Likita Linene
Yaka mpe Okoma wa Ngai
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Yaka mpe Okoma wa Ngai

Tobiangisi bana nyonso ya Nzambe na mokili bobimba basangana na biso kati ya mosala monene oyo.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, baninga ngai ya bolingo, poso nyonso, bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bisika nyonso na mokili bangumbamelaka Tata na biso ya bolingo ya Lola, Nzambe mpe Mokonzi ya molongo, mpe Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto. Tomanyolaka bomoi mpe mateya ya Yesu Klisto—molimo bobele moko azanga lisumu oyo azala naino na bomoi te, Mwana na Mpate ya Nzambe azanga mbindo. Lokola mbala nyonso toliaka elambo mpo na kokundola libonza na Ye mpe kokanisa ete Ye azali kati kati na bomoi na biso.

Tolingaka Ye mpe tokumisaka Ye. Na ntina ya bolingo na Ye ya bozindo mpe ya seko, Aniokwamaki mpe Akufaki mpo na yo mpe ngai. Afungolaki bikuke ya kufa, abuki bandelo oyo etiaki bokeseni na baninga mpe balingami, 1 mpe amemaki elikia na baye bazangaki elikia, kobikisaka babeli, mpe kokangolaka bakangemi. 2

Epai na Ye topesi mitema na biso, bolingo na biso, babolingo na biso mpe losambo na biso ya mokolo na mokolo. Mpo na ntina oyo, “tolobelaka Klisto, tokosepela Klisto, [mpe] tosakolaka Klisto … mpo ete bana na biso bakoka koyeba na liziba kani basengeli kotalela mpo na bolimbisi ya masumu na bango.” 3

Kosalelaka Ezalela ya Moyekoli

Nzokande, kozala moyekoli ya Yesu Klisto esengaka mingi koleka kosolola mpe kosakola Klisto. Mobikisi Ye moko azongisaki Eklezia na Ye mpo na kosunga biso na nzela ya kokoma mingi lokola Ye. Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ebongisami mpo na kopesa mabaku ya kosalela mabongi ya ebandeli ya kimoyekoli. Na bozali na biso kati ya Eklezia, toyekolaka mpo na koyeba mpe kosala na botindiki ya Molimo Mosantu. Tokolisaka ezalela ya kosunga na kokabolaka mawa mpe boboto na basusu.

Oyo ezali makasi ya bomoi mobimba, mpe esengaka kosalela.

Basani oyo balongaka balekisaka bantango na bango ebele na kosalelaka mabongi ya ebandeli ya lisano na bango. Minganga, basali ya interneti, baenjeniere ya nuclaire, mpe ata kutu ngai lokola moko ya momekano ya kolamba na kuku ya Harriet nakomaki na makoki ya mosala bobele ntango basalaka na bokebi mosala na biso.

Lokola kapiteni ya mpepo, nazalaki mbala mingi koyekolisa bakumbi mpepo na lisungi ya flight simulato—masini moko kitoko mpo na komekola mayele ya bokumbi mpepo. Simulator yango esungaka kaka bapiloti te bayekola mabongi ya ebandeli ya bokumbi mpepo; yango epesaka lisusu bango nzela bayeba mpe basala na komikebisa na makama oyo bakoki kokutana na yango ntango bakokumba mpepo ya solo.

Mabongisi se moko oyo etali mpe bayekoli ya Yesu Klisto.

Kozala molende na Eklezia ya Yesu Klisto mpe mabaku na yango kilikili ekosunga biso tozala ya komilengela malamu mpo na makambo oyo ezali kobongwana ya bomoi, atako ma kozala nini. Lokola bandimi ya Eklezia, biso tolendisami mpo na komipesa biso moko na maloba ya Nzambe na nzela ya baprofeta na Ye, ya kala mpe ya lelo. Na nzela ya losambo ya solo mpe ya komikitisa epai ya Tata na biso ya Lola, toyekolaka mpo na koyeba mongongo ya Molimo Mosantu. Tondimaka mabiangi ya kosala, koteya, kolengela, kosala mpe koyangela. Mabaku oyo epesaka biso ndingisa ya kokola na molimo, makanisi mpe ezalela.

