Likita Linene
Lipamboli ya Emoniseli ya Kokoba epai ya Baprofeta mpe Emoniseli ya Moto ye moko mpo na Kokamba Bomoi na Biso
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Lipamboli ya Emoniseli ya Kokobama epai ya Baprofeta mpe Emoniseli ya Moto ye moko mpo na Kokamba Bomoi na Biso

Emoniseli ya kokobama ezali kozwama mpe ezali kozwama na nzela oyo Nkolo atiaki.

Lelo nakolobela emoiseli ya kokobama na baprofeta mpe emoniseli ya kokoba na biso moko mpo na kokamba bomoi na biso

Ntango mosusu tozwaka emoniseli ata ntango toyebi te bantina ya Nkolo. Ntango moke yambo Mpaka Jeffrey R. Holland abiangema mpo na kozala Apostolo na sanza ya motoba, na nazwaki boyebi ya emoniseli ete akobiangema. Nazalaki ntoma ya etuka moko mpe nakokaki kososola ntina moko te nasengelaki kopesama boyebi wana. Kasi tozalaki baninga kosala elongo loola bilenge bamisionele na Angleterre na ebandeli ya 1960, mpe nazalaki na bolingo mingi mpo na ye. Namonakai likambo wana lokola mawa ya boboto mpo na ngai. Mibu miye mileki kala te, namitunaki soki Nkolo azalaki kolengela ngai mpo na kozala elenge na Bazomi na Mibale na moninga misionele ya kokamwa oyo azalaki moninga na ngai ya elenge ntango tozalaki bamisionele bilenge. 1 Nazalaki ntango mosusu kokebisa bamisionele bilenge bazala boboto na baninga na bango ya bilenge mpamba te bayebi ata moke te ntango nini bakozala baninga bamisionele bankulutu na bango.

Nazalaka na litatoli ya makasi ete Eklezia oyo ezongisama ekambami na Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Ye ayebi nani asengeli kobianga lokola Bapostolo na Ye mpe na molongo nini asengeli kobianga bango. Ye ayebi lisusu boniboni kolengela Apostolo na Ye ya nkulutu mpo na kozala profeta mpe Mokambi ya Eklezia.

Topambolami ntongo oyo mpo na koyoka profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson, kopesa esakola ya mozindo ya mibu nkama mibale na mokili na ntina ya Bozongisi ya litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto. 2 Esakola oyo ya ntina na Mokambi Nelson emonisi yango polele ete Eklezia ya Yesu Klisto ezwi ebandeli, bomoi, mpe bokambi na yango mpo na mikolo ekoya na lisalisi ya emoniseli ya kokobama. Esakola ya sika elakisi bosololi ya Tata bolingo na bana na Ye.

Na mokolo ya ebandeli, Mokambi Spencer W. Kimball alobelaki maye nazali koyoka lelo. Ye alobaki: “Na makambo manso, oyo … tosengeli kozala na botondi mingi [mpo na yango] ezali ete balola ezali ya kofungwama mpenza mpe ete eklezia ya Yesu Klisto etongami likolo ya libanga ya emoniseli. Emoniseli ya kokobama ezali ya solo bomoi ya nsango malamu ya Nkolo na bomoi mpe Mobikisi, Yesu Klisto” 3

Profeta Enoch amonaki liboso mikolo oyo tozali na bomoi lelo. Nkolo atalisaki Enoch mabe monene oyo ekozala mpe asakolaki “mikakatano minene” oyo ekoya. Nzokande, Nkolo alakaki, “Kasi bato na ngai bakobatelama.” 4 “Mpe bosembo nakotinda na nse uta na lola, mpe bosolo nakotinda na mabele, mpo na kosakola na ntina ya Mobotami na ngai Se Moko.” 5

Mokambi Ezra Taft Benson ateyaki na nguya enene ete Buku ya Mormon, libanga likonzi ya eyamba na biso, eyaki na mabele mpo na kokokisa esakola ya Nkolo epai ya Enoch. Tata mpe Mwana mpe banzelu mpe baprofeta oyo babimelaki Profeta Joseph Smith “bakambamaki na lola mpo na kozongisa nguya esengeli na bokonzi.” 6

Profeta Joseph Smith azwaki emoniseli na emonieli. Bimoniseli mosusu epesami na likita oyo. Bimoniseli mingi ezwamaki na Profeta Joseph bibatelami mpo na biso na Malongi mpe Mayokani. Makomi manso ya Eklezia ezali na mayele mpe bolingi ya Nkolo mpo na biso na eleko oyo ya nsuka. 7

