Likita Linene
Ete Bakoka Komona
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Ete Bakoka Komona

Tala mpe sambela mpo na mabaku ya kotika pole na yo engengela ete basusu bakoka komona nzela ya Yesu Klisto.

Bandeko mibali mpe basi, mitema na biso epambolamaki mpe ezongi sika na nzela ya Molimo toyokaki na Likita oyo.

Elilingi
Likonzi ya Moto

Mibu nkama mibale eleki, likonzi moko ya pole ekitelaki elenge mobali moko na zamba moko. Kati ya pole wana, Joseph Smith amonaki Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto. Pole na bango etindikaki molili ya molimo oyo ezipaki mabele mpe elakisaki nzela liboso mpo na Joseph Smith—mpe mpo na biso banso. Mpo na pole emonisamaki mokolo wana, tokoki koyamba litondi ya mapamboli ezwami na nzela ya Bomikabi ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto.

Na nzela ya Bozongisi ya nsango malamu na Ye, tokoki kotondisama na pole ya Mobikisi na biso. Na boye, pole yango esalami te kaka mpo na yo na ngai kaka. Yesu Klisto abengaki biso ete “tika mwinda ya bino engenga boye liboso ya bato baye, ete bamona misala malamu na bino mpe basanjola Tata na bino oyo azali na lola.” 1 Nayaki kolinga liloba oyo “ete bakoka komona.” Yango ezali libengisi moko ya ntina makasi uta na Nkolo kozala mingi na likanis na ntina ya kosunga basusu bamona nzela mpe bongo baya epai ya Klisto.

Elilingi
Mpaka L. Tom Perry

Ntango nazalaki na mibu 10, libota na biso ezwakii lokumu ya koyamba Mpaka L. Tom Perry ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na mibale ntango azalaki na mosala na mboka na ngai.

Na nsuka ya mokolo, libota na biso mpe ba Perrys tovandaki na kisuku na biso ya bopemi komelaka masanga sukali ya ananasi ya mama na ngai, ntango Mpaka Perry abetaki masolo ya Basantu na mokili mobimba. Nazalaki kolanda na bokebi.

Ngonga elekaki ntango mama na ngai abelelaki ngai na kati ya kikuku mpe atunaki motuna moko ya pete: “Bonnie, oleisaki basoso?”

Motema na nga eyoki; nasalaki yango te. Na kozelaka te kolongua na misoa na Apostolo ya Nkolo, nalobaki ete basoso bakokaki kokila bilei kino na ntongo.

Mama na ngai azongisaki eyano ya “te” moko ya suka. Kaka ntango wana, Mpaka Perry akotaki na kikuku mpe na mongongo na ye ya Emakasi mpe ya kosepelisa atunaki, “yoki ngai moto moko asengeli koleisa basoso? Mwana na ngai ya mobali mpe ngai tokoki kosangana na yo?”

O, oyo esengo monene nini ekomaki sikawa ya koleisa basoso! Nakimaki mbangu kozua tolose monene ya langi ya mosaka. Na esengo, nazalaki kolaki nzela, kopimbuaka likolo-likolo na nzela ebeba komemaka na ndako ya basoso. Na tolose kodiembelaka na loboko na ngai, tokatisaki na eteni ya masangu mpe tolekaki na nzela ya bilanga ya blé.

Kokomaka na libulu moko ya komema mayi oyo ekatiaki nzela, napumbukaki likolo na yango lokola nasalaka babutu ebele eleki. Nabanzaki te na bokasi ya Mpaka Perry ya komibatela na molili, nzela ayebaki te. Pole na ngai ya kobinakabinaka esungaki ye te komona libulu. Kozangaka pole ya sikisiki mpo na komona, atiaki litambe mbala moko na mayi mpe agangaki makasi na mpasi. Na bobangi, nabalukaki kotala moninga na ngai ya sika kolongola lokolo na ye oyo epolaki makasi uta na libulu mpe kolongolaa mayi na na boningis sapatu na ye ya kilo ya poso ya nyama.

Na sapato moko ya kopola mpe kotonda na mayi, Mpaka Perry asungaki ngai koleisa basoso. Ntango tosilisaka, ye alobaki na bolingo nionso, “Bonnie, nasengeli komona nzela. Nasengeli na pole kongengaka na esika nazali kotambola.”

