Likita Linene
Opening the Heavens for Help
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Kofungola Balola mpo na Lisungi

Tika totia bondimi na biso na Nkolo Yesu Klisto kati na misala!

Liyangani nini se moko oyo mpe ya kitoko mingi koleka yango ezalaki! Botondi mingi na, bandeko Laudy mpe Enzo. Bozalaki bantoma ya bilenge kitoko basi mpe bilenge mibali ya Eklezia malamu mpenza.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, toyoki mingi lelo etali Bozongisi ya Eklezia—Eklezia kaka oyo Mobikisi, Yesu Klisto, akozongisaki na ntango ya mosala na Ye awa na nse. Bozongisi wana ebandaki uta mibu 200 eleki na eleko ya milona ntango Nzambe Tata mpe Mwana na Ye Yesu Klisto, babimelaki elenge Joseph Smith.

Mibu zomi nsima ya limoni ya kokamwisa oyo, Profeta Joseph Smith mpe bato mitano basusu babiangemaki lokola bato babandi Eklezia ezongisama ya Nkolo

Uta na liboke moke wana esanganaki na Sanza ya Minei 6, 1830, ebotami lingomba ya mokili mobimba ya bandimi koleka funda 16; Bolamu oyo Eklezia ezali kokokisa na mokili mobimba mpo na kokangola mpasi ya bato mpe kopesa botombwami mpo na bato eyebani mpenza. Kasi ntina na yango ya yambo ezali ya kosunga mibali, basi mpe mabota balanda Nkolo Yesu Klisto, kobatela mitindo na Ye, mpe kolongisa mpo na mapamboli minene—oyo ya bomoi ya seko elongo na Nzambe mpe balingami na bango. 1

Ntango tozali kokembela molulu oyo ya ebandelaki Bozongisi, ezali ntina komikundola ete na ntango tozali kokumisa Joseph Smith lokola profeta ya Nzambe, oyo ezali eklezia ya Joseph Smith te, to ezali eklezia ya Mormon te. Oyo ezali Eklezia ya Yesu Klisto. Apesaaki motindo mpenza ndenge Eklezia na Ye esengelaki kobiangema: “Na yango eklezia na ngai ekobiangema na mikolo ya nsuka, kutu Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.” 2

Nalobaki liboso na ntina ya bosenga ya mosala ya kobongisa lolenge tolobaka nkombo ya Eklezia. 3 Uta ntango wana, makambo ebele esalamaki mpo na kokokisa bobongisi oyo. Nazali na botondi mpenza epai ya Mokambi M. Russell Ballard mpe Lisanga likoki mobimba ya Bapostolo Zomi na Mibale, oyo basali ebele mpo na kokamba babomeki oyo lokola mpe oyo etali likanisi mosusu oyo nakosakola na mpokwa oyo

Bakambi mpe badepatema ya Eklezia, makambo oyo ekangani na yango, mpe bifuku ya bandimi—mpe basusu—bazali sikawa kosalela nkombo malamu ya Eklezia Lolenge ya bokambi elongobana ya Eklezia ebongisami. Site Interneti monene ya Eklezia ezali sikawa ChurchofJesusChrist.org. Adresi mpo na email, bankombo ya site ya Interneti, mpe reseaux sociaux ebongisamaki mpe lokola. Lingomba ya bayembi na biso ya bolingo ezali sikawa Lingomba ya Bayembi ya Tabelenakele na Temple Square.

Tokomi sikawa na bamoki oyo ya kafukafu mpo ete ntango tolongoli nkombo ya Nkolo uta na nkombo ya Eklezia na Ye, na bozangi koyeba tolongoli nde Ye lokola moboku ya bogumbameli na biso mpe bomoi na biso. Ntango tozwaka nkombo ya Mobikisi likolo na biso na libatisi, tomipesaka mpo na kotatola, na maloba, makanisi mpe misala na biso, ete Yesu azali Klisto. 4

Liboso, nalakaki ete soki “tokosala na makoki na biso mpo na kozongisa nkombo ebongi ya Eklezia ya Nkolo,” Ye “akosopa na nse ya Ye nguya mpe mapamboli likolo ya mitu ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka, na ndenge oyo naino tomona te.” 5 Nakomisi ya sika eleka wana lelo.

Mpo na kosunga biso tomikundola Ye mpe kotalisa Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka lokola Eklezia ya Nkolo tozali na esengo ya kolakisa bino elembo oyo ekolimbola esika ya katikati ya Yesu Klisto kati na Eklezia na Ye.

Elembo oyo ekwi nkombo ya Eklezia oyo ezali na libanga ya nsuka moko. Yesu Klisto azali libanga ya nsuka mokonzi. 6

Elilingi
Liloba ya elembo na libanga lisimbi ndako

Na katikati ya elembo yango ezali na elembo ya ekeko ya marbre ya Thorvaldsen Christus. Ezali kolimbola mosekwi, Nkolo ya bomoi kotandaka maboko mpo na koyamba moto nyonso oyo akoya epai na Ye.

Na elembo, Yesu Klisto atelemi na nse ya masuwa. Masuwa ekundolisi biso Mobikisi mosekwi kobimaka na nkunda na mokolo ya misato kolandisama Bobakami na Ye na Ekulusu.