Likolo ya makomi manene oyo, topambolami na emoniseli ya kokobama oyo epesami na baprofeta na bomoi. Baprofeta bazali “batindami ya Nkolo, oyo bapesami ndingisa ya koloba mpo na Ye.” 8

Bimoniseli mosusu ezali na ntina mingi. mpe mosusu ebongisaka bososoli na biso ya bosolo ya ntina mpenza ya bonzambe mpe epesaka bokambi mpo na mikolo na biso. 9

Tozali mpenza na botondi mpo na emoniseli oyo epesami na Mokambi Spencer W. Kimball kopesaka bonganganzambe na bandimi ya mibali banso balongobani ya Ekelzaia na sanza ya motoba 8, 1978. 10

Nasaleli Nzambe na mingi ya Bazomi na Mibale oyo bazalaki wana mpe nazalaki elongo ntango emoniseli wana ya motuya ezwamaki. Moko na moko kati na bango, na masolo na biso, bandimisaki ete bakambami na nguya mpe na bomoko na molimo oyo Mokambi Kimball mpe bango bazwaki. Mingi balobaki ezalaki emoniseli ya nguya koleka nyonso bazwaki liboso mpe nsima ya ntango wana. 11

Baye kati na biso kosalelaka sikawa na Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na mibale topambolamaki na mikolo na biso ntango mabimisi ya ntina eyaki na nzela ya profeta ya sikawa. 12 Mokambi Russell M. Nelson azali mosali atindamaki na Nkolo mingimingi na ntina ya bimoniseli mpo na kosunga mabota kotonga esika esantu ya bondimi na bandako na bango, kosangisa Yisalaele na ngambo mibale ya elamba, mpe kopambola bandimi na makambo ya makuli ya tempelo ya bule.

Ntango mbongwana ya motuya mpo na kopambola bandako esakolamaki na likita linene ya sanza ya zomi 2018, natatoli “ete na mikano ya Lisanga ya Bokambi bonene mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale na tempelo, … esilaki profeta na biso ya bolingo kotuna Nkolo emoniseli … , bondimisi moko ya nguya ezwamaki na bango nyonso.” 13

Na ntango wana, bimoniseli moxusu na ntina ya makuli ya tempelo ya bule ezwamaki kasi esakolamaki to esalemaki te. 14 Bokambami oyo ebandaki na emoniseli ya profeta ye moko epai ya Mokambi Russell M. Nelson mpe bondimisi ya boboto mpe nguya na baye basalaki elongo na mosala wana. Mokambi Nelson asangisaki mingimingi bandeko basi oyo bazali kokamba likolo ya masanga ya Lingomba ya Bamama Basungi, Bilenge Basi, mpe ya Eteyelo ya Bana. Bokambami ya nsuka, na tempelo, na Bokambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ezalaki ya molimo mpe ya nguya mpenza. Biso moko na moko toyebaki tozwaki boyebi, bolingi, mpe mongongo ya Nkolo. 15

Nasakoli na limpombo nyonso ete emoniseli ya kokobama ezali kozwama mpe ezali kozwama na nzela oyo Nkolo atiaki. Natatoli esakola ya sika oyo Mokambi Nelson apesaki na ntongo oyo ezali emoniseli mpo na kopambola bato nyonso.

Totindi Libengisi na Banso na Feti na Mesa ya Nkolo

Tosakoli lisusu mposa na biso ya nse ya motema mpo na kosangana lisusu na baye bazali kobunda na matatoli na bango, bokomi malili, to balongolamaki nkombo na bango na mikanda ya Eklezia. Tozali na mposa ya kosala feti elongo na bino, “likolo ya maloba ya Klisto,” na mesa ya Nkolo, mpo na koyekola makambo tosengeli kosala. 16 Tosengeli na bino! Eklezia esengeli na bino! Nkolo asengeli na bino. Losambo na biso ya motema ezali ete bokosangana elongo na biso na kokumbamela Mobisiki ya Mokili. Toyebi ete basusu kati na bino bakokaki kotukama na botuki, bozangi boboto, to ezaleli mosusu oyo ezali te ya bo Klisto. Toyebi lisusu ete basusu bazalaki na mikakatano na bondimi na bango oyo ekokaki te kondimama, kososolama te. to koyokanisama.

