Likita Linene
Ye Akendaka Liboso na Biso
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Ye Akendaka Liboso na Biso

Nkolo azali kokamba Bozongi ya nsango malamu na Ye mpe na Eklezia na Ye. Ye ayebaka oyo ekoya lobi malamu koleka. Abengisi yo na mosala.

Balingami na ngai ya mibali mpe basi, nazali na esengo ya kozala elongo na bino na likita linene oyo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Na libiangi na ye ya kokanisa lolenge ya Bozongisi ya Nkolo ya Eklezia na Ye na eleko ya nsuka oyo epamboli biso mpe bazalani na biso, Mokambi Russell M. Nelson alakaki ete boyebi na biso ekozala kaka te ya bokundoli kasi ya kobosana te.

Boyebi na ngai ezalaka ya bokundoli, nakanisi ya bino mpe ezalaka bongo. Atako ekozala ya bokundoli yango etali moko na moko kati na biso. Yango etali ngai mpo ete mayele na ngai ya kosala mpo na komilengela mpo na likita oyo ebongoli ngai na lolenge oyo nalingi ntango nyonso komikundola. Tika ete nalimbola.

Bolengeli na ngai ememaki ngai na likomi moko ya molulu ya Bozongisi. Natangaka yango mbala na mbala, kasi ntango nyonso ekomela ngai lapole moko ya motuya ya liyangani oyo Joseph Smith profeta ya Bozongisi azalaki kokota. Kasi mbala oyo, namonaki na lisolo moko lolenge nini Nkolo akambaka biso, bayekoli na Ye, na Eklezia na Ye. Namonaki nini elimboli mpo na biso bakufi mpo na kokambama na Mobikisi ya mokili, Mokeli—oyo ayebi makambo nyonso, oyo eleka, mpe oyo ekoya lobi. Ateyaka biso litambe moko-na-moko mpe akambaka biso, na botindiki na makasi te.

Likita oyo nazali kolobela ezalaki eleko ya motuya na Bozongisi. Ezalaki mokolo ya liyangani ya Saba oyo esalemaki na mokolo ya 3, Sanza ya minei, 1836, na Tempelo ya Kirtland na Ohio, mikolo nsambo nsima ekulisamaki. Joseph Smith atalisaki eleko ya motuya oyo na kati ya lisitwale ya mokili na lolenge ya pete. Masolo na ye ebele ekomami na kati ya Doctrine et Alliances na molongo 110:

“Na mpokwa, nasungaki Bakambi misusu na kokabolaka Elambo ya Nkolo na Eklezia, kozwaka yango uta na Bazomi na mibale libaku oyo ya malamu ezalaki ya kosala lelo na mesa ya bule. Nsima ya kosala mosala oyo epai ya bandeko na ngai ya mibali, nalongwaki na mesa, balido ya kokita, mpe namikitisaki, na Oliver Cowdery, tosambelaki na motema mobimba mpe kimia. Nsima ya kotelema uta na losambo, limoni elandi efungwamelaki biso mibale.” 1

“Elamba elongwaki na makanisi na biso, mpe misu na biso ya bososoli efungwamaki.

“Tomonaki Nkolo kotelema na tolo ya mesa, liboso na biso; mpe na nse ya makolo na ye ezalaki na bongengi lokola wolo ya peto, na langi lokola lilala.

“Miso na ye ezalaki lokola lolemo ya moto; nsuki ya moto na ye ezalaki mpembe lokola mvula ya mpemba; mobimba na ye ezalaki kongenga koleka bongengi ya moyi; mpe mongongo na ye lokola mingongo ya bamai minene, nde mongongo ya Yowa, kolobaka:

“Nazali ebandeli mpe nsuka; nazali oyo azalaki na bomoi, nazali oyo babomaki; nazali molobeli na bino epai ya Tata.

“Tala, masumu na bino malimbisami; bopetolami liboso na ngai, botombola mitu na bino mpe bosepela.