Bakosalisa biso komilengela mpo na kosala mpe kobatela mayokani ya bule oyo epambolaka biso na bomoi oyo mpe na bomoi oyo ekoya.

Yaka, Sangana elongo na Biso!

Tobiangisi bana nyonso ya Nzambe na mokili bobimba basangana na biso kati ya mosala monene oyo. Yaka mpe mona! Atako na ntango ya mpasi oyo ya coronavirus, kokutana na biso na interneti. Kutana na bamisionele na biso na interneti. Luka oyeba mpenza Eklezia oyo ezali kopesa nini! Ntango eleko oyo ya mpasi ekoleka, kutana na biso na bandako na biso mpe na bisika na biso ya mabondeli!

Tobiangisi yo oya mpe osunga! Yaka mpe sala elongo na biso, kosalisaka bana ya Nzambe, kolandaka matambe ya Mobikisi, mpe okomisaka mokili oyo esika malamu koleka.

Yaka mpe okoma wa ngai! Okokomisa biso makasi koleka. Mpe okokoma malamu mingi koleka, boboto, mpe ya esengo koleka. Bondimi na yo ekolendisama mpe ekokola makasi koleka—okozala na makoki ya kotelemela mipepe mpe mikakatano oyo bozelaki te na bomoi.

Mpe lolenge nini tobandaka? Ndenge ezali ebele.

Tobiangisi yo oyekola Buku ya Mormon. Soki ozali na mokanda te, okoki kotanga yango na ChurchofJesusChrist.org 4 to kozwa yango na telefoni na aplikasio Book of Mormon app. Buku ya Mormon ezali litatoli mosusu ya Yesu Klisto mpe moninga ya Boyokani ya Kala mpe ya Sika. Tolingaka makomi masantu nyonso oyo manso mpe toyekolaka uta na yango.

Tobengisi yo olekisa mwa ntango na ComeuntoChrist.org mpo na kozwa oyo bandimi ya Eklezia bateyaka mpe bandimelaka.

Bengisa bamisionele botala elongo na ineterneti to yo moko na ndako esika oyo ekoki kosalelama—bazali na nsango ya elikia mpe libiki. Bamisionele oyo bazali bana na biso ya malamu ya mibali mpe basi oyo basalisaka na bisika ebele na mokili na ntango na bango mpe misolo.

Na kati ya Eklezia ya Yesu Klisto, okokutana na libota ya bato oyo bazali ya kokesena te na yo. Okokutana na bato oyo basengeli na lisungi na yo mpe balingi kosunga yo ntango ozali koluka kokoma malamu mpo na yo moko—moto Nzambe akelaki yo okoma.

Boyambi ya Mobikisi Epesami na Banso

Okoki kokanisa, “Nasalaki bambeba na bomoi na ngai. Nandimi te solo nakokaki mokolo moko komiyoka lokola kozala moko ya Eklezia ya Yesu Klisto. Nzambe akokaki te kolakisa litomba na moto moko lokola ngai.”

Yesu Klisto, atako Ye azali “Mokonzi na bakonzi,” 5 Masiya, Mwana ya Nzambe na bomoi,” 6 azalaka mpenza na mposa na bozindo ya moko na moko ya bana ya Nzambe. Azalaka na mposa ya moto nyonso kotalaka te mosala na na yei—mobola to mozwi, alongobani te to alongobani. Na ntango ya bomoi na Ye ya kufa, Mobikisi asalisaki moto nyonso: bato ya esengo mpe balongi, babukana mpe babunga, mpe baye bazanga elikya. Mbala mingi, bato oyo Ye asalisaki mpe asungaki bazalaki bato bayebana, ya kitoko to bato na bozwi te. Mbala mingi, bato Ye atombolaki bazalaki na mingi ya kopesa te na nsima kasi botondi, motema ya komikitisa, mpe mposa ya kozala na bondimi.

Soki Yesu alekisaki bomoi na Ye ya kufa kosalelaka “baoyo baleki moke moke,” 7 Ekokaki ye te kolinga bango lelo? Esika moko te ezali na kati ya Eklezia na Ye mpo na bana ya Nzambe? Atako mpo na baoyo bamiyokaka ya bolongobana te, babosanama, to bazali bango moko?