Elilingi
Elembo ya sika ya Eklezia

Elembo oyo esengelaki koyebana malamu na bato ebele, mpo toyebi mpenza uta kala nsango malamu ezongisama elongo na Klisto ya bomoi, mosekwi.

Elembo yango ekosalelama sikawa lokola elembo ya koyebela mpo na nkoma ya bakonzi, bansango, mpe milulu ya Eklezia. 7 Ekokundolisa banso ete oyo ezali Eklezia ya Yesu Klisto mpe ete nyonso tosalaka, lokola bandimi ya Eklezia na Ye, etiaka Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye na kati kati ya nyonso.

Sikawa, balingami na ngai mibali mpe basi, lobi ezali Eyenga ya Mandalala, lokola Mpaka Gong alobaki kitoko. Sikawa tozali kokota na poso ya kafukafu oyo esukaka na Pasika Lokola bayekoli ya Yeus Klisto, oyo bazali kobika na ntango bokono ya COVID-19 etie mokili na mpasi, tika tolobela kaka te na ntina ya Klisto to kosakola Klisto to kosalela elembo oyo etalisi Klisto.

Tika totia bondimi na biso na Nkolo Yesu Klisto kati na misala!

Lokola boyebi, bandimi ya Eklezia batosaka mobeko ya bokili bilei mokolo moko na sanza nyonso.

Malongi ya bokili bilei ezali ya kala. Esalemaki na bilombe ya biblia uta mikolo ya ebandeli. Mose, Dawidi, Ezra, Nehemia, Esther, Isaya, Daniele, Yoele, mpe ebele ya basusu bakilaki bilei mpe basakolaki na ntina ya bokili bilei. 8 Na kati ya makomi ya Yisaya, Nkolo alobaki: “Oyo ezali te kokila esili ngai kopona te? Kokangola minyoko na masumu, kofungola nkamba na ekangeli; kotika monyokolami ete alongwa wana esili ye kokangolama?” 9

Apostolo Paul ateyaki Basantu ya Kolinti “bomipesa na komikanga mposa mpe kobondela.” 10 Mobikisi Ye moko asakolaki ete makambo misusu ebimaka “te bobele na kobondela mpe na kokila bilei.” 11

Nawuti koloba kala mingi te na video ya media sociale ete “lokola monganga mpe mopasoli, nazali na limemia makasi mpo na mosala ya minganga, banganga ya mayele, mpe basusu oyo bazali kosala mpo na kosukisa bopalanganisi ya COVID-19.” 12

Sikawa, lokola Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka mpe Apostolo ya Yesu Klisto, ngai nayebi ete Nzambe “azali na nguya nyonso, bwanya nyonso, mpe bososoli nyonso; asosolaka makambo nyonso, mpe Moto ya mawa, kutu mpo na lobiko, mpo na baoyo bakoyambola mpe bakondimela nkombo na ye.” 13

Boye, na bileko ya mpasi makasi, lokola na ntango bokono ekomaka bolozi, eloko moko ya ntina mpo nabiso kosala ezali kobelela Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye—Nkolo Mokangoli—mpo na kolakisa nguya ya bolamu na Bango epambola bato ya mabele.

Na kati ya nsango ya video, nabiangisaki bato banso balanda ngai na bokili bilei na Mokolo ya eyenga 29, Sanza ya misato, 2020. Mingi kati na bino nakanisi batalaki video mpe balandaki ngai na bokili bilei. Basusu ntango mosusu batalaki te. Sikawa tozali kaka kosenga lisungi kowuta na lola.

Boye na mpokwa oyo, bandeko na ngai mibali mpe basi, na molimo ya bana ya Moziya, oyo bamipesaki mingi na bokili bilei mpe losambo, 14 mpe lokola eteni ya likita linene na biso ya Sanza ya minei 2020, nazali kosenga bokili bilei mosusu ya mokili mobimba. Mpo na baoyo bokolongono ekoki kopesa nzela, tika tokila bilei, tosambela mpe tosangisa bondimi na biso lisusu mbala oyo. Tika tosamba na losambo na motema mpo na lisungi uta na bokono oyo ezali koboma mokili mobimba.

Nabengisi bato nyonso, mpe baoyo ya boyambi na biso te, tokila bilei mpe tosambela na mokolo Malamu ya mitano, Sanza ya minei 10, mpo ete bokono oyo ezwa eyano, baminganga babatelama, nkita elendisama, mpe bomoi ezala malamu.

Lolenge nini tokilaka? Bilambo mibale to eleko ya bangonga 24 ezali momesano. Kasi bosengeli kozwa mokano nini ekozala libonza mpo na bino, ntango bozali kokanisa libonza monene Mobikisi asalaki mpo na bino. Tika tosangana na kobondelaka mpo na libiki ya mokili mobimba.

Mokolo ya mitano ya malamu ekozala mokolo ebonga nie na ntina ete Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye bayoka biso!

Bandeko mibali mpe basi, natalisi bolingo na ngai ya bozindo epai na biso, mpe na litatoli na ngai ya bonzambe ya mosala oyo tomipesi. Oyo ezali Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Ye atelemi na moto na yango mpe mpe akambaka nyonso oyo tosalaka. Nayebi ete Ye akoyanola bosenga ya bana na Ye. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.