwa na mbu. Bango bazala bayekoli na Ye kondima—kutu, baoyo ya Ye—ya bolingo. Bango batikaki misala, bantina ya moto ye moko, mpe mabota na bango mpo na kolanda Yesu. Bondimi na bango mpo na Ye ezalaki elembo na bozali na bango na masuwa. Mpe sikawa masuwa na bango ezalaki na kati ya mbonge mpe pene mpenza na kozinda.

Toyebi te ntango molayi boni babundaki mpo na kobatela bwato na mbonge, kasi balamusaki Yesu na bobangi moke na mingongo na bango, kolobaka:

“Molakisi, ezali likambo na yo te soki tokufi?”5

“Nkolo, bikisa biso: biso tokufi.”6

Bango babiangaki Ye “Molakisi,” mpe yango Ye azali. Ye azali lisusu “Yesu Klisto, Mwana wa Nzambe, Tata wa lola mpe mabele, Mokeli wa biloko binso uta o ebandeli;7

Elilingi
Kimia, zala Nie

Uta lolenge na Ye na masuwa, Yesu atelemaki mpe agangeli mopepe mpe alobaki na mayi ya kotomboka, “Kimia, zala nie. Mpe mopepe [ekitaki], mpe ezalaki na kimia makasi.”8 Kaka Molakisi mpe Moteyi, Yesu boye ateyaki bayekoli na Ye na nzela ya mituna mibale ya pete na bolingo. Ye atunaki:

“Mpo na nini bozali kobanga?”9

“Bondimi na bino ezali wapi?”10

Ezali na lolenge moko ya bokufi, kutu komekama, ntango tomikuti biso moko katikati ya mikakatano, mitungisi, to mimekano koganga makasi, “Molakisi, ezali likambo na yo te soko ngai nakufi? Bikisa ngai.” Atako Joseph Smith abelelaki boloko ya pasi, “O Nzambe, ozali wapi?” Mpe wapi ezali elemba ebombi ebombelo na yo?”11

Na tembe te, Mobikisi ya mokili asosoli bosuki na biso ya kibokufi, mpo na Ye koteya biso lolenge nini koyoka kimia mpe bopemi atako ntango mipepe efuli makusi nzinganzinga na biso mpe mbonge makasi eluki kozindisa elikya na biso.

Na baye bazali na bondimi oyo emekama, bondimi lokola ya bana mike, to ata mwa litono ya moke ya bondimi,12 Yesu abengisi, kolobaka: “Boya epai na ngai.”13 “Bondima na nkombo na ngai.”14 “Boyekola na ntina na ngai, mpe boyoka maloba na ngai.”15 Ye apesaki mobeko na pete nionso, “Boyambola mpe [bozua] libatisi na nkombo na ngai,”16 “Bolingana moko mpe mosusu; lokola ngai nalingi bino,”17 mpe “Ntango nionso bokundola ngai.”18 Ye akitisi motema: kolimbolaka, “Nalobeli bino makambo oyo, ete na ngai nde bokozwa kimia. Kati na mokili bokozala na mitungisi: kasi bozala na esengo malamu; ngai nasili kolonga mokili.”19

Nakoki kokanisa ete bayekoli ya Yesu na masuwa koninganaka mopepe makasi bazalaki, mpo na ntina, mosala ebele ya kotalaka monge kobetaka na libanda mpe kokima na mayi. Nakoki kokanisa bango kosimbanga voile mpe komeka komisaka lokola bazali kokonza masuwa. Makanisi na bango ezalaki mpo na kobika na ntango yango, mpe bosenga na bango mpo na lisungi ezalaki mpenza na lombangu ya bosolo.

Ebele kati na biso bakeseni te na mikolo na biso. Mkambo moko ya kala te nzinganzinga na mokili mpe na bikolo, mangomba, mpe mabota na biso eningisaki biso na mikakatano ebongisami te. Na ngonga oyo bitumba bondimi na biso ekoki koyoka bobendami na nsuka ya bokasi mpe bososoli na biso. Bambonge mpe bobangi ekoki kobungisa biso makanisi, komemaka biso kobosana bolamu ya Nzambe, kokomisaka bomoni na biso kobulungana mpe molili. Nzokande ezali na bangonga oyo ya pasi ya mobembo na biso nde bondimi na biso ekoki komekama to kolendisama.