Ezali na ndelo moko te ya bobongi nie bosengeli kozwa na ntina ete bolongobana na ngolu ya Nzambe. Nsambo na bino esengeli kozala ya mongongo makasi te to kitoko to etonda na maloba ya kitoko mpo na kokoma na lola.

Na bosolo, Nzambe alakisaka bosepeli na moto songolo koleka mosusu te 8 —biloko oyo mokili epesaka ntina elakisi eloko moko te epai na Ye. Ayebi motema na yo, mpe Alingaka yo kotalaka te nkombo na yo, mosolo ya bozwi na yo, to motango ya balandi na yo na Instagrame.

Ntango topesi mitema na biso epai ya Tata na biso na Lola mpe toyei pene na Ye, tokoyoka Ye kopusana pene na biso. 9

Tozali banso bana na Ye ya bolingo.

Kutu baoyo babwakisaka Ye.

Kutu baoyo, lokola mwana ya moto makasi, azanga botosi, asilikaka na Nzambe mpe na Eklezia na Ye, na mbalakaka bakangaka bisaka na bango babimaka libanda ya ekuke kolobaka bakimi mpe bakozonga mokolo moko te.

Ntango mwana akimi ndako, ye akoki ntango mosusu komona te baboti na bango kotalaka na lininisa. Na mitema boboto, bazali kotala mwana na bango ya mobali to mwasi kokende—kolikiaka mwana na bango ya malamu akoyekola eloko mokoo uta na boyebi ya motema na bango ya boboto oyo mpe ntango mosusu akomonabmoi namosusu na bomoi—mpe nsuka nsuka kozonga ndako.

Boye nde ezali na Tata na biso ya bolingo ya Lola. Azali kozela bozongi na biso.

Mobikisi na yo, abimisi mpizoli ya bolingo mpe mawa na misu na Ye, kozelaka bozongi na yo. Kutu ntango omiyoki kozala mosika ya Nzambe, Akomona yo; Akoyoka mawa mpo na yo mpe akokima mpo na koyamba yo. 10

Yaka mpe Okoma wa ngai.

Nzambe Apesaka Biso Nzela ya Koyekola uta Mabunga na Biso

Tozali bato na mobembo oyo bazali kotambola na nzela ya nkufa na boluki monene ya ntina mpe bosolo ya nsuka. Mbala mingi, nyonso oyo tomonaka ezali nzela etandama liboso na biso—tokoki komona te esika nzela ebaluka soki nzela yango ekomema wapi. Tata na biso ya bolingo ya Lola apesi biso biyano nyonso te. Ye azelaka biso toyekola makambo ebele biso moko. Ye azelaka tondimela—kutu ntango ezali mpasi mpo na kosala yango.

Ye azelaka biso tolendisa mapeka na biso mpe tokolalisa mwa mikano—mwa mokuwa ya mokongo—mpe tozwa litambe mosusu mpo na kokende liboso.

Yango ezali lolenge toyekolaka mpe tokolaka.

Olingi na bosembo ete nyonso elimbolama na eteni moko na moko? Olingi na bosembo ete motuna nyonso eyanolama? Epai nyonso okokende emonisama polele na carte?

Naliki ete ebele kati na biso tokolemba noki mpeza boyangeli ya lola ya lolenge oyo. Toyekolaka mateya ya motuya ya bomoi na nzela ya boyebi. Na nzela ya boyekoli uta na bambeba na biso. Na nzela ya boyamboli mpe koyeba mpo na biso moko ete “likunia ekokoma soki moke te esengo.” 11

Yesu Klisto, mwana ya Nzambe, akufaki mpo ete bambeba na biso ekoka te kopesa biso etumbu mpe ekanga bokoli na biso libela te. Na ntina na Ye, tokoki koyambola mpe bambeba na biso ekoki kokoma nzela ya komema na nkembo monene.

Osengeli kotambola na nzela oyo yo moko te. Tata na biso ya Lola atiki biso te towayawaya na molili.

Yango wana, na eleko ya milona ya 1820, Ye abimaki elongo na Mwana na Ye, Yesu Klisto, epai ya elenge mobali, Joseph Smith.

Kanisa na ntina na yango mwa ntango moke! Nzambe ya mokili abimelaki moto!