Nazalaki kongengisa pole na ngai kasi na lolenge te ekokaki kosunga Mpaka Perry. Sikawa, nayebaki ete asengelaki na pole na ngai mpo na kotambola na bokebi na nzela, natiaki tolose kaka liboso ya matambe na ye mpe tokokaki kozonga ndako na kimia.

Bandeko mibali mpe bandeko basi, mibu mileki ebele namaniolakiaki solo nayekolaki uta Mpaka Perry. Mbela ya Nkolo ya kotika pole na biso kongenga ezali kaka na ntina ya koningisa pole na biso na zeke te mpe kosala ete mokili mingimingi engenga mingi koleka te. Yango ezali na ntina ya kotia pole wana ete basusu bakoka komona nzela ya Klisto. Ezali kosangisaka Yisalaele na ngambo mosusu ya elamba—kosungaka basusu komona libaku elandi liboso na kosalaka mpe kobombaka mayokani ya bule elongo na Nzambe. 2

Nkolo atatolaki, “Tala nazali mwinda; natii ndakisa yoko mpo ya bino.” 3 Tika totala moko ya bandakisa na Ye.

Mwasi na libulu a mayi azalaki Mosamalia oyo ayebaki Yesu Klisto te mpe amonamaki epai na ebele lokola moto abuakama na kati ya bato ya mboka na ye. Yesu akutanaki na ye mpe abandaki lisolo. Alobaki na ye mpo na wayi. Ye boye akambaki ye kokolisa pole ntango Ye alobaki kozala “mayi ya bomoi.” 4

Na kotala na mawa, Klisto ayebaki ye mpe bamposa na ye. Klisto akutanaki na mwasi epai wapi azalaki mpe abandaki kolobaka na ntina ya eloko moko ya momesano mpe eybani na banso. Soki Ye atelemakaaki kuna, elingaki kozala bokutani moko malamu. Kasi yango elingaki kozala na mbano te na bokei na ye na esika kolobaka, “Boya, kotala … : ezali ye te Klisto?” 5 Malembemalembe, na kati ya lisolo, ye akundolaki Yesu Klisto, mpe atako ya ye makambo ya kala, akomaki esaleli ya pole, kongengisaka nzela ete basusu bamona. 6

Sikawa tika totala bato mibale oyo balandaki ndakisa ya Mobikisi na kongengisaka pole. Kala mingi te moninga na ngai Kevin afandaki pembeni ya moyangeli misalamoko ya monene na ntango ya kolia na mpokwa. Atungisamaki na ntina ya nini akolobela mpo na ngonga mibale. Kolandaka botindiki moko, Kevin asengaki, “Yebisa ngai na ntina ya libota na yo. Bango bawuti wapi?”

Elenge mobali ayebaki moke na ntina ya libula na ye, mpe Kevin abimisaki telefone na ye, kolobaka, “nazali na esalelo moko oyo esangisi bato na mabota na bango, Tika ngai natala nini tokoki komona.”

Nsima ya lisolo molayi, moninga ya Kevin ya sika atunaki, “Mpo na nini libota ezali motuya koleka na eklezia na yo?”

Kevin azongisaki na pete, “tondimi ete tokokoba kozala sima tokufi. Soki toyebi bankoko na biso mpe tomemi bankombo na bango na esika moko ya bule ebiangemi tempelo, tokoki kosala makuli ya libala oyo ekobomba mabota na biso elongo kutu sima ya liwa.” 7

Kevin abandaki na eloko moko oyo ye mpe moninga na ye ya sika ekokanaki. Ye amonaki sima lolenge nini kozala nzeneneke ya pole mpe bolingo ya Nkolo.

Lisolo ya mibale ezali na ntina ya Ella, mobeti ya ndembo ya maboko na eteyelo ya bilenge. Ndakisa na ye ebandaki ntango azuaki libiangi na ye ya misio ntango mosika na eteyelo. Aponaki kofongolalibiangi na ye liboso ya lisanga na ye. Bayebaki mpenza eleko moko te na ntina ya Eklezia ya Yesu Klisto mpe basosolaki te mposa ya Ella ya kosala. Asambelaki mbala na mbala mpo na koyeba kolimbola libiangi ya etinda na ye na lolenge baye lingomba na ye bakokaki koyoka Molimo. Eyano na ye?