Kotalaka bamabaku na biso, tokoki na boyebi nionso kosala makasi ya kotonga mpe kokolisa bondimi na biso na Yesu Klisto. Yango ekembisamaka ntango tokundoli ete tozali bana ya Nzambe mpe ete Ye alingi biso. Bondimi na biso ekli ntango tozui mayele na liloba ya Nzambe na elikya mpe ekenge, komekaka na bolamu na bsio kolanda mateya ya Klisto. Bondimi na biso ekoli ntango toponi kondima na esika ya kobeta ntembe, kolimbisa na esika ya kosambisa, koyamboli na esika ya kobondoka. Bondimi na biso epetuami ntango tokangami na motema kokita na mabongi mpe bolimbisi mpe ngolu ya Masiya Mosantu.20

“Ntango bondimi ezali boyebi ya kobonga nie te,” Mpaka Neal A. Maxwell alobaki, “yango ememi bolikyi ya bonzindo na Nzambe, oyo boyebi na Ye ezali ya bobongi nie.”21 Kutu na bangonga oyo ya mimekano, bondimi na Nkolo Yesu Klisto ezali na libanga mpe makasi. Yango esungi biso koleka na nzela ya bobungisi makanisi ezanga ntina. Yango epesi makasi ya kokoba kokende liboso elongo na nzela ya mayokani. Bondimi etindikami na nzela ya kolemba nzoto mpe epesi biso nzela ya kotala lobi na mayele mpe bokasi. Esengi na lombangu kosenga libiki mpe lisungi ntango tobondeli Tata na nkombo ya Mwana na Ye: Mpe ntango mabondeli na losambo emonani kozanga eyano, bondimi na biso ya kotingama na Yesu Klisto ekobota bokitisi motema, bomikitisi, mpe makasi ya kokta mobimba na maloba, “Bolingi na yo esalema.”22

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki:

“Biso tosengeli te kotika bobangi na biso ezwa esika ya bondimi na biso. Tokoki kobundisa bobangi yango na kokembisaka bondimi na biso.

“Banda elongo na bana na yo. … Tika bango bayoka bondimi na yo, kutu mikakatano ya pasi ekomi likolo na yo. Tika kondima na yo ekanga makanisi na bango na Tata na biso ya bolingo ya Lola mpe Muana na Ye ya Mobali ya Bolingo, Yesu Klisto. … Teya mwana mobali mpe ya mwasi ya talo mingi ete mobali to mwasi azali mwana ya Nzambe, ekalemi na elilingi na Ye, na ntina mpe libongi ya bule. Moko na moko abotamaki na bitumba ya kolonga mpe bondimi ya kokolisa.”23

Kala te nayokaki bana mibale ya mibu-minei-ya mbotama kokabola bondimi na bango na Yesu Klisto ntango bayanolaki na motuna “Lolenge nini Yesu Klisto azali kosunga yo?” Mwana ya yambo alobaki, “Nayebi ete Yesu alingi ngai mpo ete Ye akufaki mpo na ngai. Ye alingaka lisusu mpe bamikolo.” Mwana ya mibale alobaki, “Ye azali kosunga ngai ntango nazali na mawa to na kanda. Ye asungaka lisusu ntango kozinda.”

Yesu alobaki, Yango wana, oyo nionso ayamboli mpe ayei epai na ngai lokola mwana moke, nakoyamba ye, mpo na oyo bokonzi bwa Nzambe ezali.”24

“Mpo ete Nzambe alingaki mokili, ete apesaki Mwana na ye moko ya likinda, ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te, kasi ete azala na bomoi ya seko.”25

Kala te, Mokambi Nelson alakaki “ete kokita ya bobangi mpe bokoli ya bondimi ekolanda” ntango biso “tobandi ya sika solo koyoka, kotosa, mpe kotia bokebi na maloba ya Nkolo.”26

Elilingi
Yesu azali kokitisa mbu

Bandeko basi mpe mibali, mabaku na biso ya bitunga ya mikolo oyo ezali te nzela na biso ya suka ya boseko. Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tosili kotia likolo na biso nkombo ya Yesu Klisto na nzela ya liyokani. Tozali na bondimi na nguya na Ye ya bosikoli. Tozali na ntina nionso ya kosepela, mpo na Nkolo mpe Mobikisi na biso ayebi mpenza mitungisi, makanisi mpe paso na biso. Lolenge Yesu azalaki na bayekoli na Ye ya kala, Ye azali na masuwa na biso Natatoli Ye apesaki bomoi na Ye mpo ete yo na ngai tokoka kobunga te. Tika biso tolikya na Ye, totosa mibeko na Ye, mpe elongo na bondimi toyoka Ye koloba, “Kimia, Zala Nie.” Na nkombo ya bule mpe esantu ya Yesu Klisto, amene.