Basusu na bino bandimi baleki na molende mpe bondimi bazwaki mpasi na mokakatano na bondimi na bango mpo na eleko moko. Nalingaka lisolo ya soIo ya W. W. Phelps, oyo asundolaki Eklezia mpe atatolaki mabe ya Profeta Joseph Smith na esambiselo ya Missouri. Nsima ya boyamboli, ye akomelaki Joseph, “nayebi ezaleli na ngai, yo oyebi yango, mpe Nzambe ayebi yango, mpe nalingi kobikisama soki baninga na ngai bakosunga ngai.” 17 Joseph alimbisaki ye, azongisaki ye na mosala, mpe na bolingo akomaki, “Baninga na ebandeli tozali lisusu baninga na nsuka.” 18

Bandeko mibali mpe bandeko basi, ata ezalela na bino, tosengeli boyeba ete Eklezia mpe bandimi na yango bakoyamba bino lisusu malamu na bozongi na bino!

Emoniseli ya Moto ye moko mpo na Kokamba Bomoi na Biso

Emoniseli ya Moto ye moko ezwami na oyo nyonso akomikitisa mpo na koluka bokambami uta na Nkolo. Ezali na motuya lokola emoniseli uta na profeta. Emoniseli ya Moto ye moko ya molimo uta na Molimo Mosantu esali ete bankoto ya bato bazwa litatoli esengeli mpo na kobatisama mpe kokotisama mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Emoniseli ya moto ye moto ezali lipamboli ya mozindo oyo ezwami nsima ya libatisi ntango biso “tosantisamaki na kozwaka Molimo Mosantu.” 19 Nakoki komikundola emoniseli moko ya kafukafu ya molimo ntango nazalaki na mibu 15. Ndeko na ngai ya mobali ya motuya azalaki koluka bokambami ya Nkolo mpo na lolenge nini koyanola na tata na biso ya bolingo, oyo alingaki ndeko na ngai ya mobali asala misio. Nasambelaki na mposa ya solo lisusu mpe nazwaki emoniseli ya ngai moko ya bosolo ya nsango malamu.

Mosala ya Molimo Mosantu

Emoniseli ya moto na moto oyo efandisami na bosolo ezwami uta na Molimo Mosantu. 20 Molimo Mosantu azali mobimisi mpe motatoli ya bosolo nyonso, mingimingi oyo ya Mobikisi. Soki Molimo Mosantu te, tokoki te ya solo koyeba ete Yesu azali Klisto. Mosala na ye monene ezali kopesa litatoli ya Tata mpe Mwana mpe Nkombo na bango mpe Nkembo na bango.

Molimo Mosantu akoki kosalela moto nyonso na lolenge moko ya nguya. 21 Nguya oyo ekozala ntango nyonso te longola se soki moto abatisami mpe azwi likabo ya Molimo. Molimo Mosantu asalisaka lisusu lokola mopetolisi na mosala ya boyamboli mpe bolimbisi.

Molimo asololaka na ndenge ya kokamwa. Nkolo asalelaki bolimboli kitoko oyo:

“Nakoyebisa bino na makanisi na bino mpe na mitema na bino, na nzela ya Molimo Mosantu, oyo ekoya likolo na bino mpe ekovanda na mitema na bino.

“Sikawa, tala, oyo ezali molimo ya emoniseli.” 22

Atako mosala na yango ekoki kozala na nguya mpenza, yango eyaka mpenza mbala mingi na kimia lokola mongongo moko ya kimia, ya moke. 23 Makomi epesi ndakisa mingi ya boniboni Molimo esalaka na mayele, lokola kolobelaka kimia na mayele na biso, 24 kofandaka na mayele na biso, 25 kolendisaka mayele na biso, 26 mpe kutu mongongo moko na mayele na biso. 27

Mabongi mosusu oyo elengelaka biso mpo na kozwa emoniseli ezali:

  • Kosambela mpo na kokambama na molimo. Na limemia mpe na bomikitisi tosengeli koluka mpe kosenga 28 mpe kozala na bompikiliki mpe na botosi. 29

  • Komilengela mpo na Kofulama na Molimo Yango esengeka ete tozala na boyokani na mateya ya Nkolo mpe na botosi na mitindo na Ye.

  • Kolia Elambo na bolongobani. Ntango tosalaka yango, totatolaka mpe tosalaka boyokani na Nzambe ete tokamati likolo na biso nkombo ya Mwana na Ye mosantu mpe ete tokomikundola Ye mpe tokobatela mitindo na Ye.