“Botika ete mitema ya bandeko na bino esepela, mpe botika ete mitema ya bato na ngai esepela, baoyo bazali, na bokasi na bango, batonga ndako oyo na nkombo na ngai.

“Mpo botala, nandimi ndako oyo, mpe nkombo na ngai ekozala awa; mpe nakobima ngai moko epai ya bato na ngai na ngolu na kati ya ndako oyo.

“Iyo, nakobima epai ya basali na ngai, mpe koloba epai na bango na mongongo na ngai moko, soki bato na ngai bakobatela mitindo, mpe babebisi ndako oyo te ya bule.

“Iyo mitema ya bankoto mpe zomi ya bankoto bakosepela makasi na libaku ya mapamboli oyo ekosopana, mpe nguya oyo basali na ngai balatisami na yango na kati ya ndako oyo.

“Mpe boyebani ya ndako oyo ekopalanganisama na bamboka ya bapaya; mpe oyo ezali ebandeli ya lipamboli oyo ekopesama likolo ya mito ya bato na ngai. Nde bongo. Amene.

“Nsima ya bosukisi limoni oyo, balola efungwamaki lisusu epai na biso; mpe Mose abimaki liboso na biso, mpe apesaki biso bafungola ya kosangisa Yisalayele uta biteni minei ya mabele; mpe bokambi ya bikolo zomi uta na mabela ya nordi.

“Nsima na yango, Eliasi abimaki, mpe alobelaki eleko ya nsango malamu ya Abalayama, kolobelaka biso mpe nkona na biso bikeke nyonso nsima na biso esengeli kopambolama.

“Nsima ya bosukisi limoni oyo, limoni mosusu ya monene mpe nkembo emonisamaki epai na biso; mpo na Eliya profeta, oyo amemamaki na lola na bozangi nkufa, atelemaki liboso na biso, mpe alobaki:

“Botala, ntango ekoki, oyo elobelamaki na monoko ya Malaki—kotatolaka ete ye [Eliya] asengelamaki kotindama, yambo ya bozongi ya mokolo monene mpe ya kokamwa ya Nkolo—

“Mpo na kozongisa mitema ya batata epai ya bana, mpe ya bana epai ya batata na bango, na bobangi ete mabele mobimba ebetama na lisuma—

“Nayango, bafungola ya ekeke oyo epesami na maboko na bino; mpe na yango bokoka koyeba mokolo monene mpe ya kokamwa ya Nkolo ezali pene, kutu na bikuke.” 2

Sikawa, natangaka lisolo oyo mbala na mbala. Molimo Mosantu endimisi ngai ete lisolo oyo ezali ya solo. Kasi ntango nazalaki koyekola mpe kosambela mpo na komilengela na likita oyo, namoni pole koleka nguya ya Nkolo mpo na kokamba na mobimba bayekoli na Ye na mosala na Ye.

Mibu motoba yambo Mose apesa epai ya Joseph bafungola ya bosangisi Yisalayele na Tempelo ya Kirtland, “Joseph ayekolaki uta na mwa eteni ya lokasa ya Buku ya Mormon ete ntina na yango ezalaki ya ‘kolakisa na ndako ya Yisalaele … ete bakoka koyeba mayokani ya Nkolo, ete babwakami te mpo na libela.’ Na 1831, Nkolo ayebisaki Joseph ete bosangisi ya Yisalaele esengelaki kobanda na Kirtland, ‘Mpe uta yango [Kirtland], oyo nyonso nakotinda akokende epai ya bikolo nyonso … mpo ete Yisalaele ebikisama, mpe nakokamba bango.’” 3

Atako mosala ya misionele esengelamaki mpo na kosangisa Yisalaele, Nkolo ateyaki Bazomi na mibale, baoyo bakomaki bamisionele na biso ya ebandeli, “Bomikundola, bokokende na bikolo mosusu te soki bozwi dotasio na bino te.” 4