“Nasalaki PowerPoint,” Ella alobaki, “mpo ete namonaki ezali malamu.” Alobelaki bango makoki ya kosala na moko ya 400-koleka bamisio mpe likoki ya koyekola monoko moko. Angengisaki bankoto ya bamisionele oyo bazalaki kosalaka. Ella asukisaki na elilingi ya Mobikisi mpe litatoli ya mokuse: “Basketball ezali moko ya biloko ya motuya koleka na na bomoi na ngai. Natambolaki katikati na ekolo mpe natikaki libota na ngai esakana mpo na capitene oyo mpe na lisanga oyo. Biloko kaka mibale oyo ezali motuya mpo na ngai koleka baskeball ezali bondimi na ngai mpe libota na ngai.” 8

Sikawa, kanisa ete ozali kokanisa, “Oyo ezali bandakisa ya 1000-watt monene, kasi nazali ampule moko ya 20-watt,” mikundola ete Mobikisi atatolaki, “nazali pole oyo bino bokoki kosima.” 9 Ye akundolisi biso ete Akomema pole soki soki kaka tokotalisa basusu epai na Ye.

Yo na ngai tozali na pole ekoka ya kokabola kaka sikawa. Tokoki kokengisa litambe elandi na kosunga mosusu apusana pembeni ya Yesu Klisto, mpe litambe elandi, mpe oyo elandi.

Mituna yo moko, “Nani asengeli na pole oyo ozali na yango mpo na komona nzela oyo asengeli kasi akoki komona te?”

Baninga na ngai ba bolingo, mpo na nini kongengisa a pole na biso ezali likambo ya motuya mpenza? Nkolo alobelaki biso ete “ezali na bato ebele na mabele … babombelamaki bosolo bobele mpo ete bayebi te wapi komona yango.” 10 Tokoki kosunga. Tokoki na boyebi kongengisa pole na biso mpo etego basusu bakoka komona. Tokoki kosembola libengisi. 11 Tokoki kotambola na mobembo na baoyo batie litambe liboso ya Mobikisi, kolandaka te lolenge nini. Tokoki kosangisa Yisalaele.

Natatoli ete Nkolo akokomisa monene bokasi nyonso ya moke. Molimo Mosantu akotindika bisobiso toyeba nini koloba mpe kosala. Komeka ya lolenge oyo ekoki kosenga biso tolongua na bisika na biso ya malamu, kasi tokoki kondimisama ete Nkolo akosunga pole na biso engenga.

Boniboni nazali na botondi mpo na pole ya Mobikisi, oyo ekobi kokamba Eklezia oyo na nzela ya emoniseli.

Elilingi
Mobikisi kosimbaka mwinda

Nabengi biso banso tolanda ndakisa ya Yesu Klisto mpe kozala na bokebi na baye bazali nzinganzinga na biso. Tala mpe sambela mpo na mabaku ya kotika pole na yo engengela ete basusu bakoka komona nzela ya Yesu Klisto. Elaka ezali monene: “Ye oyo akobila ngai akotambola na molili te, kasi akozala na moi ya bomoi.” 12 Natatoli ete Mobikisi na biso, Yesu Klisto, azali nzela, solo, bomoi, pole mpe bolingo ya mokili. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. 3 Nefi 12:16.

  2. Tala Russell M. Nelson, “Hope of Israel” (worldwide youth devotional, Sanza ya motoba 3, 2018), HopeofIsrael.ChurchofJesusChrist.org.

  3. 3 Nefi 18:16

  4. Tala Yoane 4:9–30.

  5. Yoane 4:29.

  6. Tala Robert and Marie Lund, “The Savior’s Respect for Women,” Liahona, Sanza ya Misato. 2015, 32–36.

  7. Mokanda na ye moko.

  8. Mokanda na ye moko.

  9. 3 Nefi 18:24.

  10. Doctrine et Alliances 123:12.

  11. Tala Dieter F. Uchtdorf, “Missionary Work: Sharing What Is in Your Heart,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 15–18.

  12. Yoane 8:12.