Libongi oyo elengelaka biso mpo na kozwa, koyeba, mpe kolanda bitinda mpe bokambi ya Molimo Mosantu. Yango ezali “makambo ya kimia … oyo ememaka esengo [mpe] … bomoi ya seko.” 30

Bolengeli ya molimo ebongaka mingi ntango toyekolaka mbala na mbala makomi mpe bosolo ya nsango malamu mpe tomanyolaka na mayele na biso bokambi oyo tolukaka. Kasi mikundola kozala na bompikiliki mpe kolikya na ngonga ya Nkolo. Bokambami epesamaka na Nkolo moyebi ya nyonso ntango Ye “aponaka ye moko koteya biso.” 31

Emoniselina Mabiangi mpe Misala na Biso

Molimo Mosantu akopesa lisusu emoniseli na mabiangi mpe misala na biso. Na mayele na ngai, bokambami ya molimo ya ntina mbala mingi mpenza eyaka ntango tozali komeka kopambola basusu na kokokisaka mikumba na biso.

Nakoki komikundola lokola elenge episkopo kozwaka libiangi moko ya elika te uta na babale moko babalana mwa ngonga yambo nazwa mpempo mpo na mosala ya nkita. Nasambaki elongo na Nkolo liboso ya boyei na bango mpo na koyeba boniboni nakokaki kopambola bango. Babimiselaki ngai lolenge ya kpokoso mpe eyano nasengelaki kopesa. Bokambami wana ya emoniseli epesaki ngai nzela mpo na kokokisa mokumba na ngai ya bule lokola episikopo ata mwa ngonga moke mpenza etikalaki. Baepisikopo na mokili mobimba bakabolaka lisusu ndenge oyo ya makambo elongo na ngai. Lokola mokambi ya likonzi, nazwaki kaka te emoniseli ya motuya kasi lisusu bosemboli ya ngai moko oyo esengelaki mpo na kosala lotomo ya Nkolo.

Nayebisi bino ya solo ete bokambami na bobimisi ekoki kozwama na moko na moko kati na biso soki tosali na bomikitisi na elanga ya vino ya Nkolo. Bokambami mingimingi eyaka uta na Molimo Mosantu. Ntango mosusu mpe mpo na ntina moko, yango eyaka mbala moko uta na Nkolo. Ngai moko natatoli ete yango ezali ya solo. Bokambemi mpo na Eklezia, mobimba, eyaka na Mokambi mpe profeta ya Eklezia.

Biso Bapostolo ya sikawa, tozali na libaku ya kosala mosala mpe mibembo elongo na profeta na biso ya sikawa, Mokambi Nelson. Namekoli oyo Wilford Woodruff alobaki etali Profeta Joseph Smith; ezali lisusu ya solo mpo na Mokambi Nelson. Namonaki “misala ya Molimo ya Nzambe elongo na ye, mpe mabimisi ya Yesu Klisto epai na Ye mpe bokokisi ya bimoniseli wana.” 32

Libondeli na ngai ya komikitisa lelo ezali ete moko na moko na biso ekoluka emoniseli ya kokobama mpo na kokamba bomoi na biso mpe kolanda Molimo ntango tozali kokumbamela Nzambe Tata na nkombo ya Mobikisi na biso Yesu Klisto, na ye napesi litatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Na 1960 ntango mibu ya kosala misio mpo na bilenge mibali ekitaki uta mibu 20 na 19, nazalaki moko ya mibu 20 ya nsuka; Mpaka Jeffrey R. Holland azalaki moko ya mibu 19 ya yambo.

  2. Tala “The Restoration of the Fulness of the Gospel of Jesus Christ: A Bicentennial Proclamation to the World,” na Russell M. Nelson, “Hear Him,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 91. Esakola oyo elongo na mitano mosusu epesamaki na eleko oyo na Bokambi ya Yambo mpe Bapostolo Zomi na Mibale.

  3. Teachings of Presidents of the Church: Spencer W. Kimball (2006), 243; tala lisusu Matai 16:13–19.

  4. Mose 7:61.

  5. Mose 7:62. Nkolo akobaki, “Mpe bosembo mpe bosolo ekosala kokombola mabele na mpela, mpo na kosangisa baponami na ngai uta na ngambo minei ya mabele” (Mose 7:62; tala lisusu Nzmbo 85:11).

  6. Ezra Taft Benson, “The Gift of Modern Revelation,” Ensign, Sanza ya zomi na moko. 1986, 80.

  7. Tala Ezra Taft Benson, “The Gift of Modern Revelation,” 80.

  8. Hugh B. Brown, “Joseph Smith among the Prophets” (Sixteenth Annual Joseph Smith Memorial Sermon, Logan Institute of Religion, Sanza ya zomi na mibale 7, 1958), 7.