Emonisamaki ete Tempelo ya Kirtland ezalaki ntina na litambe moko na moko ya moango ya Nkolo mpo na bantina mibale: Ya yambo, Mose azelaki kino tempelo esilaki mpo na kozongisa bafungola ya bosangisi Yisalaele. Mpe ya mibale, Mokambi Joseph Fielding Smith ateyaki ete “Nkolo atindaki Basantu batonga tempelo [Tempelo ya Kirtland] kati na yango ye akoka kobimisa bafungola ya likoki mpe epai oyo bapostolo bakokaki kopesama nguya mpe komilengela mpo na kobongisa elanga na ye ya vino mpo na mbala ya nsuka.” 5 Atako dotasio ya tempelo lolenge toyebeli yango lelo esalamaki te na Tempelo ya Kirtland, mpo na kokokisa lisakoli, makuli ya yambo ya tempelo ebandaki kokotisama kuna, na bosopani ya mamonisi ya molimo oyo elataki baoyo babiangemi na bamisio na dotasio oyo elakamaki ya “nguya uta na likolo” 6 oyo ekambaki na bosangisi monene na nzela ya mosala ya misionele.

Nsima ya bopesi bafungola ya bosangisi Yisalaele oyo epesamaki epai ya Joseph, Nkolo afulaki Profeta mpo na kotinda bandimi ya Bazomi na mibale na bamisio. Ntango nayekolaki, namonaki polele ete Nkolo alengelaki malamu nzela mpo ete Bazomi na mibale bakende na bamisio na bapaya esika oyo bato balengelamaki mpo na kondimela mpe kosunga bango. Na ntango, bankoto basengelaki, na nzela na bango, bamemama na Eklezia ezongisama ya Nkolo.

Kolandisama na mikanda na biso, emonisami ete bato 7,500 to mpe 8,000 babatisamaki na ntango ya bamisio mibale ya Bazomi na mibale na Bisanga ya Angleterre. Yango etiaki moboku mpo na mosala ya misionele na Eropa. Na nsuka ya ekeke ya mbala ya 19, basusu 90,000 basanganaki na Amerika elongo na ebele ya baoyo bawutaki na Bisanga ya Angleterre mpe Scandinavia. 7 Nkolo afulaki Joseph mpe bamisionele oyo ya boyengebene oyo bakendaki mpo na kosala kosilisa mosala ya obuka mbuma oyo esengelai , na ntango wana, emonanaki kolekela bango. Kasi Nkolo, na bomoni na Ye liboso mpe bolengeli, asalaki yango ezala pete.

Bomikundola liloba ya pete mpe mbala mosusu ya likomi ya ntoki uta na eteni 110 ya Doctrine et Alliances:

“Botala, ntango ekoki, oyo elobelamaki na monoko ya Malaki—kotatolaka ete ye [Eliya] asengelamaki kotindama, yambo ya bozongi ya mokolo monene mpe ya kokamwa ya Nkolo—

“Mpo na kozongisa mitema ya batata epai ya bana, mpe ya bana epai ya batata na bango, na bobangi ete mabele mobimba ebetama na lisuma—

“Nayango, bafungola ya eleko oyo epesami na maboko na yo; mpe na yango bokoka koyeba ete mokolo monene mpe ya kokamwa ya Nkolo ekomi pene, kutu na bikuke na bino.” 8

Natatoli ete Nkolo amonaki mosika lobi ekoya mpe lolenge nini Asengelaki kokamba biso mpo na kosunga Ye akokisa bantina na Ye na mikolo ya nsuka.

Ntango nazalaki kosunga na Bokambi ya Boepisikopo mibu ebele eleki, nazalaki na mokumba ya kotalaka lingomba ya batongi mpe batomboli oyo basalaki oyo tobengaki FamilySearch. Na lobi na bokebi ete ngai “nakambaki” bokeli na yango na esika ya kolobaka ete “nakambaki” yango. Bato ebele ya mayele batikaki misala misusu mpe bayaki mpo na kotonga oyo Nkolo alingaki.

