Likita Linene
Bobatela Mbongwana
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Bobatela Mbongwana

Na nzela ya Yesu Klisto, tozui bokasi ya kosala mbongwana oyo ewumelaka. Ndenge tobaluki epayi na Ye nakomikitisa, Ye akokolisa Bokasi bua biso mpo na mbongwana.

Bandeko basi ba bolingo, ezali esengo kokutana na bino.

Elilingi
Kofutaka mosolo na zando

Kanisa moto moko kokokendaka na zando kosomba eloko moko. Soki opesi na moteki mosolo mingi koleka ntalo ya eloko, moteki akozongisela yo mbongo.

Elilingi
Azali kozwaka mbongo bazongisi

Mokonzi Benjamin ateyaki bato na Amerika ya kala na ntina ya mapamboli minene ya Mobikisi,Yesu Klisto. Akelaki lola mpe mabele, mpe nyonso ya kitoko oyo tosepelaka na yango. 1 Na nzela ya Bomikabi na Ye ya bolingo Apesaki nzela mpo ete biso tosikolama uta na masumu mpe liwa. 2 Ndenge tolakisaka botondi epai na Ye na nzela ya kobika mibeko na nzunzu nyonso, nde Ye apomboli biso, atiki biso libela na nyongo na Ye.

Ye apesi biso mingi, mingi mpenza koleka motuya oyo tokoki kozongisela Ye. Bongo, nini tokoki kopesa na Ye, ye moto afutaki motuya oyo eleki monene penza mpo na masumu na biso? Tokoki kopesa Ye mbongwana. Tokoki kopesa Ye ya biso mbongwana. Ekoki kozala mbongwana moko ya makanisi, mbongwana moko ya bizaleli, to mpe mbongwana na nzela oyo tozali kokende. Mpo na kozongisa oyo Ye afutaki ya motuya koleka mpo na biso, Nkolo asengi biso tobongola mitema na biso. Mbongwana azali kosenga biso ezali mpo na litomba na Ye te, kasi mpo na oyo ya biso. Boye, na bokeseni ya mosombi na wenze, oyo akozongisa mbongo topesaki, Mobikisi na biso atonda na ngolu akosepelisa biso tobatela mbongo ya kozongisa.

Na nsima ya koyoka maloba elobami na Mokonzi Benyamina, bato ya mboka na ye bangangaki libanda, balobaki ete mitema na bango ebongwanaki, “pamba te Molimo ya Nkolo na Nguya Nyonso, oyo amemi mbongwana monene na kati na biso, … tozali lisusu na mabongisi ya kosala mabe te, kasi ya kosala bolamu libela na libela.” 3 Makomi malobi te ete mbala moko bakomaki bato bazangi masumu, kasi nde mposa na bango ya mbongwana etindaki bango kosala. Mbongwana ya mitema na bango elakisi kobwaka bomoto ya mobali to mwasi ya mokili mpe kosala makasi mpo ya kokoma mingi lokola Yezu Klisto.

Mokambi Henry B. Eyring ateyi: “Mbongwana ya solo esengeli na boluki bondimi ya bosikoli, na kosala makasi mingi mpe pasi. Na nsima ezali Nkolo nde akoki kopesa … bikamwisi ya kopetola mpe mbongwana. ” 4 Soki tosangisi makasi na biso na nguya ya Mobikisi ya kobongola biso, tokomi bikelamu ya sika.

Ntango nazalaki elenge moke, na mimonaki ngai moko kotambola na nzela moko etelema ngwi kolanda ntina ya bomoi ya seko. Tango inso nasalaki to nalobaki eloko moko ya mabe, nayokaki lokola nakweyi na nzela, kaka mpo na kobandela lisusu mobembo na ngai. Ezalaki lokola kokita na etando ya lisano ya bana Kokweya mpe Komata besikalie oyo ekweyisi yo uta likolo ya etando ya lisano ti na nse ya ebandeli ya lisano! Ezalaki kolembisa! Kasi, lokola nabandaki kososola oyo Nefi abengaki Malongi ya Klisto 5 mpe lolenge nini kokokisa yango na bomoi na ngai ya mikolo nyonso, nazuaki elikia

Elilingi
Mosala ya kobwana esengeli mpe kotia molende.

Yesu Klisto apesi biso ndakisa ya mbongwana ya ntango nyonso. Ye abengisi biso tosalela bondimi na kati na Ye, Oyo ezali kotinda biso koyambola—“oyo bondimi mpe boyamboli ememaka mbongwana ya motema.” 6 Ntango toyamboli mpe tobalusi mitema na biso epai na Ye, tokoyoka mposa monene ya kosala mpe kotosa mayokani ya bule. Tokotia molende kino nsuka na kokobaka kosalela mibeko miye na bomoi na biso mpe koengisaka Nkolo kobongola biso Koyika mpiko ti na suka elakisi kombongwana ti na nsuka. Ngai nasosoli ete na kobandela te mbala inso kokweyisama, kasi mbala inso nazali kokoba na maye matali mbongwana.