  9. Tala Hugh B. Brown, “Joseph Smith among the Prophets,” 7. Na nionso, bimoniseli ezali na boyokani na liloba ya Nzambe epesamaki na baprofeta ya liboso.

  10. Tala Lisakola ya Eklezia 2; tala lisusu 2 Nefi 26:33. Emoniseli ekokisaki malongi etiami na Buku ya Mormon ete “banso bazali lolenge moko epai ya Nkolo,” lokola “moindo mpe mondele, mowumbu mpe monsomi, mobali mpe mwasi” (2 Nefi 26:33). Eminiseli oyo ya motuya ezwamaki mpe endimisamaki na kisuku ya bule ya likolo na Tempelo ya Salt Lake na Lisanga ya Bokambi ya Yambo mpe Bapostolo Zomi na Mibale.

  11. Baposto Zomi na MIbali mingi balakisaki ete emoniseli wana ezalaki ya nguya mingi boye mpe ya bule ete liloba nyonso oyo esalemeli mpo na kolimbola yango ekozala ya kokoka te mpe, na ndenge mousus, ekokitisa bozindo mpe nguya ya lolenge ya emoniseli.

  12. Tala“The FamilyLibota: A Proclamation to the World,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 145. Esakola oyo etangami na Mokambi Gordon B. Hinckley lokola eteni ya etinda na ye na Likita Linene ya Lingomba ya Bamama po na Bosalisi na mokolo ya zomi na mibale ya Sanza ya libwa, 1995, na Salt Lake City, na Utah. Tala lisusu Thomas S. Monson, “Welcome to Conference,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2012, 4–5. Mokambi Monson asakolaki bokitisi ya mibu misengeli mpo na mosala ya misio.

  13. Quentin L. Cook, “Deep and Lasting Conversion to Heavenly Father and the Lord Jesus Christ,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 11

  14. Bimoniseli na ntina ya makuli ya tempelo ya bule ekokisamaki na batempelo nyonso na sanza ya yambo 1, 2019. Ezali na motuya kososola ete mikemike etali makuli ya tempelo esololami kaka na tempelo. Nzokande, bateyaka mabongi. Mpaka David A. Bednar eteyaki kitoko na ntina ya mayokani mpe makuli ya tempelo mpe boniboni na nzela na yango “nguya ya Bonzambe ekoki kosopana na kati ya bomoi na biso.” (“Let This House Be Built unto My Name,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 86).

  15. Mosala oyo mpe mayangani masalemaki ezalaki na Tempelo ya Salt Lake na sanza ya yambo, ya mibale, ya misato, mpe ya minei 2018. Emoniseli ya nsuka na Bokambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ezalaki na sanza ya minei 26, 2018.

  16. Tala 2 Nefi 32:3.

  17. Saints: The Story of the Church of Jesus Christ in the Latter Days, vol. 1, The Standard of Truth, 1815–1846 (2018), 418.

  18. Saints, 1:418.

  19. 3 Nefi 27:20.

  20. Molimo Mosantu azali moko ya Bonzambe (tala 1 Yoane 5:7; Malongi mpe Mayokani 20:28). Ye azali na nzoto ya molimo mpe lokola moto (tala Malongi mpe Mayokani 130:22). Nguya na Ye ekoki kozala bisika nyonso. Ye azali bomoko na ntina elongo na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto, Mobikisi na biso.

  21. Mpo na bososoli malamu ya Mwinda ya Klisto mpe bokeseni mwinda ya Klisto mpe molimo Mosantu, tala 2 Nefi 32; Malongi mpe Mayokani 88:7, 11–13; “Light of Christ,” Bible Dictionary. Tala lisusu Boyd K. Packer, “The Light of Christ,” Liahona, Sanza ya mitano 2005, 8.-14.

  22. Malongi mpe Mayokani 8:2–3.

  23. Tala ElamanI 5:30; Malongi mpe Mayokani 85:6

  24. Tala Malongi mpe Mayokani 6:23.

  25. Tala Malongi mpe Mayokani 128:1.

  26. Tala Malongi mpe Mayokani 11:13.

  27. Tala Enosa 1:10.

  28. Tala Matai 7:7–8.

  29. Tala Moziya 3:19.

  30. Malongi mpe Mayokani 42:61.

  31. Neal A. Maxwell, All These Things Shall Give Thee Experience (2009), 30.

  32. Wilford Woodruff, na Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 283.