Bokambi ya Yambo etiaki moango moko ya kokokitisa misala mibale mibale ya makuli. Ntina na bango ya motuya koleka ezalaki ya kozanga makoki ya koyeba soki makuli ya moto songolo esi esalemaki. Uta mibu—to oyo emonisamaki lokola mibu—Bokambi ya Yambo etunaki ngai, “Mokolo nini okosala yango?”

Na losambo, limemia, mpe libonza ya bato bango moko ya likoki monene, mosala ekokisamaki. Yango eyaki litambe moko nsima ya mosusu. Mosala ya yambo ezalaki ya kosala Boluki Mambi ya kala ya Libota mpo na baoyo bayebaki kosalela baodinatele te. Mbongwana mingi esalemaki, mpe nayebi ete ekokoba koya, mpo ntango tozali kosala mpo na kokokisa likambo songolo efulama, tofungolaka bikuke ya bimoniseli mosusu ya kokende liboso ya ntina ata na moke ya motuya kasi oyo emonana naino te. Atako lelo, FamilySearch ezali kokoma oyo Nkolo asengeli na yango mpo na eteni ya Bozongisi na Ye—mpe te kaka mpo na koboya makuli mibale mibale.

Nkolo atikaka biso tosala mbongwana mpo na kosunga bato bazwa mayoki ya libota mpe kutu kolinga bankoko na bango mpe kokokisa makuli na bango ya tempelo. Sikawa, lokola Nkolo ayebaki mpenza yango esengelaki kosalema, bilenge bakomi bayebi ya odinatele mpo na bankoko na bango mpe bandimi ya palwasi. Banso bazwi esengo na mosala oyo.

Molimo ya Eliya ezali kobongola mitema ya bilenge mpe mikolo, bana mpe baboti, bankoko mpe bankoko ya baboti. Batempelo ekobongisa lisusu na esengo manaka mpe mabaku ya libatisi mpe makuli mosusu ya bule. Mposa ya kosalela bankoko na biso mpe mokangano ya baboti mpe bana ezali kokola.

Nkolo amonaki yango nyonso koyaka. Alengelaki yango, malembe malembe, lokola Asalaki na mbongwana mosusu na kati ya Eklezia na Ye. Atombolaki mpe alengelaki bato na ye ya boyengebene oyo baponaki kosala malamu makambo ya makasi. Azalaka ntango nyonso na motema monene ya bolingo na bosungi biso toyekola “molongo moko na moko, motindo moko na moko, awa ndambo mpe kuna ndambo.” 9 Ye atelemaka ngwi na makanisi ya ntango na Ye, mpe Akosala solo koyeba ete kobonzela mbala na mbala ezali to ememaka lipamboli oyo tomonaka liboso esalema te.

Nasukisi na kolakisaka botondi na ngai epai ya Nkolo—Ye oyo afulaki Mokambi Nelson mpo na kobengisa ngai nasala libonza mpo na kolengela likita oyo. Ntango nyonso mpe losambo nyonso na ntango ya bomilengeli na ngai ememaki lipamboli.

Nabengisi banso oyo bazali koyoka nsango oyo to maloba oyo bazala na bondimi ete Nkolo akambaka Bozongisi ya nsango malamu na Ye mpe Eklezia na Ye. Ye akendaka liboso na biso. Ye ayebaka oyo ekoya lobi malamu koleka. Abengisi yo na mosala. Akotisi yo kati na yango. Azali na moango moko mpo na mosala na yo. Mpe atako ozali kosala libonza, okoyoka esengo ntango osungi basusu balamuka mpo na komilengela na boyei na Ye.

Natatoli epai na bino ete Nzambe Tata azali na bomoi. Yessu azali Klisto. Oyo ezali Eklezia na Ye. Ayebi mpe alingi yo. Ye akambaka bino Alengelaki nzela mpo na bino. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.