Ezali na liloba moko na kati ya mama ya malongi ya Bilenge Basi oyo elobi, “Ngai naluli likabo ya boyamboli mpe nakoluka bokomi malamu mikolo inso.” 7 Nasambeli ete tolula likabo ya kitoko oyo mpe tozala solo na mposa ya boluki mbongwana. Ntango mosusu ba mbongwana tozali koluka kosala basangani na masumu ya makasi. Kasi mbala mingi, tozali na kopetola lolenge ya bomoto na biso mpo ya kolanda bizaleli ya Yesu Klisto. Maponi na biso na mokolo ekokolisa to kokweyisa bokoli na biso. Moke, kasi mbala na mbala, mbongwana ya moto ye moko ekosunga biso tobongisa. Kokoma ya kolemba te. Mbongwana ezali mosala ya nzela molai na bomoi. Ngai nazali na botondi mingi na ntina ya bitumba na biso ya mbongwana, Nkolo azali motema molayi epai na biso.

Na nzela ya Yesu Klisto, tozui bokasi ya kosala mbongwana oyo ewumelaka. Ndenge tobaluki epayi na Ye nakomikitisa, Ye akokolisa Bokasi bua biso mpo na mbongwana.

Na likolo ya nguya ya kobongola ya bomikabi ya Mobikisi, Molimo Mosantu akosunga mpe kokamba biso ntango tozali kosala makasi. Ye akoki ata kosunga biso toyeba mbongwana nini esengeli biso kosala. Biso tokoki lisusu kozua libondisi na nzela ya mapamboli ya bonganganzambe, mabondeli, kokila, mpe koyangana na tempelo.

Na lolenge moko, bandeko ya libota, bakambi, mpe baninga bakoki kosunga na bokasi na biso mpo ya mbongwana. Ntango nazalaki na mibu muambe, yaya na ngai ya mobali, Lee, mpe ngai tosepelaki kolekisa ntango na lisano na baninga na biso likolo ya bitape ya nzete nzinga nzinga na biso. Biso tosepelaki kozalaka elongo na kindeko ya baninga na nse ya mpio ya nzete wana. Mokolo moko, Lee akweyaki na nzete mpe abukanaki loboko na ye. Kozala na loboko moko ebukana epesaki ye mpasi mpo na komata na nzete ye moko. Kasi bomoi likolo ya nzete ezalaki lolenge moko te ntango tozangaki ye kuna. Boye, bato basusu kati na biso bazalaki kotombola ye na nsima ntango basusu bazalaki kobenda ye na loboko na ye oyo ebukana te—mpe na bokasi mingi te—Lee azongaki likolo ya nzete. Loboko na ye ezalaki kaka ya kobukana, kasi azalaki lisusu na biso kosepela na lokola moninga ntango azalaki kobika moke moke.

Ngai nakanisaka ntango mingi ete boyebi na zuaki na ntina ya lisano na nzete ezali lokola moko ya misala ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Na nse ya mpio ya bitape ya nsango malamu, biso tozali kosepela mapamboli mingi esangani na boyokani na biso. Basusu bakoki kozala bakweyi na kobatelama ya boyokani na bango mpe bazali na bosenga ya komata lisusu na nzete ya kobatelama na bitape ya nsango malamu. Ekoki kozala mpasi mpo na bango kozonga bango moko. Tkoki biso kobenda na bopolo awa mpe komatisa moke kuna mpo na kosunga bango babika ntango bazali kosepela na boninga?

Soki ozali konyokwama na mpota ya bokweyi, palado tika bandeko basunga yo ozonga na mayokani na yo mpe na mapamboli yango ezali kopesa. Mobikisi akoki kosalisa yo obika mpe obongwana ntango ozingami na baoyo balingaka yo.

Ngai nakutanaka mbala mingi na baninga oyo namona te mibu mingi mileka. Ntango mosusu balobaka,“ Yo obongwani te ata moke!” Ntango inso ngai nayokaka yango, ngai nakekinyaka mua moke mpo naliki ete Nabongwani wana ezali mibu koleka. Ngai naliki ete nabongwani uta lobi loleki! Naliki ete nazali mua boboto, moto ya kosambisa te, mpe moto ya mawa mingi. Naliki nazali moto ya lombango kopesa eyano na mposa ya basusu, mpe naliki nazali mua moke motema molayi.

Nalingaka komata bangomba penepene ya ndako na ngai. Mbala mingi, nanyataka mua libanga moke na kati ya sapato ntango nazali kotambola na nzela. Ntango mosusu, natelemaka mpe na bimisaka yango na sapato na ngai. Kasi ekamwisaka ngai ntango molayi na ndimaka kotambola na mpasi liboso ete ngai natelema mpo na komilongola na mpasi ya pota.

Ndenge tozali kobemba na nzela ya boyokani, ntango mosusu tolokotaka mabanga na kati ya basapato na biso kowuta na bizaleli na biso ya mabe, masumu, to balolenge ya mabe. Na lombango tokolongola yango na bomoi na biso, monene mpe esengo mingi ekozala bomoi na biso awa na nse.

Kobatela mbongwana esengaka bokasi. Nakoki te kokanisa kotelema na nzela na ngai kaka mpo nazongisa na kati ya sapato na ngai libanga ya moke ya mpasi mpe mutungisi oyo nalongolaki. Nakolinga te kosala bongo koleka kipekapeka moko ya kitoko oyo alingi kozonga lisusu na liki na ye.

Natatoli wana mpo na Yesu Klisto, biso tokoki kobongwana. Tokoki kobongisa penza bizaleli na biso, kobongola makanisi na biso, mpe kopetola lolenge ya bomoto na biso mpo na kokoma mingi lokola Ye. Elongo na lisalisi na Ye, biso tokoki kobomba mbongwana. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.