Oyo ezalaki mbala yambo ya babokutani mingi oyo Joseph akutanaki na Nzambe mpe bato misusu ya lola. Maloba ebele oyo bato ya bonzambe balobelaki ye ekomami na kati ya makomi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya nsuka. Yango Ezwami na pete. Bato nyonso bakoki kotanga yango mpe koyekola yango bango moko nsango Nzambe azali na yango mpo na biso na mikolo na biso.

Tobengisi bino boyekola yango mpo na bino moko.

Joseph Smith azalaki elenge makasi ntango azwaki bimoniseli oyo. Ebele kati na yango ekomelaki ye yambo akokisa mibu 30. 12 Azangaki boyebi, mpe epai ya bato misusu, amonisamaki lokola kozanga bolongobani mpo na kozala profeta ya Nkolo.

Mpe bongo Nkolo abiangaki ye kaka—kolandaka nzela oyo tozwaka na nzela ya makomi masantu.

Nzambe azelaki te amona moto oyo abonga nie mpo na kozongisa nsango malamu na Ye.

Soki Azelaki, mbele kino lelo Azali kozela kaka.

Joseph azalaki mingi lokola yo na ngai. Atako Joseph asalaki bambeba, Nzambe asalelaki ye mpo na kokokisa bantina na Ye minene.

Mokambi Thomas S. Monson mbala mingi azalaki kobandela maloba ya toli oyo: “Oyo nyonso Nkolo abiangaka, ye nde Nkolo alongisaka.” 13

Apostolo Paul amanyolaki elongo na Basantu na Kolintia: “Bokanisa libiangi na bino moko, bandeko mibali mpe basi: mingi kati na biso bazalaki na bwanya te kolandisama na ezalela ya bomoto; mingi te bazalaki na nguya; mingi te kati na bino babotama na lokumu.” 14

Nzambe asalelaka bato na botau mpe alengelaka bango mpo na bantina na Ye. Bosolo oyo etelemi lokola litatoli oyo ezali nguya ya Nzambe, ya moto te, ete akokisa mosala na Ye na mabele. 15

Yokela Ye, Landa Ye

Ntango Nzambe abimelaki Joseph Smith, Alakisaki ye Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpe alobaki, “Yokela Ye!” 16

Joseph alekisaki mikolo na ye miye mitikalaki koyokelaka Ye mpe kolandaka Ye.

Lokola na Joseph, ezalela na biso ya moyekoli biso ebandaka elongo na mokano na biso ya koyokela mpe kolanda Mobikisi Yesu Klisto.

Soki bozali na mposa ya kolanda Ye, bosangisa bondimi na bino mpe bokamata likolo na bino moko ekulusu na Ye.

Bokomona ete bino mpenza bozali na kati ya Eklezia na Ye—esika ya esengo mpe ya boyambi epai wapi bokoki koya mpo na koluka nzela ya kozala moyekoli mpe ya kozwa esengo.

Ezali elikya na ngai ete, na kati ya mibu nkama mibale oyo ya bokundoli Limoni ya Yambo, lokola tozali kosepela mpe koyekola Bozongisi ya Eklezia ya Yesu Klisto, tokomona ete ezali kaka bokundoli likambo esalama kala te. Yo na ngai tozali eteni moko ya motuya na kati ya lisolo monene, ezali kokoba oyo.

Sikawa, eteni na yo mpe ya ngai ezali nini?

Ezali ya koyekola Yesu Klisto. Ya koyekola maloba na Ye. Ya koyokela Ye mpe kolanda Ye na kosalaka elongo mosala monene oyo. Nabiangsi bino boya mpe bokoma ya Ye!

Bosengeli kozala babongi nie te. Bosengeli kaka kozala na mposa ya komatisa bondimi na bino mpe koya epai na Ye mokolo na mokolo.

Eteni na biso ezali ya kolinga mpe kosalela Nzambe mpe kolinga mpe kosalela bana ya Nzambe.

Ntango bosali bongo, Nzambe akozinga bino mpembeni na bolingo, esengo, mpe bokambami na Ye ya solo na bomoi mobimba, kutu na nse ya mabaku ya mpasi mpenza, mpe mosika koleka yango.

Na ntina na yango natatoli mpe natikeli bino lipamboli na ngai na botondi ya mozindo mpe bolingo mpo na moko na moko na bino, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.